Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • ijwbq lisolo 143
  • Komɛla likaya ezali lisumu?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Komɛla likaya ezali lisumu?
  • Biyano na mituna ya Biblia
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Eyano ya Biblia
  • Biblia elobi likambo moko na oyo etali komɛla bangi mpe badrɔgɛ mosusu mpo na kominanola?
  • Nasengeli koyeba nini na likambo ya komɛla makaya?
    Mituna oyo bilenge batunaka—Biyano oyo ebongi, Volimi 1
  • Namɛla makaya to te, etali Nzambe na nini?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2012
  • Ndenge nini Nzambe atalelaka komɛla makaya?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2014
  • Mpo na nini osengeli kotika komela likaya?
    Lamuká!—2000
Makambo mosusu
Biyano na mituna ya Biblia
ijwbq lisolo 143
Azali komɛla sigarɛti

Komɛla likaya ezali lisumu?

Eyano ya Biblia

Biblia elobeli komɛla likaya tea to makambo mosusu etali komɛla likaya. Kasi, ezali na mitinda oyo emonisi ete Nzambe andimaka te bizaleli mabe oyo ekoki kobebisa sante mpe na ndenge yango emonisi ete komɛla likaya ezali lisumu.

  • Komemya bomoi. “Nzambe . . . apesaka bato nyonso bomoi mpe mpema.” (Misala 17:24, 25) Lokola bomoi ezali likabo ya Nzambe, tosengeli te kosala likambo nyonso oyo ekokómisa bomoi mokuse, na ndakisa komɛla likaya. Na mokili mobimba, bato mingi bakufaka liwa ya mobesu kaka mpo na komɛla likaya.

  • Kolinga mozalani. “Osengeli kolinga mozalani na yo lokola yo moko.” (Matai 22:39) Komɛla likaya esika bato mosusu bazali ezali bolingo te. Baoyo bazalaka pene ya moto oyo azali komɛla likaya bakoki kozwa bamaladi mosusu oyo mbala mingi bamɛli-makaya nde babɛlaka yango.

  • Kozala basantu. “Bókaba nzoto na bino mbeka ya bomoi, ya bosantu, oyo Nzambe akoki kondima.” (Baroma 12:1) “Tómipɛtola na mbindo nyonso ya mosuni mpe ya elimo, tómonisaka ete tozali kobanga Nzambe mpo bosantu na biso ekóma ya kokoka.” (2 Bakorinti 7:1) Komɛla likaya ezali malamu te mpe eyokani te na kozala basantu​—elingi koloba, kozala pɛto, mpo baoyo bamɛlaka makaya bakɔtisaka pwazɔ na nzoto na kozanga kokana mpe yango ebebisaka mpenza nzoto na bango.

Biblia elobi likambo moko na oyo etali komɛla bangi mpe badrɔgɛ mosusu mpo na kominanola?

Biblia etángi bangi te to badrɔgɛ mosusu ya ndenge wana. Kasi ezali na mitinda oyo esengeli kotalela na likambo etali kosalela badrɔgɛ ya ndenge wana mpo na kozwa mwa mopɛpɛ, oyo ekómisaka bato baombo. Longola makambo oyo touti kolobela, esengeli mpe kotalela makambo oyo elandi:

  • Kobatela mayele na yo. “Osengeli kolinga Yehova Nzambe na yo na motema na yo mobimba . . . mpe na makanisi na yo nyonso.” (Matai 22:37, 38) “Bóbatela makanisi na bino mobimba.” (1 Petro 1:13) Moto akoki te kobatela makanisi na ye nyonso soki asalelaka drɔgɛ, mpe bato mingi kutu bakómá baombo ya drɔgɛ. Na esika bákanisa makambo ya malamu, makanisi na bango nyonso ekendaka kaka na kozwa drɔgɛ mpe kosalela yango​—Bafilipi 4:8.

  • Kotosa mibeko ya Leta. ‘Bótosa baguvɛrnema mpe bakonzi.’ (Tito 3:1) Na mikili mingi, mibeko elandelaka likambo ya kosalela drɔgɛ. Soki tolingi kosepelisa Nzambe, tosengeli kotosa bakonzi ya Leta.​—Baroma 13:1.

Likaya mpe sante

Ebongiseli ya ONU mpo na bokolɔngɔnɔ ya nzoto (OMS) emonisi ete mbula na mbula, bato soki milio motoba bakufaka na bamaladi oyo eutaka na komɛla likaya, ebomaka mpe bato koleka 600 000 oyo bapemaka milinga oyo bamɛli-makaya babimisaka. Tótala ndenge likaya ebebisaka sante ya baoyo bamɛlaka yango mpe ya baoyo bafandaka elongo na bamɛli-makaya.

Kanser. Milinga ya likaya ezali na biloko koleka 50 oyo epesaka maladi ya kanser. Buku moko (Encyclopædia Britannica) elobi ete “bato mingi (90%) oyo babɛlaka kanser ya pumɔ” ezalaka nde mpo na milinga ya likaya. Milinga ya likaya ekoki mpe kopesa maladi ya kanser na biteni mosusu ya nzoto, na ndakisa na monɔkɔ, nzela ya mongongo, estoma, mongongo, libale (foie), pancréas mpe libenga ya masuba (vessie).

Bamaladi ya mpema. Milinga ya likaya ekoki kopesa moto maladi ya mpema lokola pneumonie mpe grippe. Bana oyo bamɛlaka milinga ya likaya oyo momɛli azali kobimisa bakoki kobɛla kɔsukɔsu ya mpema, kɔsukɔsu oyo esilaka te mpe pumɔ na bango ekolaka malamu te mpe esalaka malamu te.

Maladi ya motema. Bamɛli-makaya bazali na likama ya kobɛla maladi ya motema. Gaze ya mabe oyo babengi monoxyde de carbone, oyo ezalaka na likaya, elekaka na pumɔ tii na kati ya makila mpe elongolaka oxygène na makila. Soki oxygène ezali mingi te na makila, motema esalaka mosala makasi mpo nzoto ezwa oxygène.

Soki mwasi azali na zemi. Basi ya zemi oyo bamɛlaka likaya bakoki kobota mwana ya matsombe, mwana oyo azali na kilo moke to mwana oyo mbɛbu epasuká. Bana ya ndenge wana bakoki kobɛla mpe bamaladi ya mpema to bakoki kokufa liwa ya mbalakaka.

a Awa, komɛla likaya etaleli kobenda kobenda milinga ya sigareti, ya cigare, ya mibokolo to pipe. Kasi, yango etaleli mpe makaya oyo batyaka na monɔkɔ, oyo babendaka na zolo, mpe makaya mosusu.

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto