“Mokolo ya esengo mpenza koleka mikolo nyonso ya bomoi na biso”
LIBALA ezali likambo moko ya esengo. Babalani mingi balobaka ete: “Ezali mokolo ya esengo mpenza koleka mikolo nyonso ya bomoi na biso.” Kasi, ekoki mpe kozala moko ya mikolo oyo esɛngaka kosala mpenza makambo mingi. Mobali na mwasi na bato ya mabota na bango bakoki kolɛmba makasi mpe kozala motema likoló mpo na bikateli mpe bibongiseli nyonso oyo libala esɛngaka, mpe mpo na bato ebele oyo mwasi na mobali bakosolola na bango mokolo yango.
Libala ezali ebandeli ya bomoi moko ya sika mpo na babalani. Kasi bomoi ekozala ya sika kaka mpo na bango moko te. Baboti mpe bandeko ya mwasi to ya mobali oyo abali bayokaka mbala mingi esengo oyo esangani na mawa, mpamba te mwana to ndeko na bango atiki bango mpo na kosala libota na ye.
Ekólo na ekólo ezalaka na mimeseno na yango mpo na oyo etali libala, na bongo ezali mpasi mpo na kolobela mimeseno yango nyonso awa. Na masolo oyo, tokolobela mingi mimeseno ya mikili ya Mpoto mpe mikili mosusu oyo ezali na mimeseno lokola ya bango. Na mikili yango, kobala ezali likambo oyo ekoki kosɛnga mbongo mingi mpenza. Na mokolo ya libala, bato mosusu basalelaka mbongo mingi, na ndakisa mpo na kofutela esika oyo fɛti ekozala mpe kosomba biloko ya kolya. Na Italie, mbongo oyo esengeli kobima mpo na mokolo ya libala ekoki koleka dolare 10 000. Na Japon mpe na mikili mosusu, mbongo yango ekoki koleka motángo wana. Mbala mingi, ezali babalani te nde babimisaka mbongo yango, kasi baboti na bango.
Bakompanyi mingi ekómá kozwa mbongo mingi na mabala. Balendisaka bato básala libala ya “kokoka,” oyo ata eloko moko esengeli kozanga te. Ezali lokola nde bazali koyebisa bato ete: “Oyo nde mokolo ya esengo mpenza koleka mikolo nyonso ya bomoi na bino!” Yango wana, batɛkelaka bato biloko ebele mpe basɛngaka kosala misala ebele ya kofuta mbongo; balobaka mpe ete soki moto alingi ete mokolo ya libala na ye ezala mokolo monene to ya kokoka, esengeli ete biloko yango mpe misala yango ezanga te. Na ndakisa, tokoki kotánga biloko lokola: nkasa ya kobenga bato na libala oyo basali na kolanda ndenge oyo moto oyo akobala asepeli, rɔbɛ ya libala oyo “eleki kitoko,” barɔbɛ ya bilenge basi oyo bakozala pembeni ya mwasi oyo abali, bavɛstɛ ya ndenge moko mpo na bilenge mibali oyo bakozala pembeni ya mobali oyo abali. Na nyonso wana, esengeli mpe kobakisa biloko mosusu lokola: maboke ya fololo, mituka ya ntalo makasi, mbala mosusu restora moko esika fɛti ekozala, moto oyo akokanga fɔtɔ, babɛti-miziki, mpe bongo na bongo. Ebele ya biloko oyo babalani ya sika bakoki kozala na mposa na yango mpo na mokolo yango, bakisa mpe mbongo nyonso oyo yango ekoki kosɛnga, nyonso wana ebangisaka batata mingi.
Na bikólo mingi, bato balandelaka bonkɔkɔ na bango. Likambo mokomoko oyo esengeli kosalema mokolo ya libala esilá kotyama, mpe babalani nyonso basengeli kolanda se lokolo wana. Ya solo, ezali na makambo mingi oyo esengeli kobosana te, kasi ntango mpo na kobongisa makambo yango nyonso ezalaka mokuse.
Na kotalela nyonso oyo touti kolobela, kobala ezali kopesa yo mpenza esengo to ezali kobangisa yo? Ata soki okopesa eyano nini, ntembe ezali te ete biso nyonso tokoki komituna mituna mwa mingi soki tokanisi makambo nyonso oyo molulu ya libala esɛngaka. Na ndakisa, na mikolo na biso, kobala elimboli nini? Mpo libala esalema “malamu,” esengeli kozala na biloko mpe makambo nyonso oyo tolobeli likoló awa? Ndenge nini tokoki kosala mpo tótungisama te na makanisi mpe na mikakatano mosusu ya ndenge na ndenge oyo ebimaka?
Atako mitungisi ezalaka mingi, kasi ezali na babalani mingi oyo balɛngɛlaki malamumalamu makambo nyonso ya mokolo ya libala na bango mpe makambo nyonso elekaki malamu. Lolenge bango basalaki ekoki kosalisa baoyo bazali komilɛngɛla mpo na molulu yango. Lisusu, Biblia ezali na mitinda oyo ekoki kosalisa na ntango babalani bazali komibongisa mpo na libala na bango, mpo ete mokolo ya libala ezala mokolo ya esengo, mpe ya kolendisa mpo na bato nyonso.