Mokolo ya libala—Mokolo ya esengo kasi esɛngaka mpe makambo mingi
BIBLIA ezali komonisa ete Yehova Nzambe—ye moto ayebi bato ma-lamumalamu koleka ata nani—nde asalaki molulu ya libala ya liboso. Asalaki libala ete ezala ebongiseli oyo ekosala ete bato bázala na mokili. (Genese 2:18-24) Mpe na kati ya Biblia, Liloba ya Nzambe oyo epemami, mitinda ezali ndenge na ndenge oyo ekoki kosalisa biso ntango tozali komibongisa mpo na mokolo ya libala.
Na ndakisa, Yesu alobaki ete baklisto basengeli ‘kozongisa biloko ya Kaisala epai ya Kaisala.’ (Matai 22:21, NW) Yango wana, basengeli kolanda mibeko ya mboka oyo bafandi. Libala oyo esalemi ndenge mibeko ya Leta esɛngi, ebatelaka babalani na makambo mingi; na ndakisa, emonisaka babalani mikumba na bango mpo na oyo etali kobɔkɔla bana mpe kotikala na biloko soki moko akufi. Ezali mpe na mibeko mosusu oyo ebatelaka bato ya libota mpo bányokwama te mpe mpo ete moto mosusu asalela bango te lokola baombo na ye.a
Kobongisa mokolo ya libala
Ntango mobali na mwasi bazwi ekateli ya kobalana na boyokani na mitinda ya Biblia mpe na mibeko ya mboka na bango, basengeli mpenza kotalela makambo nini? Basengeli mpenza kotalela mokolo oyo bakosala libala na bango mpe ndenge molulu yango ekosalema.
Buku moko, oyo elobeli makambo ya libala, emonisi ete: “Mbala mosusu makambo oyo babalani balingi kosala ekokanaka mpenza te na oyo baboti na bango balingi; yango wana, bayebaka lisusu te soki basengeli kosala kaka ndenge oyo bango balingi to kosala ndenge oyo mabota na bango bameseni kosala.” Bakoki kosala nini na ntango wana? “Lolenge mosusu ya pɛtɛɛ ya kosala ezali te, esengeli kaka kondima koyokamela na likebi, kotalela elongo mpe na mozindo bisika oyo boyokani ezali te mpe ngámbo nyonso mibale esengeli kondima kotika makanisi mosusu oyo bazalaki na yango liboso mpo ete nsukansuka bókoka koyokana. Ezali ntango moko oyo ekómisaka moto nyonso mwa nkandankanda, kasi soki moto na moto akanisi mwa moke liboso mpe aluki mwa moke koyoka makanisi ya bamosusu, yango ekopesa nzela ete bibongiseli esalema malamu.”—The Complete Wedding Organiser and Record.
Atako baboti ya bolingo bakoki kosala mingi mpo ete makambo nyonso eleka malamu na mokolo ya libala, kasi basengeli te koluka na makasi ete kaka oyo bango balingi nde esengeli kosalema. Lisusu, atako mwasi na mobali nde bazali na liloba ya nsuka, kasi basengeli koyokamela na likebi mpenza toli ya malamu oyo bazali kopesa bango. Ntango bazali kotalela toli oyo bapesi bango mpo na koyeba soki bakoki kondima yango to te, babalani basengeli kobosana te toli ya Biblia oyo elobi ete: “Makambo nyonso epesami nzela; kasi makambo nyonso te nde ezali na litomba. Makambo nyonso epesami nzela; kasi makambo nyonso te nde etongaka. Tiká moto na moto akoba koluka, litomba na ye moko te, kasi oyo ya moto mosusu.”—1 Bakolinti 10:23, 24, NW.
Kobanda na ntango botindi nkasa ya kobenga bato tii na ntango bokosukisa fɛti yango moko, ezalaka na makambo mingi oyo esɛngaka kobongisa yango liboso. Na mokanda na ye (Marriage for Moderns), Henry Bowman alobi ete: “Soki bibongiseli yango esalemi na molɔngɔ mpenza, na kotalela malamumalamu makambo oyo ekoki koya mpe soki esalemi liboso mpenza, kolɛmba ekozala mingi te mpe mitema ekozala mpenza likolólikoló te.” Akebisi ete: “Ata soki makambo nyonso ebongisami malamu ndenge nini, bokolɛmba kaka ata mwa moke; yango wana ezali malamu kosala nyonso oyo bokoki mpo bólɛmba mingi koleka te.”
Ekosɛnga mpe kobimaka mpo na kosomba biloko mpe koluka kosala makambo mosusu, bakisa mpe koyamba bato oyo bobengi bango na fɛti. Baninga to bandeko na bino bakoki kozala wana mpo na kosalisa bino? Mikumba mosusu oyo esɛngi kaka te ete bino moko babalani bókokisa yango, bokoki te kopesa yango na bato mosusu oyo bokoki kotyela motema?
Mbongo oyo bokosala na yango fɛti
Ezali na ntina mingi kobongisa mbongo oyo ekoki mpo na kosala na yango fɛti. Ezali malamu te kokanisa ete babalani to baboti na bango bákɔta banyongo mpo nakosala libala oyo eleki makoki na bango. Atako bazali na makoki ya kosala fɛti ya monene, bato mosusu basepelaka kosala fɛti ya moke. Ezala bongo to te, babalani mosusu bamonaki malamu kozala na liste oyo basengeli kotala mpo na koyeba soki mbongo oyo babongisaki mpo na fɛti basaleli yango nyonso to ndambo etikali to mpe eleki ndenge bakanisaki. Ekoki mpe kozala malamu kokoma na papye dati oyo bokosomba eloko boye to bokosala likambo boye. Na ntembe te, koluka kokanga makambo yango nyonso na motó ekoki mpe kobakisela bino mitungisi.
Mokolo ya libala ekosɛnga mbongo boni? Yango etaleli mingimingi esika oyo bofandi; kasi ezala epai nini bofandi, ekozala malamu komituna bino moko: ‘Tokozala mpenza na mbongo ya kosala makambo nyonso oyo tokani? Makambo nyonso wana ezali mpenza na ntina?’ Tina, mwasi moko oyo autaki kobala sika, alobaki ete: “Na ntango oyo tozalaki komibongisa, biloko mosusu oyo ezalaki komonana ete ezali ‘na ntina,’ nsima tomonaki lisusu ntina na yango te.” Bótalela toli Yesu apesaki: “Nani na kati na bino oyo alingi kotonga linɔ́ngi afandaka liboso te mpo na kotánga motuya, mpo na komona soki azali na oyo esengeli mpo na kosilisa yango?” (Luka 14:28, NW) Soki bozali na makoki te ya kosala makambo nyonso oyo bolingi, bólongola makambo mosusu. Ata soki bozali na makoki ya kosala makambo mingi, bósala makambo ya mindɔndɔ te.
Na Italie, esika moko epai balakisaka biloko ya libala mpe bamonisaka misala mosusu oyo bakoki kosalela baoyo balingi kobala, bamonisaki mbongo oyo mwasi akoki kobimisa mpo na libala na ye. Na ndakisa, kobongisa elongi mpe nsuki, dolare 450; kofutela motuka moko ya kitoko, dolare 300; kosalisa filme ya mokolo yango, dolare 600; album ya libala (oyo ezangi bafɔtɔ na kati) dolare 125 tii 500; bafololo, kobanda na dolare 600; fɛti ya libala, dolare 45 tii 90 na moto moko; rɔbɛ ya libala, kobanda na dolare 1 200. Lokola molulu yango ezali na ntina mingi, ezali mabe te ete mwa mposa ya koluka kosala likambo moko ya ndenge mosusu ekoka kozala; kasi ezala ekateli nini bokozwa, esengeli kozala na bokatikati.
Atako bato mosusu babebisaka mbongo mingi, kasi bamosusu basepelaka kobomba mwa mbongo na bango—ntango mosusu basalaka bongo mpo bazali na ndenge mosusu ya kosala te. Mwasi moko oyo abalaki alobaki boye: “Biso nyonso mibale tozalaki babongisi-nzela [elingi koloba bapalanganisi ya nsango malamu ya ntango nyonso], mpe tozalaki na mbongo te, kasi yango ezalaki mpenza likambo te. Bokilo na ngai ya mwasi asombaki elamba mpo natongisa rɔbɛ ya libala; moninga na ngai moko atongaki yango kozanga kosɛnga mbongo, yango ezalaki lokola likabo na ye mpo na libala na ngai. Mobali na ngai akomaki nkasa mpo na kobenga bato na mabɔkɔ, mpe moninga moko moklisto asalisaki biso na motuka na ye. Mpo na fɛti, tosombaki kaka biloko ya ntina mpe moto moko akabelaki biso masanga. Ezalaki ya mindɔndɔ te, kasi ekokaki.” Mobali moko oyo abali sika alobaki ete, soki bandeko mpe baninga bapesi lisalisi ya solosolo, “mbongo ebimaka mpenza mingi te.”
Ezala bazali na mbongo mingi to bazali na mbongo mingi te, babalani baklisto basengeli koboya kolekisa ndelo na makambo nyonso oyo bakosala, kolanda bizaleli ya bato ya mokili, to mpe koluka komimonisa. (1 Yoane 2:15-17) Ekozala mpenza mawa soki libala, likambo ya esengo, ekómi likambo oyo esengeli kotinda moto abuka mitinda ya Biblia oyo etali kozala na bokatikati, mitinda oyo ekebisaka biso tólekisa ndelo te na kolya mpe na komɛla, to mpe oyo ekebisaka biso na likambo nyonso oyo ekoki kopekisa biso tótalelama ete ‘tozangi mbeba’!—Masese 23:20, 21; 1 Timote 3:2, NW.
Esengeli koboya likanisi ya koluka kosala libala oyo eleki monene mpe eleki kitoko. Na ndakisa, talá likambo oyo basi mibale basalaki na mboka moko: balataki voile oyo eleki ndelo—ya moko na bango, diamɛtrɛ na yango ezalaki mɛtrɛ 13 mpe ezalaki na kilo 220; ya mosusu ezalaki na bolai ya mɛtrɛ 300 mpe esengelaki bilenge basi 100 mpo na komema yango. Komekola elateli ya ndenge wana ekoyokana mpenza na toli ya Biblia oyo ezali kosɛnga biso tózalaka na bokatikati?—Bafilipi 4:5.
Esengeli kolanda makambo ya bonkɔkɔ?
Ekólo na ekólo ezalaka na makambo na yango ya bonkɔkɔ oyo etali libala, yango wana ekozala mpasi mpo na kolobela yango nyonso awa. Liboso ete babalani bázwa ekateli ya kolanda momeseno boye to boye, ekozala malamu bámituna bango moko: ‘Ezali kolimbola mpenza nini? Momeseno yango euti na biyambayamba, mpo na kopesa makila malamu to kotombela babalani bábota bana mingi—na ndakisa momeseno ya kobwakela babalani lɔsɔ na nzoto? Ezali na boyokani na losambo ya lokuta to na misala mosusu oyo Biblia epekisi? Elongobani te? Ekoki kotungisa bato mosusu to kobɛtisa bango libaku? Bato bakoki kobanda komitunatuna mpo na nini babalani balandi momeseno yango? Momeseno yango ezali mabe?’ Soki ntembe ezali na moko ya mituna yango, ekozala malamu bóboya momeseno yango mpe, soki esengeli, bóyebisa bato oyo bokobenga ekateli na bino libelalibela.
Esengo mpe ndenge mosusu oyo bato bamiyokaka
Na mokolo ya libala, bato bamiyokaka ndenge moko te, ezali na baoyo bayokaka esengo mingi mpenza, ezali mpe na bamosusu oyo balelaka. Mwasi moko oyo autaki kobala alobi ete: “Nazalaki na esengo mingi, namonaki lokola nde nazali kolɔtɔ ndɔtɔ.” Kasi mobali moko oyo mpe autaki kobala alobi ete: “Ezalaki mokolo ya mabe kasi mpe ya malamu koleka mikolo nyonso ya bomoi na ngai. Babokilo na ngai bazalaki kolela makasi mpamba te nabɔtɔli bango mwana na bango ya liboso, mwasi na ngai mpe azalaki kolela ntango amonaki baboti na ye bazali kolela; nsukansuka ngai mpe nabandaki kolela mpamba te nakokaki kokanga motema lisusu te.”
Makambo ya ndenge wana etungisa bino te—esalemaka bongo mpo bato bakómaka motema likolólikoló. Bókamwa mpe te soki na bantango mosusu boyokani na libota, ata kutu kati na babalani bango moko, ekómi mwa mindɔndɔ. Buku moko (The Complete Wedding Organiser and Record ) elobi ete: “Yango esengeli kozala likambo ya kokamwa te, mpamba te ntango mosusu ezali mbala na bango ya liboso ya kobongisa elongo likambo ya monene ndenge wana. Yango wana, lokola mitema na bango ezali mɔ́tɔmɔ́tɔ, yango ekoki kozanga te kobota mwa mindɔndɔ kati na bango. Ezali na ntina te kosilika soki makambo nyonso ezali kotambola te ndenge bobongisaki; nzokande, eloko ekosalisa bino mpenza na ntango wana ezali nde koluka toli mpe lisalisi.”
Mobali moko oyo autaki kobala alobaki ete: “Likambo nakokaki kosepela na yango mingi mpe nayokaka ntango nyonso mawa mpo esalemaki te ezali ete nazwaki te moto oyo akokaki kopesa ngai toli mpe oyo nakokaki kofungolela ye motema mpe koyebisa ye makanisi na ngai.” Ntembe ezali te ete moninga to ndeko moko oyo akɔmeli to mpe moto mosusu ya lisangá oyo ayebi makambo mingi nde akoki kozala mpenza mopesi-toli ya malamu.
Ntango baboti bazali komona mwana na bango azali kotika libota, bakoki kozala na esengo oyo esangani na lokumu, na mawa mpe na kobanga. Kasi, na esika bátalela kaka makambo oyo bango balingi, basengeli nde kondima ete ntango ekoki mpo mwana na bango ‘atika tata na ye mpe mama na ye’ mpo na kozala elongo na mobalani na ye mpo ‘bákóma mosuni moko’ ndenge Nzambe atindaki yango. (Genese 2:24) Mama moko alobaki boye ntango azalaki kolobela ndenge amiyokaki ntango mwana na ye ya mobali ya liboso abalaki: “Nalelaki; longola kolela ya mawa, nalelaki mpe mpo na esengo ya kozwa bokilo ya malamu mpenza.”
Mpo ete mokolo yango esepelisa mpe elendisa moto nyonso, baboti—ezala mpe babalani—basengeli komonisa bizaleli ya baklisto; na ndakisa boyokani, kimya, ezaleli ya koluka liboso bolamu ya bato mosusu, mpe koyeba kondima makanisi ya basusu ata soki ekeseni na oyo ya bango.—1 Bakolinti 13:4-8; Bagalatia 5:22-24; Bafilipi 2:2-4.
Basi mosusu oyo bazali kobala babangaka ete likambo moko ya mabe esalema na mokolo ya libala na bango; na ndakisa babangaka kokóma nsima ya ngonga na esika ya molulu mpo pinɛ ya motuka ekoki kotɔbɔka, babangaka mbula to moi makasi, to babangaka ete rɔbɛ na bango ya libala eya kobeba mwa moke liboso ya molulu mpe bákoka kobongisa yango te. Ntango mosusu, na makambo wana nyonso, ata moko te ekosalema. Kasi, bótalela makambo na ndenge ezali mpenza. Makambo nyonso ekoki te kotambola na ndenge ya kokoka mpenza. Esengeli kondima makambo mosusu oyo eyaka na mbalakaka. (Mosakoli 9:11) Ata soki bokutani na mikakatano, bósala makasi mpo ete bóbungisa mwa kosɛka na bino te, mpe bózala kaka na makanisi ya malamu. Soki likambo moko etamboli malamu te, bóbosana te ete nsima ya bambula, ntango bokobɛta lisolo na yango, ekosɛkisa bino nde kosɛkisa. Bótika te ete mwa bambeba ya mikemike ebebisa esengo ya libala na bino.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Mpo na likambo yango, mikili mingi epekisaka mimeseno lokola kobala mobali to mwasi mosusu na ntango ozali naino na libala, kobala ndeko na yo, kokosa, bitumba na kati ya libala, mpe kobalisa bana oyo bakokisi naino te mbula oyo mibeko esɛngi mpo na libala.
[Likanisi ya paragrafe na lokasa 7]
“Na ntango oyo tozalaki komibongisa, biloko mosusu oyo ezalaki komonana ete ezali ‘na ntina,’ nsima tomonaki lisusu ntina na yango te.”—TINA, MWASI MOKO OYO AUTI KOBALA
[Etanda/Bililingi na lokasa 7]
MWA MAKAMBO OYO BOKOKI KOSALA NTANGO BOZALI KOMIBONGISA MPO NA LIBALAb
Sanza 6 to koleka
❑ Kosolola na mwasi to na mobali oyo okobala, na baboti na yo mpe na babokilo yo mpo na makambo oyo bosengeli kobongisa mpo na libala
❑ Kozwa ekateli na oyo etali lolenge ya libala oyo bolingi kosala
❑ Kobongisa mbongo mpe liste ya biloko oyo bokozala na mposa na yango
❑ Kotalela makambo oyo Leta asɛngaka
❑ Koluka esika oyo fɛti ekosalema mpe koyokana libelalibela na nkolo ya esika yango
❑ Kosolola na moto oyo akokanga bafɔtɔ
Sanza 4
❑ Kopona (na kati ya bilamba oyo bozali na yango) oyo bokolata mokolo ya libala, to kosomba ya sika, to kotongisa mosusu
❑ Kosala komande ya bafololo
❑ Kopona lolenge ya nkasa ya libyangi oyo bolingi mpe kosalisa yango
Sanza 2
❑ Kotindela bato nkasa ya kobenga bango na libala
❑ Kosomba mpɛtɛ
❑ Koluka kozwa mikanda oyo esɛngamaka
Sanza 1
❑ Komeka bilamba ya libala soki esimbi
❑ Koyebisa liloba ya nsuka na bato oyo bosɛngaki básalela bino mwa eloko mpe bato nyonso oyo bosengeli kokutana na bango
❑ Kotinda mwa mikanda ya kopesa matɔndi mpo na makabo oyo bosili kozwa
Pɔsɔ 2
❑ Kobanda komema biloko na bino mpe kotika yango na esika bokofanda
Pɔsɔ 1
❑ Koluka koyeba soki bato nyonso oyo bakosalisa bino na mwa misala bayebi misala oyo bakosala
❑ Kozwa bibongiseli etali kozongisa biloko nyonso oyo bofutelaki to bodefaki
❑ Kopesa mikumba mwa mingi na bato mosusu
[Maloba na nse ya lokasa]
b Babalani bakoki koyokanisa yango na mibeko ya mboka oyo bafandi mpe na makoki na bango.
[Elilingi na lokasa 8]
“Oyo Nzambe akangisi esika moko moto akabola yango te”