Makambo mazali koleka na mokili
◼ Na boumeli ya mobu 2000, bato mosusu pene na milio 8,3 bazwaki maladi ya ntolo (tuberculose) na mokili mobimba, mpe pene na bato milio mibale bakufaki na maladi yango—mingi na bango bazalaki na mikili ya bobola.—MEDICAL JOURNAL OF AUSTRALIA.
◼ “Lelo oyo, bilenge milio zomi bazali na mikrobe ya sida, mpe na bato koleka milio 4,9 oyo bazali kozwa mikrobɛ yango na mbula moko, motango yango kabola na mibale ezali bilenge ya mbula kobanda 15 tii 24.”—FONDS DES NATIONS UNIES POUR LA POPULATION.
◼ Balandelaki ndɛkɛ babengi albatros na satelite ntango ezalaki kopumbwa bipai nyonso. Oyo eleki mbangu etambolaki mokili mobimba na mikolo 46 mpamba.—ZULUNALO SCIENCE, U.S.A.
◼ “Na mokili mobimba, babimisaka mbongo dolare milio 100 na ngonga moko, mokolo na mokolo, mpo na basoda, mpo na mindoki, mpe mpo na masasi.”—VITAL SIGNS 2005, WORLDWATCH INSTITUTE.
Bakómi kosalela basango mobulu mingi?
Na mobu 2005, zulunalo moko ya Londres (Daily Telegraph) elobaki ete “kozala sango ezali moko ya misala oyo eleki likama na [Grande-Bretagne].” Ankɛti moko oyo guvɛrnema ya mboka yango esalaki na mobu 2001, emonisi ete na basango oyo batunaki bango mituna, pene na 75 likoló na 100 balobaki ete basalelaki bango mobulu to babɛtaki bango na mbula mibale oyo euti koleka. Banda mobu 1996, babomaki basango soki nsambo. Na Merseyside, engumba moko ya mboka yango, “soki tozwi bisika na yango ya losambo 1 400, na esika moko, babɛtaka basango, bayibaka biloko na bango to batumbaka bandako to mituka na bango mokolo na mokolo.”
Mitindo ndenge na ndenge ya kokamwa ya nyama mpe nzete
Zulunalo moko (The New York Times) elobi ete atako bazali kobebisa zamba na yango, “esanga Bornéo ezali kaka na mitindo ndenge na ndenge ya kokamwa ya nyama mpe nzete na zamba na yango.” Ebongiseli moko (Fonds mondial pour la protection de la nature) emonisi ete kobanda mobu 1994 tii 2004, bato oyo bayekolaka bikelamu ya bomoi bamonaki mitindo ya sika 361 ya banzete mpe ya banyama na esanga yango, oyo ebandi na mboka Brunei, eleki na Indonésie tii na Malaisie. Na mitindo yango, 260 ezali ya nyama-nkɛkɛ, 50 ya banzete, 30 ya mbisi, 7 ya mbemba (grenouilles), 6 ya miselekete, 5 ya ngato (crabes), 2 ya nyoka, mpe moko ya ligbɔlɔlɔ (crapeau). Kasi, zamba yango ezali na likama mpamba te bato bakómi kokata nzete mingi, bato mingi bakómi koluka mabaya ya nzete ya zamba yango, ndembo mpe mafuta ya mbila.
Biyambayamba ekómi mingi
Ebongiseli moko na Allemagne (Institut de sondage Allensbach) elobi ete “ata na eleko oyo mayele ya tekiniki mpe ya siansi ekoli mingi, bato bazali kaka kokangama na biyambayamba.” Nsima ya koyekola likambo yango ntango molai, bamonaki ete “lelo oyo bato mingi bazali naino na bindimandima mpo na mabe to malamu oyo ekoyela bango, koleka ndenge ezalaki eleki sikoyo mbula 25.” Na bambula ya 1970, bato 22 likoló na 100 bazalaki kokanisa ete mɔtɔ oyo elekaka likoló lokola monzɔtɔ oyo ezali kokwea, ezalaka na ndimbola na bomoi ya moto. Na mikolo na biso mpe, bato 40 likoló na 100 bandimaka likambo yango. Lelo oyo, kaka moto moko likoló na misato nde aboyaka kondima lolenge nyonso ya biyambayamba. Ankɛti mosusu oyo basalaki epai ya bayekoli 1 000 ya iniversite ya Allemagne emonisaki ete moyekoli moko likoló na misato andimaka ete bikelakela oyo bato batyaka na motuka to bakangisaka na fungola ebatelaka bango.
Mabanga ya ngalasi ya mbu ya Antarctique ebandi kokɔnda
Zulunalo moko (Clarin) oyo ebimaka na engumba Buenos Aires elobi ete “na mbula 50 oyo euti koleka, na mabanga ya ngalasi 244 oyo ezalaka na mbu ya Antarctique, mingi (87%) ebandi kokɔnda nokinoki” koleka ndenge bato ya mayele bakanisaki. Ntango bayekoli likambo yango mpo na mbala ya liboso, bamoni ete soki mabanga yango ya ngalasi ezali kokɔnda, ezali mpo ete na mbula 50 oyo euti koleka, mopɛpɛ oyo ezalaka na mbu yango ezali lisusu malili makasi te; ebakisi mwa molunge ya 2,5 °C. David Vaughan, oyo asalaka na ebongiseli oyo ebatelaka mbu yango (the British Antarctic Survey) alobi ete: “Soki mabanga ya ngalasi yango ezali kokɔnda . . . ezali mingimingi mpo malili ezali lisusu makasi te ndenge ezalaki liboso.” Atuni boye: “Bato nde bazali kosala yango? Tokoki kondima yango mbala moko te, kasi etikali moke tózwa eyano na motuna wana ya ntina mingi.”