Kozala moto ya biyambayamba
OKUTANI na moto moko ntango ozali kobima na ndako. Obɛti libaku. Ndɛkɛ moko boye ezali kolela na butu. Ozali kolɔta ndɔtɔ moko mbala na mbala. Mpo na bato mosusu, nyonso wana ezali kaka makambo oyo esalemaka mpe elekaka na yango. Nzokande mpo na bato mosusu na Afrika ya Wɛsti, makambo ya ndenge wana ezali bilembo, to bansango oyo eutaka na mokili ya bilimo. Elembo na elembo ezali na ndimbola na yango oyo ekoki kozala likambo ya malamu oyo elingi ekómela moto to lisuma.
Kasi biyambayamba ezali kaka na Afrika te. Atako na boumeli ya bambula mingi Chine na mikili oyo ezalaki na Union soviétique ezalaki na boyangeli oyo eboyaki kondima ete Nzambe azali, ebele ya bato bakangami kaka na biyambayamba. Na mikili ya Mpoto, bato mingi batalaka horoscope, babangaka mokolo ya 13 ya nsanza soki ezali mokolo ya mitano na pɔsɔ, mpe balingaka nyau ya moindo te. Na mikili mosusu ya nɔrdi mpenza ya mokili, bato bakanisaka ete soki kongɛnga ya nzelanzela emonani na likoló, ezalaka elembo ete bitumba mpe maladi mabe oyo ebomaka bato ebele na mbala moko ezali koya. Na Inde, basofɛlɛ ya mituka ya minene bazali kopalanganisa sida mpo bakanisaka ete esengeli básangisaka nzoto mpo báyokaka molunge te soki moi ezali makasi. Na Japon, bato oyo basalaka mosala ya kotimola banzela na kati ya mabele bakanisaka ete soki mwasi akɔti na nzela yango ntango esili naino te ezali lisuma. Bato ya masano mingi mpe bazalaka na biyambayamba. Moto moko oyo abɛtaka lisano ya volleyball alobaki ete alongaki masano ebele oyo elandanaki mpo azalaki kolata basosɛti ya moindo na esika alata ya mpɛmbɛ. Bandakisa ya makambo ya biyambayamba ezali ebele mpenza.
Ezali boni mpo na yo? Ozalaka na bibangabanga mpo na makambo oyo oyebi mpenza ntina na yango te? Ozalaka na makambo mosusu oyo ondimaka mpe oyo ondimaka mwa moke, to makambo oyo osalaka kasi oyebaka mpenza te mpo na nini osengeli kosala yango? Biyano na yo na mituna yango ekoki komonisa yo soki ozali moto ya biyambayamba to te.
Moto oyo alandaka biyambayamba mpo na kozwa bikateli na ye mpe kosala makambo na ye, azali kotika nzela ete eloko oyo ayebi ntina na yango malamu te etambwisaka bomoi na ye. Yango ezali likambo ya mayele? Ebongi ete tóndimaka na bomoi na biso eloko moko oyo eyebani malamu te mpe oyo ekoki kozala mabe? Biyambayamba ezali bibangabanga ya mpamba to ekoki kobimisa likama?