Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • g 1/08 nk. 15-17
  • Mpasi ya mino enyokolaka bato banda kala

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Mpasi ya mino enyokolaka bato banda kala
  • Lamuká!—2008
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Enyokolá ata bakonzi
  • Ebandeli ya mosala ya kosalisa mino ndenge esalemaka lelo oyo
  • Mpasi makasi ya prezida ya liboso ya États-Unis
  • Mpasi ya mino eutaka mpenza wapi?
  • Baluki kosalisa mino kozanga koyokisa mpasi
  • Mpo na nini kokende epai ya monganga ya mino?
    Lamuká!—2007
  • Batelá mino na yo mpo osɛkaka malamu
    Lamuká!—2006
  • Ozali na mposa na mino ya kosalisa?
    Lamuká!—1993
  • Ndenge ya kobatela mino ya ebandeli
    Lamuká!—2001
Makambo mosusu
Lamuká!—2008
g 1/08 nk. 15-17

Mpasi ya mino enyokolaka bato banda kala

Lisolo oyo elekaki na zando moko na ntango ya kala. Mokolo moko, mokosi moko oyo alataki bilamba oyo ezalaki kobenda likebi mingi azalaki kotuta ntolo ete akoki kolongola bato mino kozanga ete báyoka mpasi. Moninga na ye ya mosala apusani mpe azali kosala lokola alingi te bálongola ye lino. Mokosi yango asali lokola azali kolongola ye lino, mpe atomboli lino moko oyo ezali makilamakila mpo na kolakisa bato nyonso. Na nsima, asɛngi bato nyonso oyo bazali na mpasi ya mino bápesa mbongo mpo alongola bango mino yango. Ntango abandi, bato na ye bazali kobɛta mbonda mpe kelelo mpo koganga ya bato yango eyokana te, noki te bamosusu bábanga. Nsima ya mwa mikolo, bampota ya bato mosusu epɔli, kasi na ntango wana mokosi akendá.

LELO oyo, bato ya mpasi ya mino oyo bakendaka komisalisa epai ya bakosi ya ndenge wana bazali mingi te. Minganga ya mino bakoki kobikisa maladi ya mino mpe kosalisa bato mpo mino na bango elongwa te. Atako bongo, bato mingi babangaka kokende epai na bango. Tótalela ndenge minganga ya mino bayekolaki kokitisa mpasi ya bato na ntango ya kala; yango ekosalisa biso tózwa na motuya mingi mosala ya minganga ya mino na mikolo na biso.

Balobaka ete maladi ya liboso oyo bato babɛlaka mingi ezali miyoyo; ya mibale ezali kobeba ya mino, mpe ebandá kala. Maloba ya ntoki ya Mokonzi Salomo emonisi ete bato ya Yisalaele ya kala bayebaki ete soki moto akómi mobange, mino na ye etikalaka ya kotánga.​—Mosakoli 12:3.

Enyokolá ata bakonzi

Atako Elisabeth I azalaki mokonzi-mwasi ya Angleterre, azalaki mpe kobɛla mino. Moto moko oyo autaki na Allemagne ayaki kotala ye mpe amonaki ete azali na mino ya kopɔla. Moto yango alobaki ete: “Emonani ete bato mingi ya Angleterre bazali na mino ya ndenge wana mpo balyaka sukali mingi.” Na sanza ya Desɛmbɛ 1578, mpasi ya mino enyokolaki mokonzi-mwasi yango butu moi. Minganga na ye basɛngaki ete bálongola mino yango, kasi aboyaki mpo mbala mosusu abangaki eyokisa ye mpasi koleka. Mpo na kolendisa ye, John Aylmer, episkɔpɔ ya Londres oyo azalaki mobange, andimaki bálongola ye lino na miso ya mokonzi-mwasi yango, ekoki kozala lino oyo ebebaki. Lokola episkɔpɔ yango azalaki lisusu na mino mingi te, emonisaki ete azalaki komibanzabanza mingi mpo na mokonzi-mwasi!

Na ntango wana, bato bazalaki kokende epai ya bakati-nsuki, ata mpe epai ya batuli mpo bálongola bango mino. Kasi, ntango bato mingi bakómaki na likoki ya kosomba sukali, mingi bakómaki kobɛla mino mpe esɛngaki ete baoyo bayebi kolongola mino malamu bákóma mpe mingi. Yango wana, minganga mosusu bakómaki koluka koyeba kosalisa maladi ya mino. Kasi, basengelaki koyekola bango moko, mpamba te baoyo bayebaki kosalisa mino malamu bazalaki mpenza kobomba mayele na bango. Longola yango, mikanda oyo elobelaka makambo yango ezalaki mingi te.

Mbula soki nkama na nsima, Louis XIV akómaki mokonzi ya France. Anyokwamaki na mpasi ya mino bomoi na ye mobimba mpe na mobu 1685, balongolaki ye mino nyonso ya likoló oyo ezali na ngámbo ya mwasi. Bato mosusu balobaka ete maladi na ye ya mino nde etindaki ye, na mbula wana, azwa ekateli ya mabe ya kopekisa bato ya France bápona lingomba oyo balingi. Ekateli yango etindaki bato bányokola bandimi ya mangomba ya mike na ndenge ya mabe mpenza.

Ebandeli ya mosala ya kosalisa mino ndenge esalemaka lelo oyo

Louis XIV amesanaki kobebisa mbongo mpo na lokumu na ye. Bato ya lokumu ya Paris balandaki ezaleli na ye mpe yango esalaki ete kosalisa mino ekóma mpenza mosala. Mpo moto abatela esika na ye epai ya mokonzi mpe kati na bato mosusu ya lokumu asengelaki komonana malamu na miso ya bato. Lokola bato bakómaki koluka bátya bango mino, mingimingi mpo na komonana kitoko, minganga ya sika babimaki mpo na kosala mosala yango mpo na bato ya lokumu. Pierre Fauchard ayekolaki kosala mapaso ntango azalaki na limpinga ya basoda ya France oyo bazalaki kobunda na mai, mpe akómaki na nsima monganga monene ya mino na Paris. Alobaki mabe mpo na minganga oyo batikaki mosala ya kolongola bato mino na bakati-nsuki mpe bakosi oyo bayebaki mosala yango malamu te, mpe azalaki moto ya liboso ya komibenga monganga-mopasoli mpo na maladi ya mino.

Na mobu 1728, Fauchard asukisaki momeseno ya kobomba mayele ya mosala ntango abimisaki buku moko epai alimbolaki mayele nyonso oyo ayebaki na mosala na ye. Yango esalaki ete bákóma kobenga ye “Mobandisi ya mosala ya kosalisa mino.” Ye nde monganga ya mino ya liboso oyo akómaki kofandisa bato na kiti ntango azali kosalisa bango, na esika ya kofandisa bango na mabelé. Abimisaki mpe bisaleli mitano mpo na kolongola bato mino. Kasi, asukaki kaka na kolongola bato mino te. Abimisaki mpe esaleli moko mpo na kotɔbɔla madusu na mino oyo ebebi mpe mayele ya kozipa madusu ya mino yango. Ayekolaki ndenge ya kozipa eteni ya katikati ya lino soki ebebi mpe ndenge ya kotya moto lino mpo ekangama tii na nse. Azalaki kosala mino na mpɛmbɛ ya nzoku mpe mpo mino ya likoló efanda malamu, azalaki kotya resɔrɛ. Fauchard asalaki ete kosalisa mino ekóma mpenza mosala mpe ata bato ya Amerika bamekolaki mayele na ye.

Mpasi makasi ya prezida ya liboso ya États-Unis

Mbula monkama nsima ya Louis XIV, na Amerika, George Washington abɛlaki mino. Kobanda ntango azalaki na mbula 22, bazalaki kolongola ye lino moko pene na mbula nyonso. Kanisá naino mpasi makasi oyo azalaki koyoka ntango azali kokamba mampinga ya basoda ya Amerika! Ntango akómaki prezida ya liboso ya États-Unis na mobu 1789, azalaki lisusu na mino mpenza te.

Washington azalaki mpe konyokwama na makanisi na ndenge elongi na ye ebebaki mpo azalaki mpenza na mino te mpe mino oyo batyaki ye ebongisaki ye te. Azalaki komibanzabanza mingi na ndenge oyo azalaki komonana na miso ya bato; yango wana, azalaki koboma nzoto mpo na komatisa lokumu na ye ya prezida ya ekólo ya sika. Ndenge oyo bazalaki kosala mino wana ya mpɛmbɛ ya nzoku ekeseni na ndenge oyo bakómá kosala mino lelo oyo; yango wana, ezalaki kofanda malamu te na monɔkɔ. Mibali ya Angleterre bazalaki mpe na mikakatano lokola oyo ya Washington. Balobaka ete soki bakómá kosɛkisa bato na ndenge ya mayele, ezali mpo básɛka makasi te mpe mino oyo batyá bango emonana te.

Balobaka ete batyaki Washington mino ya mabaya, kasi emonani ete ezali solo te. Basalaki mino yango na mpɛmbɛ ya nzoku, na mino ya bato mpe na mondɔlu (plomb). Ekoki kozala ete minganga na ye bazalaki kozwa mino epai ya miyibi oyo bazalaki kokundola bibembe na malita. Batɛki-mino bazalaki mpe kolanda basoda mpo na kolongola mino ya bibembe nsima ya etumba. Yango wana, esengelaki moto azala na bomɛngo mpo bátya ye mino. Kasi na bambula ya 1850, bayebaki mpo na mbala ya liboso ete ndembo oyo balambá elongo na sufulu ezalaki malamu koleka, mpe bakómaki kosalela yango na mino oyo bazalaki kotya bato. Yango wana, bato mingi bazwaki mpe likoki bátya bango mino. Atako minganga oyo bazalaki kosalisa mino ya Washington bayebaki mosala yango malamu, kasi bayebaki mpenza te soki mpasi ya mino eutaka wapi.

Mpasi ya mino eutaka mpenza wapi?

Banda kala tii na bambula ya 1700, bato bazalaki kokanisa ete nkusu oyo ekɔtaka na mino nde epesaka mpasi na mino. Na mobu 1890, Willoughby Miller, monganga moko ya mino moto ya Amerika oyo azalaki kosala na iniversite ya Berlin (na Allemagne), ayebaki ntina oyo mino ebebaka; mbala mingi, kobeba ya mino nde epesaka mpasi ya mino. Mikrobɛ moko, oyo ebotanaka mingi na sukali oyo etikalaka na mino, ebimisaka aside oyo etɔbɔlaka mino mokemoke. Kasi, esengeli kosala nini mpo mino ebeba te? Eyano ezwamaki na ndenge ya mbalakaka.

Na boumeli ya bambula ebele, minganga ya mino na etúká ya Colorado, na États-Unis, bazalaki komituna mpo na nini bato mingi ya etúká yango bazalaki na matɔnɔ na mino. Nsukansuka, bayebaki ete ezalaki mpo mai oyo bato yango bazalaki komɛla ezalaki na eloko babengi fluor mingi koleka. Kasi, ntango bato ya mayele balukaki koyeba likambo yango, mbala moko bakangaki ntina ete bato oyo bakoli na bisika mai ya komɛla ezalaka na fluor moke, mino na bango ebebaka mingi. Likambo yango esengelaki kosalisa bato ya mokili mobimba báyeba komibatela mpo bázwa mpasi ya mino te. Fluor, oyo mai ya bisika mingi ezalaka na yango, ezalaka mpe na eteni ya mpɛmbɛ ya lino (émail ). Soki bato bazalaki komɛla mai oyo ezangi fluor, kasi na nsima bapesi bango yango na ndenge ekoki, mingi kati na bango bakobeba lisusu mino te.

Na yango, likambo ya mpasi ya mino eyebanaki. Mbala mingi, kobeba ya mino nde epesaka mpasi ya mino. Sukali nde esalaka ete mino ebeba mpe fluor ebatelaka mino. Atako fluor esalisaka, emonani ete konika mino malamu mpe kosalela nsinga ya mino ezali mpe na ntina.

Baluki kosalisa mino kozanga koyokisa mpasi

Liboso bázwa nkisi oyo elalisaka moto ntango bazali kosalisa ye, bato bazalaki konyokwama mingi ntango bazalaki kosalisa bango mino. Minganga ya mino bazalaki kosalela biloko ya nsɔngɛ mpo na kopalola mino oyo ezali na maladi to oyo ebebi. Na nsima, bazalaki kosalela ebende oyo banyangwisá mpo na kozipa madusu ya mino yango. Lokola bazalaki na nkisi mosusu te, bazalaki kokɔtisa ebende ya mɔtɔ na lino mpo na kotumba mikrobɛ oyo ebebisi eteni na yango ya kati. Liboso bábimisa bisaleli oyo ebongi mpe nkisi oyo elalisaka ntango bazali kosalisa moto, kolongola lino mpe ezalaki kosala mpasi mingi. Bato bazalaki kondima mpasi yango kaka mpo kozala na mino oyo ezali kosala mpasi ezalaki kutu kosala mpasi koleka. Banda kala, bato bazalaki kosalela nkasa ya bangi to mandaliki; yango ezalaki kaka kolɛmbisa mpasi kasi ezalaki kosilisa yango te. Mokolo mosusu, minganga bakokoka kosala moto lipaso na mino kozanga ete ayoka mpasi?

Na mobu 1772, Joseph Priestley, moto ya Angleterre oyo azalaki moto ya mayele na chimie, asalaki mpo na mbala ya liboso mopɛpɛ moko oyo esɛkisaka moto oyo amɛli yango. Mwa moke na nsima, bato bamonaki ete mopɛpɛ yango esalaka mpe ete moto ayoka mpasi te. Kasi tii na mobu 1844, monganga moko te asalelaki yango mpo na kolalisa moto mpɔngi ntango azali kosalisa ye. Na mokolo ya 10 Desɛmbɛ 1844, Horace Wells, monganga ya mino oyo azalaki kofanda na engumba Hartford, na etúká ya Connecticut (na États-Unis), ayanganaki na likita moko epai bamɛlisaki bato mopɛpɛ oyo esɛkisaka mpo na kosepelisa bango. Amonaki ete moko ya bato yango atutaki lokolo na ye na kiti moko ya makasi, kasi eloko te emonisaki ete ayoki mpasi. Mbala moko, Wells azwaki likanisi ya kosalela mopɛpɛ yango mpo na kolalisa bato oyo azalaki kosalisa, mpamba te azalaki na motema mawa mpe azalaki komitungisa mingi mpo na mpasi oyo bato yango bazalaki koyoka ntango azalaki kosalisa bango. Kasi liboso amɛlisa yango bato mosusu, amonaki malamu ye moko ameka naino yango. Mokolo oyo elandaki, afandaki na kiti oyo azalaki kofandisa bato mpo asala bango lipaso na mino mpe amɛlaki mopɛpɛ yango tii abungisaki makanisi. Na nsima, moninga na ye ya mosala alongolaki ye lino ya nsuka oyo ezalaki kosala ye mpasi. Likambo yango ekendá nsango: banda wana, bakokaki kosalisa moto mino kozanga koyokisa ye mpasi.a

Banda wana, minganga ya mino bakolisá mayele na bango mpe bakómá na bisaleli mingi ya malonga. Yango wana, lelo oyo kokende epai ya monganga ya mino ebangisaka lisusu mingi te.

[Maloba na nse ya lokasa]

a Lelo oyo, na esika ya kosalela mopɛpɛ oyo esɛkisaka, basalelaka mingi nkisi oyo ebomaka nzoto na esika oyo bazali kosalisa moto.

[Elilingi na lokasa 16]

Mino oyo basali na mpɛmbɛ ya nzoku, oyo batyaki George Washington, prezida ya liboso ya États-Unis

[Eutelo ya bafɔtɔ]

Na ndingisa ya The National Museum of Dentistry, Baltimore, MD

[Elilingi na lokasa 17]

Liyemi ya lipaso ya liboso oyo basalaki na mobu 1844 mpo na kolongola moto lino nsima ya kosalela mopɛpɛ oyo esɛkisaka

Na ndingisa ya National Library of Medicine

[Eutelo ya bafɔtɔ]

Na ndingisa ya National Library of Medicine

[Elilingi na lokasa 15]

Na ndingisa ya National Library of Medicine

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto