Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w03 1/7 nk. 21-25
  • Kosalela bato mosusu ekitisaka mpasi

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Kosalela bato mosusu ekitisaka mpasi
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2003
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Nazwaki nguya na kati ya bolɛmbu
  • Bomoi ya sika
  • Kokutana na minganga: mosala moko ya esengo
  • Bazuzi mpe mibeko ya mosala ya monganga
  • Nandimi mpasi na ngai
  • Lisalisi mpo na kobatela bosantu ya makila
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2003
  • “Okokufa!”
    Lamuká!—2000
  • Atako nazalaki lisusu komona te, miso na ngai efungwamaki!
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2004
  • Tozali Banzambe te, Banganga-nkisi mpe te
    Lamuká!—1994
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2003
w03 1/7 nk. 21-25

Lisolo ya bomoi

Kosalela bato mosusu ekitisaka mpasi

YA JULIÁN ARIAS

Na 1988, nazalaki na mbula 40, nazalaki na mosala moko malamu mpenza. Na etúká na biso, nazalaki mokambi ya kompanyi moko monene oyo ezali mpe na mikili mosusu. Nazalaki kotambola na motuka moko ya ntalo, bazalaki kofuta ngai malamu mpenza mpe nazalaki na biro moko kitoko na engumba Madrid, na ekólo Espagne. Kutu, bazalaki kokana kokómisa ngai mokambi ya kompanyi yango na ekólo na biso mobimba. Nazalaki koyeba ata moke te ete bomoi na ngai elingaki kobongwana mpenza.

MOKOLO moko na mbula wana, monganga ayebisaki ngai ete nazali na maladi oyo babengi sclérose en plaques, maladi moko oyo ezali na nkisi te. Makanisi na ngai ebulunganaki mpenza. Na nsima, ntango natángaki makambo oyo sclérose en plaques ekoki kosala na nzoto ya moto, nayokaki nsɔmɔ.a Emonanaki lokola nde bomoi na ngai mobimba ekómaki na likama. Ndenge nini nakobanda kokokisa bamposa ya mwasi na ngai, Milagros, mpe kobɔkɔla Ismael, mwana na ngai ya mobali ya mbula misato? Ndenge nini tokolonga mokakatano yango? Ntango nazalaki naino komituna mituna wana, likambo mosusu ya mpasi ebakisamaki.

Kaka sanza moko na nsima, mokonzi na ngai na mosala abengaki ngai na biro na ye mpe ayebisaki ngai ete kompanyi ezali na mposa ya bato oyo bazali komonana “nzoto malamu” na miso ya bakiliya. Kasi moto oyo azali na maladi oyo ezali kobebisa ye nzoto​—ata soki maladi yango ezali kaka na ebandeli​—akoki kobebisa nkombo ya kompanyi. Yango wana, kaka na ngonga wana, patrɔ na ngai alongolaki ngai na mosala. Mosala na ngai esilaki na mbalakaka!

Nazalaki kosala makasi mpo mwasi na ngai ná mwana na ngai bámona te ete nalɛmbaki nzoto, kasi nazalaki koluka kozala ngai moko, kokanisa ndenge oyo bomoi na ngai ekómaki mpe ndenge nakozala na mikolo ekoya. Nasalaki makasi mpo natambola motó te. Likambo oyo ezalaki kotungisa ngai mingi ezalaki ete, kaka na mbala moko, nazalaki lisusu na ntina te na miso ya bakonzi na ngai ya mosala.

Nazwaki nguya na kati ya bolɛmbu

Nazali na botɔndi mingi ete, ata na ntango wana ya mpasi, ezalaki na makambo mingi oyo ezalaki kolendisa ngai. Nazalaki Motatoli ya Yehova kobanda mbula pene na 20. Yango wana nabondelaki Yehova na motema mobimba mpe nayebisaki ye mabanzo na ngai mpe ndenge nazalaki komitungisa mpo na bomoi na ngai. Mwasi na ngai, oyo azali mpe Motatoli ya Yehova, azalaki mosungi na ngai monene, mpe baninga na ngai ya motema bazalaki komonisela ngai boboto mpe motema mawa oyo esungaki ngai mingi.​—Masese 17:17.

Komona ete nazali na mokumba ya kosalisa bato mosusu esungaki ngai mpe. Nazalaki na mposa ya kobɔkɔla mwana na ngai malamu, ya koteya ye, ya kosakana na ye, mpe kopesa ye formasyo na mosala ya kosakola. Yango wana nakokaki kolɛmbisa nzoto te. Lisusu, nazalaki nkulutu na lisangá moko ya Batatoli ya Yehova, mpe bandeko na lisangá bazalaki na mposa ya lisalisi na ngai. Soki natika ete mpasi na ngai ebungisa kondima na ngai, ndakisa nini nalingaki kopesa?

Bomoi na ngai mobimba ebongwanaki: nakómaki na maladi mpe nazalaki lisusu na mosala te; atako mbongwana mosusu ezalaki ya mabe, mosusu mpe ezalaki ya malamu. Mokolo moko monganga moko alobaki na ngai ete: “Maladi ebebisaka moto te; ebongolaka nde bomoi na ye.” Mpe nayebi sikoyo ete mbongwana mosusu oyo maladi ememaka na bomoi ya moto ezalaka mabe te.

Ya liboso, ‘nzubɛ oyo nazali na yango na kati ya mosuni’ esalisi ngai nayeba malamu mikakatano ya bato mosusu oyo bazali na maladi mpe nayeba komitya na esika na bango. (2 Bakolinti 12:7) Nakangaki ntina malamu koleka ya Masese 3:5: “Talelá [Yehova] na motema na yo mobimba mpe ndimá bososoli na yo moko te.” Oyo eleki nyonso ezali ete bomoi oyo nakómi na yango esalisi ngai nayeba makambo oyo ezali mpenza na ntina mpe eloko nini epesaka moto esengo ya solosolo mpe esalaka ete amimona na valɛrɛ. Nazalaki naino na likoki ya kosala makambo mingi na ebongiseli ya Yehova. Nasosolaki malamumalamu ndimbola ya maloba ya Yesu ete: “Esengo ya kopesa eleki oyo ya kozwa.”​—Misala 20:35.

Bomoi ya sika

Ntango monganga ayebisaki ngai ete nazali na maladi wana, mwa moke na nsima babengaki ngai na seminɛrɛ moko na Madrid, epai baklisto ya bolingo malamu bazwaki mateya mpo bákutanaka na minganga mpe básololaka na bango na ndenge oyo bakoki kosalisa bato ya maladi oyo bazali Batatoli ya Yehova. Na nsima, baklisto yango babongisamaki na Bakomite mpo na boyokani elongo na minganga. Seminɛrɛ yango eyaki na ntango ebongi mpenza. Nakómaki na mosala oyo ekokaki kopesa ngai esengo mingi koleka misala nyonso ya mombongo.

Na seminɛrɛ yango bayebisaki biso ete mosala ya Bakomite mpo na boyokani elongo na minganga oyo eutaki kosalema ezali ya kokende na balopitalo, kosolola na minganga mpe kosala masukulu liboso ya basali nyonso ya balopitalo, mpo na kosala ete mikakatano ezalaka te kati na bango ná bato ya maladi oyo bazali Batatoli ya Yehova. Bakomite yango esalisaka Batatoli ya Yehova na kozwa minganga oyo bandimaka kosalisa bango kozanga ete bázongisa bango makila. Mpo na yango, lokola natángá kelasi ya monganga te, nasengelaki koyekola maloba mingi oyo minganga basalelaka, mibeko ya mosala na bango mpe ndenge misala etambolaka na balopitalo. Atako bongo, seminɛrɛ wana ebongolaki mpenza lolenge na ngai ya kotalela makambo, nazwaki mokumba ya sika oyo nazalaki na mposa ete nabanda yango noki.

Kokutana na minganga: mosala moko ya esengo

Atako maladi na ngai ezalaki kolya ngai malɛmbɛmalɛmbɛ, nakómaki komipesa mingi na mokumba na ngai na Komite mpo na boyokani elongo na minganga. Lokola na nsuka ya sanza nyonso Leta azalaki kopesa ngai mwa mbongo oyo bapesaka bato oyo bakoki lisusu kosala mosala te, nazalaki na ntango mingi ya kokende kokutana na minganga. Atako mbala mosusu nazalaki kokutana na makambo oyo ezalaki kolɛmbisa ngai nzoto, mosala yango ya kokutana na minganga ezalaki mpasi mpenza te mpe ezalaki kobimisa matomba mingi koleka kutu ndenge nakanisaki. Atako nakómá kotambola na velo ya bibɔsɔnɔ, yango ezali mpenza mokakatano ya makasi te mpo na ngai. Natambolaka ntango nyonso elongo na moninga na ngai moko ya Komite. Lisusu, minganga bazali bato oyo bamesaná kosolola na bibɔsɔnɔ, mpe emonanaka mbala mosusu ete, soki batali milende oyo nasalaka mpo na kokende kotala bango, bayokaka ngai na limemya mpenza.

Na boumeli ya mbula zomi oyo euti koleka, nakutaná na bankama ya minganga. Bamosusu, na mbala ya liboso kaka oyo tosololi na bango bazalaki kondima kosalisa Batatoli ya Yehova kozanga kozongisa bango makila. Doktɛrɛ Juan Duarte, monganga moko na Madrid oyo asalaka lipaso ya motema, oyo atosaka lisosoli ya bato na ye ya maladi, andimaki mbala moko kosalisa Batatoli kozanga kozongisa bango makila. Banda wana, así apasolá Batatoli koleka 200 oyo bautaki bipai na bipai na ekólo Espagne kozanga kozongisa bango makila. Minganga oyo bazali kondima kopasola bato kozanga kozongisa bango makila bazali se kokóma mingi. Kokutana na biso ná minganga mbala na mbala esali ete bákóma kondima kopasola Batatoli kozanga kozongisa bango makila, kasi ekómi mpe boye mpamba te mayele ya minganga ekoli mpe bamoni ete bazali kolonga kopasola bato kozanga kozongisa bango makila. Mpe tozali kondima mpenza ete Yehova apambolaki milende na biso.

Nalendisamaki mingi koleka ntango minganga mosusu oyo basalaka bana mike lipaso ya motema, bandimaki mpe kosalisa biso. Na boumeli ya mbula mibale, tozalaki kokende kotala minganga mibale oyo basalaka lipaso ná baninga na bango oyo batɔbɔlaka bato ntonga mpo báyoka mpasi te ntango bazali kopasola bango (anesthésiste). Tozalaki komemela bango mikanda oyo elobelaka mosala ya monganga, mingimingi oyo ezalaki kolobela ndenge minganga mosusu bazalaki kolonga kosala bato lipaso kozanga kozongisa bango makila. Milende na biso ezwaki mbano na 1999, na likita moko ya minganga oyo elobelaki makambo etali lipaso ya bana na maladi ya motema. Monganga moko oyo autaki na Angleterre, oyo andimaka kosalisa Batatoli kozanga kozongisa bango makila, asalisaki minganga yango mibale mpo básala mwana moko oyo baboti na ye bazali Batatoli lipaso moko ya makasi mpo na kobongisa ye mosisa oyo eyambaka makila na motema mpo na kotinda yango na nzoto mobimba.b Nasepelaki elongo na baboti ya mwana yango ntango monganga moko abimaki na ndako ya lipaso mpo na koyebisa biso ete lipaso yango elekaki malamu mpe ete lisosoli ya baboti etosamaki. Lelo oyo minganga yango bazali mbala na mbala kondima kosalisa Batatoli oyo bazali kouta bipai nyonso na Espagne.

Eloko oyo epesaka ngai esengo koleka na makambo wana ezali ete na ndenge yango namonaka ete nakoki kosalisa bandeko na ngai baklisto. Mbala mingi, bandeko bayaka kosɛnga lisalisi ya Komite mpo na boyokani elongo na minganga ntango bazali na mokakatano moko ya makasi. Ntango mosusu balingi kosala bango lipaso, kasi minganga baboyi kosala yango kozanga kozongisa bango makila to mpe bazali komona ete bakokoka te kosala bongo. Kasi, bandeko batondaka mpenza na esengo ntango bayokaka ete, awa na Madrid, ata na maladi nini, ezali na minganga oyo bandimaka kopasola Batatoli kozanga kozongisa bango makila. Nasí namoná bandeko oyo bazalaki komitungisa, ntango kaka bamoni biso pembeni na bango na lopitalo, mawa nyonso oyo bazalaki na yango ebongwani esengo.

Bazuzi mpe mibeko ya mosala ya monganga

Na bambula oyo euti koleka, bandeko oyo bazali na Bakomite mpo na boyokani elongo na minganga bazalaki mpe kokende kokutana na bazuzi. Ntango tozalaki kokutana na bango, tozalaki kopesa bango mokanda moko (Soins de la famille: Traitement médicaux et Témoins de Jéhovah), oyo ebimisamaki mpo na koyebisa bakonzi ndenge Batatoli batalelaka likambo ya kosalela makila mpe koyebisa bango ete ezali mpe na lolenge mosusu ya kosalisa bato oyo esɛngaka te ete bázongisa bango makila. Esengelaki mpenza tókende kokutana na bazuzi, mpamba te awa na Espagne bazuzi bazalaki na momeseno ya kopesa minganga ndingisa ya kozongisa bato makila na makasi, ata soki bato yango baboyi.

Babiro ya bazuzi ezalaka bandako mineneminene, mpe na mbala ya liboso oyo nakɔtaki na moko ya bandako yango, namimonaki mpenza moke ntango nazalaki koleka na bakulware na velo na ngai. Lokola nde nyonso wana ekokaki te, nakweaki lisusu na velo. Bazuzi ná bato mosusu ya mibeko oyo bamonaki ngai bayaki kosalisa ngai, kasi ngai nayokaki nsɔni mpenza.

Atako bazuzi bayebaki te ntina oyo toyaki kokutana na bango, mingi kati na bango bayambaki biso na boboto mpenza. Zuzi ya liboso oyo nasololaki na ye azalaki kotalela likambo na biso liboso kutu tókende kokutana na ye, mpe ayebisaki ngai ete akosepela kosolola na biso mwa mingi. Ntango tokendaki kotala ye na mbala ya mibale, ye moko atambwisaki ngai na velo na ngai tii na biro na ye mpe ayokaki biso na likebi nyonso. Matomba oyo tozwaki na mbala ya liboso esalisaki ngai ná baninga na ngai na kolongola kobanga oyo tozalaki na yango na ebandeli, mpe mosika te tozwaki lisusu matomba mingi koleka.

Kaka na mbula wana, totikelaki zuzi moko oyo ayambaki biso na boboto mpenza mokanda Soins de la famille, mpe alakaki biso ete akotánga yango. Napesaki ye nimero na ngai ya telefone mpo akoka kobenga biso soki azali na mposa na biso ntango likambo moko ya mbalakaka ebimi. Nsima ya pɔsɔ mibale, abengaki mpo na koyebisa biso ete monganga moko azalaki kosɛnga ye apesa ye ndingisa ya kozongisa Motatoli moko ya mwasi makila na makasi. Zuzi yango alobaki na biso ete akosepela tósalisa ye akoka kokata likambo yango na ndenge oyo ekokokisa mposa ya Motatoli. Ezalaki mpasi te mpo tózwa lopitalo mosusu, epai minganga basalaki ndeko yango lipaso kozanga ete bázongisa ye makila mpe lipaso yango elekaki malamu. Zuzi yango asepelaki mingi ntango ayokaki ete lipaso yango elekaki malamu, mpe alakaki biso ete, banda mokolo wana, akobanda kosala kaka ndenge yango mpo na kokata makambo ya ndenge wana.

Ntango nazalaki kokende kokutana na minganga, mbala mingi bazalaki komonisa ete bango mpe basengeli kotosa mibeko ya mosala ya monganga, mpamba te tozalaki kosɛnga bango bátosaka ntomo mpe lisosoli ya bato ya maladi. Mbala moko, babengisaki ngai na lopitalo moko ya Madrid oyo minganga na yango bandimaka kosalisa Batatoli kozanga kozongisa bango makila nakende kosangana na mateya ya mibeko ya mosala ya monganga oyo ezalaki kopesama kuna. Na boumeli ya mateya yango, nazwaki libaku ya kosala lisolo moko liboso ya minganga ndenge na ndenge, mpo na koyebisa bango likanisi na biso oyo euti na Biblia. Esalisaki ngai mpe nayeba mokakatano oyo minganga bazalaka na yango mpo na kopona ekateli oyo basengeli kozwa.

Profesɛrɛ Diego Gracia, moko ya balakisi oyo bapesaki mateya yango, abengisaka minganga ya Espagne mbala na mbala mpo na kopesa bango mateya oyo elobelaka mibeko ya mosala ya monganga mpe, na likambo etali kozongisa makila, akómá molobeli na biso monene mpo na ntomo oyo tozali na yango ya kondima to koboya lisalisi oyo monganga alingi kopesa biso.c Lokola tokutanaka na ye mbala na mbala, yango esalaki ete bábenga bandeko mosusu ya filiale ya Batatoli ya Yehova na Espagne mpo bálimbolela minganga oyo balandaka mateya ya profesɛrɛ Gracia, oyo mingi kati na bango bazali minganga minene mpenza na ekólo Espagne, ndenge biso totalelaka likambo ya kozongisa makila.

Nandimi mpasi na ngai

Atako bongo, mosala yango ya esengo oyo nazali kosalela baninga na ngai baklisto esilisi mikakatano na ngai nyonso te. Maladi na ngai ezali se kokóma makasi. Kasi, nazali na esengo mpo bɔɔngɔ na ngai ezali kaka malamu. Na lisungi ya mwasi na ngai ná mwana na ngai, oyo bamilelalelaka te, nazali kozwa makasi ya kokokisa mikumba na ngai. Soki na lisalisi na bango te, nalingaki kokoka ata moke te. Nakokaka ata kokanga babuto ya patalo to kolata kazaka ngai moko te. Nasepelaka mingi ntango nabimaka na mosala ya kosakola mokolo ya pɔsɔ elongo na mwana na ngai, Ismael, oyo atambwisaka ngai na velo na ngai na bandako mpo nakoka kopesa litatoli epai ya bakóló ndako. Mpe nazali kaka kokoba na mokumba na ngai ya nkulutu na lisangá.

Nalekisi mwa bileko ya mpasi mingi na boumeli ya mbula 12 oyo euti koleka. Na bantango mosusu, komona ndenge libota na ngai bazali komitungisa mpo na maladi na ngai epesaka ngai mpasi koleka kutu maladi yango moko. Nayebi ete bamitungisaka mingi, atako balobaka yango te. Eleki ntango mingi te, mama-bokilo na ngai ná tata na ngai bakufaki kaka mbula moko. Kaka na mbula yango, nakómaki kotambola na velo. Tata na ngai, oyo azalaki kofanda epai na biso, akufaki na maladi mosusu oyo mpe ebebisaka nzoto. Milagros, oyo azalaki kobatela ye, azalaki komona ete ngai mpe nakosuka kaka ndenge tata na ngai asukaki.

Kasi, likambo ya malamu ezali ete lokola tozali komona mpasi elongo, libota na biso ezali na bomoko. Natikaki kiti ya bokonzi na kompanyi mpe nakómi na kiti ya bibɔsɔnɔ, kasi nakómi sikoyo nde na bomoi malamu koleka mpamba te namipesi mobimba na kosalela basusu. Soki moto amipesi mobimba mpo na kosalisa basusu, yango ekoki kokitisa mpasi na ye, mpe Yehova azangaka te kokokisa elaka oyo apesá biso ete akolendisa biso na ntango ya mpasi. Ngai mpe nakoki koloba lokola ntoma Paulo ete: “Na makambo nyonso nazali na makasi na lisalisi ya moto oyo apesaka ngai nguya.”​—Bafilipi 4:13.

[Maloba na nse ya lokasa]

a Sclérose en plaques ezali maladi moko oyo ebebisaka mpenza bɔɔngɔ. Mbala mingi ebebisaka makoki mosusu ya moto, ebomaka binama ya nzoto, mpe mbala mosusu moto akomona lisusu malamu te, akokoka lisusu koloba malamu te to mpe akoyeba makambo lisusu te.

b Lipaso yango eyebani na nkombo ya tekiniki ya Ross.

c Talá Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 15 Febwali 1997, nkasa 19-20.

[Etanda na lokasa 24]

Makanisi ya mwasi

Kozala na mobali oyo azali na maladi oyo babengi sclérose en plaques ezali motungisi mingi​—na makanisi, na mayoki, mpe na nzoto. Nasengeli kolekisa ndelo te na makambo oyo nazali kokana kosala mpe naboyaka komitungisa mpambampamba mpo na mikolo ezali koya. (Matai 6:34) Atako bongo, bampasi ya bomoi esalisaka moto amonisa bizaleli na ye ya malamu. Bolingo ya ngai ná mobali na ngai ekómi lisusu makasi koleka mpe nakómi na boyokani makasi ná Yehova. Nazali mpe kolendisama mingi na masolo ya bomoi ya bandeko mosusu oyo bazali na mikakatano na bomoi na bango lokola biso. Nayokaka mpe esengo oyo Julián ayokaka mpo na mosala ya ntina mingi oyo azali kosalela bandeko, mpe namoni mpenza ete Yehova akoki kobwaka biso ata moke te, atako mokolo na mokolo tozali kokutana na mikakatano mosusu.

[Etanda na lokasa 24]

Makanisi ya mwana

Ndenge tata na ngai azali koyika mpiko mpe azali kobungisa elikya te ezali ndakisa malamu mpenza mpo na ngai, mpe ntango natambwisaka ye na velo na ye, namonaka ete nazali mpenza na ntina. Nayebi ete nakoki ntango nyonso te kosala oyo nakani kosala. Sikoyo nazali naino elenge, kasi mposa na ngai ezali ete ntango nakokola, nasala na Komite ya boyokani elongo na minganga. Nayebi ete Biblia ezali kolaka biso ete mpasi ezali kaka mpo na mwa ntango moke mpe ete ezali na ebele ya bandeko mibali ná bandeko basi oyo bazali konyokwama koleka kutu biso.

[Elilingi na lokasa 22]

Mwasi na ngai alendisaka ngai mingi

[Elilingi na lokasa 23]

Nazali kosolola na monganga Juan Duarte, oyo asalaka lipaso ya motema

[Elilingi na lokasa 25]

Ngai ná mwana na ngai tosepelaka mingi kobima elongo na mosala ya kosakola

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto