Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • g93 Janvier nk. 18-20
  • SIDA: Tokoki kolikya nini mpo na mikolo mizali koya?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • SIDA: Tokoki kolikya nini mpo na mikolo mizali koya?
  • Lamuká!—1993
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Mwango mozangi mokakatano
  • Nsuka ya SIDA
  • Mpo na nini Afrika?
    Lamuká!—1993
  • Bato ya SIDA bazali kobakisama na ndenge ya nsɔmɔ!
    Lamuká!—2001
  • Sida na Afrika—Ngambo nini boklisto ya nkombo mpamba ezali na yango?
    Lamuká!—1996
  • SIDA na Afrika: Lolenge oyo yango esili kopalangana
    Lamuká!—1993
Makambo mosusu
Lamuká!—1993
g93 Janvier nk. 18-20

SIDA: Tokoki kolikya nini mpo na mikolo mizali koya?

“NANDIMISAMI mpenza ete tokozwa nkisi ya mangwelé na boumeli ya mbula zomi ezali koya.”​—Jorg Eichberg, mokambi na ebongiseli ya bolukiluki likoló na nkisi ya mangwelé na Centre de recherche Wyeth-Ayerst ya Philadelphie (États-Unis).

Kanisa soki bazwi mpenza nkisi mpo na kobikisa, to nkisi ya mangwelé, mpo na SIDA. Ekozala likambo ya malamu mingi! Na ntembe te, wana ezalaki likanisi ya bato 9 000 bayekoli maladi ya SIDA, baoyo bayanganaki na mbula eleki na mboka Florence mpo na kolobela lisoló oyo na motó ya likambo ete “Science esilisi ntembe ya SIDA.”

Awa 90% ya bato mosusu bazwi mikrobe ya SIDA na mikili ya bobólá, esengeli koluka libateli nokinoki. Nzokande, engebene zulunalo New Scientist, emonanaki lokola ete ntalo monene ya bayangani na likita ya Florence “babungisaki likanisi ya kosala na lombango.” Zulunalo yango ebakisi ete “mbala mosusu” bolózi oyo epalangani mingi mpenza na boye ete ebele na bato “basili kolɛmba liboso na mpasi yango.”

Na mawa mpenza, emonani ete bato ya zébi bazali kokutana na mituna mingi koleka biyano oyo bazali kozwa. Zulunalo New Scientist elimboli ete “nsima na mibu 10 oyo maladi esili kopalangana, bato oyo bakoyekolaka virus mpe baoyo bakoyekolaka biloko bizali kati na nzoto oyo bikobundisaka maladi, bazali kokutana na mikakatano mingi mpenza.” Engebene Weller, moto ya Grande-Bretagne oyo ayekoli maladi ya SIDA, “nkisi malamu mpenza mpo na koboma virus yango ekozwama sikawa te.”

Ata soki tokanisi ete bakozwa nkisi ya mangwelé mpo na SIDA, yango ekokóma kino epai wapi? Tala likanisi ya docteur Dennis Sifris, monganga oyo azali kosala na Afrika: “Tozali na nkisi ya mangwelé ya malamu mpenza mpo na maladi ya ntólo to tuberculose. Na yango, maladi ya ntólo mpe kintútu mpe hépatite B mbɛlɛ esengelaki kolimwa. Kasi maladi wana misato . . . ezali naino koboma bato na Afrika. Wana emonisi ete, ata soki bazwi mangwelé, mokakatano monene ekozala mpo na kokabola yango epai na bato nyonso.”

Lokola elikya ya kozwa nkisi malamu mpo na SIDA ezali bobele moke, etikali bobele mwango moko: kondimisa bafandi na Afrika ete babongola bizaleli na bango na makambo matali kosangisa nzoto. Kasi lolenge nini?

Mwango mozangi mokakatano

Bobele etindá oyo moko ekoki mpo na kosilisa maladi oyo epalangani na Afrika: ‘Kosalela mpe kosalela lisusu kapote, mpe kosalela ntango nyonso kapote mpo na kobatela nzoto.’ Bakumbi mituka bazali kozwa yango na ba postes etyami na milelo mikaboli bamboka, kozanga kofuta mbongo. Ezali kotyama kati na nkasa ya bazulunalo. Ba cliniques mpe basali na lopitalo bazali na yango na motángo ya bamilió.

Atako meko wana ekoki kopekisa mwa moke bopalangani ya SIDA, kasi ezali mpenza na nkaká​—mingi mpenza na Afrika. Stefan van der Borght, mosangani na lisangá oyo babéngi Médecins Sans Frontières na Angola, alimboli ete kokabola milió misato ya ba kapote ekoki kozala likanisi moko malamu. Kasi yango elimboli ete, wana milió moko na ndambo ya mibali ya etuká yango bakosalela yango mbala mibale, mosusu ekozala te.

Longola mikakatano miuti na bozangi kokabolama malamu ya ba kapote, yango ezali na bopusi nini likoló na pite, oyo ezali ntina ya liboso ya SIDA na Afrika? Ba rapports nyonso elakisi ete meko wana ezali nde kopusa bato na kosala lisusu pite, kasi ezali kopekisa yango te. Bakonzi ya guvernemá bango moko babandi kososola likambo yango. Guvernemá moko esɛngaki na bibongiseli ya misala na yango ete batika kosala piblisité ya kapote, mpamba te yango ezali kopusa bato na kosala pite. Kati na mokanda na ye SIDA: nsuka ya mokili ebɛlɛmi (na Lingelesi), Keith Edelston apesi mwango moko moleki lisusu malamu: “Na kotalela makámá . . . oyo makoki kobima mpo na kosalela ba kapote, ezali polele ete kozala sé na mobalani moko ezali nzela bobele moko mpo na komibatela.”

Kasi moto nyonso akokoka kobongola bizaleli mpo na kofanda sé na mobalani na ye?

Nsuka ya SIDA

Molakisi Reuben Sher, moto na mayele oyo ayekoli maladi ya SIDA na Afrika, alobaki ete: “Soki bondumbá esili na mikolo mizali koya, mikrobe wana ekolimwa. Bato oyo bazali na yango bakokufa elongo na mikrobe wana.” Bobele bongo, tala oyo ekomamaki na Star, zulunalo moko ya Afrique du Sud, oyo ebimaka na Johannesburg: “Moto oyo akotambolaka na basi mingi te to na mibali mingi te, oyo akoboyaka kosalela ntonga batubaki na yango moto mosusu, mpe oyo akoboyaka kozongisama makila, azali na makámá mingi te mpo na kozwa [V.I.H.] (mikrobe ya SIDA).”

Lelo oyo, ba Témoins de Jéhovah koleka 450 000 ya Afrika bazali komibatela na makambo wana. Bandimi mpenza ete mibeko ya Biblia mizali na motuya mingi. Likanisi na bango lizali boye ete: lokola Jéhovah Nzambe, Mozalisi, asalaki bato, lolenge na etamboli oyo alakisi bango ezali mpo na bolamu na bango. Lilako lipesami na Baebele 13:4 (MN) ezali ndakisa malamu: “Tika ete libala likumisama epai na bato nyonso mpe mbeto ya libala ebebisama te.” Na esika na kotungisama, baoyo bazali kosalela malako motindo oyo, bazali komibatela na mpasi kati na mosuni mpe na mayoki.​—Tala Misala 15:29; 2 Bakolinti 7:1; Baefese 5:3-5.

Epai mosusu, bazulunalo mpe bipanzelo mosusu na nsango bizali mbala mingi kokumisa bizaleli malamu mpenza ya ba Témoins de Jéhovah. Daily Telegraph, zulunalo ya Londres emonisaki ete: “Bazali . . . ba citoyens ya sembo mpe bazali bato balakisami malamu, baoyo bakotósaka mibeko ya bizaleli malamu mpenza.” Mpe ebakisi ete: “Bondumbá mpe kozala na basi mingi soko na mibali mingi oyo epalangani epai na bato ya Afrika, etalelami lokola likambo libongi te epai na Batemwe.” Bobele bongo, kati na mokanda na ye Bokóli ya mangomba na mikolo na biso (na Lingelesi), Bryan Wilson akomaki ete, “na Afrika, Batemwe . . . bakeseni mpenza na bato mosusu” mpe “matomba malamu ya . . . mibeko [na bango] ya bizaleli malamu emonani polele epai na bango.”

Yango elingi koloba te ete ba Témoins de Jéhovah bakoki kozwa SIDA te. Basusu bazwaki yango na nzela ya babalani na bango oyo baboyaki kotósa mibeko ya Biblia mpe basusu bazwaki maladi wana liboso ete bakóma Batemwe. Ezali mpe na baoyo bazongelaki misala mabe ya mokili ya lelo mpe, kati na bango, ntalo moke babukaki mbuma mabe: bazwaki SIDA. (Bagalatia 6:7) Baoyo balandaki bomoi wana ya mbindo na nko, basili kobimisama na lisangá ya boklisto. (1 Bakolinti 5:13; 6:9, 10) Nzokande, ntalo eleki monene ya bamilió minei ya ba Témoins de Jéhovah na mokili mobimba, bazali kolongono na nzoto, na mayoki mpe na elimo, oyo euti na botósi na mibeko ya Mozalisi na ntina na bizaleli malamu.

Tokoki kozala na esengo na koyeba ete Biblia esili kosakola ete mosika te bolózi nyonso lokola SIDA ekolimwa libela. (Emoniseli 21:3-4) Jéhovah Nzambe alaki kotya mokili ya sika kati na yango misala ya mbindo oyo mibimisi maladi lokola SIDA, ekozala lisusu te. Bato bakozwa lisusu mpasi te mpo na mabe ya bato mosusu, mpo ete bato nyonso bakozala na lolenge na bomoi ya sembo mpe ya pɛto oyo ekopesa bolamu ya solo.​—Yisaya 11:9; 2 Petelo 3:13.

[Likanisi ya paragrafe na lokasa 18]

“Eloko tozali na yango mposa, ezali te ya kobimisa bamiliare ya misolo mpo na bolukiluki nkisi. . . . Tozali nde na mposa ete bato bazongela etamboli malamu.”​—Docteur Mark Hendricks, moto wa Afrique du Sud oyo ayekoli biloko bizali kati na nzoto oyo bikobundisaka maladi

[Elilingi na lokasa 18]

Kozala na mobalani bobele moko ezali libateli eleki malamu mpo na SIDA

[Elilingi na lokasa 19]

Nzambe alaki biso mokili ya sika epai kuna maladi lokola SIDA ekozala te

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto