Bisika ya kobatela mpomboli Monárkɛ ebongwani bisika ya liwa
NA BOPUMBWI ya kokamwisa uta na esika bazalaki, mpomboli monárkɛ oyo elekisaka eleko ya molungé na Canada mpe na nɔ́rdi ya États-Unis, etandolaki mapapu na yango ya ndambo motane-pɛtɛɛ ndambo moindo, kopumbwáká na mopɛpɛ longwa na Canada, katisá États-Unis, mpe etondanaki na etúká moko na wɛ́sti ya engumba Mexico. Kuna, na 1986, guvernemá ya Mexique ebongisaki bisika mitano ya kobatela biloko bizalisami; bisika yango bibongisamaki na bangomba ya bosándá ya mɛtɛlɛ 3400, oyo ezipami na banzeté babéngi sapins. Engebene mitángo oyo misalemaki na 1994, milió pene na 60 ya mpomboli monárkɛ elekisaki eleko ya mpiɔ na bisika wana ya kobatela biloko bizalisami.
Mpomboli monárkɛ elingaka mingi mpenza ba sapins mpamba te banzeté yango esalaka ezipeli monene oyo ebatelaka mpomboli na mbula ya mpiɔ oyo inɔkaka mpe na mbula-mpɛmbɛ. Epekisami kokata nzeté na bisika mitano wana, kasi banzeté ezali sé kokatama na kobukáká mibeko ya Letá. Bato ya siansi oyo batalelaka mpomboli bazali kobanga mpamba te “atako guvernemá apekisi yango, kokatama ya banzeté sapins ya Mexique, na bisika na yango ya kobatela biloko bizalisami, ezali kotya mpomboli monárkɛ na likámá ya mipɛpɛ makasi mpe na malili. . . . Kosila ya banzeté wana elongo na bizipeli na yango emonisi polele ete mpomboli yango ikozwa lisusu esika ya komibomba na mbula te, na mbula-mpɛmbɛ mpe te.” Kokatama ya banzeté ezali kopasola bizipeli oyo bizali kobatela bango. Lincoln Brower, moto ya mayele na makambo matali banyama, alobaki boye na ntina na ezipeli wana ya libateli mpo na mpomboli monárkɛ: “Ntango bazámba yango ezali kokatama mingi, madusu mpe mazali komonana mingi na bolangiti yango oyo ezipaka mpomboli wana.”
Zulunalo The New York Times elobaki ete: “Klimá mabe mpe kokatama ya banzeté ezali likámá monene mpo na mpomboli yango.” Na nsima, zulunalo yango elobaki boye na ntina na kokwea ya mbula-mpɛmbɛ, na butu ya 30 Desɛ́mbɛ 1995, likoló na bisika yango ya bobateli biloko bizalisami: “Babateli-zámba ya Letá mpe babiolojiste oyo batambolaki zingazinga ya bisika yango balobaki ete, epai na epai, maboke na maboke ya mbula-mpɛmbɛ etondaki na mpomboli monárkɛ oyo ekauki na malili, mpe mingi na yango esilaki kokundama na nsé ya mbula-mpɛmbɛ.”
Fɔtɔ́ oyo etyami likoló na lokasa oyo emonisi polele likambo yango ya mawa.
[Maloba mpo na kolimbola eutelo ya bafɔtɔ na lokasa 31]
Jorge Nunez/Sipa Press