Nini ekómelaka moto ntango akufi?
“Milimo nyonso ekufaka te, ata oyo ya bato mabe . . . Lokola ezwaka etumbu ya seko na mɔtɔ oyo ekoki kokufa te, mpe lokola ekufaka te, likoki [ya kosukisa] mpasi na yango ezali te.”—Clément d’Alexandrie, mokomi moko ya ekeke ya mibale mpe ya misato ya ntango na biso (T.B.).
LOKOLA Clément, bato oyo bateyaka ete lifelo ezali esika oyo bato banyokolamaka, balobaka ete molimo ekufaka te. Biblia eteyaka mpe likambo yango? Tótalela biyano oyo Liloba ya Nzambe epesi na mituna misato oyo elandi.
Adama, moto ya liboso, azalaki nde na molimo oyo ekufaka te? Biblia haut fleuve, libongoli moko ya Baprotesta, elobi boye mpo na kozalisama ya Adama: “Yawe Nzambe asalaki moto na mputulu na mokili, mpe apemaki kati na zolo na ye mpema na bomɔi, mpe moto akomaki molimo na bomɔi.” (Genese 2:7) Tomoni ete vɛrsɛ yango elobi te ete Nzambe apesaki Adama molimo.
Nini ekómelaki Adama, lokola asalaki lisumu? Etumbu oyo Nzambe akatelaki ye ezalaki te monyoko ya seko na lifelo. Kasi, Biblia Liloba lya Nzambe, libongoli moko ya Bakatolike, emonisi etumbu oyo Nzambe akatelaki ye na maloba oyo: “Okotoko mpo ya mosala mwa koluka bilei kin’o mokolo okozonga o mabelé esika outaki, mpo ozali se mabelé mpe okozonga o mabelé.” (Biso nde totɛngisi makomi; Genese 3:19) Maloba ya Nzambe emonisi ata moke te ete eloko moko na nzoto ya Adama etikalaki na bomoi nsima ya liwa na ye. Ntango Adama akufaki, molimo nde ekufaki.
Moto azali na molimo oyo ekufaka te? Nzambe ayebisaki mosakoli Ezekiele boye: “Molimo oyo asali lisumu, ye akokufa.” (Ezekiele 18:4, haut fleuve) Ntoma Paulo akomaki boye: “Masumu ekotaká na mokili po na mabe ya moto se moko Adamu, pe liwa ekotaká po na masumu. Yango wana liwa ekweelaka bato nyonso po bango nyonso basalaka masumu.” (Ba-Romén 5:12, Bible na lingala ya lelo oyo) Lokola bato nyonso basalaka masumu, emonisi ete milimo nyonso ekufaka.
Molimo oyo ekufá eyebaka makambo to mpe eyokaka mpasi? Liloba ya Nzambe elobi boye: “Bato oyo bazali na bomoi bayebi ’tè bakokufa; kasi bato oyo bakufá bayebi eloko moko té.” (Mosakoli 9:5, Bible na lingala ya lelo oyo) Mpo na komonisa ndenge oyo moto akómaka ntango akufi, Biblia elobi boye: “Moto akojonga na mabele lisusu; bobɛlɛ na mokolo yango kokanisa na ye esili.” (Nzembo 146:4, haut fleuve) Soki bato oyo bakufi “bayebi eloko moko té” mpe “kokanisa na [bango] esili,” ndenge nini bakoki koyoka mpasi na lifelo?
Yesu Klisto akokanisaki liwa na mpɔngi; ntango moto alali ayebaka likambo te.a (Yoane 11:11-14) Kasi, bato mosusu bakoki koloba ete Yesu ateyaki mpenza ete lifelo ezali esika ya mɔtɔ mpe ete bato ya masumu bakendaka na lifelo. Tiká tótalela makambo oyo Yesu alobaki mpenza mpo na lifelo.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Mpo na koyeba makambo mosusu, talá lisolo “Yesu ateyi biso—Na ntina na elikya mpo na bakufi” na nkasa 16 tii 17.