21-27/07
MASESE 23
Loyembo 97 mpe libondeli | Maloba ya ebandeli (Min. 1)
1. Mitinda oyo ekosalisa yo na oyo etali komɛla masanga
(Min. 10)
Soki okomɛla masanga, komɛla mingi te (Mas 23:20, 21; w04 1/12 19 par. 5-6)
Kobosana te makama oyo molangwa ebimisaka (Mas 23:29, 30, 33-35; it-1 1222)
Ndenge masanga emonanaka kitoko ekosa yo te (Mas 23:31, 32)
2. Biloko ya motuya ya elimo
(Min. 10)
Mas 23:21—Bokeseni nini ezali kati na kolya na lokoso mpe kozala nzoto mineneminene? (w04 1/11 31 par. 2)
Biloko nini ya motuya ya elimo oyo ozwi na botángi ya Biblia ya pɔsɔ oyo, okosepela kolobela?
3. Botángi ya Biblia
(Min. 4) Mas 23:1-24 (th liteya 5)
4. Ndenge ya kobanda lisolo
(Min. 2) NA BISIKA YA BATO NYONSO. (lmd liteya 3 pwɛ 5)
5. Kolandela bokoli
(Min. 5) NDAKO NA NDAKO. Lakisá moto ndenge boyekoli ya Biblia esalemaka. (lmd liteya 9 pwɛ 5)
6. Kokómisa bato bayekoli
(Min. 5) Lendisá moyekoli na yo oyo azali kobundana mpo na kotika momeseno moko oyo eyokani te na Biblia. (lmd liteya 12 pwɛ 4)
Loyembo 35
7. Nasengeli kopesa basusu masanga to te?
(Min. 8) Lisolo na bayangani.
Moto oyo abengisi bato na fɛti, na ndakisa na fɛti ya libala, asengeli kopesa bango masanga? Ezali ekateli oyo moto ye moko asengeli kozwa, kasi esengeli mpenza kotalela na likebi mitinda ya Biblia mpe ndenge oyo makambo ezali.
Lakisá VIDEO Nasengeli kopesa basusu masanga? Na nsima tuná bayangani boye:
Ndenge nini mitinda ya Biblia oyo elandi ekoki kosalisa moto oyo abengisi bato ayeba soki akopesa bango masanga to te?
Yn 2:9—Yesu abongolaki mai vinyo na fɛti ya libala.
1Ko 6:10—“Balangwi-masanga . . . bakozwa libula ya Bokonzi ya Nzambe te.”
1Ko 10:31, 32—“Ezala bozali kolya to komɛla . . . , bósalaka makambo nyonso mpo na nkembo ya Nzambe. Bókeba ete bókóma te bato oyo bazali kobɛtisa . . . libaku.”
Makambo nini osengeli kotalela?
Mpo tózwa bikateli ya malamu, mpo na nini tosengeli kosalela ‘makoki na biso ya kokanisa’ mpe kotalela mitinda ndenge na ndenge ya Biblia?—Ro 12:1; Mos 7:16-18
8. Bamposa ya lisangá
(Min. 7)
9. Boyekoli ya Biblia na lisangá
(Min. 30) lfb liteya 2, maloba ya ebandeli ya eteni 2, mpe liteya 3