Makambo mazali koleka na mokili
Mabɛlɛ ya mama eleki malamu
Zulunalo Newsweek elobi ete: “Mabɛlɛ ya mama ezali nkisi oyo eleki bankisi nyonso ya monganga na malamu. Bana oyo bamɛlaka yango bazwaka bilei oyo basengeli na yango mpo na kokolisa makoki ya bɔɔngɔ na bango, mpe ezali kokitisa likama ya kozwa mikrobe, pulupulu, makwanza mpe maladi ya mpanzi.” Na yango, lopitalo moko ya bana (Académie américaine de pédiatrie) mpe lingomba moko ya bato bayekolaka makambo matali bilei (Association américaine de diététique) epesaki bamama toli ete bámɛlisaka bana na bango mabɛlɛ na boumeli ya mbula moko to koleka. Zulunalo Newsweek emonisi ete: “Liziba yango ezali kitoko koleka, kasi bamama basalelaka yango mpenza te.” Mpo na nini? Mbala mingi ezalaka mpo ete bayebisaka bango solo te. Bamama mosusu babangaka ete bakobimisa mabɛlɛ mingi te mpo bana na bango bázala ntango nyonso na nzoto kolɔngɔnɔ. Basusu bakanisaka ete bana bazalaka na mposa ya bilei mosusu noki nsima ya kobotama. Lisolo yango elobaki ete: “Bosolo ya likambo ezali boye: bamama mingi bazali na likoki ya komelisa bana na bango malamu kino basanza motoba, na nsima bakoki kobakisela bango bilei ya mwa makasi mokemoke. Mpe ezala ata bilei nini bazali kolya, bana ya mbula kino mibale bazwaka anticorps mpe acides gras oyo eutaka na mabɛlɛ ya mama.” Komɛlisa mwana mabɛlɛ ezali mpe na matomba mosusu mpo na mama; ekitisaka likama ya kozwa kanser ya mabɛlɛ mpe esalisaka ye, lokola ayaki monene na ntango ya zemi, monene yango ekita.
Bobola eponi ekólo te
Zulunalo International Herald Tribune elobi ete, lapolo moko ya ONU oyo euti kosalema emonisi ete bobola ezali se kokola, ata na mikili ya bozwi mingi. Bato mingi na mikili ya bozwi bazali kozanga “biloko ya ntina oyo esengeli na bomoi,” lokola mosala, kotánga kelasi, mpe lisalisi ya monganga. Lapolo yango emonisi ete bato mosusu na États-Unis (16,5 %) bazali babola. Na Grande-Bretagne bazali 15 %. Na mikili ya bozwi, bato milio 100 bazali na bandako ya kofanda te, bato milio 37 bazali na mosala te, mpe bato soko milio 200 bazali na elikya ya koumela na “bomoi na nse ya mbula 60.”
Ezali mpenza nyama ya boboto te
The Wall Street Journal elobi ete: “Soki okanisaka ete nkosi to nzale ezali nyama oyo eleki nkanda na Afrika, ozali komikosa. Ezali nde ngubu.” Atako bafilime ya dessins animés mpe masolo ya bana mike emonisaka ngubu lokola nyama malamu oyo ezalaka na baninga, na esengo mpe eyebani mingi lokola nunusi ya masano, ngubu ezali koboma bato mingi na Afrika koleka banyama mosusu nyonso. Batambwisi-bato na baparke balobaka ete esika oyo moto akoki kozala na likama koleka na Afrika ezali “kokutana na ngubu na nzela na ye ya kokita na mai” mpe “esika ya mibale oyo moto akoki kozala na likama ezali kokutana na ngubu ya mwasi oyo azali elongo na mwana na ye.” Atako bangubu emonanaka lokola banyama ya boboto oyo batambolaka malɛmbɛ elongo pembenipembeni na mingala, bakendaka mosika te na bisika na bango oyo bameseni mpe mbala mingi bakómaka nkanda makasi soki bato bayei kokuta bango na mbalakaka to batumoli bango. Bazalaka makasi mingi. Motambwisi-bato moko alobi ete, “Ngubu ya nkanda ekoki koswa ngando mpe kokata yango na biteni mibale. Ekoki kokata bwato bitenibiteni.” Na bongo, mpo na nini bato balúkaka na babwato esika ngubu ezali? Motambwisi-bato alobi ete okosepela mingi kotala ebale mpe banyama oyo efandi na zɛlo, mpe “ekoki kozala na likama moke koleka bisika mosusu oyo baturiste balandaka, na ndakisa komibwaka na ntaka ya mɛtɛlɛ 110 na gbagba oyo ezali likoló na Bweta (chute) ya Victoria.”
Makambo oyo esalemaki liboso ya holocauste ezongi lisusu
Zulunalo The Toronto Star ekomi ete Irwin Cotler, profesere ya droit na Iniversite ya McGill, azali mpe moko na bakambi ya Canadian Helsinki Watch Group alobi ete: “Mikolo oyo, likambo ya kobuka ntomo ya bato ezongi lisusu makasi koleka, mpe yango ezali kokundwela bato holocauste oyo esalemaki na bambula ya 1930.” Alobi ete ankɛtɛ oyo esalemaki na mikili 41 na ebongiseli babéngi Helsinki Federation for Human Rights emonisi polele likama yango—maloba oyo ezali komonisa koyina bato mosusu. Mbala mingi maloba yango ezali kouta na mikanda ya Leta to na radio mpe na televizyo, mpe ezali kobimisa minyoko mpo na bato. Cotler alobi boye mpo na likambo yango: “Makambo oyo esalemaki na eleko ya Etumba ya Mibale ya mokili mobimba eteyi biso ata moke te.” Alobaki lisusu ete: “Kotya likebi te ezali mbeba monene mpe kofanda nyɛ ezali kosangana na bato mabe oyo balingi koboma bato mosusu.”
Bana bazali konyokwama na bitumba
Zulunalo ya Allemagne Grevener Zeitung elobi ete, “Olara Otunnu, momonisi moko ya ONU alobi ete bitumba mpe matata kati na bikólo na bambula zomi oyo eleki ebomi bana milio mibale, bana koleka milio moko batikali bitike, mpe bana milio motoba bazoki bampota minene to bakatani biteni mosusu ya nzoto.” Conseil de sécurité ya ONU ekweisaki makambo wana nyonso oyo ezali kotya bana na makama. Mawa monene ezali mpo na bana koleka 300000 oyo bakɔtisi bango na mosala ya soda na mokili mobimba. Mingi kati na bango bakɔtaki na mosala ya soda na makasi, mpe mwana moko kati na bana misato azali mwasi. Mbala mingi bana oyo bazali basoda batindaka bango na esika ya makama makasi. Lisangá moko ya sika ya bibongiseli oyo ezali ya Leta te esɛngi ete na mokili mobimba mwana akɔta na mosala ya soda bobele soki akokisi mbula 18.
Vatican na Internet
Na 1994, Vatican etyaki mabɔkɔ na kɔntra moko mpo na kozwa esika na Internet. Zulunalo El Financiero elobi ete misala ya lingomba, na ndakisa ntubela mpe kosolola na basango mpo na “ntembe moko” na makambo ya losambo, ekoki sikawa kosalema na nzela ya Internet. Na esika yango “Ba Cybercatholiques (Bakatolike oyo basalelaka Internet)” bakoki kosɛnga ete bábondela mpo na bango. Bakoki mpe kotala ndenge pápa apambolaka mboka mokolo ya lomingo. Na nsima piblisite moko elekaka mpo na kolakisa bato “biloko ya losambo oyo bakoki kosomba to kotɛka.” Zulunalo El Financiero elobi ete: “Mokakatano ezali ete bobele mwa mikanda moke ya Lingomba ya Katolike nde bato batángaka yango mbala na mbala. Mpo na mikanda ya Vatican bobele bato soko 25 na mokolo nde batángaka yango, mpe mingi kati na bato yango ezali bapanzi-nsango ya Lingomba ya Katolike.”
Baponi kofanda na maladi na bango
Zulunalo Cape Times elobi ete: “Na mokili mobimba maladi ya ntolo ezali koboma bato mingi koleka. Lokola ezali kopalangana mingi epai ya bato ya Afrique du Sud oyo baleki bobola, ezali koboma bato koleka 13000 kuna mbula na mbula mpe ezali kozangisa basusu makoki ya kosala mosala. Guvernema ezali kopesa bato ya maladi yango mbongo mpe bazali kozwa nkisi ya monganga mpamba. Kasi lokola misala ezali komonana te mpe lifuti ezali moke, bato mosusu ya maladi ya ntolo bazali kozwa ekateli ya kotika kozwa nkisi ya monganga mpo na kokoba kozwa lisungi ya Leta. Ria Grant, mokambi ya ebongiseli ya kosalisama na maladi ya ntolo na Afrique du Sud alobi ete: “Mbongo yango ya lisungi ya Leta ezali soko mbala 10 koleka oyo bakoki kozwa na misala na bango ya mikemike. Bato ya maladi bakanisi ete ezali malamu kotikala na maladi na esika ete ozala nzoto kolɔngɔnɔ mpe ozanga mbongo oyo osengelaki kozwa.”
Kolala mpɔngi na yenda ya motuka
Zulunalo The Journal of the American Medical Association elobi ete: “Bato mosusu ya mayele balobi ete basofɛlɛ oyo balalaka mpɔngi na yenda bazali na likama ndenge moko na basofɛlɛ oyo batambwisaka na milangwa. Mbala mingi batyaka likebi mingi te na likama ya kolala mpɔngi na yenda, mpe basofɛlɛ ya ndenge wana batyaka bomoi ya bato na likama.” Zulunalo The Toronto Star elobi ete, bolukiluki oyo esalemaki emonisaki ete sofɛlɛ azalaka na likoki te ya koyeba soki akolala na yenda to azali koyoka mpɔngi. Stephanie Faul, molobeli ya Institut de l’association automobile américaine pour la sécurité routière alobi ete: “Mpɔngi ezali eloko ya ntina lokola kolya mpe kopema. Soki nzoto na yo ezali na mposa ya kolala, okobanda bobele kobunda na mpɔngi.” Na bongo, sofɛlɛ asengeli kosala nini soki amoni ete azali kobaye, miso ekómi kilo mpe motuka ezali kobunga nzela? Zulunalo The Toronto Star elobi ete: “Kosala makambo oyo emonani ete ekolamusa, lokola kokitisa matalatala ya motuka to kofungola radio, ekolonga te. Kafe esalisaka bobele mwa ntango moke kasi ekolongola mposa ya kolala mpɔngi te.” Bapesi sofɛlɛ toli ete soki abandi koyoka mpɔngi ezali malamu atɛmisa motuka na pembeni mpe alala moke.
Mikrobe babéngi bactéries ezali boni?
Mikrobe babéngi bactéries ezali bikelamu ya bomoi oyo ezali mingi na mabelé. Mikrobe yango ekoki kofanda na bozindo na nse ya mbu mpe ekoki kozwama na mopɛpɛ na kilomɛtɛlɛ 60 na likoló. Mikrobe yango nyonso soki batii yango esika moko ezali na kilo koleka ata ekelamu nini ya bomoi. Bato ya siansi na Georgia University na États-Unis bauti kobimisa bolukiluki oyo emeki mpo na mbala ya liboso kotánga motángo ya mikrobe yango. Bakanisi ete yango nyonso ekoki kozala na motángo oyo: 5 elandani na zero 30. Zulunalo The Times ya Londres elobi ete: “Bato mingi bakanisaka ete mikrobe babéngi bactéries epesaka maladi. Nzokande bobele mwa ndambo moke nde epesaka maladi. Soki basangisi yango nyonso oyo ezalaka na nzoto ya banyama, motángo na yango ekozala bobele ya 1 %. Mingi kati na yango epesaka bato maladi te, kutu ezalaka na ntina mpo na bomoi, mpamba te esalisaka na mosala lokola kopɔtɔ bilei na libumu.” Likambo ya kokamwa, mikrobe yango 92 kino 94 likoló na monkama efandaka kati ya mabelé na basantimɛtɛlɛ koleka zomi na nse ya mbu mpe na mozindo ya mɛtɛlɛ libwa na kati ya mabelé. Liboso bato bazalaki kokanisa ete bisika wana ezali na biloko moko ya bomoi te. Karbone, eloko ya ntina na bomoi, yango nyonso ezali kosala katikati ya kilo ya mikrobe yango. Zulunalo The Times elobi ete: “Karbone nyonso oyo ezali kati na mikrobe yango nyonso soko basangisi yango ekokani na bozito ya karbone nyonso oyo ezali kati na milona nyonso ya mokili.”