Mpela na Mozambique—Ndenge oyo baklisto basalisaki bato oyo bakwelaki likama
EUTI NA MOKOMI NA BISO NA MOZAMBIQUE
NA EBANDELI ya mbula oyo eleki, bato mingi bayokaki nsɔmɔ ntango bamonaki na televizyo bilili ya bato ya Mozambique oyo bazalaki komikangisa na bitape ya nzete mpo na kokima mai ya mpela. Bamonaki mpe ndenge elikoptɛrɛ eyaki komema mwasi moko na bébé na ye oyo abotaki likoló ya nzete. Nzokande, bankóto mosusu ya bato bakangamaki na boumeli ya mikolo mingi na bisika oyo bakokaki koningana te—bamosusu kutu bazalaki esika moko na banyoka—kozeláká tii mai ekita to tii ntango elikoptɛrɛ ekoya kozwa bango.
Mpela yango ebandaki na bambula ya minene oyo ebɛtaki na Maputo, mboka-mokonzi ya ekólo Mozambique. Nsima ya mwa bangonga, bakartye ezindaki. Na bisika mosusu, mai emataki tii likoló ya bandako. Banzela ekómaki lokola mingala ya mai oyo ezali kotiyola makasi. Mai yango ebukaki mabele mpe ememaki bandako, mituka mpe pene na biloko mosusu nyonso oyo ezalaki kokuta na nzela na yango. Kasi likambo ya mabe koleka ezalaki naino koya.
Bambula ekobaki kobɛta, mpe ezindisaki bamboka nyonso oyo ezali na sudi ya ekólo yango. Mbula ebɛtaki mpe na bikólo ya pembenipembeni ya Mozambique, lokola na Afrique du sud, Zimbabwe, mpe Botswana. Lokola bibale Incomati, Limpopo, mpe Zambèze eutaka na bikólo yango mpe elekaka na Mozambique liboso ebima na mbu, yango esalaki ete ntango bibale yango etondaki mpe mai na yango esopanaki, ebebisaki mpenza bisika mingi ya Mozambique. Kondima na biso ekolendisama ntango tokoyeba ndenge baklisto basalisanaki na boumeli ya likama yango.
Baluki koyeba mikakatano oyo likama yango ebimisaki na ebandeli na yango
Mwa 9 Febwali ya mbula oyo eleki, batindami mibale ya biro ya filiale ya Batatoli ya Yehova na Maputo bakendaki kotala eteni ya nɔrdi ya ekólo yango. Soki na ngonga ya libwa na ntɔngɔ, balekaki engumba Xinavane, epai mai ya ebale Incoluane emataki mpenza. Bakanaki kokenda tii na Xai-Xai, mboka-mokonzi ya etúká ya Gaza. Kasi, bamonaki ete pembeni na engumba Chokwe, epai mpela ezalaka makasi na ntango ya bambula makasi, mpela ezalaki te. Yango wana, bamonaki malamu bázonga na Maputo.
Kasi, ntango bazalaki kozonga mpe bakómi pene na Xinavane, bapolisi batɛlɛmisaki bango mpe bayebisaki bango ete: “Mai ya mpela oyo euti na Afrique du sud ekómaki mpe ebuki nzela oyo elekaka na bamboka mingi ya ekólo na biso. Ezala babisi to mituka minene ekoki koleka te.” Nzela oyo balekaki na ntɔngɔ, sikawa ezindaki nyonso! Lokola bibale ya epai ya nɔrdi ezalaki mpe kotonda na mai, etúká wana ekabwanaki na eteni mosusu ya ekólo yango.
Batatoli yango mibale bamonaki malamu bálala na mboka Macia oyo ezalaki mosika te. Na butu yango, makambo ebebaki lisusu nde kobeba. Engumba Xinavane ezindaki nyonso, mpe bato babungisaki biloko nyonso. Bibongiseli ezwamaki mpo na kosalisa Batatoli ya etúká yango ete bákenda na Ndako ya Bokonzi na Macia, epai batyaki mwa kaa moko ya mbalakaka mpo na bandeko oyo bakimaki likama. Nokinoki, Batatoli bakendaki na bamagazini kosomba biloko ya kolya, lokola lɔsɔ, madesu, farini mpe mafuta.
Batyaki sikawa likebi mingi epai ya bandeko na bango baklisto ya engumba Chokwe mpe ya bingumba ya pembenipembeni. Bankulutu ya masangá ya Chokwe bakutanaki esika moko mpe bazwaki bibongiseli ya kolongola bandeko na bango nyonso na engumba yango. Bapanzaki nsango oyo: “Bólongwa awa nokinoki, mpe bókenda na Macia!” Kasi, eumelaki te, bayokaki ete bandeko mingi ya engumba Xinavane bakómaki naino te. Yango wana, batindaki Batatoli bákenda kotala bango mpe báyeba nini ezalaki koleka kuna. Bayokaki mpe ete nkulutu moko akufaki na mai na kati ya ndako na ye. Bakundaki ye, mpe na nsima bamonaki Batatoli mosusu oyo batikalaki, bamosusu bazalaki likoló ya bandako, bakitisaki bango mpe basalisaki bango bákóma na Macia.
Nsima ya kozwa bibongiseli oyo nyonso, bamonisi wana ya biro ya filiale bakendaki na Bilene, mboka moko ya bato ya mai; kuna bafutaki mpepo mpo na kozonga na Maputo. Na kati ya mpepo, lokola bazalaki komona libándá, bamonaki mpenza ndenge etúká yango ezindaki na mpela. Bapanzi-nsango balobaki ete kaka na etúká ya Gaza, bato 600 000 bakwelaki likama yango.
Makambo mabebi se kobeba
Na mwa mikolo oyo elandaki, bambula ebɛtaki lisusu makasi koleka, ebebisaki mpe bitúká ya ntei ya Mozambique. Na nsima, mopɛpɛ moko makasi ya molunge babengi Eline epepaki. Mwa 20 Febwali, mopɛpɛ yango ebɛtisaki mbula moko monene na bitúká ya Inhambane, Sofala, mpe Manica. Mbula yango eyaki lisusu kozindisa bamboka mosusu, kobebisa biloko mpe koboma bato.
Na nsima, pene na nsuka ya sanza ya Febwali, engumba Chokwe mpe etúká mobimba ya zingazinga wana ezindaki na ndenge moko oyo emonaná naino te. Mokolo ya pɔsɔ ya 26 Febwali, pene na midi ya butu, mpela eyaki na ndenge moko ya nsɔmɔ mpe ememaki biloko nyonso oyo ezalaki na nzela na yango. Luis Chitlango, Motatoli moko ya mbula 32 alobi ete: “Makɛlɛlɛ ya mwasi moko ya pembeni oyo azalaki koganga na lininisa nde elamwisaki biso.”
Chitlango abakisi ete: “Ntango tolongwaki na mbeto mpe tobimi mbangumbangu na libándá, toyokaki lokito ya mai ndenge ezali kotiyola. Tokimaki, mpe nzelanzela tokutanaki na nyoka ebele. Na ngonga ya motoba, tokómaki na esika moko ya mwa ngomba, kasi na nsima, ntango mai ekómaki komata bipai nyonso, tosengelaki komata na banzete. Tozalaki bato 20.
“Mibali bamataki liboso. Na nsima basi babandaki kopesa bango bana, mpe mibali bazalaki kokanga bana yango na bitape ya nzete. Na nsima basi mpe bamataki na babébé na bango. Mbala na mbala, tozalaki kokita mpo na kolukaluka nguba na kati ya mai, mpamba te toyebaki ete balonaki yango na esika wana.
“Nsima ya mikolo misato, biso nyonso tozwaki ekateli ya kokende na Chokwe. Mai ezalaki kokómela biso tii na ntolo, mpe ezalaki likambo moke te mpo na kopusana liboso mpamba te mai yango ezalaki kotiyola makasi. Nzelanzela, tokutanaki na bato mingi oyo bazalaki likoló ya banzete mpe likoló ya bandako. Mokolo oyo elandaki, mai ekitaki mwa mingi mpe mituka ekokaki kokóma na engumba yango mpe komema bato tii na Macia.”
Kaa ya Batatoli oyo bakimaki likama
Mwa 4 Marsi, biro ya filiale ya Batatoli ya Yehova ya Mozambique efutelaki mpepo moko mpe etindaki bandeko na bisika oyo ekwelaki likama. Bato mingi bakimaki na Macia, engumba oyo ekómaki sikawa kaa moko monene ya bato oyo bakimaki likama. Bato mingi oyo bakwelaki likama yango bakómaki kobɛla gripe, malaria, mpe bamaladi mosusu mpe bazalaki kolya malamu te.
Engumba yango ekómaki lokola esika moko oyo bitumba ezali kosalema. Baelikoptɛrɛ oyo bikólo ndenge na ndenge etindaki etondaki likoló ya engumba yango mobimba mpe ezalaki kokita na bisika nyonso mpo na kotika biloko. Ntango bandeko oyo batindamaki mpo na kosalisa Batatoli bakómaki na Macia, bazwaki bibongiseli kaka te mpo na koleisa baoyo bakwelaki likama kasi batyaki mpe mwa esika mpo na kopesa bato lisalisi ya monganga. Liboso ya kosala nyonso wana, bazwaki naino ndingisa ya bakonzi ya mboka, oyo bakumisaki Batatoli mingi mpo na likanisi oyo bazwaki.
Ntɔngɔ nyonso, na kaa ya Batatoli, oyo ezalaki na bandeko soki 700 bakisa mpe bato mosusu, bazalaki kotalela mokapo moko ya Biblia na ngonga ya 6:30. Ntango biloko oyo bandeko basi balambi ebeli, bazalaki kobenga batata ya mabota na bankombo na bango. Tata mokomoko azalaki kolakisa na misapi motángo ya basaani ya biloko oyo esengeli mpo na libota na ye, nde na nsima bakotyela ye biloko ya kolya.
Likambo mokomoko na kati ya kaa ebongisamaki malamu. Bandeko mosusu bazwaki mokumba ya kosomba biloko ya kolya; bamosusu kobatela bisika ya mai ya komɛla, kotya bopɛto na batwalɛti, mpe bongo na bongo. Ndenge makambo nyonso ebongisamaki malamu emonanaki mpe na miso ya bakonzi ya Leta; yango wana, balobaki ete: ‘Oyo nde esika kitoko ya kozala mpenza. Moto moko te azangi biloko ya kolya, mpe koswana ezali te.’ Mokonzi moko ya mboka yango alobaki ete: ‘Moto nyonso asengeli kokenda kotala kaa ya Batatoli mpo na komona ndenge makambo esengeli kosalema.’
Mokolo moko, komite ya kopesa lisalisi esangisaki bankulutu mpo na koyebisa bango ete biro ya filiale ezwaki bibongiseli mpo na kotonga lisusu bandako mpe Bandako ya Bokonzi mpe kopesa bandeko oyo bakwelaki likama biloko mosusu ya ntina. Na ntɔngɔ ya mokolo oyo elandaki, ntango bazalaki kotalela mokapo ya Biblia ya mokolo wana, bapesaki liyebisi mpo na oyo etali bibongiseli yango. Bandeko babɛtaki mabɔkɔ na boumeli ya ntango molai mpenza.
Atako bakonzi ya mboka bapesaki bakapo mibale ya minene, bato mingi na kati ya kaa bazalaki kaka kolala libándá. Yango wana, etuluku moko ya bandeko kati na baoyo bakwelaki likama ebongisamaki mpo na kotonga Ndako ya Bokonzi ya monene na lopango ya lisangá ya engumba yango. Batongaki yango na nzete mpe na manzanza—ndenge basalaka na Mozambique, mpe bato 200 bakokaki kolala wana. Esilaki na mikolo mibale mpamba!
Baluki bandeko mosusu
Kaka na ntango wana, mwa 5 Marsi, ntango mai ekitaki mwa moke, baponaki bandeko mosusu mpo na kosala mobembo na engumba Aldeia da Barragem, oyo ezali na kati ya moko ya bitúká oyo ezindaki libosoliboso. Engumba yango ezalaki na lisangá moko ya Batatoli pene na 90, kasi eyebanaki te soki Batatoli yango bazalaki wapi mpe nini ekómelaki bango.
Na mobembo na bango, bandeko yango balekaki na mboka Chihaquelane, esika batyaki kaa moko monene ya bato soki 100 000 oyo bakimaki likama. Ngámbo na ngámbo ya nzela, oyo na bisika mosusu ebebaki makasi, bamonaki ndenge etúká yango ezindaki mpenza. Ndeko moko kati na baoyo basalaki mobembo yango alobaki ete: “Ntango tokómaki na Chokwe, esika nyonso miso na biso ekokaki kotala ezalaki se ya kobeba. Bandako mingi na ebandeli ya engumba yango ezalaki kaka na mai tii na nsamba na yango. Mingi kati na bandako yango ezindaki na mai ya mpela yango. Molili ebandaki kokɔta, mpe tozalaki naino na ntaka ya kilomɛtrɛ 25 na Aldeia da Barragem.”
Nsukansuka, na butu, bakómaki epai bazalaki kokenda. Moko na bango alobi ete: “Totɛlɛmaki mpe tozalaki komituna soki tokosala nini.” Na nsima, bato babimaki mpe bagangaki: “Bandeko!”; basɛkaki makasi mpe na esengo. Ntango bamonaki miinda ya mituka mibale, mbala moko Batatoli ya engumba yango bakanisaki ete ekoki kozala bandeko na bango, mpe bayebisaki yango bato mosusu. Bato oyo bazalaki kotala bakamwaki mingi, mpe balobaki ete: ‘Bato oyo bazali mpenza na bolingo. Bayei kotala bandeko na bango mpe kutu bamemeli bango biloko ya kolya!’
Lisalisi ezalaki koya se koya
Basalisaki bandeko ya engumba Aldeia da Barragem mpo na kokóma na kaa ya Macia, epai bapesaki bango biloko ya kolya, esika ya kolala, mpe lisalisi ya monganga. Kasi, na Macia, makambo ekómaki mpenza mpasi. Biloko ya kolya, nkisi ya monganga, mpe esansi, ezalaki komonana lisusu te, mpamba te bazalaki kotinda yango na nzela ya mpepo. Esengelaki kobongisa mbangumbangu nzela ya motuka tii na Maputo. Yango esalemaki mwa 8 Marsi.
Engumba monene ya Xai-Xai ezindaki nyonso. Na katikati ya engumba mpenza, na bisika mosusu, mai ezalaki na mozindo ya mɛtrɛ misato! Batatoli basalaki komite moko mpo na kosalisa bandeko na bango ya engumba wana. Bakomite mosusu mpe esalemaki mpo na kosalisa baoyo bazalaki na bosɛnga na bitúká ya Sofala mpe Manica.
Batatoli ya mikili mosusu batindaki biloko. Na ndakisa, biro ya filiale ya Afrique du sud etindaki bankóto ya bakilo ya bilamba, bulangiti, mpe biloko mosusu. Mpe biro monene ya Batatoli ya Yehova, oyo ezali na Brooklyn (New York) ebimisaki mbongo mpo na kosalisa bandeko oyo bakwelaki likama.
Ntango mai ekitaki mpenza, batángaki baoyo bazalaki lisusu na bandako na bango te; nsima na yango nde babandaki mosala ya kotonga lisusu bandako mpe Bandako ya Bokonzi. Komite moko ya botongi etyamaki mpe ezwaki lisalisi ya basali ya bolingo malamu ebele oyo babandaki mbala moko mosala. Kobanda ntango wana, bandako 270, bakisa mpe Bandako ya Bokonzi soki mitano, etongami.
Ntango bandako oyo basali wana ya bolingo malamu batongaki ebandaki komata, bato bamonaki. Mwasi moko ya kartye alobaki ete: ‘Bino bosambelaka mpenza Nzambe oyo azali na bomoi. Bapastere na biso babosani bampate na bango oyo bazali konyokwama. Kasi, bino batongeli bino bandako oyo ya kitoko.’ Na bisika wana, bato mingi bandimaki nsango ya Bokonzi oyo Batatoli ya Yehova basakolaka, mpe bandimaki koyekola Biblia.—Matai 24:14; Emoniseli 21:3, 4.
Atako Batatoli mingi babungisaki biloko na bango nyonso, moto moko te abungisaki kondima na ye. Kutu, elikya na bango epai ya Yehova mpe epai ya bandeko na bango baklisto ya mokili mobimba elendisami. Bazali na botɔndi mingi mpo na bolingo ya bandeko na bango ya mokili mobimba, ndenge bakakatanaki te mpo na kosalisa bango na likama yango monene oyo ekwelaki bango. Bamoni mpenza lisungi mpe libateli ya Yehova, mpe bakomikundola ntango nyonso maloba oyo ya Biblia: “[Yehova] azali monene.”—Nzembo 48:1
[Elilingi na lokasa 20]
Mai ya mbula oyo esangani na pɔtɔpɔtɔ ezindisaki engumba Xai-Xai nyonso
[Elilingi na lokasa 21]
Biloko eyaki na mpepo
[Elilingi na lokasa 22]
Batatoli oyo baponamaki mpo na kosalisa bandeko na bango, batyaki mpe mwa esika ya kozwa lisalisi ya monganga
[Elilingi na lokasa 22]
Bandako ya sika ezali se kotongama
[Elilingi na lokasa 22]
Kaa oyo elekaki monene ya bato oyo bakimaki likama ezalaki na bato 100 000