Lisungi mpo na banyokwami na makambo ya nsɔ́mɔ oyo mabimaki na Rwanda
RWANDA ezwami na ntéi ya Afrika, babéngaki yango “Suisse ya Afrika.” Zámba ya kitoko oyo emonanaka na ntango bato bazali kopimbwa na mpɛpɔ likoló ya mboka etindaka na kokanisa na elanga ya Edene. Likambo ya kokamwa ezali te na komona ete bato bazalaki na momeseno ya komonisa Rwanda lokola paladiso.
Na eleko moko boye, mpo na nzeté moko oyo ekatamaki, bazalaki kozongisa kolóna lisusu nzeté mibale. Mokolo moko kati na mobu ezalaki kopesama mpo na kolóna banzeté. Banzeté oyo ekobotaka mbuma elónamaki mpembeni ya balabála. Kotambola kati na mboka ezalaki na bonsomi mpe na mpasi te. Banzela ya minene oyo ezalaki kokangisa mboka-mokonzi, Kigali, na bamboka misusu ya mike etyamaki gudró. Mboka-mokonzi ezalaki koya monene nokinoki. Mosáli ya nsé azalaki kozwa na nsuka ya sanza mosolo oyo mokoki mpo na kobikela.
Mosala ya boklisto ya Batatoli ya Yehova ezalaki mpe na bokóli kati na Rwanda. Na ebandeli ya mbula oyo euti koleka, Batatoli koleka 2 600 bazalaki kosangana na mosala ya kopalanganisa nsango malamu ya Bokonzi ya Nzambe epai na bato soko milió mwambe oyo kati na bango mingi bazali bakatolike. (Matai 24:14) Na Mársi, Batatoli bazalaki kotambwisa boyekoli ya Biblia koleka 10 000 kati na bandako ya bato. Lisusu, ezalaki na masangá 15 kati na Kigali mpe na bamboka oyo ezali zingazinga na yango.
Mokɛngɛli-motámboli moko ya Batatoli ya Yehova amonisaki ete: “Na Novɛ́mbɛ 1992, nazalaki kotala masangá 18. Kasi, na Mársi 1994, masangá ekómaki 27. Motuya ya babongisi-nzela (basáli ya ntango nyonso) mpe ezalaki komata mbula na mbula.” Na Mwapɔ́sɔ 26 Mársi 1994, motuya ya bayangani na Ekaniseli ya liwa ya Klisto ezalaki bato 9 834.
Nzokande, na mbalakaka mpenza, makambo mabongwanaki mabe mpenza kati na Rwanda.a
Nsuka ya mbalakaka ya molɔngɔ́ oyo motyamaki
Mokolo mwa 6 Apríli 1994, pene na ngonga ya 8:00 ya mpokwa, prezidá ya Rwanda mpe prezidá ya Burundi oyo bazalaki bango nyonso mibale ba Hutu, bakufaki na likámá ya mpɛpɔ oyo epanzanaki na Kigali. Na butu yango, bipiolóló ya bapolisi eyokanaki bipai nyonso kati na mboka-mokonzi mpe banzela nyonso ekangamaki. Na nsima, na ntɔ́ngɔ́ntɔ́ngɔ́ mpenza, basodá elongo na mibali oyo basimbi bambeli babandaki koboma bato oyo bazalaki ba Tutsi. Eugène Ntabana—mokɛngɛli ya engumba epai na Batatoli ya Yehova na Kigali—mwasi na ye, mwana na ye ya mobali mpe mwana na ye ya mwasi bazalaki kati na bato oyo babomamaki liboso.
Libota moko ya Batatoli ya Yehova oyo bazalaki mindɛlɛ ya Mpótó basilaki koyekola Biblia elongo na bazalani na bango mingi oyo bazalaki ba Tutsi. Bato libwa kati na bazalani yango bayaki kobombama kati na ndako ya mindɛlɛ wana na ntɔ́ngɔ́ oyo ya nsɔ́mɔ wana batomboki bazalaki kokɔta ndako na ndako.Na nsima ya mwa miniti, bapunzi 40 bakɔtaki kati na ndako, kopanzáká biloko mpe kobwakáká bakiti mpe bamesa. Likambo ya mawa, bazalani wana oyo bazalaki ba Tutsi babomamaki. Nzokande, mpo na basusu, atako basalaki milende mpo na kobikisa bazalani na bango, bapesamelaki nzela ya kobikisa bomoi na bango.
Kobomama eumelaki bapɔ́sɔ mingi. Ekanisami ete pene na ba Rwandais 500 000 to koleka babomamaki. Bankóto mingi bakimaki mpo na kobikisa bomoi na bango, mingimingi ba Tutsi. Biro ya Filiale ya Batatoli ya Yehova oyo ezali na Zaïre eyebisaki na bandeko ya France ete bazali na mposa ya lisungi. Filiale ya Zaïre elimboli: “Tosɛngaki conteneur moko ya bilamba ya tombola. Bandeko ya France batindeli biso ba conteneurs mitano ya bilamba mpe basapato pene na nyonso ya sika.” Mokolo mwa 11 Yuní batoni 65 ya bilamba etindamaki. Filiale ya Kenya mpe etindaki bilamba mpe bankisi mpo na bandeko bakimá mboka, bakisá mpe bazulunalo Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli na lokótá na bango.
Na Yulí, Front patriotique Rwandais (nkombo ya mampinga ya ba Tutsi) elóngaki mampinga ya ba Hutu oyo bazalaki basoda ya boyangeli. Nsima na yango, bankóto mingi ya ba Hutu babandaki kokima mboka. Yikiyiki ekɔtaki wana ba Rwandais milió mibale to koleka balukaki ekimelo na ba káa oyo etyamaki na mbalakaka kati na bamboka oyo ezalaki zingazinga.
Basalaki milende mpo na kosungana moko na mosusu
Ananie Mbanda mpe Denise Mukagisagara, oyo bazalaki ba Tutsi, bazalaki kati na Batatoli motoba oyo bazalaki kosala na biro ya bobongoli mikanda epai na Batatoli ya Yehova na Kigali. Milende oyo bandeko na bango ba Hutu basalaki mpo na kobatela bango elóngaki na boumeli ya mwa bapɔ́sɔ. Nzokande, pene na nsuka ya sanza ya Máí 1994, Batatoli wana mibale oyo bazalaki ba Tutsi babomamaki.
Kotyáká bomoi na bango na likámá, ata mpe kobungisa yango, Batatoli ya Yehova balukaki mwango ya kobatela bandeko na bango Baklisto ya bikólo mosusu. (Yoane 13:34, 35; 15:13) Na ndakisa, Chantal Mukabalisa azali Tutsi. Ntango basangani ya Front patriotique Rwandais bazalaki koluka ba Hutu kati na libándá ya masano epai kuna azalaki, akɔtelaki baninga na ye oyo bazalaki ba Hutu. Atako batomboki basilikaki makasi mpo na milende na ye, moko na bango alobaki: “Bino Batatoli ya Yehova bozali na bondeko makasi. Lingomba na bino ezali ya malamu koleka!”
Koboya komikɔtisa na koyinana ya bikólo
Yango elingi koloba te ete Batatoli ya Yehova bakutanaka te na koyinana ya bikólo oyo eumeli bambula mingi kati na etúká wana ya Afrika. Motatoli moko ya Yehova oyo autaki France oyo azalaki kati na mosala ya kopesa lisungi alobaki ete: “Ata mpe bandeko na biso baklisto basengeli kosala milende makasi mpo na komitika te kozwama na koyinana oyo epesi nzela na kobomana wana ya mpasi mpo na kolobela yango.
“Tokutanaki na bandeko oyo bamonaki lolenge mabota na bango mazalaki kobomama. Na ndakisa, ndeko mwasi moko moklisto oyo mobali na ye abomamaki nsima bobele ya mikolo mibale ya kobalana. Batatoli mosusu bamonaki lolenge baboti na bango mpe bana na bango bazalaki kobomama. Ndeko mwasi moko, oyo azali sikawa na Ouganda, amonaki lolenge libota na ye mobimba ebomamaki, bakisá mpe mobali na ye. Yango ezali komonisa mpenza mpasi na mayoki mpe na nzoto, oyo ezwi libota moko na moko ya Batatoli ya Yehova.”
Batatoli soko 400 babomamaki na mobulu ya bikólo. Kasi, moko te kati na bango abomamaki na moninga na ye Motatoli. Nzokande, ba Tutsi mpe ba Hutu oyo bazalaki basangani ya lingomba ya Katolike mpe Protestá babomaki bankóto ya bato. Lokola makambo mazali komonisa yango, Batatoli ya Yehova kati na mokili mobimba bakɔtaka te na bitumba, na makambo ya mobulu, to na lolenge ya matáta mosusu nyonso ya mokili oyo.—Yoane 17:14, 16; 18:36; Emoniseli 12:9.
Mpasi oyo ekoki kolobama te
Na eleko ya molungé oyo euti koleka, kati na mokili mobimba, bato bakokaki komona bililingi mpe bafɔtɔ́ ya mpasi oyo eleki ndelo. Ba Rwandais mingi bakimaki na mikili ya mpembeni mpe bafandaki kuna epai makambo matali bopɛto ezalaki malamu te. Motatoli moko ya Yehova oyo autaki na France mpo na mosala ya lisungi amonisaki ezalela oyo ye mpe bato bazalaki elongo na ye bamonaki na 30 Yulí, na maloba oyo elandi:
“Tomonaki makambo moko ya nsɔ́mɔ mpenza. Na ntáka ya bakilomɛtɛlɛ mingi, bibembe bilali na mpembeni ya nzela. Tomonaki bankunda oyo etondaki na bibembe mingi. Tolekaki kati na esika oyo etondi na nzoto ya bato oyo ezalaki na nsolo moko mabe koleka, mpe bana mike bazalaki kosakana mpembeni ya bibembe yango. Ezalaki na bibembe ya baboti oyo bana na bango bazalaki naino na bomoi mpe bakangami na mokɔngɔ. Komona makambo motindo wana mbala na mbala ekoki bobele kopesa mawa mingi. Mayoki ya kozanga nguya mazwi yo mpe okozanga te kooka mawa na makambo ya nsɔ́mɔ mpe ya mpasi motindo wana.”
Ntango bato mingi bazalaki kokima na Zaïre na katikati ya sanza ya Yulí, Batatoli ya Zaïre bakendaki na ndelo ya Zaïre mpe Rwanda, basimbaki mikanda na bango mpo ete bandeko na bango baklisto mpe bato oyo basepelaka na solo bákoka koyeba bango. Batatoli ya Rwanda oyo bakimá basangisamaki esika moko mpe bakendaki na bango na Ndako ya Bokonzi pene na Goma epai kuna bazwaki lisungi. Batatoli oyo bayebi mosala ya monganga basalaki mingi mpenza mpo na kokitisa bampasi ya babɛli atako bankisi ya malonga mpe bisika ya malamu ezalaki te.
Eyano ya nokinoki liboso ya minyoko
Mwamitano 22 Yulí, Batatoli ya Yehova oyo bazali na France bazwaki nkomá ya kosɛnga lisungi oyo eutaki na Afrika. Ezalaki komonisa ezalela ya mpasi ya bandeko na bango baklisto oyo bakimaki Rwanda. Nsima ya miniti mitano to zomi, bandeko bazwaki ekateli ya kotinda mpɛpɔ moko na biloko. Kobongisama ya biloko esalemaki kati na wikende mobimba, likambo yango ezalaki kokamwisa mpamba te batikala naino te kobongisa lisungi monene motindo boye na mwa ntango moke.
Eyano mpo na mposa ya mosolo ezalaki mpenza malamu koleka. Batatoli ya Belgique, ya France mpe ya Suisse bango nyonso bapesaki mosolo koleka badolare 1 600 000. Biloko ya mosuni bizwamaki, kati na yango bilei, bankisi, mpe biloko ya kobikela, mpe biloko nyonso bityamaki na bakartɔ́ mpe bikomamaki nkombo na bandako ya Batatoli ya Yehova oyo ezali na engumba Louviers, France mpe na Bruxelles, Belgique. Batatoli mingi basalaki butu mpe moi mpo na kobongisa biloko oyo bisengelaki kotindama na Ostende, na Belgique. Mwamisato 27 Yulí, na libándá lya mpɛpɔ na Ostende, batoni koleka 35 ekɔtisamaki kati na mpɛpɔ-Cargo. Mokolo oyo elandaki, basanduku mosusu ya mike etindamaki oyo ezalaki bobele na bankisi. Mwapɔ́sɔ, mikolo mibale na nsima, mpɛpɔ mosusu ekumbaki bankisi mingi mpenza mpo na banyokwami.
Batatoli oyo bautaki na France, bakisá mpe monganga moko, bakendaki na Goma liboso ya kotindama ya biloko wana. Mwayambo, 25 Yulí, ntango Monganga Henri Tallet akómaki na Goma, Batatoli soko 20 basilaki kokufa na kolera, mpe basusu bazalaki kokufa mokolo na mokolo. Lokola biloko bilekaki na nzela ya Bujumbura, na Burundi, oyo ezwami na ntáká ya bakilomɛtɛlɛ 250, ekómaki na Goma bobele na mwamitano 29 Yulí na ntɔ́ngɔ́.
Kobundisa maladi
Bobele na ntango yango, Batatoli soko 1 600 mpe baninga na bango bazalaki kofanda na eteni ya mabelé ya mwa Ndako ya Bokonzi oyo ezali na Goma. Mpo na bango nyonso, ezalaki bobele na twalɛti moko, mai ezalaki te, mpe bilei ezalaki komonana mingi te. Ebele ya bato oyo bazalaki na kolera batyamaki kati na Ndako ya Bokonzi. Motuya ya bakufi ezalaki komata nokinoki.
Kolera esilisaka mpenza mai na nzoto ya moto. Miso mazali kokɔta na kati mpe mazali kobaluka. Soki kozongisama ya mai esalemi nokinoki, moto akoki koyoka malamu nsima ya mikolo mibale. Na bongo, milende esalemaki nokinoki mpo na kozongisa bandeko mai na mwa bankisi moke oyo bazalaki na yango.
Lisusu, bandeko bamekaki kotya bato ya maladi mosika mpo na kopɛngola basusu ete bayambela yango. Balukaki kokimisa bato bakimi mboka longwa na bizalela mabe oyo ezalaki na Goma. Esika ya malamu emonanaki penepene na Laki Kivu, oyo ezalaki mosika na ezingelo oyo etondi na mputulu mpe na nsolo ya bibembe.
Batimolaki batwalɛti, mpe mitindá makasi mpo na bopɛto mipesamaki, lokola kosukola mabɔkɔ na mai oyo batye nkisi oyo ebomaka mikrobe nsima ya kouta na twalɛti. Ntina ya mitindá yango elobelamaki mingi mpenza mpe bato bandimaki makambo oyo esɛngamaki na bango. Nokinoki, mbongwana emonanaki, maladi ekitaki.
Ntango biloko mingi eyaki na mwamitano 29 Yulí, lopitalo moke etyamaki kati na Ndako ya Bokonzi na Goma. Bambeto ya káa soko 60 etyamaki, bakisa mpe mwango ya kopɛtola mai. Epai mosusu, Batatoli oyo bazalaki mpembeni ya Laki Kivu bazwaki bahema. Na boumeli ya mwa ntango mokuse, batyaki bahema yango 50 na molɔngɔ́.
Na ntango moko boye, soko Batatoli 150 mpe baninga na bango bazalaki mpenza na mpasi makasi. Na boumeli ya pɔ́sɔ ya liboso ya Augústo, bato koleka 40 kati na bango bakufaki na Goma. Nzokande, bankisi mpe biloko eyaki mpenza na ntango ebongi mpo na kobikisa bomoi ya bato mingi mpe kotya nsuka na bampasi mingi.
Libota ya botɔ́ndi, oyo likangami na makambo ya elimo
Batatoli oyo bakimá mboka bamonisaki botɔ́ndi mingi koleka mpo na nyonso oyo esalemaki mpo na bolamu na bango. Mitema na bango misimbamaki mpo na bolingo oyo bandeko na bango baklisto ya mikili misusu oyo bamonisaki mpe komonáká elembeteli ya polele ete bazali solo kati na libota ya bondeko kati na mokili mobimba.
Atako mikakatano ezalaki, bato bakimá mboka babatelaki ezaleli na bango malamu ya elimo. Ya solo, moto moko alobaki ete: “Atako bazali kati na mposa makasi ya biloko nyonso, bazali komibanzabanza mingi mpo na kozwa bilei ya elimo na esika ya lisungi ya mosuni.” Lokola basɛngaki yango, mikanda 5 000 mpo na koyekola Biblia Okoki kozala na bomoi ya seko na mabele oyo ekobongwana paradis na lokótá Kinyarwanda mitindamaki na bakáa ya bato bakimá mboka.b
Bato bakimá mboka bazalaki kotalela mokapo moko ya Biblia mokolo na mokolo mpe bazalaki kobongisa makita ya lisangá. Bibongiseli bikamatamaki mpo na kotambwisa bakelasi ya bana. Balakisi bazwaki libaku na bakelasi yango mpo na kopesa malako na makambo matali bopɛto, kolobeláká mingimingi ete kobika etaleli kotosa ya malako yango.
Mposa ya lisungi esili naino te
Batatoli mingi oyo bakimá mboka bazalaki na bisika mosusu pene na Goma, lokola na Rutshuru. Lisungi motindo moko lipesamaki epai na bandeko yango. Na mwa 31 Yulí, Batatoli nsambo batindamaki bapimbwaki na mpɛpɔ longwa na Goma mpo na kokende na Bukavu, na súdi epai kuna Batatoli bakimá mboka bazalaki soko 450. Mingi kati na bango bautaki mpe na Burundi. Kolera ebimaki kuna mpe lisungi lipesamaki mpo na kopɛngola liwa kati na bandeko.
Mokolo oyo elandaki, batindami basalaki mobembo na nzela ya Uvira, na Zaïre, na ntáká ya bakilomɛtɛlɛ soko 150, na nzela ezalaki na Batatoli soko 1 600 ya Rwanda mpe ya Burundi oyo bakabolamaki na bituluku nsambo. Malako mapesamaki mpo na lolenge bakoki komibatela bango moko na maladi. Lapólo moko oyo esalamaki mpo na makambo oyo mamonanaki na esika yango elobi boye: “Oyo nyonso esalemi kino sikawa ezali bobele ebandeli, mpe bato 4 700 oyo bazali kozwa lisungi na biso sikawa bakozala lisusu na mposa ya lisungi na boumeli ya basanza mingi.”
Bayebisaki ete ebele ya Batatoli bazongaki na Rwanda na Augústo. Nzokande, bandako na bango mpe biloko na bango nyonso esilaki kobebisama. Na bongo, mosala monene ezali mpo na kotonga lisusu bandako ya kofanda mpe Bandako ya Bokonzi.
Basaleli ya Nzambe bazali kokóba kobondela na motema moko mpo na baoyo banyokwami makasi na Rwanda. Toyebi ete lokola nsuka ya ebongiseli oyo ezali kobɛlɛma, mobulu ekoki sé koya mingi. Nzokande, Batatoli na Yehova ya mokili mobimba bakolanda kobatela ezaleli na bango ya boklisto ya kozanga kokɔta na makambo ya mokili mpe komonisa ezaleli na bango ya motema mawa ya solosolo.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Talá Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 15 Desɛ́mbɛ 1994, kati na lisoló “Makambo ya nsɔ́mɔ na Rwanda—Nani azali mobandisi na yango?”
b Ebimisami na Watchtower Bible and Tract Society of New York, Inc.
[Karte na lokasa 12]
(Mpo na komona yango, talá mokanda)
RWANDA
Kigali
OUGANDA
ZAIRE
Rutshuru
Goma
Laki Kivu
Bukavu
Uvira
BURUNDI
Bujumbura
[Bililingi na lokasa 15]
Na lobɔkɔ ya mwasi: Eugène Ntabana mpe libota na ye babomamaki. Na lobɔkɔ ya mobali: Denise Mukagisagara, oyo azalaki Tutsi, abomamaki atako bandeko na ye ba Hutu basalaki nyonso mpo na kobikisa ye
[Bililingi na lokasa 17]
Na likoló: Kosalisama ya bato ya maladi kati na Ndako ya Bokonzi na Goma. Na nsé na lobɔkɔ ya mwasi: Batoni koleka 35 ya biloko oyo ebongisamaki na Batatoli mpe etindamaki na mpɛpɔ. Na nsé: Pene na Laki Kivu, epai kuna Batatoli bafandaki. Na nsé na lobɔkɔ ya mobali: Ba Rwandais oyo bakimá mboka batelemi mpembeni na Ndako ya Bokonzi na Zaïre