Bongɔndɔ mpe bonzenga—Mpo na nini kobatela yango?
“LOSAMBO ya bongɔndɔ mpe bonzenga”—ezali na lolenge wana nde Randall Balmer, profesɛrɛ ya mateya ya losambo na Eteyelo monene ya Columbia azali kobénga bokóli ya ezaleli oyo ezali komonana epai na bilenge ya koboya kosangisa nzoto liboso ya kokóma mikólo.
Likambo ya kokamwa ezali te ete kolendisama ya ezaleli ya koboya kosangisa nzoto ezali kouta na mangomba. Dr. Balmer amonisi ete: “Kasi bopusi mpenza ya losambo ya bongɔndɔ mpe bonzenga ezali bongo mikano ya makambo ya mosuni, kasi ya losambo te. Eloko oyo ezali mpenza kopusa bato na kobatela bongɔndɔ to bonzenga ezali bongo bobangi—bobangi ya kopesamela etumbu na Nzambe te, kasi bobangi mpo na kozwa makɔnɔ oyo mabomaka.” Na yango, ekeseni na “losambo ya Ngɔndɔ Malia,” oyo emonisaka koboya kosangisa nzoto mpo na bantina ya losambo, na “losambo ya bongɔndɔ mpe bonzenga” ya mikolo na biso, oyo ezali komonisa ezaleli ya koboya kosangisa nzoto mingi mpenza mpo na likambo litali kolɔngɔ́nɔ́ ya nzoto.
Dr. Balmer akóbaki koloba ete: “Ezali mawa koloba na ntina na ezalela ya lingomba na bambula 1990 ete bizaleli malamu bimonisami kuna bobele mpo na kobanga makɔnɔ. Na bongo, bakonzi ya mangomba mpo na koboya kozokisa, basili koteya bizaleli malamu na kozanga kopesa bitumbu. Mpe na bongo, batikeli bato na siansi mpe minganga mokumba ya kopesa toli epai na bilenge mpo na lolenge oyo basengeli komitambwisa na makambo matali kosangisa nzoto.”
Nzokande, yango ezali bongo te mpo na baklisto ya solo. Tótalela na ndakisa Chad, elenge oyo abokwamaki lokola Motatoli ya Yehova. Elenge mwasi moko abandaki lisoló elongo na Chad. Kasi nokinoki emonanaki ete makanisi na ye makómaki mosika koleka makambo oyo azalaki koloba. Chad alobi: “Nokinoki likanisi moko liyelaki ngai. Nakokaki te koyokisa Yehova mawa. Na likanisi oyo nazalaka na yango ntango nyonso ya kosepelisa Yehova, nalobaki na elenge mwasi yango ete nasengeli kokenda.”
Lolenge moko na Chad, bilenge mingi Batatoli ya Yehova bazali na etamboli malamu bobele te mpo na matomba ya kozala na nzoto kolɔngɔ́nɔ́ kasi libosoliboso mpo na kosepelisa Mozalisi na bango, Yehova Nzambe. Ezali te bobangi ya makɔnɔ nde ezali kotambwisa bizaleli na bango. Nzokande, bilenge motindo wana bazali kolanda toli oyo ezwami na Mosakoli 12:1: “Kanisá Motongi na yo na mikolo na bolenge na yo.”