Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • g93 Juillet lok. 32
  • Mateya mauti na Nzambe mpo na ntango na biso oyo ya mpasi mingi

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Mateya mauti na Nzambe mpo na ntango na biso oyo ya mpasi mingi
  • Lamuká!—1993
  • Masolo mosusu
  • Mpo na nini osengeli kozala wana
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1993
  • “Basanzoli na esengo”: Liyangani ya Etúká ya Batatoli ya Yehova
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1995
  • Yaka na liyangani ya etúká “Bobangi Nzambe”!
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1994
  • Mayangani kitoko mazali komonisa motuya ya mateya mauti na Nzambe
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1994
Makambo mosusu
Lamuká!—1993
g93 Juillet lok. 32

Mateya mauti na Nzambe mpo na ntango na biso oyo ya mpasi mingi

Ekozala na litomba nini mpo na yo?

“MATEYA mauti na Nzambe,” ezali motó na likambo na ba assemblées ya district oyo ba Témoins de Jéhovah babongisi yango mbula oyo. Bamilió mingi ya bato bakoyangana na makita yango na elanga oyo na bingumba mingi kati na mokili mobimba. Bobele na États-Unis, ba assemblées 150 ebongisami, oyo ekoumela mikolo minei na sanza ya Juin, ya Juillet mpe ya Août.

Ezala mpo na bilenge to mikóló, mibali, basi, batata bamama, banzenga to bana, mateya na mitindo na polele mpe na kitoko makozala na litomba mpo na banso. “Salá mpo ete libala na yo eumela,” “Salá mpo na lobiko ya libota na yo” mpe “Baboti: bana na bino bazali na mposa ete botyela bango likebi mpenza” ezali kati na mitó na makambo oyo ekosololama kuna.

Bakotalela na likebi mingi mikakatano oyo bilenge bazali kokutana na yango na ntango oyo ya mpasi mingi mpe bakolakisa ndenge bilenge bakoki kolónga mikakatano yango. Liteya mosusu ekopesama na nzela ya drame moko oyo ezali na motó na likambo ete Bilenge oyo bazali kokanisa Mozalisi na bango uta sikawa; ekozala elendiseli monene. Drame mosusu ebongisami malamu ezali na motó na likambo Bozimbisama te mpe boseka Nzambe te ekomonisa ete miziki ya lelo mpe ba vidéocassettes ezali na makámá mingi mpo na bilenge.

Tozali solo kobika na eleko moko ya mpasi mingi. Yesu asakolaki ete “nokinoki nsima na bolozi na mikolo yango, moi ekoyinda.” (Matai 24:29) Diskur moko ekomonisa bilembo bitali eleko oyo “bolozi” yango ekoya, mpe eleko oyo moi ekoyinda.

Na mikolo oyo ya mpasi mingi, bato mingi bazali komituna soki bomoi ezali na ntina nini. Motuna oyo ekotalelama na mozindo, mpe eyano oyo ekopesama, na ntembe te ekosepelisa bato nyonso. Eteni mosusu ya programme ekosolola likoló na misala oyo ba Témoins de Jéhovah ya ntango na biso basili kosala.

Na mokolo ya nsuka ya assemblée, diskur mpo na bato nyonso ekopesama, na motó na likambo ete “Mateya ya litomba mpo na eleko na biso oyo ya mpasi mingi.” Assemblée ekosuka na diskur oyo mosusu ekopesa toli, na motó na likambo ete: “Bolandá kosimba ngwi mateya na Nzambe.”

Na motindo moko to mosusu, mateya yango makopesama mpe awa na mboka na biso. Okoki kozwa ndimbola mosusu epai na ba Témoins de Jéhovah ya mboka oyo yo ofandi.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto