Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • g05 8/7 nk. 24-25
  • Lingomba ya Katolike elandi kosambela ya bato ya Afrika

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Lingomba ya Katolike elandi kosambela ya bato ya Afrika
  • Lamuká!—2005
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • ‘Esalisaka bango mpo bákóma na kondima ya solo’
  • “Basantu” to orisha?
  • Yesu alingaki koloba nini?
  • Lingomba ya Katolike kati na Afrika
    Lamuká!—1995
  • Basantu
    Ndenge ya kosolola na bato na Makomami
  • Mokakatano ya Lingomba ntango Brésil ezalaki na mabɔkɔ ya Portugal
    Lamuká!—2003
  • Boyokani kati na “Tempelo ya Nzambe” mpe bikeko na Grèce?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1997
Makambo mosusu
Lamuká!—2005
g05 8/7 nk. 24-25

Lingomba ya Katolike elandi kosambela ya bato ya Afrika

Euti na mokomi na biso na Brésil

NA Salvador, mboka-mokonzi ya etúká ya Bahia, na Brésil, bato basalaka ebakata ya fɛti mokolo ya bonane. Ebele ya basi batambolaka na molɔngɔ tii na ndako-nzambe Bonfim; soki bakómi kuna, basukolaka basikalié ya libándá na mai oyo batye malasi. Molulu yango ezali mpo na kokumisa Oxalá, nzambe ya bozalisi, ya bato ya Afrika.

Bato soki milio moko bazali kotala molulu yango. Na nsima, batondi na nzela, bakɔti na fɛti yango ya loyenge, wana mbonda ezali kobɛta na ndenge ya Afrika.

Molulu wana oyo eumeli mbula 250 ezali komonisa polele ndenge lingomba ya Katolike ezali na Brésil: kosangisa bindimeli ndenge na ndenge ya mangomba. Balobaka ete bato ya Brésil soki milio 70 bakɔtá Candomblé, Umbanda, Shangô, to mangomba mosusu ya bato ya Afrika oyo bakómá na Brésil. Nzokande, atako bongo, mingi kati na bango balobaka ete bazali Bakatolike.

Ndenge nini kosangisa mangomba ndenge wana ebandaki? Lingomba ya Katolike endimaka yango? Esengeli nde komikumisa mpo na kosangisa bindimeli ya mangomba ndenge wana, to esengeli nde kokima yango?

‘Esalisaka bango mpo bákóma na kondima ya solo’

Atako mitango oyo bapesaka ekokani te, kasi ekoki kozala ete bato koleka milio motoba ya Bayoruba, Babantou mpe bikólo mosusu ya Afrika batɛkamaki baombo na Brésil kobanda na katikati ya ekeke ya 16 tii mobu 1888, mbula oyo bapekisaki kotɛka bato baombo. Kasangisa bindimeli ya losambo ya bato ya Afrika na Lingomba ya Katolike na Brésil euti na baombo oyo bautaki na Afrika.

Atako Lingomba ya Katolike esalaki nyonso mpo baombo nyonso bákóma bandimi, endimaki kosangana wana ya bindimeli na yango mpe bindimeli ya mangomba ya Afrika. Roger Bastide, moto na mayele oyo ayekolaka makambo ya kala, alobi ete bamisionɛrɛ Jésuites bakanisaki ete bato ya Afrika bazali kaka bana atako bazali mikóló, mpe esengelaki kosalela miziki, mabina, mpe kopesa bango bankombo ya lokumu mpe kosalela bango na makambo mosusu oyo esepelisaka bango, makambo oyo balingaka mingi, mpo bándima kokɔta na lingomba ya Katolike. Bastide akomaki ete: “Esengeli te kopekisa bonkɔkɔ na bango nyonso, kasi esengeli kopona makambo oyo ezali malamu na bonkɔkɔ yango, kosalela yango mpo na komema bango na kondima ya solo.”

Na bakuva mingi oyo ezali kaka na bato ya Afrika, na ndakisa bakuva oyo bapesá nkombo “Santu” Benoît to na Notre-Dame du Rosaire, bonkɔkɔ mingi ya Afrika elataki nkombo ya “boklisto.” Na bakuva yango baponaka mokonzi moko mpe mokonzi-mwasi moko mbula na mbula, na eyenga ya Santu-Benoît, momeseno oyo euti na ndenge baponaka bakonzi na bonkɔkɔ ya bikólo ya Afrika.

“Basantu” to orisha?

Ezala Lingomba ya Katolike to mangomba ya Afrika, bango nyonso bandimaka ete ezali na balobeli mingi kati na Nzambe mpe bato. Na ndakisa, Bayoruba bandimaka ete ba orisha bazali balobeli yango. Balobaka ete ezalaki bilombe ya bitumba mpe bakonzi oyo bakómaki kosambela bango lokola banzambe, oyo bayebaki malamu kosalela banguya ya bazamba, ya mai, ya bangomba, mpe bazalaki bayokanisi kati na bato mpe nzambe na bango oyo aleki banzambe nyonso, Olorun. Ndenge moko mpe Bakatolike bandimaka ete “basantu” babondelaka Nzambe mpo na bato. Babondelaka “mosantu” boye abatela bango na mosala moko boye oyo balingi kosala.

Na esika ya kotika kosambela ba orisha, baombo mingi balandaki kosambela bango na nkombo ya basantu oyo bakokani na ba orisha yango. Yango wana, Bayoruba bakómi kosambela mosantu Antoine to mosantu Geoges, oyo bazalaki basoda mpe bilombe na boklisto ya nkombo mpamba, lokola Ogun, nzambe na bango ya bitumba.

Ndenge moko mpe, Yemanja, mama ya ba orisha nyonso mpe nzambe-mwasi ya mbu, bakokanisaki ye na Ngɔndɔ Mosantu Maria na balolenge mingi oyo “amimonisaka.” Nkolo ya Bonfim, “mosantu” oyo balingaka ye mingi na Salvador, batalelaka ye lokola Oxalá, orisha oyo aleki monene na banzambe nyonso ya Bayoruba. Tii lelo oyo, basambelaka ye mbula na mbula na molulu ya kosukola basikalie ya ndako-nzambe.a

Mokonzi moko monene ya Lingomba ya Katolike na Salvador alobi boye: “Bato ya mboka oyo bandimaka basantu ya Katolike mpe ba orisha ndenge kaka bandimaka Yesu mpe bandimelaka ye. Moto moko ya mayele, oyo ayekolaka bizaleli ya bato na Brésil alobi mpe ete: “Bato mingi bazali koyengayenga kati na mangomba. Bakobima na misa mpo na kokende na molulu ya Candomblé [ya Afrika].”

Kosangisa bindimeli ndenge wana ya Lingomba ya Katolike mpe bindimeli ya Afrika, ezali likambo oyo balingaka mpenza kolobela yango te. Lukas Moreira, prezida ya kala ya Conférence épiscopalienne catholique du Brésil, alobaki ete, “moto na moto asengeli kolanda lingomba na ye, esengeli te kosangisasangisa.” Episkɔpɔ moko alobi boye: “Kosangisa mangomba ezali likambo oyo Lingomba ya Katolike ekosilisa yango te.”

Makanisi ekómi mibale: bakonzi ya Lingomba ya Katolike oyo balingi te kosangisa bindimeli mosusu na lingomba na bango batalelaka bindimeli yango lokola ya bapakano mpe ya Zabolo, nzokande basusu balingi ete mabina, mpe biloko mosusu ya losambo ya bato ya Afrika ekɔta na losambo ya Lingomba ya Katolike.

Yesu alingaki koloba nini?

Yesu Klisto, mobandisi ya lingomba ya boklisto, ateyaki bato ya bikólo mpe mangomba ndenge na ndenge. Maloba na ye ezali polele, ntango alobaki ete: “Basambeli ya solosolo bakosambela Tata na elimo mpe na solo, mpo, ya solo mpenza, Tata azali koluka bato ya ndenge wana mpo na kosambela ye.” (Yoane 4:23) Yesu alimbolaki mpe ete Tata, Yehova Nzambe, amonisaka solo na nzela ya Liloba na ye, Biblia.​—Yoane 17:17.

Yesu asɛngaki bayekoli na ye báteya ‘bato ya bikólo nyonso bátosa makambo oyo apesi bango etinda.’ Asɛngaki bango soki moke te básangisa mateya na ye na bonkɔkɔ to bindimeli ya bato mpo na kobenda bango. Na ntango ya bantoma, bato mosusu bamekaki kokɔtisa na losambo ya boklisto makanisi mpe bonkɔkɔ oyo eutaki na mangomba mosusu, kasi bakweisaki bango. Ntoma Paulo akomaki boye: “Bóbima na kati na bango, mpe bókabwana, mpe Nzambe akoyamba bino.’​—2 Bakolinti 6:17.

[Maloba na nse ya lokasa]

a Buku Dicionário de Cultos Afro-Brasileiros (Diksionɛrɛ ya mangomba ya Brésil oyo eutá na Afrika) elobi ete: Kosukola basikalie ya ndako-nzambe ya Bonfim ekokani mpenza na molulu oyo Bayoruba babengaka mai ya Oxalá, oyo basukolaka otás (mabanga ya bosantu).

[Bililingi na lokasa 24]

Banganga-nzambe ya basi ya Brésil oyo bautá na Afrika bazali kosukola basikalie ya ndako-nzambe

Ebele ya bato na ndako-nzambe Bonfim, na Brésil

[Eutelo ya bafɔtɔs]

Na likóló: De: A Tarde​—Wilson da Rocha Besnosik; na nse: De: A Tarde​—Antônio Queirós

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto