SIDA na Afrika: Lolenge oyo yango esili kopalangana
Euti na mokomani na biso na mokili moko ya Afrika
OZALI koyeba lisusu makambo oyo basakolaki mpo na yango? Ezalaki nsɔmɔ. Bamilió mingi ya bafandi na Afrika bakozwa SIDA. Biloko bizali kati na nzoto na bango, oyo bikobatelaka bango na maladi, bikosala lisusu te; boye nzoto na bango ekokoka lisusu te kotɛmɛla maladi makasi. Lokola maladi ya nsɔmɔ oyo ebomaki bato mingi na mikili ya Mpótó na ekeke ya zomi na minei, bobele bongo kufa mpe libebi ekokwela bato na Afrika na motindo oyo emonanaki liboso te.
Na nsima, eloko moko eyokamaki lisusu te. Nsango esilaki kotambola mingi, mpe bato balɛmbaki koyoka esakola oyo ya nsɔmɔ. Elingaki solo kozala likambo ya nsɔmɔ? Totalela naino kino wapi SIDA esili kokɔta na Afrika.
Engebene André Spier, moto oyo ayekoli maladi ya SIDA, “moto te akoki kopesa mituya ya sikisiki mpo na ntango ezali koya.” Nde eyebani bobele ete mpasi monene ezali liboso: “Ebele na bato bakozwa maladi yango, mpe mingi bakokufa.” Na 1988, na likita moko lisalemaki na mboka Stockholm, oyo eyanganisaki mikili nyonso mpo na kotalela likambo ya SIDA, monganga Lars Kallings, moto ya Suède, asakolaki “motuya ya nsɔmɔ . . . bobele na mibu mibale to mibu misato mizali koya.”
Mibu misato misili koleka. Lelo oyo bayei komona ete mingi kati na kosakola wana elekisaki ndelo te. Liboso basakolaki mituya, lelo ezali nde mayebisi ya bibembe. Oyo eleki nsɔmɔ ezali naino koya.
Liwa mpe mpasi monene
SIDA ezali koboma mpe ezali kobebisa kati na mikili ya Afrika oyo mizwami na nsé ya esobé ya Sahara. Lisoló moko libimaki kati na zulunalo Nature limonisi ete, “na bingumba bisusu, SIDA ezali maladi ya liboso oyo ezali koboma mikóló mpe ezali moko kati na maladi ya liboso oyo ezali koboma bana.” Na engumba moko, SIDA ekómi koboma bato mingi, na motindo boye ete ekómi mokakatano mpo na banganganzambe ete basalela bango nyonso misa.
Na octobre 1991, bakambi ya baguvernema ya mikili mikolobaka Lingelesi, bayanganaki na mboka Harare, na Zimbabwe. Kuna nde bapesaki bango rapport moko ya nsɔmɔ likoló na mpasi ebimisami na SIDA na Afrika. Elobamaki kati na yango ete, na mikili misusu, mbeto mingi ya lopitalo, longwa na 50 kino 80% ezali sé na bato ya SIDA. Mpo na Uganda, mokili epai kuna SIDA ekɔti mingi, Stan Houston, monganga ya SIDA, alobaki ete bato oyo SIDA ebomi na mokili wana baleki baoyo bakufaki na boumeli ya mibu 15 na bitumba oyo bingaláki kuna.
Makambo makundolamaki na Abidjan, na Côte d’Ivoire, mazali mpe kobangisa. Minganga mpe bato na zébi, basalaki basanza mingi mpo na kotala bibembe na ba morgues mibale eleki minene. Na nsuka na yango, balobaki nini? Zulunalo Science, oyo esakolaki maloba na bango ekomaki boye ete, na Abidjan, SIDA nde “maladi ya liboso oyo ezali koboma” mibali oyo bakóli. Ebakisaki ete mituya oyo mipesami, “ekoki kozala moke na kotalela ebele ya bato oyo bazali kokufa mpo na bokɔnɔ oyo bozwami na mikrobe ya SIDA oyo babéngi V.I.H. [Virus de l’immunodéficience humaine].”
Ata O.M.S. (Lisangá likotalelaka makambo ya kolongono na nzoto ya bato na mokili mobimba) oyo ezali kotalela bokóli ya maladi yango kati na mokili, ekanisi ete mituya mipesami mizali bobele lokola mwa eteni moke ya libangá ya glace oyo ebimi longwa na mai, nzokande eteni eleki monene mpenza ebombami na nsé na mai. Engebene zulunalo New Scientist, O.M.S. “emoni ete mikili mingi ya Afrique orientale mpe ya Afrique centrale bayebisi bobele soko 10% ya bato oyo bazali na SIDA . . . Ba rapports ekoki te mpe mosusu etangami malamu te, mpamba te mosala mosalemi bobele likolólikoló.”
Maladi ezali komonana noki te
Eloko ya bobangi makasi mpo na oyo etali SIDA, ezali boye ete soki maladi yango ekɔti na nzoto, ekoumelaka ntango molai liboso ete emonana polele. Moto oyo mikrobe wana ekobomaka bato ekɔteli ye, akoki kofanda na yango na nzoto na ye ata mbula zomi mpe akoyoka eloko moko te mpe bato bakomona elembo moko te ya maladi yango. Soki akotalisa makila te, akoyeba eloko te kino na mokolo oyo maladi yango ekongala. Ezali bato ya motindo oyo nde bazali kopalanganisa SIDA mpo bayebi te ete basili kozwa yango.
Kotalisa makila na lopitalo nde eyei komonisa kino epai wapi bolózi yango epalangani na Afrika. Na ndakisa, engebene zulunalo African Affairs, “eyei komonana na etuká etondi na bato oyo ezali pembenipembeni na lac Victoria ete, V.I.H. to mikrobe ya SIDA esili kopalangana mingi mpenza, na motindo boye ete 10 kino 18% epai ya mikóló oyo batambolaka na basi mingi te soko na mibali mingi te, mpe 67% epai ya mikóló oyo basalaka mobulu mingi.” Bobele bongo, zulunalo Nature ekanisi ete, “uta 1984, maladi yango esili kopalangana epai na mikóló, longwa na 20 kino 30% ya mikóló oyo basili kozwa yango na bingumba epai yango ezali kongala makasi.” Kanisa naino: pene na ndambo moko kati na ndambo misato ya mikóló bakokufa na mbula zomi oyo ezali koya!
Kala, baguvernema mpe bakonzi mosusu bazalaki kolinga koloba mpenza polele te likoló na kopalangana ya maladi yango; kasi lelo oyo, bamoni ete bolózi yango eyei monene mingi. Prezidá moko ya kala ya mokili moko ya Afrika, andimaki ete mokili na ye epesa mabɔkɔ na koluka nzela nyonso mpo na kobundisa SIDA, mpo ete mwana na ye moko akufaki na maladi wana. Kala mingi te, mokonzi mosusu asakolaki ete, na mboka na ye, bato 500 000 bazali na maladi wana kati na nzoto na bango, atako emonani naino te. Lokola mingi kati na bango bayebi te ete bazali na mikrobe wana na nzoto, bazali kopalanganisa yango na kosangisa nzoto elongo na basi mingi to na mibali mingi.
“Boyebisa bango makambo mazali koleka awa”
Lokola motuya ya baoyo bazali komema mikrobe yango na nzoto na bango ezali sé kobakisama, motuya na baoyo bakobɛla maladi yango mpe bakokufa, ekobakisama mingi lisusu. Ekozala likambo ya mawa mingi mpe ya mpasi mingi. Na ndakisa, talela likambo ya Khamlua, Moafriké ya mibu 59 oyo afandi na molelo mokaboli Uganda mpe Tanzanie, kati na etuká oyo SIDA ezali kongala makasi. Uta 1987, asili kokunda bana na ye mpe bankóko na ye 11, banso bakufaki na SIDA. Alelaki na mawa nyonso ete: “Bokenda kosolola bipai binso mpo na oyo ekómeli ngai. Boyebisa bango makambo mazali koleka awa.”
Na kotalela lolenge oyo SIDA ezali kopalangana, mpasi monene oyo ezwi Khamlua Moafriké, ekoki mpe kozwa bato mosusu bipai mingi na mokili. Kasi mbala mosusu ozali komituna ete: ‘Mpo na nini bolózi yango eleki mingi na Afrika?’
[Likanisi ya paragrafe na lokasa 13]
Na mikili misusu ya bobólá, “SIDA ekozala maladi ya liboso oyo ekoboma bato na mobu 1993.”—The World Today, Angleterre