Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w98 15/1 nk. 3-7
  • Boklisto ezali kosala mosala kati na yikiyiki

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Boklisto ezali kosala mosala kati na yikiyiki
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1998
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Etumba na Congo
  • Koyeba mposa
  • Bato bazali kopesa na elimo ya bokabi
  • Bokaboli biloko na Congo
  • Lisungi epai na baoyo bazali Batatoli te
  • Bakáa ya bato bakimá mboka
  • Lisungi mpo na banyokwami na makambo ya nsɔ́mɔ oyo mabimaki na Rwanda
    Lamuká!—1995
  • Tobikaki na likama ya nsɔmɔ ya pɔtɔpɔtɔ ya mɔtɔ!
    Lamuká!—2003
  • Mosala ya kosunga bandeko
    Bokonzi ya Nzambe ezali koyangela!
  • Kosunga bandeko oyo bakutani na makama na 2021—Bandeko na biso basundolami te
    Ndenge oyo makabo na yo esalelamaka
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1998
w98 15/1 nk. 3-7

Boklisto ezali kosala mosala kati na yikiyiki

MAKAMBO nyonso mabandaki pwasa mokolo moko na sanza ya Apríli 1994. Prezidá ya Burundi mpe prezidá ya Rwanda bakufaki na likama ya mpɛpo. Nsima ya mwa bangonga mobulu makasi ekɔtaki na Rwanda. Nsima ya sanza misato, banamboka Rwanda koleka 500 000—mibali, basi, mpe bana—bakufaki. Bato mosusu babéngaka eleko yango ete “libomi monene” (génocide).

Ndambo moko likoló na mibale ya bafandi milió 7,5 ya Rwanda bakimaki. Kati na bango, bato milió 2,4 bakimaki na bikólo ya zingazinga. Na lisoló ya bato na mikolo na biso, yango ezalaki motuya moleki monene ya bato bakimá mboka mpe ezalaki bokimi oyo esalemaki na lombangu koleka. Bakáa ya bato bakimá mboka ebongisamaki nokinoki na Zaïre (sikawa République démocratique du Congo), na Tanzanie, mpe na Burundi. Bamoko na bakáa yango—oyo eleki monene na mokili mobimba—ebombaki bato 200 000.

Kati na bato yango bakimaki mboka, ezalaki na Batatoli ya Yehova mingi, bango bazali bato balingá kimya mpe balandaka mitindá ya Biblia kati na bomoi na bango. Ata na ekólo nini oyo bafandi, bakɔtaka na makambo ya politiki soko moke te mpe balandaka etindá ezwami kati na maloba oyo ya Yisaya 2:4: “Bakotula mipanga na bango ete mízala bitimweli, mpe makonga na bango ete mázala bikateli na matiti. Libota moko bakotombwela libota mosusu mopanga te, bakoyekola etumba lisusu mpe te.” Batatoli ya Yehova bayebani na mokili mobimba ete bazali lingomba oyo esanganaki te na libomi monene oyo esalemaki na Rwanda.

Yesu Klisto alobaki ete bayekoli na ye “bazali bato ya mokili te.” Nzokande, lokola bazali “kati na mokili,” bakoki ntango nyonso te kolónga kokima yikiyiki ya bikólo. (Yoane 17:11, 14) Na boumeli ya libomi monene oyo esalemaki na Rwanda, Batatoli soko 400 bakufaki. Batatoli mpe bato mosusu oyo basepelaka na nsango ya Bokonzi, bango nyonso na motángo ya bato pene na 2 000 bakimaki mboka.

Lokola Batatoli ya Yehova bazali bato ya mokili te, yango elingi nde koloba ete basalaka eloko te na ntango makama ebimi? Te. Liloba ya Nzambe elobi ete: “Soko ndeko mobali to ndeko mwasi azali bolumbu mpe na bosɛnga na bilei na mokolo na mokolo, mpe moko na bino alobi na ye bongo ete, Bókenda na kimya, bóyoka mɔ́tɔ, bótonda; nde bopesi bango yango ezangi bango na nzoto te, wapi litomba? Bongo na kondima, soko ezangi misala, esili kokufa kati na yango mpenza.” (Yakobo 2:15-17) Bolingo mpo na bazalani ezali mpe kopusa Batatoli ete básalisa baoyo bazali na bango kondima moko te.​—Matai 22:37-40.

Atako Batatoli ya Yehova na mokili mobimba bazalaki na mposa ya kosalisa bandeko na bango oyo bakutanaki na makambo ya mpasi na ekólo Rwanda, mokumba ya kokamba misala ya kopesa lisungi epesamaki na bandeko ya Mpótó ya Wɛ́sti. Na eleko ya molungé ya 1994, etuluku moko ya Batatoli ya bolingo malamu oyo bautaki na Mpótó bakendaki mbangu mpo na kosalisa bandeko na bango baklisto mibali mpe basi na Afrika. Bakáa mpe balopitalo mike ya zamba oyo ebongisami malamu etongamaki mpo na bato ya Rwanda oyo bakimaki mboka. Ebele ya bilamba, babolangiti, bilei, mpe mikanda mikolimbolaka Biblia etindamaki na mpɛpo to na nzela mosusu. Bato koleka 7 000 oyo bazwaki makama—koleka pene na mbala misato motángo ya Batatoli ya Yehova na Rwanda na ntango wana—bazwaki litomba na lisungi yango. Na sanza ya Desɛ́mbɛ ya mobu yango, bankóto ya bato bakimá mboka, kati na bango mingi oyo bazalaki Batatoli ya Yehova, bazongaki na Rwanda mpo na kotonga lisusu bandako na bango mpe kozongela misala na bango.

Etumba na Congo

Na 1996, etumba ebandaki na ɛ́sti ya République démocratique du Congo. Etúká yango ezali na ndelo ekaboli ekólo yango na ekólo Rwanda mpe ekólo Burundi. Kuna mpe ezalaki na makambo ya kosangisa nzoto na basi na makasi mpe koboma. Wana masasi mazalaki kobɛtama mpe bamboka ezalaki kotumbama, bato bakimaki mpo na kobikisa bomoi na bango. Batatoli ya Yehova bazwamaki kati na yikiyiki yango, mpe pene na Batatoli 50 kati na bango bakufaki. Bamoko babomamaki na masasi oyo mazalaki kolekaleka. Basusu babomamaki mpo ete bazalaki bato ya etuluka mosusu to ntango mosusu bakanisaki ete bazali banguna. Mboka moko epai Batatoli 150 bazalaki kofanda ezikisamaki na mɔ́tɔ. Na bamboka mosusu, bandako mingi mpe mwa ndambo ya Bandako ya Bokonzi etumbamaki. Lokola bazalaki lisusu na bandako te mpe na biloko te, Batatoli bakimaki na bisika mosusu mpe kuna basungamaki na bandeko na bango Batatoli.

Nzala ekɔtaki nsima ya bitumba, milóna mibebaki, bilei na bibombelo bipunzamaki, mpe banzela nyonso oyo ekokaki koya na biloko ekangamaki. Bilei oyo bikokaki komonana bizalaki na ntalo mingi. Na Kisangani, na ebandeli ya sanza ya Máí 1997, kilo moko ya mbálá ezalaki kotekisama na dolare misato, oyo ezali mpenza ntalo makasi mpo na bato mingi. Mingi bazalaki na likoki ya kolya bobele mbala moko na mokolo. Maladi mpe ekɔtaki nsima ya nzala. Kozanga koleisama malamu elɛmbisaki makoki ya nzoto mpo na kobundisa maladi lokola malaria, pulupulu mpe maladi ya estomá. Mingi mpenza bana mike banyokwamaki mpe bakufaki.

Koyeba mposa

Mbala oyo lisusu Batatoli na Mpótó basalaki nokinoki mpo na kosalisa bandeko na bango oyo bazalaki na bosɛnga. Na sanza ya Apríli 1997 etuluku moko ya Batatoli mpo na kopesa lisungi, kati na bango minganga mibale, bakendaki kuna na nzela ya mpɛpo mpe bamemaki nkisi mpe mosolo. Batatoli ya Goma basilaki kobongisa bakomité ya kopesa lisungi mpo na koyeba bosɛnga ya bandeko mpo ete lisungi ya nokinoki ekoka kopesama. Etuluku yango batambolaki na engumba mpe zingazinga na yango. Batindaki bato mpo na kozwa balapólo na bisika oyo bizalaki mosika. Bazwaki mpe nsango ya Kisangani, oyo ezali na ntáká ya kilomɛtɛlɛ 1 000 na wɛ́sti ya Goma. Bandeko ya bisika yango basalisaki mpo na kokamba mosala ya kopesa lisungi kati na engumba Goma, epai Batatoli soko 700 bafandi.

Na Goma, moklisto moko, oyo azali nkulutu kati na lisangá, alobaki ete: “Komona bandeko na biso bauti mosika mpenza mpo na kosunga biso, esimbaki mpenza mitema na biso. Liboso ete báya, tozalaki kosalisana bamoko na bamosusu. Bandeko bazalaki kokima longwa na bamboka ya zamba mpo na koya na Goma. Bandako ya bamosusu ebebisamaki, mpe batikaki bilanga na bango. Toyambaki bango na bandako na biso mpe tokabolaki na bango bilamba mpe mwa bilei oyo tozalaki na yango. Oyo tokokaki kosala awa ezalaki moke mpenza. Bamoko kati na biso bazalaki kolya malamu te.

“Nzokande, bandeko ya Mpótó bayaki na mosolo oyo epesaki biso likoki ya kosomba bilei, atako bilei yango ezalaki komonana mingi te mpe ezalaki ntalo mingi. Bilei eyaki mpenza na ntango ebongi, mpamba te mingi bazalaki lisusu na eloko ya kolya te kati na bandako na bango. Tokabolaki bilei epai na Batatoli mpe baoyo bazali Batatoli te. Soki lisungi eyaki na ntango wana te, mingi lisusu balingaki kokufa, mingi mpenza bana mike. Yehova abikisaki bato na ye. Bato oyo bazali Batatoli te bakamwaki mingi. Mingi bakumisaki bomoko mpe bolingo na biso. Bamoko bandimaki ete lingomba na biso nde ezali lingomba ya solo.”

Atako bilei bizalaki kosombama na mboka mpe nkisi ezalaki kopesama, biloko mingi mosusu ya ntina bisengelaki. Tosengelaki na bilamba mpe babolangiti, mpe lisusu tozalaki na bosɛnga ya bilei mingi mpe nkisi. Lisusu, tozalaki na mposa ya lisungi mpo na kotonga lisusu bandako oyo ebebisamaki.

Bato bazali kopesa na elimo ya bokabi

Bandeko ya Mpótó bamonisaki lisusu mposa na bango ya kopesa lisungi. Biró ya Batatoli ya Yehova na Louviers, na ekólo France, basɛngaki lisungi na masangá ya etúká ya Vallée du Rhône, ya etúká ya Normandie, mpe masangá mosusu ya engumba Paris. Kuna, motindá mosusu ya Makomami esalelamaki: “Ye oyo akokóna moke akobuka moke nde ye oyo akokóna mingi akobuka mingi. Moto na moto asala pelamoko na motema na ye, na mposa moke te mpe na kopusama te; mpo Nzambe alingi ye oyo akopesaka na esengo.”​—2 Bakolinti 9:6, 7.

Bankóto ya bandeko bazwaki libaku wana mpo na kopesa na esengo. Bakartɔ́ mpe basakosi ya bilamba, ya basapato, mpe ya biloko mosusu etondaki na Bandako ya Bokonzi mpe na nsima ememamaki na biró ya filiale ya Batatoli ya Yehova na France. Kuna, basáli 400 ya bolingo malamu bazalaki pene ya kosangana na eteni mosusu ya ebongiseli ebéngamaki “Lisungi mpo na Zaïre.” Wana biloko oyo bipesamaki bizalaki koya, basáli yango ya bolingo malamu bazalaki kopona, kobongisa, mpe kokangisa bilamba yango na bakartɔ́ oyo ezalaki kotyama kartɔ́ 30 na esika moko. Bana mike mpe bakanisaki bandeko na bango bana mike ya Afrika mpe batindaki biloko ya masano—bavuatire mike, bana-popi, mpe bongo na bongo. Yango etyamaki esika moko na biloko mosusu ya ntina mpo na kobikela. Na mobimba, containers libwa oyo mokomoko ezali na bolai ya mɛtɛlɛ 12 etondisamaki mpe etindamaki na Congo.

Lisungi nini esili kotindama na Afrika ya Ntéi na lisalisi ya bankóto ya Batatoli ya ekólo Belgique, France, mpe Suisse? Kino na sanza ya Yúni 1997 motángo mobimba ezalaki ya kilograme 500 ya nkisi, tɔni 10 ya bisikiti ya protéine, tɔni 20 ya bilei mosusu, mpe tɔni 90 ya bilamba, sapato 18 500, mpe bolangiti 1 000. Mikanda mikolimbolaka Biblia mpe mitindamaki. Bandeko bakimá mboka basepelaki na biloko yango nyonso, ebɔndisaki bango mpe esungaki bango na koyikela komekama na bango mpiko. Biloko wana nyonso ezalaki na ntalo ya pene na dolare 1 000 000. Makabo wana mazalaki elembeteli ya bondeko mpe bolingo oyo ezali kati na basaleli ya Yehova.

Bokaboli biloko na Congo

Ntango biloko ebandaki kokóma na Congo, bandeko mibali mibale mpe ndeko mwasi moko bautaki na France mpo na kosala elongo na bakomité ya kopesa lisungi oyo ebongisamaki na Congo. Na oyo etali botɔ́ndi oyo Batatoli ya Congo bamonisaki, Joseline alobaki ete: “Tozwaki nkomá mingi ya bandeko mpo na komonisa bosepeli na bango. Ndeko mwasi moko mobola apesaki ngai biju ya malakite. Basusu bapesaki biso bafɔtɔ́ na bango. Na ntango tolingaki kozonga, bandeko basi bapɛpwaki ngai, bayambaki ngai, mpe balelaki. Ngai mpe nalelaki. Mingi balobaki maloba lokola oyo: ‘Yehova azali malamu. Yehova azali komibanzabanza mpo na biso.’ Na bongo, bayebaki ete likabo wana eutaki mpenzampenza epai na Nzambe. Ntango tozalaki kokabola bilei, bandeko bazalaki kosanzola Yehova na koyembáká nzembo ya Bokonzi. Ezalaki mpenza kosimba mitema.”

Monganga moko na nkombo Loïc azalaki kati na etuluku na biso. Bato mingi batondaki na Ndako ya Bokonzi mpe bazelaki ngala na bango na motema mpiɔ ete apesa bango nkisi. Ndeko mwasi moko ya Congo, alingaki mpe kosala eloko moko mpo na kosalisa bandeko, asalaki mikate 40 mpe akabolaki yango epai na baoyo bazalaki kozela mpo na kokutana na monganga. Lokola bato pene na 80 bazalaki kozela, moto mokomoko azwaki ndambo ya mokate.

Lisungi epai na baoyo bazali Batatoli te

Lisungi wana epesamaki bobele epai ya Batatoli ya Yehova te. Bato mosusu mpe bazwaki litomba na yango, lolenge moko mpe esalemaki na 1994. Yango eyokani na Bagalatia 6:10, oyo elobi ete: “Soko tozwi nzela, tósalela bato nyonso malamu mpe na koleka epai na bango bazali bandimi.”

Batatoli bakabolaki nkisi mpe bilamba na biteyelo mingi ya ebandeli mpe na esika moko ya kobɔkɔla bitike pene ya Goma. Esika yango ezali na bana 85. Ntango basalaki mobembo ya liboso mpo na koyeba ndenge makambo mazalaki, etuluku ya bandeko oyo bazalaki kopesa lisungi bakendaki kotala esika yango oyo babɔkɔlaka bitike mpe balakaki ete bakopesa bango kartɔ́ 50 ya bisikiti ya proteine, bakartɔ́ ya bilamba, bolangiti 100, bankisi, mpe biloko ya masano. Bana basalaki molɔngɔ́ na libándá mpe bayembaki nzembo liboso ya baoyo bayaki kotala bango. Na nsima basɛngaki eloko moko na mposa makasi: bakoki komemela bango bale mpo na kobɛta?

Bapɔ́sɔ mingi na nsima etuluku ya bandeko oyo bazalaki kopesa lisungi bakokisaki elaka na bango, bamemaki biloko. Lokola akamwaki mingi na bokabi mpe na makambo oyo atángaki na mikanda mikolimbolaka Biblia oyo bapesaki ye, mokambi ya ndako ya kobɔkɔla bitike alobaki ete alingi kokóma Motatoli ya Yehova. Bongo bana, bapesaki bango bale moko? Claude, mokambi ya etuluku ya kopesa lisungi oyo eutaki na France alobi ete, “Te, topesaki bango nde bale mibale.”

Bakáa ya bato bakimá mboka

Lisungi esukaki bobele na Congo te. Bankóto ya bato bakimá mboka balongwaki na bisika ya bitumba mpe bakendaki kofanda na ekólo mosusu ya pene epai bakáa misato ya bato bakimá mboka esilaki kotongama nokinoki. Batatoli bakendaki mpe kuna mpo na kotala eloko nini bakokaki kosala. Ntango lisoló oyo ezalaki kobongisama, bakáa yango ezalaki na bato 211 000, mingi bautaki na Congo. Pene na 800 kati na bango bazalaki Batatoli mpe bana na bango mpe bato mosusu oyo basepelaka na nsango malamu ya Bokonzi. Mokakatano ebimaki nokinoki kati na bakáa ezalaki bongo kozanga bilei. Na káa moko, bazalaki na bilei oyo bikoki bobele mpo na mikolo misato, mpe kati na yango madesu oyo maumelaki mbula misato.

Atako bongo, Batatoli bazalaki na elimo malamu. Atako bazalaki na mikanda mingi te oyo mikolimbolaka Biblia, bazalaki kosala makita na bango pɔ́sɔ na pɔ́sɔ na libándá mpo na kolendisana na elimo bamoko na bamosusu. Bazalaki mpe komipesa na mosala ya kosakola nsango malamu ya Bokonzi ya Nzambe epai ya bato mosusu kati na bakáa.​—Matai 24:14; Baebele 10:24, 25.

Kati na etuluku ya Batatoli oyo bakendaki koyeba mposa ya bandeko, ezalaki na monganga moko. Atako bakonzi bapesaki bango ndingisa ya kolekisa bobele mikolo moke na káa mokomoko, batalaki bato ya maladi. Batikaki bankisi mpe mbongo epai ya bankulutu baklisto. Na bongo, bandeko bakokaki kobika. Bazalaki mpe na elikya ete, mosika te, Batatoli oyo bazalaki na bakáa bakozonga na bamboka na bango.

Ezali boni mpo na mikolo mizali koya? Yesu Klisto asakolaki ete mikolo na biso mikozala na yikiyiki monene, eleko ya bitumba mpe ya nzala. (Matai 24:7) Batatoli ya Yehova bayebi ete bobele Bokonzi ya Nzambe nde ekotya nsuka na minyoko oyo mizali lelo oyo na mabelé. Na nsé ya boyangeli ya Bokonzi yango, mabelé makokóma paladiso, epai kimya ekofuluka, mpe bolamu ezangi nsuka mpo na bato ya botosi. (Nzembo 72:1, 3, 16) Liboso ete esalema, Batatoli bakosakola nsango malamu ya Bokonzi yango ya likoló mpe bakokóba kosalisa bandeko na bango mpe bato mosusu na ntango ya bosɛnga.

[Likanisi ya paragrafe na lokasa 4]

Banda 1994, Batatoli ya Yehova, bobele na Mpótó basili kotinda tɔni 190 ya bilei, bilamba, nkisi, mpe biloko mosusu mpo na kopesa lisungi na etúká ya Grands Lacs, na Afrika

[Etanda na lokasa 6]

Bolingo ya Boklisto ezali komonisama na misala

Ruth Danner azali moko na baoyo basanganaki na ebongiseli ya “Lisungi mpo na Zaïre” na ekólo France. Na bomwana na ye, atyamaki na káa ya bakangami ya Banazi mpo na kondima na ye ya boklisto. Alobaki boye: “Tozalaki na esengo mingi ya kosalisa bandeko na biso ya Afrika! Kasi ezalaki na likambo moko oyo epesaki ngai esengo mbala mibale. Na 1945, ntango toutaki na Allemagne, tozalaki ata na eloko moko te. Ezala bilamba oyo tolataki bapesaki biso kopesa. Kasi, mwa moke na nsima, tozwaki biloko oyo bandeko na biso ya Amerika batindelaki biso. Na yango, lisungi oyo epesi ngai libaku ya kozongisa bolamu oyo bamoniselaki biso esili koleka bambula ebele. Oyo nde libaku malamu ya kozala mosangani ya libota monene ya bandeko oyo bazali komonisa bolingo ya boklisto na misala!”—Yoane 13:34, 35.

[Elilingi na lokasa 7]

Mosika te, mabelé mobimba makokóma paladiso na biloko ebele mpo na bato nyonso

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto