Boyangeli ya mokili mobimba—Ekokoka kosalema nde na O.N.U.?
BAMBULA oyo euti koleka, kati na mokili bato mingi batyaki motema mpe bakumisaki makasi O.N.U. Mpo na bato mingi ya ntango na biso, maloba “O.N.U.” to “UN” ezali kopesa likanisi ya misala ya lokumu: kotindama ya basodá ya casques bleus ya molende kati na bisika matáta mazali makasi kati na mokili mpo na kotya kimya; bituluku ya ba secouristes oyo bazali komema biloko epai na bato na Afrika baoyo bazali na nzala mpe bakima bamboka na bango; mibali mpe basi oyo bamipesi mpo na kosala na motema na bango mpo na kotya ebongiseli ya sika kati na mokili mobimba.
Na boyokani na bolukiluki oyo esalemaki na boumeli ya sanza libwa na zulunalo The Washington Post, lokola eyebisamaki lisusu kati na zulunalo International Herald Tribune, makambo mazali mpenza ndenge yango te: O.N.U. “ezali ebongiseli moko ya politike ya ebele ya basali ya biro oyo bazali kotatabana mpe mbala mingi bazangi litambwisi, oyo bazali na makambo mingi ya mabe mpe na bolembu oyo ezali kolembisa makasi ya lisangá yango.” Bolukiluki, oyo esalemaki na bankóto ya bankasa ya mikanda mpe na kotuna mituna epai na bakonzi ya kala mpe ya lelo ya O.N.U., emonisaki makambo malandi:
Lisalisi na Afrika: O.N.U. esopaki bamiliare ya badolare na Afrika, lisalisi ya ntina mingi mpo na eteni na mokili oyo ebebisami na bitumba, na nzala, na bobóla mpe na maladi. Motuya monene ya bato babikisamaki.
Nzokande, bankóto ya bato mpe bamilió ya badolare ebungaki na ntina na kosalelama mabe ya mbongo, bopotu mpe mbala mosusu na ntina na kanyaka. O.N.U. ezali kotinda lisungi mingi na Somalie, epai bato mingi bazali kokufa mpo na nzala mokolo na mokolo. Kasi Aryeh Neier, mokambi monene ya lisangá moko mpo na kobatela Lotomo ya bato, alobaki kati na zulunalo International Herald Tribune ete: “O.N.U. mpe bibongiseli na yango bazali komonisa bopotu moko ya kokamwa na boye ete misala na yango mpo na kosilisa bobóla na Somalie emonani ete ezali kosala eloko te.”
Ba rapports ezali kofunda bakonzi mosusu ya O.N.U. ete bazali koyiba bilei to biloko mosusu oyo ezali kotindama, bazali kosalela mpo na bango moko mosolo mopesami mpo na kosomba biloko, to bazali kosenza yango na nkuku na misolo misusu mpo na kozwa litomba. Bato ya O.N.U. oyo basalaki bolukiluki bamonaki bilembeteli ya makambo mabe motindo wana kati na mikili soko koleka nsambo ya Afrika.
Kobatela kimya: Kobatela kimya ezali mokano ya liboso ya O.N.U., atako na boumeli ya bambula uta kosalema na yango na 1945, bitumba koleka 100 ya makasi bisalemaki, mpe 20 milió ya bato basili kokufa na bitumba. Kobanda 1987, O.N.U. emipesaki mpo na kotya kimya na mikili 13, motuya mokokani na oyo ya bambula mosusu elekaki ya lisoló na ye mobimba.
Atako bamoko bazali koloba ete mbongo oyo esengeli mpo na myango wana ezali malamu koleka motuya ya mbongo oyo ezali kobebisama na bitumba ya nsomo, mingi bazali komilela ete makambo mazali mpenza kokende mosika. Na ndakisa, myango misusu mpo na kotya kimya ezali koumela bambula mingi, kosengáká bamilió mingi ya badolare, nzokande boyokani ezali kobonga te. Na Cambodge, basodá ya O.N.U. bazali kozwa koleka milió moko ya badolare mpo na kosomba batelevizyó mpe ba vidéo, mpe badolare mosusu 600 000 mpo na kosala abonemá na bazulunalo ekeseni.
Mbongwana: Mingi bazali kosenga na makasi mbongwana kati na O.N.U. Nzokande, makanisi mazali kokesena na lolenge ya mbongwana yango. Mikili ya bobóla bazali kolinga mingi kosangana na bikateli na yango mpe balingi ete bibongiseli na ntina na nkita mpe makambo na bomoi ya bato ezala mingi. Mikili ya bozwi, balingi ete bibongiseli yango ezala lisusu mingi te mpe batya nsuka na kanyaka, na kosalelama mabe ya mosolo mpe na kobebisama mpambampamba ya mosolo mpe biloko.
Moto monene moko ya O.N.U. alobaki ete: “Mpo ete mbongwana ya solosolo ezala, esengeli kokombola mpenza, nzokande ezali mpasi mpo ete likambo motindo wana esalema na ebongiseli ya politike. Mpo na kosala likambo moko ya malamu, esengeli kolongola ebele ya bato oyo bazali mpenza na ntina te oyo basili kozwama na mosala na boumeli ya bambula 45; mpe bato yango bazali mingi mpenza.”
Baklisto bayebi ete esengeli ebongiseli moko ya mokili mobimba mpo na koyangela makambo na bato; kasi bazali kotya motema te ete O.N.U. ekoka kosala yango. Bazali nde kolikya na Bokonzi ya Nzambe, boyangeli oyo Yesu alakisaki bayekoli na ye ete basambelaka mpo na yango.—Matai 6:10.