Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w99 15/10 nk. 4-7
  • Ndenge nini tokoki kozwa bomoi molai oyo tolukaka?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Ndenge nini tokoki kozwa bomoi molai oyo tolukaka?
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1999
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Tokoki kotya elikya na nkisi babéngi “hormone de la jeunesse” to na mayele babéngi “manipulation génétique”?
  • Tokoki kotya elikya na mayele babéngi “nanotechnologie” mpe “cryogénisation”?
  • Epai wapi tosengeli kotya elikya?
  • Ntina mpenza oyo bato banunaka mpe bakufaka
  • Elikya ya solo
  • Bomoi ya seko na Paladiso awa na mabelé
  • Baluki kokómisa bomoi molai
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya bato nyonso)—2019
  • Mpo na nini tokómaka mibangé mpe tokufaka?
    Lamuká!—1996
  • Bato bazali koluka bomoi ya seko
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2006
  • Tosalamá mpo na kozala na bomoi libela na libela
    Lamuká!—1996
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1999
w99 15/10 nk. 4-7

Ndenge nini tokoki kozwa bomoi molai oyo tolukaka?

BATO mosusu bazali na elikya ete na eleko ya mbula nkóto oyo elingi kobanda, bato ya siansi bakoyeba mpenza sɛkɛlɛ ya koyeisa bomoi molai. Monganga Ronald Klatz azali moko na bato oyo bandimaka likambo yango. Azali prezida ya lisangá moko ya minganga mpe bato ya siansi oyo bamipesi mpo na koyekola ndenge ya koyeisa bomoi molai (American Academy of Anti-Aging Medicine). Monganga Klatz na baninga na ye bazali na mokano ya koumela bambula mingi koleka. Monganga yango alobi boye: “Nalingi koumela mbula 130 na mokili. Tokanisi ete tokoki kosala na boye ete bato bánuna lisusu te. Lelo oyo, siansi ekoki kosala ete nzoto ya moto enuna noki te, to enuna te, to mpe ezongisa nzoto ya moto oyo maladi to bobange enunisi yango kolɔngɔnɔ.” Ye moko monganga Klatz amelaka nkisi 60 na mokolo mpo aumela mingi na bomoi.

Tokoki kotya elikya na nkisi babéngi “hormone de la jeunesse” to na mayele babéngi “manipulation génétique”?

Bato mosusu batyaka motema na bankisi babéngi hormones. Bato ya siansi bamekaki kotɔbɔla banyama ya laboratware nkisi ya hormone babéngi DHA (déhydroépiandrostérone) mpe bamonaki ete banyama yango ezalaki konuna noki te.

Zulunalo Aftonbladet ya mboka Suède ezongelaki maloba ya monganga Suresh Rattan, profesere na Aarhus University na mboka Danemark ete: “Boyekoli oyo tozali kosala na laboratware emonisi ete soki totii baselile ya loposo ya nzoto na kati ya hormone moko oyo euti na nzete mpe oyo babéngi kinétine, baselile yango ezali konuna te ndenge enunaka na nzoto ya moto. Etikalaka na bolenge na yango na boumeli ya bomoi mobimba.” Ntango batii hormone yango na nzoto ya banyamankɛkɛ (insectes), banyama yango ezali koumela lisusu mingi koleka (na 30 to 45 %) ndenge yango eumelaka na bomoi.

Minganga bamekaki kotɔbɔla bampoko nkisi ya hormone babéngi mélatonine mpe bomoi na yango ebakisamaki (na 25 %) koleka ndenge yango ezalaka. Mpe lisusu, nzoto ya bampoko yango enunaki te, ezalaki kolɔngɔnɔ mpe makasi koleka.

Bato ya mayele oyo bazali kolendisa bato básalela nkisi oyo babéngi hormone de croissance humaine (H.G.H.) bazali koloba ete hormone yango ebongisaka loposo, ekómisaka moto monene, ekolisaka mposa ya kosangisa nzoto, esalaka ete moto azala ntango nyonso na esengo, ekolisaka mayele mpe epesaka moto makasi na misala lokola na ntango ya bolenge.

Bato mingi mpe batii elikya na mayele babéngi manipulation génétique. Bato ya siansi balobi ete na kobongoláká lolenge ba gènes ebongisami na kati ya nzoto, bakoki kokolisa bomoi ya amibe. Kutu, balongaki kokolisa bomoi ya baamibe mosusu, mbala motoba koleka. Yango epesi bango elikya ete bakobongola ndenge moko lolenge ba gènes ya moto ebongisami na nzoto, soki bayebi malamumalamu ba gènes oyo esalaka ete moto anuna. Na zulunalo Time, bazongelaki maloba ya monganga Siegfried Hekimi, profesere na McGill University na engumba Montreal, ye alobaki ete: “Soki toyebi ba gènes nyonso oyo epekisaka moto aumela mingi na bomoi, mbala mosusu tokoki kolɛmbisa mwa moke makasi na yango, na bongo tokokoka kosala ete moto azala na bomoi molai.”

Bato ya bioloji bayebaka banda kala ete télomère, eteni ya nsuka ya chromosome, ekómaka mokuse ntango nyonso oyo selile ebotanaka. Ntango télomère ekómi mokuse mpenza (soki 20 % ya bolai na yango elongwi), selile ekokoka lisusu kobotana te mpe ekokufa. Ezali na enzyme moko babéngi télomerase, yango ekoki kozongisa bolai mobimba ya télomère mpe na ndenge yango selile ekoki kokoba kobotana. Na baselile mingi, enzyme yango esalaka te, kasi bato ya siansi balongaki kokɔtisa télomerase na baselile mosusu mpe bamonaki ete ekolisaki baselile yango mpe ebotanaki koleka ndenge ebotanaka liboso.

Bato ya siansi bamoni wana libaku monene oyo bakoki kosalela mpo na kosilisa konuna ya nzoto mpe bamaladi oyo eyeisaka yango noki. Likambo nini ekoki kosalema soki batii baselile oyo “ekoki kokufa te,” mpo batyaki yango télomerase, na esika ya baselile oyo ezongisaka nzoto kolɔngɔnɔ? Na zulunalo moko (The New York Times), bazongelaki maloba ya monganga William A. Haseltine oyo alobaki ete: “Soki ekosalema mokolo mosusu ete moto akufa te, tozali bongo komonisa polele banda sikoyo elikya yango oyo tokokoba komonisa mokemoke na bambula 50 oyo ezali koya.”

Tokoki kotya elikya na mayele babéngi “nanotechnologie” mpe “cryogénisation”?

Bato mosusu mpe bazali kotya elikya na bango na mayele babéngi nanotechnologie, siansi oyo ezali koyekola biloko mikemike mpenza oyo ezali na kati ya ba gènes. Bato ya mayele oyo babandi siansi yango bazali koloba ete bakosala bamasini mikemike oyo ekotambwisama na ordinatɛrɛ. Bamasini yango ekozala mikemike mpenza koleka ata selile, mpe masini yango ekokɔtisama kati na molekile mpo ebongisaka mpe ezongisaka kolɔngɔnɔ ya baselile, ya binama mpe biteni ya nzoto oyo ezali konuna. Na likita moko ya bato oyo bayekolaka ndenge nini kosilisa bobange, moto moko ya siansi alobaki ete na ekeke ya 21, na lisalisi ya nanotechnologie, minganga bakosala ete nzoto ya moto ezwa makoki mpo na koumela seko.

Cryogénisation ezali mayele ya kobomba nzoto ya bawei na malili makasi mpenza mpo ete mokolo oyo mayele ya siansi ekokoka kosala ete baselile oyo ekufá ezonga na bomoi, bibembe yango mpe bikozongisama na bomoi. Bakoki kobomba nzoto mobimba to bobele bɔɔngɔ ya mowei na esika ya malili makasi mpenza. Moto moko kutu abombisaki elamba ya mbeto. Mpo na nini? Ezalaki elamba ya moninga na ye oyo akufá. Lokola elamba yango ezalaki na mwa baselile ya loposo mpe ya nsuki ya mowei, alingaki ete bábomba yango na malili mpo ntango mosusu, bato ya siansi bakozongisa mowei na bomoi ntango bakokóma kozongisa moto mobimba na bomoi ata na mwa ndambo ya baselile na ye to na selile moko mpamba.

Epai wapi tosengeli kotya elikya?

Moto abotamaka na mposa ya kozala na bomoi, kasi ya kokufa te. Yango wana, bato mingi bakumisaka bato ya siansi mpo na makambo ya sika oyo babimisaka na likambo ya koluka kosukisa konuna mpe batyelaka yango bilikya nyonso. Kasi soki totali malamu, eloko moko te emonisi solo ete DHA (déhydroépiandrostérone), kinétine, mélatonine, hormone de croissance humaine (H.G.H.) to hormone mosusu nyonso ekoki mpenza kosala ete bato bákóma mibange noki te. Kutu, bato mosusu ya mayele bazali komona likama na kobongola télomerase na kati ya baselile mpamba te yango ekoki kopesa baselile yango maladi ya kanser. Mpe lisusu, tii na moi ya lelo nanotechnologie na cryogénisation ezali se makanisi ya bato ya mayele, esali naino eloko moko te.

Siansi esali, mpe ekoki lisusu kosala ete bato mosusu báumela mingi mpe bázala nzoto kolɔngɔnɔ. Kasi yango ekopesa moto moko bomoi ya seko te. Mpo na nini te? Mpo ete ntina oyo bato bazali konuna mpe kokufa eleki mayele ya bato ya siansi.

Ntina mpenza oyo bato banunaka mpe bakufaka

Bato mingi ya siansi bayebi ete kokóma mobange na liwa ezali lokola biloko oyo esilá kotyama na kati ya ba gènes na biso. Na yango, tokoki komituna boye: Ntango nini, ndenge nini mpe mpo na nini yango etyamaki na code génétique na biso?

Biblia ezali kopesa biso eyano oyo ezali na mindɔndɔ te, atako ezali kosalela elobeli ya siansi te lokola code génétique to ADN. Baloma 5:12 elobi boye: “Na bongo, [lisumu, NW] ekɔtaki na mokili mpo na moto moko, mpe kufa ekɔtaki mpo na [lisumu]. Kufa mpe epalangani epai na bato nyonso mpo ete bato nyonso basali [lisumu].”

Adama, moto ya liboso, azalaki na elikya ya koumela seko na bomoi. Nzoto na ye esalemaki na makoki ya koumela na bomoi libela na libela. Kasi, bomoi ya seko ezalaki ofele te. Mpo na kotikala seko na bomoi, Adama asengelaki kozala na boyokani malamu na Mozalisi na ye, Liziba ya bomoi, mpe kotosa ye.​—Genese 1:31; 2:15-17.

Adama atosaki Mozalisi na ye te. Kutu, Adama amonisaki ete ekozala malamu koleka soki moto amitambwisi ye moko, kasi Nzambe atambwisa ye te. Yango wana asalaki lisumu. Banda ntango wana, ezalaki lokola code génétique na ye ebebaki. Adama atikelaki bana na ye lisumu na liwa na esika ya kotikela bango bomoi ya seko.​—Genese 3:6, 19; Baloma 6:23.

Elikya ya solo

Kasi, likambo yango ekoumela libela te. Baloma 8:20 elobi boye: “Nzambe azalisaki mokili mpamba, mpo na mokano na yango mpenza te nde mpo na mokano na ye oyo azalisaki yango boye.” Yehova Nzambe, Mozalisi, apesaki bato etumbu ya liwa mpo basalaki lisumu. Kasi asalaki mpe likambo moko oyo ezali kopesa elikya ete mokolo mosusu etumbu yango ekosila.

Yesu Klisto nde alimbolaki likambo yango polele ntango ayaki na mabelé. Na Yoane 3:16 (NW), tozali kotánga boye: “Mpo Nzambe alingaki mokili mingi na boye ete apesaki Mwana na ye mobotami-bobele-moko mpo ete moto na moto oyo akomonisa kondima epai na ye abomama te kasi azwa bomoi ya seko.” Kasi, ndenge nini tokoki kobika na liwa soki tomonisi kondima epai na Yesu Klisto?

Soki liwa ekɔtaki mpo na lisumu, esengeli naino kolongola lisumu liboso ya kosilisa liwa. Na ebandeli mpenza ya mosala ya Yesu lokola Klisto, Yoane Mobatisi alobaki boye: “Talá Mwana-na-mpate na Nzambe, molongoli na masumu na mokili.” (Yoane 1:29) Yesu Klisto azalaki na lisumu te. Yango wana, akokaki kokufa te mpo liwa ezali etumbu oyo euti na lisumu. Ata ndenge wana, amitikaki mpo báboma ye. Mpo na nini? Mpo na kofuta masumu na biso.​—Matai 20:28; 1 Petelo 3:18.

Na lifuti wana oyo epesamaki, likoki ya kozwa bomoi ya seko efungwamaki mpo na bato nyonso oyo bazali komonisa kondima epai na Yesu. Siansi ekoki kobimisa mayele ya koyeisa bomoi na biso mwa molai, kasi komonisa kondima epai na Yesu ezali nzela ya solo oyo ezali komema na bomoi ya seko. Yesu azwá bomoi yango na likoló; bantoma na ye ya sembo na bato mosusu mpe bazwá bomoi yango. Kasi, bato mingi oyo bazali komonisa kondima epai na Yesu, bakozwa bomoi ya seko awa na mabelé ntango Yehova Nzambe akozongisa yango Paladiso.​—Yisaya 25:8; 1 Bakolinti 15:48, 49; 2 Bakolinti 5:1.

Bomoi ya seko na Paladiso awa na mabelé

Moto moko atunaki boye: “Bato bakosepela mpenza soki bazwi bomoi ya seko?” Na elobeli mosusu, bato bakolɛmba kozala na bomoi ya seko? Biblia emonisi biso ete ekozala bongo te. “Asalaki nyonso na kitoko na ntango na yango; atii mpe lobiko kati na mitema na bango, nde moto te ayebi kososola mosala mosalaki Nzambe longwa na ebandeli kino nsuka.” (Mosakoli 3:11) Biloko oyo Yehova Nzambe asalá ezali mingi mpe etondi na makambo ndenge na ndenge oyo ekobanda ntango nyonso kobenda likebi na biso, ekopesa biso mposa ya koyeba yango malamumalamu mpe ekosepelisa biso na bomoi na biso mobimba, ezala libela na libela.

Moto moko oyo ayekolaki ndɛkɛ moko oyo babéngi Geai de Sibérie alobaki ete ezalaki “likambo ya kokamwa mpe ya esengo mpenza.” Alobaki ete kotalatala ndɛkɛ yango ezalaki likambo oyo esepelisaki ye mingi koleka na bomoi na ye. Ntango nyonso oyo alekisaki mpo na koyekola ndɛkɛ yango, azalaki mokolo na mokolo komikundola makambo ya kokamwa ya ndɛkɛ yango. Alobaki ete ata nsima ya kolekisa mbula 18 mpo na koyekola ndɛkɛ yango, ayebaki makambo na yango nyonso te. Soki lolenge moko ya ndɛkɛ ekoki kokamwisa, kobenda likebi, mpe kopesa moto ya mayele esengo na boumeli ya mbula 18 oyo azali koyekola yango, kanisá naino esengo oyo bato bakozala na yango ntango bakoyekola biloko nyonso oyo Nzambe asalá na mokili.

Kanisá ebele ya makambo ya siansi oyo moto akokoka koyekola, lokola akozala na ntango ebele mpe ya libela mpo na kosala yango! Kanisá bisika nyonso ya kitoko oyo bato bakolinga kokende kotala mpe bato ndenge na ndenge oyo bakokutana na bango. Kanisá naino ebele ya makambo oyo okokanisa kosala mpe kobongisa. Eloko moko te ekopekisa biso tókolisa mayele na biso mpe tóbimisa biloko ya sika. Soki tokanisi ebele ya biloko oyo Nzambe asalá, ebongi mpenza tózala na bomoi ya seko mpo tóyekola mpe tósala makambo nyonso oyo tokoki kosala yango na bomoi.

Biblia emonisi mpe ete bakufi bakosekwa mpe bakozwa bomoi ya seko. (Yoane 5:28, 29) Makambo mingi oyo toyebaka malamu te ekoyebana ntango baoyo bamonaki yango bakoyebisa biso malamumalamu. Kanisá makambo nyonso oyo esalemá na bileko ndenge na ndenge, oyo basekwi bakoyebisa biso.​—Misala 24:15.

Wana ozali kokanisa eleko wana, ekoki kozala ete ntango akosekwa, Yobo akozongela lisusu te maloba na ye oyo ekomami na Yobo 14:1. Ntango mosusu, akoloba boye: ‘Sikoyo, moto oyo abotami na mwasi azali na bomoi ya seko mpe atondi na esengo.’

Mpo na baoyo bazali kotya elikya na bango epai na Yehova mpe bazali komonisa kondima epai na Yesu, bomoi ya seko ezali ndɔtɔ mpamba te. Etikali moke likambo yango ekosalema solo. Kokóma mobange mpe liwa ekozala lisusu te. Yango eyokani na Nzembo 68:20 epai tozali kotánga ete: “Kobika na ntango na kufa ezali mpo na Nkolo [Yehova].”—Emoniseli 21:3, 4.

[Bililingi na lokasa 4, 5]

Makambo oyo bato ya siansi bazali koyekola ezali kopesa bato elikya ya kozala na bomoi molai koleka

[Elilingi na lokasa 7]

Ebongi mpenza tózala na bomoi ya seko mpo tóyekola mpe tósala makambo nyonso oyo tokoki kosala na bomoi.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto