Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • g02 Janvier lok. 3
  • Koyina ezali maladi mabe oyo ozali komonana na mokili mobimba

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Koyina ezali maladi mabe oyo ozali komonana na mokili mobimba
  • Lamuká!—2002
  • Masolo mosusu
  • Bato bazali koyinana mingi
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2000
  • Lolenge se moko ya kosilisa koyinana
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2000
  • Koyina eutaka wapi?
    Lamuká!—2002
  • Mpo na nini koyinana etondi na mokili?​—Biblia elobi nini?
    Makambo mosusu
Makambo mosusu
Lamuká!—2002
g02 Janvier lok. 3

Koyina ezali maladi mabe oyo ozali komonana na mokili mobimba

ELIMA moko ezali kotambolatambola na mokili mobimba kozanga ete moto moko apekisa yango; elima yango nkombo na yango koyina.

Eleki mikolo mingi te, na mikili mosusu ya Mpoto oyo babengi Balkans, babomaki bato ya ekólo moko boye na mokano ya kosilisa bango, mpe tii sikoyo bato ya esika yango bazali kaka konyokwama mpo na likambo yango. Lokola bato ya esika yango bayinanaka banda kala, yango ebimisaki makambo lokola: koboma bato, kosangisa na basi nzoto na makasi, kobengana bato na bisika na bango, kotumba bandako mpe bamboka, mpe kobɔtɔla biloko ya bato na bandako mpe na mboka mobimba, kobebisa bilanga mpe bibwele, mpe nzala. Kutu, tii lelo bamine mingi oyo bakundá ezali naino.

Na ekólo Timor oriental na Azia ya Sudi-Ɛsti, bato 700 000 bakimaki na kobanga mpo bato bazalaki kobomana, kobɛtana, bazalaki kobɛta masasi mpambampamba, mpe mpo bazalaki kobengana bato na mboka. Epai bautaki, batomboki babebisaki bilanga na bango. Moto moko na kati ya bato yango oyo bazalaki kokima alobaki ete: “Nazali komiyoka lokola nyama moko oyo bazali kolandalanda mpo báboma yango.”

Na Moscou, buludingi moko oyo bato bazalaki kofanda ebukanaki na bɔmbe oyo bato ya mobulu batyaki. Ntango bɔmbe yango epanzanaki, bato 94 oyo basalaki ata likambo te bakufaki mpe nzoto na bango epanzanaki​—kati na bango ezalaki mpe na bana mike. Bato koleka 150 bazokaki. Nsima ya likama wana ya nsɔmɔ, bato mosusu bakómaki komituna ete: ‘Na mbala ya nsima bakobama banani?’

Na Los Angeles, na etúká ya Californie, mobali moko oyo ayinaka bato ya mposo mosusu abɛtaki masasi na kati ya bana mike oyo bazalaki Bayuda mpe na nsima abomaki mosali moko ya posita oyo azalaki moto ya ekólo Philippines.

Tokoki mpenza koloba ete koyina ezali maladi mabe oyo ezali komonana na mokili mobimba. Tóloba kaka ete mikolo nyonso, bansango ezali komonisa makambo ya mabe oyo ezali kobima ntango bato bazali kotyola mibeko mpe bazali koyina bato ya mposo mosusu, ya bikólo mosusu, to ya mangomba mosusu. Na ndakisa, bikólo bizali kopanzana, bato oyo bafandi esika moko bazali kokabwana, mpe mabota ezali kopanzana; na kati ya bikólo ndenge na ndenge bato oyo balobaka monɔkɔ moko te bazali kobomana na mokano ya kosilisana; lisusu, ezali na makambo ya bonyama, oyo tokoki kutu kolobela te, oyo bato mosusu basalaka baninga na bango bato kaka mpo bato yango “bakeseni” na bango.

Mpo na kosukisa elima yango oyo babengi koyina, tosengeli koyeba liboso esika elima yango eutaka. Moto abotamaka na ezaleli ya koyina? To ayekolaka yango nde koyekola? Tokoki nde kobwaka ezaleli ya koyina?

[Maloba mpo na kolimbola eutelo ya bafɔtɔ na lokasa 3]

Kemal Jufri/Sipa Press

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto