Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • km 11/08 lok. 3
  • Biyano na mituna na bino

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Biyano na mituna na bino
  • Mosala na biso ya Bokonzi—2008
  • Masolo mosusu
  • Bóbatela esengo mpe lokumu ya mokolo ya libala
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2006
  • Bafɛti ya mabala oyo ekumisaka Yehova
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2000
  • Milulu ya libala oyo mikumisaka Yehova
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1997
  • Mabala oyo esalemi na lokumu na miso ya Nzambe mpe ya bato
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2006
Makambo mosusu
Mosala na biso ya Bokonzi—2008
km 11/08 lok. 3

Biyano na mituna na bino

◼ Soki mwasi ná mobali balingi ete lisukulu ya libala na bango esalema na Ndako ya Bokonzi, makambo nini basengeli koyebisa bankulutu?

Libala oyo esalemi na boyokani na mitinda ya Biblia epesaka Yehova lokumu. Lokumu yango esengeli komonana, mingi mpenza na lisukulu ya libala oyo esalemi na Ndako ya Bokonzi; mpo likita nyonso oyo esalemi na Ndako ya Bokonzi emonisaka ndenge ebongiseli na biso ezali. Mpo ete “makambo nyonso esalema na ndenge ya lokumu mpe na molɔngɔ,” esengeli bankulutu ya lisangá básolola na bandeko oyo bakobalana makambo mosusu oyo etali libala na bango, ntango basɛngi ete lisukulu esalema na Ndako ya Bokonzi.​—⁠1 Kol. 14:⁠40.

Bandeko oyo balingi kobalana mpe bazali na mposa ete lisukulu ya libala na bango esalema na Ndako ya Bokonzi, basengeli kokomela Komite ya mosala ya lisangá oyo eyanganaka na Ndako ya Bokonzi wana. Basengeli kotinda mokanda yango ntango mingi liboso, mpe koyebisa mokolo mpe ngonga oyo balingi lisukulu yango esalema. Basengeli koyeba ete bankulutu bakobongola te programɛ ya makita ya lisangá mpo na lisukulu ya libala. Lisusu, mobali mpe mwasi oyo bazali kobalana basengeli kozala na lokumu malamu, mpe kozala na bomoi oyo eyokani na mitinda ya sembo ya Yehova.

Mpo mwasi ná mobali oyo balingi kobalana bámindimisa ete libala na bango ekozala na lokumu na miso ya Nzambe, basengeli koyebisa komite ya mosala ya lisangá bibongiseli oyo bazwi, ntango mingi liboso ya kobalana. Atako bankulutu bakotinda bandeko yango na makasi te ete bándima makanisi na bango, basengeli kosembola bango soki bamoni ete bazali kokana kosala likambo moko oyo eyokani te na mitinda ya Biblia. Esengeli koyemba to kobɛta kaka banzembo oyo ezali na buku Nzembo mpo na kokumisa Yehova. Soki ekosɛnga kobongisa Ndako ya Bokonzi to kotanda bakiti ndenge mosusu, esengeli kosala yango na ndenge oyo bankulutu bakondima. Soki bato oyo bakokanga bafoto to bakozwa bilili na kamera bakozala, basengeli te kobebisa lokumu ya libala. Bankulutu bakoki kondima ete babalani bámekameka makambo oyo bakosala na Ndako ya Bokonzi liboso mokolo yango ekoka, soki ekobebisa te programɛ ya makita. Esengeli te kotya nkasa ya libyangi na etanda ya mayebisi. Kasi, bankulutu bakoki kopesa liyebisi ya mokuse na Likita ya Mosala, mpo na koyebisa lisangá ete lisukulu ya libala ekosalema na Ndako ya Bokonzi.

Atako esɛngisami te ete bato nyonso oyo bakokɔtisa babalani na Ndako ya Bokonzi bázala Batatoli oyo bazwá batisimo, ekozala malamu te bázala na elateli oyo eyokani te na mitinda ya Biblia to na etamboli oyo ekobɛtisa basusu libaku. Lisukulu ya libala esengeli kosalema na nkulutu, soki likoki ezali. Bankulutu bazali na makoki ya koteya Liloba ya Nzambe malamu; yango wana, bango nde babongi mpo na kolimbola mitinda ya Biblia oyo etali libala.​—⁠1 Tim. 3:⁠2.

Lokola nkulutu oyo akosala lisukulu azali mpe na mokumba monene na libala yango, babalani basengeli mpe koyebisa ye liboso mpenza bibongiseli oyo bazwi. Asengeli kosolola na babalani mpo na koyeba etamboli nini bazalaki na yango ntango bazalaki bafianse; babalani basengeli koyebisa ye makambo polele mpe na bosembo mpenza. Soki moko na bango abalaká liboso, asengeli kopesa bilembeteli oyo emonisi ete azali na bonsomi ya kobala lisusu na kotalela Makomami mpe mibeko ya Leta. (Mat. 19:⁠9) Yango elingi koloba ete asengeli kolakisa bankulutu mokanda ya Leta oyo emonisi ete abomá libala.

Soki babalani bazali kosolola malamu na bankulutu mpe kolanda malako na bango, libala yango ekozala likambo ya esengo mpo na bato nyonso.​—⁠Mas. 15:22; Ebe. 13:⁠17.

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto