Mokolo oyo Izini moko ezikaki
EUTI NA MOKOMI NA BISO NA FRANCE
NA MOKOLO ya 21 Sɛtɛmbɛ 2001, mikolo zomi mpamba nsima wana bateroriste bakweisaki bandako mibale ya milai (World Trade Center) na engumba New York, izini moko oyo esalaka bankisi ya bilanga mpe bankisi mosusu, ezikaki na ndenge ya nsɔmɔ mpe ebebisaki bandako mingi na bakartye ya zingazinga ya engumba Toulouse, na France. Zulunalo moko (Le Point) ya France emonisaki ete “na makama nyonso oyo esalemá na baizini ya France banda Etumba ya Mibale ya mokili mobimba esilá, oyo wana eleki.”
Ntango tɔni soki 300 ya nitrates oyo ezalaki na kati ya izini ezikaki mpe epanzanaki, etimolaki libulu moko oyo ezalaki monene mɛtrɛ 50 mpe mozindo mɛtrɛ 15. Bato 30 bakufaki mpe bato mosusu koleka 2 200 bazokaki. Ndako soki 2 000 ekweaki mpe ndako mosusu 27 000 oyo ezalaki zingazinga, na kilomɛtrɛ mwambe, ebebaki. Lokola bato bakanisaki ete bateroriste nde basali likambo yango mpe ete milinga ya pwazɔ ezali kobima na izini yango ntango eziki, bato mingi bakómaki kobanga makasi.
Ebele ya Batatoli ya Yehova bazokaki, mpe mingi na bango bazwaki mikakatano mosusu. Bolingo ya boklisto etindaki bandeko na bango Batatoli báya kosalisa bango nokinoki. (Yoane 13:34, 35) Masolo oyo elandi emonisi ndenge basalaki yango.
“Ndako mobimba epanzanaki”
Khoudir azali moko ya basali ya izini yango, oyo babikaki. Ntango izini epanzanaki, mabende to mabanga mikemike oyo epanzanaki ebukaki ye mbanga mpe lipeka mpe amiyebaki lisusu te. Benjamin azalaki kosala na biro na ndako moko ya pembeni, lokito epumbwisaki ye na ntaka ya mɛtrɛ misato mpe akendaki kobambana na efelo moko. Biteni ya talatala ezokisakizokisaki ye mpe etɔbɔlaki ye liso ya lobɔkɔ ya mobali, mpe banda wana, amonaka lisusu malamu te. Alobi boye: “Nabiki mpo nazalaki na biro na ngai te. Babiliki, soki kilo 600, esopanaki likoló ya kiti ya biro na ngai.”
Alain, oyo atángisaka na eteyelo moko oyo ezali pembeni wana, na mɛtrɛ 200 na izini yango, azalaki kosala bafotokopi na ntango izini ezikaki. Alobaki boye: “Ndako mobimba epanzanaki, etikalaki kaka biteni ya bibende. Bifelo ezalaki lisusu te, manzanza te; eloko moko te. Biteni ya talatala oyo eyaki bipai na bipai ebɛtakibɛtaki ngai na elongi. Ezalaki lokola bazali kobɛtabɛta ngai fimbo na elongi.” Liso moko ya Alain ekufaki, mpe ayokaka lisusu malamu te.
Lisalisi eyei nokinoki
Ntango kaka bazwaki likoki ya kosala yango, bankulutu ya masangá 11 ya Batatoli ya Yehova ya esika likama ekweaki balukaki koyeba soki ezalaki na bandeko oyo bazokaki to oyo biloko na bango ebebaki. Batindaki mbala moko bandeko oyo basepelaki bákende kosalisa bandeko oyo bazalaki na mposa ya lisalisi koleka. Bandeko oyo bakendaki baumelaki te na komona ete ndako soki 60 ya Batatoli ebebaki, mpe basalisaki mabota soki zomi na kozwa bisika ya kofanda. Bapesaki mpe mabɔkɔ na mosala ya kobongisa Bandako ya Bokonzi mibale oyo ebebaki. Lisusu, balakisaki baoyo bazwaki likama ndenge basengeli kosala mpo bakompanyi ya asiransi efuta biloko na bango oyo ebebi.
Ndako ya Catherine ná Michel etalaná na izini yango. Catherine azalaki kotambwisa vuatire na ye na ntango izini ezikaki. Alimboli boye: “Na ebandeli, toyokani lokola mabelé eningani. Mwa basegɔnde na nsima, toyokaki ndenge izini epanzanaki. Na nsima tomonaki milinga ezali komata. Ntango tokómaki na kartye na biso, emonanaki lokola esika oyo bitumba ezali. Bandako nyonso ezalaki polele mpe batalatala ya bamagazini epanzanaki. Bato bazalaki kokima na balabala. Bamosusu bafandaki na mabelé, bamosusu balalaki na nse, bamosusu bazalaki kolela, bamosusu bazalaki koganga. Ndako na biso ezalaki lisusu na maninisa te, baporte mpe te, ata mabaya to bibende ya baporte elongwaki. Eumelaki te, bandeko na biso baklisto bayaki kosalisa biso. Kaka mokolo wana nsima ya midi, bandeko ya lisangá na biso bayaki na bapau, bakɔmbɔ mpe bakapo mpo na kozipa maninisa.”
Alain ná Liliane bafandaka mpe mosika te na izini yango. Ndako na bango oyo ezalaka na buludingi moko epanzanaki nyonso. Alain alobi boye: “Biloko nyonso ebukanaki. Bifelo mpe bakaro nyonso ebukanaki, maninisa, baporte, mpe biloko nyonso ya ndako ebebaki. Totikalaki ata na eloko moko te. Bandeko na biso baklisto bayaki nokinoki kosalisa biso. Bakɔmbɔlaki ndako mobimba mpe ata bandako mosusu ya buludingi yango. Bato oyo bafandaka pembeni na biso bakamwaki ntango bamonaki ebele ya bato oyo bayaki kosalisa biso.” Na ntɔngɔ ya mokolo yango, moto moko oyo Alain ayekolaka na ye Biblia abengaki Alain na telefone mpo akenda koyekola na ye. Liliane mpe abimaki. Na yango, ata moko na bango azalaki na ndako te.
Batatoli ya Yehova basalisaki kaka bandeko na bango baklisto te. Nsima ya kosalisana, basalisaki mpe bato mosusu ya pembeni; bakɔmbɔlelaki bango bandako mpe batyelaki bango bakapo na maninisa oyo ezalaki lisusu na batalatala te. Bato yango bazongisaki matɔndi mingi mpe bakamwaki ndenge Batatoli basalelaki bango misala wana nyonso ofele.
Batatoli basalisaki mpe bakonzi ya engumba yango oyo bazalaki koyeba te soki bakobanda wapi na kotala ndenge biloko ebebaki. Batatoli batyaki bopɛtɔ na biteyelo mpe na bandako mosusu ya Leta. Na kartye mosusu, bakonzi ya engumba batindaki Batatoli bákende na ndako na ndako kotuna bato biloko nini basengelaki na yango.
Basalisaki mpe bango na elimo
Longola ndenge bapesaki bango biloko oyo basengelaki na yango, Batatoli mingi na esika oyo likama wana ekweaki bazalaki na mposa ya lisalisi ya elimo. Yango wana, bakɛngɛli-batamboli, elongo na bankulutu mosusu bakendaki kotala bandeko oyo bakwelaki likama. Bandeko yango bamonisaki botɔndi mingi mpo na lisalisi yango. Catherine alobaki boye: “Bankulutu batikaki biso moko te. Bayaki kolendisa biso. Kutu, lisalisi wana ya elimo nde tosengelaki na yango mingi, koleka biloko oyo bapesaki biso.”
Bolingo oyo bandeko bamoniselanaki nokinoki na ntango ya likama wana, etindaki bamosusu báloba makambo oyo ekoki mpenza kosimba motema. Motatoli moko oyo azokaki makasi alobaki boye: “Toyebi te nini ekokómela biso lobi. Tosengeli kokoba kosalela Yehova lokola nde lelo ezalaki mokolo na biso ya nsuka.” (Yakobo 4:13-15) Motatoli mosusu asukisaki na maloba oyo: “Nyonso wana esalisi biso tóyeba ete tosengeli te kokangama makasi na biloko ya mokili, kasi makambo oyo eleki ntina ezali nde na kati ya basaleli ya Yehova.”
[Elilingi na lokasa 26]
Benjamin ná Khoudir
[Elilingi na lokasa 26]
Alain
[Elilingi na lokasa 27]
Toulouse, mokolo moko nsima ya kozika ya izini
[Eutelo ya bafɔtɔ]
© LE SEGRETAIN PASCAL/CORBIS SYGMA
[Elilingi na lokasa 27]
Alain ná Liliane