Biyambayamba ezali naino tii lelo?
EZALI bipai nyonso—na mosala, na eteyelo, na babisi mpe na balabala. Soki osali likise, moto nyonso, ata moleki nzela, akoloba na yo ete: “Nzambe apambola yo” to “Opambolama.” Maloba ya ndenge wana ezali na nkota mingi. Na Lingelesi balobaka “God bless you,” na Allemand balobaka “Gesundheit,” na Arabe balobaka “Yarhamak Allah.” Nzokande, na bisanga ya Polynésie na Pacifique ya Sudi balobaka “Tihei mauri ora.”
Lokola bato bakanisaka ete babimisaka maloba wana kaka mpo na komonisa bonkonde epai na bato mosusu, yango wana, mbala mosusu, olukaka te koyeba mpo na nini bato babimisaka maloba yango. Nzokande, maloba yango euti mpenza na biyambayamba. Moira Smith, mokambi ya bibliɔtɛkɛ moko na Folklore Institute na Indiana University, na Bloomington, na etúká ya Indiana, na États-Unis, alobi ete maloba yango “euti na likanisi oyo bato bazalaka na yango ete soki osali likise, ozali kobimisa molimo na yo.” Yango wana soki balobi “Nzambe apambola,” ezali lokola bazali kosɛnga na Nzambe azongisela yo molimo na yo.
Ya solo, bato mingi bakoki kosɛka soki bayebisi bango ete soki moto asali likise molimo na ye ebimaka. Yango wana, ezali likambo ya kokamwa te ete diksionɛrɛ Webster’s Ninth New Collegiate elimboli biyambayamba lokola “endimeli to momeseno oyo euti na boinga, na kobanga eloko oyo eyebani te, kotya motema na nkisi to na nkɔnzɔ (chance), to kozala na likanisi oyo elongobani te mpo na likambo oyo esalami, kasi ndenge likambo yango ebandi eyebani te.”
Yango wana monganga moko ya ekeke ya 17 abengaki biyambayamba ya ntango na ye ete “mabunga” ya bato mpamba oyo batángá te. Na yango, na ebandeli ya ekeke ya 20, ntango bato ya siansi babandaki kosala makambo minene, buku moko (Encyclopædia Britannica) ya 1910 eyebisaki polele mpenza ete na eleko oyo, “bato bakosikolama na biyambayamba.”
Ezali kaka makasi
Elikya oyo bato bazalaki na yango esili koleka mbula soko ntuku mwambe, ezalaki elikya ya lokuta, mpamba te biyambayamba ezali se makasi. Kopalangana wana ya biyambayamba, ezali komonisa mpenza motindo na yango. Liloba “superstition” oyo tobongoli na biyambayamba euti na maloba mibale ya lokota ya Latin: super, oyo elimboli “likoló na,” mpe stare, “kotɛlɛma.” Emonani ete bato bazalaki kobenga basoda oyo bazalaki kobika na etumba ete superstites, mpamba te kati na basoda nyonso oyo bakendaki etumba, bango nde babikaki, lokola nde “batɛlɛmaki” likoló na baninga na bango. Mpo na kolobela esika likambo wana euti, buku Superstitions (Biyambayamba) elobi ete: “Biyambayamba oyo ezali kino lelo ekatisi (to eleki likoló ya) bileko oyo emekaki kosilisa yango.” Tótalela mwa bandakisa mosusu ya biyambayamba oyo ezali tii lelo.
◻ Ntango guvɛrnɛrɛ ya engumba moko monene na Azia akufaki liwa ya mbalakaka, bato oyo bazalaki kosala na ndako na ye babandaki kobanga, mpe bapesaki moto oyo akitanaki ye na ebonga toli ete abenga nganga-nkisi, mpe nganga-nkisi yango ayebisaki moto yango ete bábongola mwa moke lolenge libanda ezali mpe bábongola mpe ndenge ndako yango ezali na kati. Bato ya mosala yango bakanisaki ete mbongwana wana ekolongola libabe.
◻ Mwasi moko azali prezida ya kompanyi moko ya monene na États-Unis, atambolaka mikolo nyonso na libanga moko boye. Banda atekaki biloko na ye malamu na esika ya mombongo mpo na mbala ya liboso, abimaka na ndako te soki azali na libanga yango te.
◻ Na Azia, liboso ya kosala bakɔntra ya minene mpo na makambo ya mombongo, mbala mingi, bato ya mombongo bakendaka liboso kotala nganga-nkisi.
◻ Mopoti-mbango moko, atako amibongisaki malamu, akanisi ete alongi mpo na elamba moko oyo alataki. Na mimekano nyonso oyo ekolanda—akolata elamba yango—mpe akosukola yango te.
◻ Moyekoli moko asalaki ekzamɛ na biki moko boye mpe azwaki bilembo mingi na ekzamɛ yango. Banda ntango wana, atalelaka biki yango lokola biki ya “nkɔnzɔ.”
◻ Na mokolo ya libala, mwasi amibongisi na likebi mpenza mpo molato na ye ezala na “eloko moko ya kala, eloko moko ya sika, eloko moko ya kodefa, mpe eloko moko ya langi bulɛ.”
◻ Moto moko afungoli Biblia mbala moko mpe atángi vɛrsɛ oyo amoni liboso, andimi ete maloba ya vɛrsɛ yango ekosalisa ye na likambo oyo ezali kotungisa ye.
◻ Mpɛpɔ moko ya monene elingi kopumbwa, bato mingi oyo bazali na kati basali elembo ya ekulusu. Moto mosusu azali kosimbasimba sapɛlɛ na ye kino ntango mpɛpɔ ekokita.
Emonani mpenza ete, ata lelo biyambayamba ezali naino makasi. Yango wana, Stuart A. Vyse, profɛsɛrɛ ya psikɔlɔji na Iniversite ya Connecticut, alobi na kati ya buku na ye (Believing in Magic—The Psychology of Superstition) ete: “Atako tozali lelo na mokili oyo makambo ya siansi ekoli mingi, biyambayamba ezali naino makasi ndenge kaka ezalaki kala.”
Biyambayamba ekɔteli mpenza bato mingi lelo mpe milende mpo na kolongola yango ezali kolonga te. Mpo na nini bongo?