Tobikaki na likama ya nsɔmɔ ya pɔtɔpɔtɔ ya mɔtɔ!
EUTI NA MOKOMI NA BISO NA CONGO (KINSHASA)
TOZALI na mokolo ya mibale, mwa 15 sanza ya Yanuali 2002—ezali komonana ndenge mikolo mosusu nyonso ezalaka na Afrika ya Ntei. Ngai na Motatoli mosusu ya Yehova tokómi na Goma, na Kivu, na Congo (Kinshasa), mpo na kokutana na Batatoli ya etúká ya Balaki ya Minene (Grands Lacs).
Eloko ya kobanga ezali te?
Atako Nyiragongo, ngomba ya mɔtɔ (ezali mɛtrɛ 3 470 likoló ya nivo ya mai monene), ezali mwa mosika, kilomɛtrɛ 19 na Goma, makambo na yango mosusu ebendi likebi na biso.a Tozali koyoka ndenge ngomba yango ezali konguluma, mpe tozali komona milinga ezali kobima. Bato ya engumba yango bazali koloba ete esalaka kaka bongo soki tokómi na basanza wana, mpe bazali komitungisa mpo na yango te.
Mokolo wana nsima ya midi, tokɔti makita na masangá mibale ya Batatoli ya Yehova. Tozali kaka koyoka ndenge mabelé ezali koningana mpe tozali koyoka konguluma. Emonani lokola ete moto moko te azali komitungisa mpo na yango. Bakonzi ya mboka bazali kotika te koyebisa bato bámitungisa te, ntina moko ya kobanga ezali te. Atako mwana Congo moko oyo ayekolá makambo ya bangomba ya mɔtɔ azalaki kokebisa basanza mingi liboso ete ngomba wana ekobimisa mɔtɔ, moto moko azalaki kondimela ye te. Moninga moko alobi na ngai kaka na lisolo ete: “Lokola ngomba oyo ya mɔtɔ ezali kosala boye, lelo na mpokwa likoló ekozala motane.”
“Esengeli tókima noki mpenza!”
Ntango tozongi na ndako esika tozalaki kofanda, bayebisi biso na makasi ete: “Esengeli tókima noki mpenza!” Makambo ebebi. Engumba ekómi na likama monene. Talá ndenge makambo ebongwanaka mbala moko! Kaka na ntɔngɔ wana, tozalaki kosolola mpo na koyeba ndenge tokoki kosala mpo tótya ebongiseli moko na Goma mpo na kotambwisa misala na biso ya kopesa litatoli. Sikoyo, kaka mokolo yango nsima ya midi, bayebisi biso tókima mpo engumba yango ekómi na likama!
Ntango butu ebandi koyinda, likoló ekómi motane lokola mɔtɔ—esali bongo kaka mpamba te! Pɔtɔpɔtɔ ya mɔtɔ oyo Nyiragongo ezali kobimisa ezali koya na engumba. Ngomba yango ekómi lokola nzungu moko monene ezali kotɔka mpe kosopa pɔtɔpɔtɔ ya mɔtɔ oyo ezali kozikisa biloko nyonso na nzela oyo ezali koleka. Naino tokangá bavalisi na biso noki bongo te! Ezalaki pene na ngonga ya 7 ya mpokwa.
Bankóto ya bato bazali kokima
Wana tozali kowela mpo tólongwa na Goma, nzela yango etondi na bankóto ya bato oyo bazali kokima mpo na komibatela. Mingi bazali kotambola na makolo, bamemi mwa biloko oyo bazwaki likoki ya komema. Mingi bamemi mikumba na bango na mitó. Ndambo mosusu bafinani na kati ya mituka oyo etondi na bato mpe na biloko. Bango nyonso bazali kokende na Rwanda, oyo ezali na ndelo pene wana. Kasi, ngomba ya mɔtɔ eyebi te bandelo ya bikólo oyo bato batyá. Ata lipinga moko te ya basoda ekoki kopekisa to kotɛlɛmisa yango! Tomoni ndenge basoda bazali kobanga pɔtɔpɔtɔ ya mɔtɔ, bango mpe babandi kokima mpo na komibatela. Ekómi mpenza mpasi mpo mituka etambola na nzela yango. Tosengeli kokende kaka na makolo. Tozali na kati ya bato 300000: mibali, basi, bana, mpe mwa bana mike—bango nyonso bazali kokima mpo ngomba ya mɔtɔ etomboki. Na nse ya makolo na biso, tozali koyoka ndenge mabelé ezali konguluma mpe koningana.
Moto nyonso azali kokima mpo na komibatela. Ngai ná moninga na ngai, tozali bapaya mpo touti na engumba mosusu ya monene, tozali na kati na bango, elongo na mwa ndambo ya Batatoli oyo bazali kokɛngɛla biso. Ntango tozali komona bango, ndenge bazali komitungisa mpo na biso, yango ezali mpenza kosimba mitema na biso mpe kolongola biso kobanga na ntango wana ya nsɔmɔ mpe ya mpasi. Bato bazali kokima kaka na mwa biloko oyo bakoki komema: bilamba, nzungu, saani mpe mwa biloko ya kolya. Lokola bato bazali ebele ndenge wana, bazali kotutatutana. Mituka oyo ezali koluka nzela ezali kotuta bato mosusu, ezali kokweisa biloko na bango, mpe bato mosusu bazali konyatanyata biloko yango. Mawa na moto oyo akwei. Bato nyonso bazali mpenza mitema likoló. Moto nyonso azali se kobanga. Tozali kosala makasi mpo tókóma na Gisenyi, engumba ya penepene oyo ezali na Rwanda. Tozali kaka kotambola makasi na makolo.
Tolekisi butu na esika ya kimya
Tokómi na mwa otɛlɛ moko, kasi bisika ya kolala ezali lisusu te. Atako touti kotambola ngonga misato mobimba na ndambo, tozwi kaka bakiti, mpe tofandi na mesa moko ya moke. Tosepeli mpo tozali na bomoi, tobiki na likama mpe tozali elongo na bandeko na biso baklisto oyo tokimaki na bango nzela moko. Likambo ya esengo, ata Motatoli moko te abungisi bomoi.
Emonani polele ete tokolekisa butu mobimba libándá. Na esika oyo tokómi, tozali komona likoló motane lokola mɔtɔ kuna mosika epai Goma ezali. Ezalaki mpenza kitoko mpe likambo ya kokamwa mingi! Mokemoke, ntɔngɔ ebandi kotana. Butu mobimba, tozalaki koyoka mabelé ezali konguluma mpe koningana. Ntango tozongisi makanisi na makambo oyo euti kosalema na mokolo oyo eleki, tokokaki bobele koyokela bankóto ya mabota oyo bakimaki elongo na bana na bango ya mike mawa.
Lisalisi eyei nokinoki
Batatoli ya Kigali, mboka-mokonzi ya Rwanda, bayaki kokutana na biso mokolo ya mitano, mwa 18 Yanuali, na bamidi. Bandeko ya Goma mpe ya Gisenyi baponamaki mpo na kozala na komite moko ya kopesa lisungi, mpe babandaki mosala. Esengelaki libosoliboso kozwa bisika ya kolala mpo na Batatoli nyonso oyo bakimaki likama wana; esɛngaki kokabola bango na Bandako ya Bokonzi motoba oyo ezalaki zingazinga. Basalaki yango kaka mokolo wana. Batyaki libaya moko na pembeni ya nzela, bakomaki na Lifalanse mpe na Swahili mpo bandeko bámona esika Ndako ya Bokonzi ezali, esika oyo bakokaki kokɔta mpo na kozwa lisalisi mpe libɔndisi. Kaka mokolo yango, tɔni misato ya biloko oyo ezalaki mpenza na ntina na ntango wana ekómaki na Bandako ya Bokonzi yango epai Batatoli bazalaki kolala. Na mokolo oyo elandaki, mokolo ya pɔsɔ, motuka moko ya monene oyo eutaki Kigali ekómaki, ememaki biloko ya kolya, babolangiti, bakapo, basabuni mpe bankisi ya monganga.
Motungisi ebakisami
Oyo ezali ntango moko ya komitungisa mingi. Ndenge nini kokokisa bamposa ya bato wana nyonso? Bongo ngomba ya mɔtɔ? Ntango nini ekotika kobimisa pɔtɔpɔtɔ ya mɔtɔ? Engumba mobimba ya Goma ebebi to kaka mwa ndambo nde ebebi? Nsango oyo bato bazali kopanza mpe ndenge mabelé ezali kaka konguluma, nyonso wana ezali kopesa elikya moko ya malamu te. Bato ya mayele bazali kobanga noki gazi oyo babengi dioxyde de soufre ekopanzana mpe ekobebisa mopɛpɛ. Bazali mpe kobanga ete mai ya Laki Kivu ekozwa pwazɔ mpo pɔtɔpɔtɔ ya mɔtɔ esopani kuna.
Mikolo mibale nsima ya kotomboka ya ngomba wana ya mɔtɔ, nsango oyo tozali kozwa ezali kaka ya kobangisa. Na nsima, na mokolo ya pɔsɔ nsima ya midi, tozwi nsango ete bato pene na 10 000, kati na bango Batatoli 8 ná mwana moko, bakangami na esika moko oyo pɔtɔpɔtɔ ya mɔtɔ ezingi bango mpe pɔtɔpɔtɔ yango esali ngomba ya mɛtrɛ mibale. Mopɛpɛ ebebi mpo na bagazi wana ya mabe. Tozali kobanga mpo na bomoi ya bandeko yango. Emonani lokola ete elikya moko ezali te. Ata katedrale ya Goma, tóloba ete ebebaki pene na mobimba na pɔtɔpɔtɔ ya mɔtɔ oyo ezalaki kosopana se kosopana. Na ntango wana, ata moto moko te azalaki kondima ete eloko moko ekotikala lisusu na Goma.
Tozwi nsango ya kobɔndisa
Mokolo ya eyenga, na ngonga ya 9 ya ntɔngɔ, ndeko moko kati na baoyo pɔtɔpɔtɔ ya mɔtɔ ezingaki abengi biso na telefone. Ayebisi biso ete likama ebandi kosila mokemoke. Mbula ezali kobɛta, mɔtɔ ya pɔtɔpɔtɔ ezali kokufa mpe mopɛpɛ ebandi kobonga mokemoke. Atako pɔtɔpɔtɔ yango ezali naino na molunge mpe ezali kaka likama, bato babandi kokatisa yango mpo na kokende na ngámbo mosusu, na esika likama ezali te. Engumba ebebi nyonso te.
Wana ezali nsango ya liboso ya malamu oyo tozwi banda likambo wana ya nsɔmɔ esalemi. Emonani lokola ete ngomba yango ya mɔtɔ ebandi kolɛmbisa nkanda na yango mokemoke. Bato ya zingazinga oyo bayebi makambo ya bangomba ya mɔtɔ bazali kopesa makanisi ya bongolabongola. Sikoyo tokoki kosolola na bandeko oyo bazali na Bukavu, engumba ya pene oyo ezali na nsuka mosusu ya Laki Kivu. Tozwi nsango ete mabota mitano ya Batatoli mpe bana misato oyo bazalaki elongo na baboti na bango te, bakómaki na Bukavu na masuwa. Batatoli oyo bazali na engumba wana bakosalisa bango.
Sikoyo, tokoki kozonga!
Mokolo ya mosala moko, mwa 21 Yanuali, na Gisenyi, tolendisi mpe tobɔndisi bandeko nyonso oyo bakimaki likama wana mpe toluki koyeba nini basengeli na yango. Tomoni ete bandeko oyo basali mwa mikolo na Bandako ya Bokonzi wana motoba, bazali komibongisa. Toyebi motuya ya bandeko nyonso oyo bakimaki: 1 800, soki totángi mpe bana.
Bato wana nyonso bakozala ndenge nini? Bakonzi ya mboka babongisi nokinoki bakaa mpo na bato oyo bakimaki likama yango. Kasi, bato mosusu babosaná naino te makambo oyo bamoná na bakaa ya bato bakimá bitumba oyo basalaki nsima ya ntango oyo bato babomanaki na ndenge ya nsɔmɔ na 1994. Tozwi ekateli ya kozonga na Goma, mpe pene na midi tokómi na engumba yango. Mwa ndambo ya engumba yango (25 %) ebebi. Totamboli kutu likoló ya pɔtɔpɔtɔ ya mɔtɔ, oyo ekómi sikawa makasi, esika babalabala ya minene ya engumba yango ezalaki. Ezali naino na mwa molunge, mpe gazi na yango ezali kopanzana na mopɛpɛ. Bato mingi balingi kaka kozonga na engumba yango.
Na ngonga ya 1:00 nsima ya midi, na Ndako ya Bokonzi ya lisangá ya Goma Centre, tosali likita elongo na bankulutu 33. Bango nyonso bazali se na likanisi moko: bazwi ekateli ya kozonga na Goma. Balobi ete: “Mboka na biso ezali Goma.” Bongo soki ngomba wana ya mɔtɔ etomboki lisusu, bokosala nini? Bazongisi ete: “Tomesaná na yango.” Bazali kobanga ete soki bazongi noki te, bakoyiba biloko na bango nyonso oyo etikalaki na engumba yango. Na mokolo oyo elandi, mabota nyonso ya Batotoli oyo bakimaki bazongi na Goma. Mingi kati na bato 300 000 oyo bakimaki na Rwanda bazongi na engumba na bango, oyo ekweli likama.
Pɔsɔ moko na nsima
Bato bazongeli misala na bango na engumba yango. Na ntembe te, engumba yango ekolimwa te. Eumeli te, babandi mosala ya kolongola pɔtɔpɔtɔ oyo ekómi makasi mpo bato bákoka kolekaleka na ngámbo nyonso mibale ya engumba oyo ekabwanaki na mibale. Eloko nyonso oyo ezalaki na nzela oyo pɔtɔpɔtɔ wana ya mɔtɔ ezalaki koleka ebebi. Esika oyo bamagazini mpe babiro ya Leta ezalaki, nyonso ebebi. Balobaki mpe ete ndambo (1/3) ya esika mpɛpɔ ekitaka na libándá ya mpɛpɔ ebebi mpenza.
Nsima ya kotánga bato nyonso malamumalamu, emonanaki ete na bato nyonso oyo batikalaki na eloko te, ndako te, ezalaki na mabota ya Batatoli 180. Komite mpo na kopesa lisungi ezwaki bibongiseli mpo na kosalisa bato pene na 5 000, mibali, basi, mpe bana mpo bázwaka biloko ya kolya mokolo na mokolo. Batatoli ya Yehova na Belgique, na France, mpe na Suisse batindaki bakapo ebele mpo na bandeko oyo babungisaki bandako na bango mpe mpo na bisika ya makita ya masangá oyo Bandako na bango ya Bokonzi ebebaki mpenza to ezikaki nyonso. Bandeko mosusu oyo babungisaki bandako bakofanda naino epai ya Batatoli oyo bandako na bango ebebaki te, basusu bakobanda kolala na bandako oyo basali na bakapo.
Mokolo ya mitano, mwa 25 Yanuali, mikolo soki zomi nsima ya butu wana ya nsɔmɔ, bato 1 846 bayangani na liyangani oyo esalemaki na libándá ya eteyelo moko na Goma mpo na koyoka maloba ya kolendisa oyo euti na Makomami. Bandeko bamonisi botɔndi mingi mpo na libɔndisi oyo bazwi mpe lisalisi oyo Yehova apesi bango na nzela ya ebongiseli na ye. Biso baoyo tozali bapaya, ntango tomoni mpiko mpe kondima makasi ya bandeko wana, atako bakutani na likambo wana ya nsɔmɔ, yango esimbi mpenza mitema na biso. Na bantango ya mpasi ndenge wana, ezali mpenza esengo kozala kati na libota ya bandeko oyo basangani na losambo ya Nzambe ya solo, Yehova, Ye liziba ya libɔndisi ya seko!—Nzembo 133:1; 2 Bakolinti 1:3-7.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Na Swahili, “ngomba ya mɔtɔ” babengaka yango mulima ya moto.
[Karte na lokasa 12, 13]
(Mpo na komona yango, talá mokanda)
Makonga emonisi ndenge pɔtɔpɔtɔ ezalaki kokende
CONGO (KINSHASA)
Ngomba Nyiragongo
↓ ↓ ↓
Libándá ya mpɛpɔ ya Goma↓ ↓
↓ GOMA
↓ ↓
LAKI KIVU
RWANDA
[Bililingi na lokasa 13]
Bankóto ya bato ya Goma bákimaki pɔtɔpɔtɔ ya mɔtɔ
[Eutelo ya bafɔtɔ]
AP Photo/Sayyid Azim
[Bililingi na lokasa 13, 14]
Pɔsɔ mobimba ekokaki naino te, Batatoli bazongelaki makita na bango ya boklisto