Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • g96 Juillet lok. 3
  • Mokili mozangi bitumba ekoki kosalema?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Mokili mozangi bitumba ekoki kosalema?
  • Lamuká!—1996
  • Masolo mosusu
  • Myango ya bato mpo na kotya kimya na mokili mobimba
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1992
  • Boyangeli ya mokili mobimba—Ekokoka kosalema nde na O.N.U.?
    Lamuká!—1993
  • Mibu ya milende ya mpamba
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1995
  • Libombami na nsomo elimbolami
    Emoniseli—Kokokana na yango monene ebelemi!
Makambo mosusu
Lamuká!—1996
g96 Juillet lok. 3

Mokili mozangi bitumba ekoki kosalema?

KANISÁ ete nsɔ́mɔ ya bitumba mpe matomba na yango mabe ekóma makambo ya kala. Lokito ya bibundeli mpe ya babɔ́mbi, bato bakimá mboka oyo bazali koyengayenga, kobanga kokufa to kobungisa moto oyo olingaka kati na mokakatano moko ya mpasi mpe ezangi ntina: makambo nyonso wana ezala lisusu te. Oyo nde esengo ya kofanda kati na mokili mozangi bitumba!

Basusu bakoki koloba ete ezali ‘elikya oyo ekoki mpenza kosalema te.’ Nzokande, esili koleka bobele mwa bambula, likambo litali kimya na mokili mobimba lizalaki lobanzo monene kati na bato. Na mobu 1990 mpe 1991, bato mingi bazalaki komona ete mabota makómi pene na eleko moko ya sika, ya libateli mpe ya kosala na bomoko. Komonisáká likanisi ya ntango wana, George Bush, wana ezalaki ye prezidá ya États-Unis, alobaki mbala na mbala na ntina na “ebongiseli ya sika ya mokili” ete ebandi kosalema.

Mpo na nini azalaki na likanisi ya bolóngi motindo wana? Kowelana kati na banguya eleki minene (guerre froide) esilaki. Na boumeli ya mibu koleka 40, bobangi mpo na etumba ya niklɛɛ́rɛ ezalaki likámá oyo ekokaki kokwea na ngonga nyonso. Kasi, na kokwea ya koministe mpe kokabwana ya Union soviétique, emonanaki ete likámá lilongwaki. Mokili mobɔndisamaki.

Soki bato batalelaki mikolo mizali koya na elikya nyonso, mpe soki lelo oyo likanisi wana lipalangani, ezalaki na ntina mosusu. Na boumeli ya mibu 40 wana, bowelani kati na Ɛ́sti mpe Wɛ́sti esalaki ete Mabota Masangani ekóma esika ya masoló ya kowelana, kino nsuka ya kowelana kati na banguya eleki minene eyaki kozongisa ebongiseli yango na mokano na yango ya liboso​—kosala mpo na kimya mpe libateli na mokili mobimba.

Na bambula oyo euti koleka, O.N.U. (Ebongiseli ya Mabota Masangani) ekólisaki milende na yango mpo na kotya kimya. Kobanda mobu 1989 kino 1993, mampinga na yango, oyo mauti na basangani na yango, masalaki mosala ya kotya kimya koleka eleko ya mibu 1945-1988. Na mokili mobimba, basivíli mpe basodá soko 70 000 basalaki na nsé ya litambwisi na yango kati na misala 17 ya lolenge wana. Na boumeli ya mibu mibale mpamba, mosolo oyo mobimisamaki mpo na misala ya kotya kimya ekólaki mbala mibale, kino na kokóma na badolare miliare 3, 3 na mobu 1994.

M. Boutros Boutros-Ghali, secrétaire général ya Mabota Masangani akomi ete: “Bilembo bimonisi ete ebongiseli ya libateli ya bato nyonso oyo etyamaki na San Francisco esili koleka mibu pene na 50 [na ntango basalaki O.N.U.] ebandi sikawa kosala mosala lokola yango elɛngɛlamaki . . . Tozali pene na kolónga mwango moko ya litomba mpo na mokili mobimba.” Atako matomba mamonani, elikya ya kotya ebongiseli ya sika na mokili mobimba ezali kolimwa nokinoki. Ndenge nini kolimbola kozinda ya bilikya mpo na mokili oyo ezangi bitumba? Ezali na bantina ya kolikya mpo na kotyama ya kimya kati na mokili mobimba? Masoló malandi makotalela mituna wana.

[Maloba mpo na kolimbola eutelo ya bafɔtɔ na lokasa 3]

Mpɛpɔ ya bitumba: fɔtɔ́ USAF

Batteries antiaériennes: fɔtɔ́ U.S. National Archives

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto