Namoni bokoli ya Lingomba ya solo ‘na Afrika ya Sudi
Lisolo ya Robert Mcluckie
NA MBOKA AFRIKA YA SUDI, mosala ya kosakola Bokonzi ezali kotambola na lolenge moko ya kokamwisa. Lelo, ezali lisusu te, bato soko koleka nkama baoyo bazali kosakola nsango malamu kati na mboka oyo, lokola ezalaki na nsuka ya bambula 1920, kasi bato soko 45 000, kozanga kotanga mwa basakoli 150 000 baoyo bazali na bamboka oyo kala ezalaki kotambwisama na filiale ya Afrika ya Sudi.
Esili koleka mbula 60 ete nazali na esengo na komona bokoli ya solo na mboka Afrika ya Sudi. Ezali mpo na yango nde nalingi kosolola na bino, na maloba mokuse, mpe mpo na bosangani ya libota na ngai mpe ngai moko kati na bokoli yango.
Nyonso ebandaki na likambo monene
Na le 22 juin 1927, mwasi na ngai, Edna, akufaki, atikelaki ngai mwana ya mwasi ya mbula misato, na nkombo ya Lyall, mpe mwana ya mobali ya mbula mibale, na nkombo ya Donovan. Mpo na ngai, nazalaki na mbula 26. Nazalaki na mawa mingi mpe nabulunganaki makasi. Nazalaki komituna Mwasi na ngai azali wapi? Lokola nakokaki kondima te ete azali na lifelo, nazalaki komibɔndisa na mwa moke na butu na kokanisaka ete azalaki na likoló.
Na sanza ya Juillet, mwana na ngai ya mobali Donovan amemelaki ngai brochure moko oyo etindamaki epai ya moto mosusu, kasi oyo, na lolenge nayebi te, ekɔtaki na mikanda na biso. Kati na brochure yango ekomamaki diskur ya Joseph Rutherford, président ya mibale ya la Société Watch Tower. Lisolo yango esepelisaki ngai mingi kino naumelaki te kosɛnga mikanda nyonso oyo brochure alakisaki na liste. Nakokaki kondima te ete bomoi na ngai ekokaki kozwa mbongwana.
Kati na ba brochures oyo batindelaki ngai, moko ebendaki likebi na ngai. Ezalaki na titre Lifelo ezali nini? Banani bazali kuna? Bakoki kobima na kati? Nazalaki na esengo mingi, nazwaki brochure yango mpe nsima ya kotanga nkasa mibale to misato, nazalaki koseka, ee, nazalaki koseka mingi na esengo nyonso!
Kozanga koumela, nayebisaki makambo oyo nazalaki koyekola epai ya baboti na ngai mpe basangani mosusu ya libota na ngai, ezala na mokanda to bobele kososola na bango. Nokinoki, bandeko na ngai minei, Jack, Percy, William mpe Sydney basepelaki na solo yango mpe babandaki kosakola yango epai na bato oyo bazalaki zongazonga na bango. Mwa bambula nsima, tata na ngai, mama na ngai mpe mibale kati na bandeko na ngai ya basi, connie mpe Grace, bandimaki solo.
Na esika oyo nazalaki, namonaki ata Moyekoli moko ya Biblia te (nkombo oyo ba Témoins de Jéhovah bamemaki kala). Nakendaki kofanda na Rhodésie du Sud, oyo lelo ebiangami Zimbabwe, epai kuna, na boumeli ya mbula soko moko, nazalaki kosala na ferme elongo na ndeko na ngai Jack. Lokola nazalaki kotanga mikanda ya la Société Watch Tower, naumelaki te koyoka mposa makasi ya kozala ministre ya ntango nyonso.
Kino wana, nakutanaki te na moto oyo azalaki na bindimeli lokola ngai, bobele epai na baoyo nasakolaki. Nazuaki bongo engbunduka (train) mpo na kokenda na mboka Afrika ya Sudi, mobembo ya 2300 kilometre. Ntango nakomaki na cap, nakendaki na filiale ya la Société Watch Tower, epai kuna George Phillips, oyo azalaki motambwisi ya mosala kati na mboka wana, ayambaki ngai malamu. Na le 10 Janvier 1930, nazwaki batisimo.
Ebandeli na ngai na mosala ya pionnier
Na boumeli ya mbula misato, nasololaki na bato mingi likolo ya Biblia; kasi, naino nasakolaki ndako na ndako te. Ata bongo, nandimamaki kosala lokola pionnier, elingi koloba ministre ya ntango nyonso. Na ntango wana, programme ya formation ata moko ezalaki te. Mpe, tozalaki kokende ndako na ndako mingi te. Ya solo, tozalaki moke mingi kino ezalaki komonana ete ezali malamu kosala bongo te.
Ya solo, nazalaki komibanzabanza mpo na bolamu ya bana na ngai, Lyall mpe Donovan. Bankoko na bango nde bazalaki kobɔkɔla bango, mpe lokola bazalaki kobatela bango malamu, namonaki malamu na ntango wana ete namipesa mingi na mosala ya kosakola nsango ya Bokonzi. Na bongo ezali yango nde nasalaki.
Nakosalaka lokola pionnier na boumeli ya mbula misato oyo elandaki, nazwaki baninga ya mosala mitano, kati na bango ndeko na ngai Syd. Nsima na yango, wana azalaki ntango nyonso pionnier, azwaki maladi babiangi typhoïde mpe akufaki. Na ebandeli wana, bomoi ya pionnier ezali petee te. Tozalaki kosalela camionnette moko oyo na likoló tozalaki kotia ba bitoko oyo ezalaki kokangamakangama ngambo nyonso mibale. Na kati, tokotaki na motuka bokokaki bongo kolala, kofanda kolamba mpe kolia.
Suvenire kitoko koleka oyo nabombaki na ebandeli ya mosala na ngai ya pionnier ezali ya mbula 1931, mbula oyo tozwaki nkombo ya sika, ya ba Témoin de Jéhovah, mpe brochure moko oyo ezalaki na titre, Bokonzi, elikya mpo na mokili. Nazali komikundola kobanga oyo nazuaki na kokanisa ndenge ya kosalela nkombo oyo na lokumu mingi; nazalaki komituna soki nazalaki na makoki ya komema yango na ndenge ebongi.
Kobanda eleko wana, likambo mosusu esepelisaki ngai: wana nabatisaki Jack mpe Dorrell, elingi koloba ndeko na ngai ya mobali mpe mwasi na ye, kati ya ebale Nuanetsi oyo etondi na bangando, na Rhodésie du Sud. Liboso ya kozindisa bango na mai, tobwakaki mabanga kati na ebale mpo na kobangisa bangando mpo bakima. Nsima, na bambula 1950, nabatisaki mama na ngai kati na baignoire.
Namoni mboka
Na 1933, Robert Nisbet, moninga na ngai ya mosala ya mitano, elongo na ngai totindamaki na teritware oyo ezalaki mpenza ya sika mpe epai kuna nsango ekomaki naino te, ezali esanga ya Maurice mpe Madagascar, na est ya continent ya Afrika. Tolekisaki pene ya sanza minei na bisanga oyo mibale mpo na kolona mbuma na solo ya Biblia. Oyo nde esengo na komona ete esanga ya Maurice ezali na basakoli na Bokonzi soko 800 mpe Madagascar soko 3 000! Ntango tozongaki na mboka Afrika ya Sudi, nakendaki ngambo na ngai mpe Robert ya ye. Nsima, akomaki pionnier elongo na ndeko na ngai Syd mpe, nsima moke lisusu, akomaki mokengeli ya filiale ya esanga ya Maurice.
Liboso ya bozongi na biso na Afrika ya Sudi, nalekaki kotala Lyall mpe Donovan epai ya baboti na ngai. Nsima ngonga oyo tosengelaki kokabwana ekomaki, ndenge mosusu ya kosala ezalaki te mpe epesaki mpasi mingi na motema. Nalandelaki mobembo mpo na kokende kokutana na mokengeli ya filiale, ndeko Phillips. Alakisaki ngai teritware na ngai ya sika: Nyassaland (oyo ekomaki Malawi). Basombelaki ngai Chevrolet modèle 1929 mpo nasalela yango kati na teritware wana.
Ezali motindo yango nde na 1934 nalongwaki na Johannesburg kino Zomba, engumba monene ya Nyassaland, mobembo ya 1900 kilometre, mingimingi na nzela ya mabelé. Wana ekomaki ngai na esika yango, namimonisaki epai na moklisto moko ya mwindo, Richard Kalinde. Akomaki moninga na ngai ya penepene mpe mobongoli na ngai ntango nyonso nalekisaki na Nyassaland. Na nsima, nazwaki ba chambers mibale na hotel moko ya kala oyo bazalaki kosalela yango lisusu te. Nazalaki kosalela chambre moko lokola biro na dépôt, mpe mosusu ezalaki chambre ya kolala.
Mosala na ngai na Nyassaland ezalaki mingimingi mpo na kotia ordre kati na bokabwani oyo elonamaki na ba “mouvements ya Watchtower”. Kobotama ya ba mouvements yango, oyo ebandaki bambula mingi kala, esalamaki na moto mwindo moko oyo ayebaki malamu mikanda ya charles Russell, président ya liboso ya la Société Watch Tower, kasi moto yango akomaki ata mokolo moko Témoin de Jéhovah te. Tala Annuaire des Témoins de Jéhovah 1976, bankasa 72 kino 75.
Nakendaki kotala masangá na baoyo bazalaki kosalela mikanda ya la Société Watch Tower, mpe nabangaki ekateli na ntina etali nkombo na biso ya sika, Témoins de Jéhovah. Nsima nasɛngaki ete baoyo nyonso bandimaki batombola loboko. Mingi kati na bayangani batombolaki loboko, kasi, mpo na mingi kati na bango basalaki bongo, na kozanga kokanga ntina na likambo yango. Ezali mpo na yango, wana bambula ezalaki koleka, bamosusu bakolaki te na elimo, nzokande nde bamosusu batikaki libela kosunga oyo bazalaki kotalela lokola mokonzi na bango mpe bakomaki mpenza ba Témoins de Jéhovah.
Nsima ya sanza soko motoba, nalongwaki na Nyassaland mpo na kokende na Mozambique, epai kuna nsango ya Bokonzi esakolamaki naino te. Nakutanaki na elenge moko mokonzi ya basoda ya portugais oyo nasilaki kokutana na ye elongo na Robert Nisbet ntango tozalaki na mobembo na mama mpo na kokende na esanga ya Maurice. Elenge mobali yango abiangaki ngai mpo na kolia, mpe nazwaki esika ya kosolola na ye mingi koleka.
Mokolo mosusu, kati na mboka moko na nord ya Mozambique, vuatire moko etelemaki mpembeni na ngai. Ezalaki guvernere ya regió, oyo asɛngaki ngai soki akokaki kosalisa ngai. Na libiangami na ye, nakendaki epai na ye, epai kuna andimaki mikanda mingi ya la Société Watch Tower. Ata soki mosala ya kosakola epekisami sikawa na Mozambique mpe na Nyassaland (Malawi), nazali na esengo ya koyeba ete mingi na bandeko mibali mpe basi na sembo bazali ntango nyonso na molende.
Na Béthel
Ntango nazongaki na Nyassaland, likambo mosusu ezelaki ngai: nabengisamaki kosala na biro ya filiale na mboka Afrika ya Sudi, na cap, mpe William, leki na ngai ya nsuka, atindamaki kozua esika na ngai na Nyassaland. Nasalaki bongo mobembo ya 3500 kilometres na chevrolet na ngai. Wana ezalaki ngai na mobembo natelemaki mpo na kotala Donovan mpe Lyall. Bazalaki na mbula 11 mpe 12, mpe nakokaki komona bango te kino mbula moko.
Nazwaki mokumba ya kozala esika ya ndeko Phillips, mokɛngɛli ya filiale, ntango oyo akozala te. Na 1936, atako nasanganaki ntango nyonso na lisangá moko te ya ba Témoins de Jéhovah esilaki koleka mbula libwa wana nayebaki solo, naponamaki nazala mokengeli mokambi ya lisangá ya cap, oyo ezalaki na basakoli 20.
Mbongwana ya mosala
Nalingaki kotika te mikumba na ngai ya mosala; kasi, Lyall mpe Donovan bakomaki bilenge, mpe nazalaki komitungisa mpo na bolamu na bango mpe mpo na kolongono na bango ya elimo. Na esengo nyonso, nzela mpo na kosilisa mokakatano yango eyaki komonana.
Na le 6 juin 1936, ndeko Phillips alakisaki ngai bandeko basi oyo bayaki sika na Béthel, bautaki na Australie: ezalaki ndeko mwasi Seidel mpe mwana na ye ya mwasi ya mbula 18, na nkombo ya carmen oyo azalaki na bonzenga mingi. Nsima na mbula moko nabalaki (Carmen. Na yango nazwaki mosala mpe nabandaki kobokola libota.
Nazwaki mosala ya mosuni na Afrika ya Sudi epai kuna nasalaki na boumeli ya mbula moko, kasi nsima, carmen mpe ngai na Peter elongo, mwana oyo tobotaki, tokendaki kofanda na Rhodésie du Sud; epai kuna ndeko na ngai Jack asɛngaki ngai ete nasala na ye elongo mpo na kotimola or kati na mine moko. Ntango tofandaki malamu, tobengisaki Lyall mpe Donovan, oyo na liboso topesaki bango epai na mama ya carmen mpo na kobokola bango.
Monyoko na ntango ya Etumba
Na septembre 1939, Etumba ya mibale na mokili mobimba engalaki. Mbula oyo elandaki, mikanda na biso mipekisamaki. Tozuaki ekateli ya kozanga kotosa mobeko yango na kokabolaka mikanda ezala nini oyo ekoyela biso. Bandeko bakangamaki mpe bakatelaki bango bambula ya boloko, mpe babɔtɔlaki mikanda na biso mpe batumbaki yango.
Na ntongo moko, nsima na mosala ya kosakola, tobiangamaki na inspecteur mpo na kokende kozwa bana na biso na commissariat epai kuna bamemaki bango. Toboyaki, nakozongisa maloba ete, engebene mobeko lokola ezali la police nde akangaki bana, ezali mpe ye nde akozongisa bango. Na mpokwa, ntango tozongaki na mosala ya kosakola, tokutaki bana na ndako, bazalaki na santé malamu, mpe tomonaki ata policier moko te.
Mokolo mosusu, na 1941, atako azalaki na zemi, carmen akangamaki na boloko sanza misato. Atako bongo, abotaki Estrella liboso ete akoka kosilisa etumbu na ye. Na esika ete atika mwana na ndako elongo na ngai, aponaki kokenda na ye elongo na boloko. Ezali na lolenge yango nde Estrella azwaki moto oyo azalaki kokangela ye ezalaki mwasi moko mwindo oyo abomaki mobali na ye. Ntango Carmen, abimaki na boloko, mwasi oyo na mawa nyonso, alelaki mingi. Mpo na Estrell, akomaki pionnier na 1956, ntango azalaki na mibu 15. Na nsima, abalanaki na Jack Jones. Esili koleka mbula 20 sikawa, bazali kosalela Nzambe lokola ba pionniers to basaleli ya ntango nyonso, bazalaki liboso na Afrika ya Sudi mpe nsima na biro monene ya la Société Watch Tower na Brooklyn (Etats-Unis), epai kuna bazali kino lelo.
Nsima wana mwasi na ngai abimaki na boloko, ngai mpe nakangamaki basanza mingi mpo ete nasakolaki. Ezali na eleko yango nde Joseph Rutherford akufaki, na sanza ya janvier 1942. Nakoyokaka nsango yango, nalelaki makasi na butu yango, kati na chambre na ngai ya boloko. Atako nazalaki mokangami, nazwaki mabaku malamu ya kopesa litatoli mpe, dimanche moko na ntongo, wana bato nyonso mosusu bazalaki kosala ba eksersise na lopango, nabatisaki mokangami lokola ngai oyo andimaki nsango na Bokonzi.
Filiale ya sika
Nsima na kobima na ngai na boloko, nazwaki mosala na rayi ya train na Bulawayo. carmen ayekolaki kotonga bilamba na boloko, na lisalisi ya mosala yango azalaki kobokola libota. Lyall autaki na Afrika ya Sudi epai kuna azalaki mokangami, mpe asalisaki biso mpo na mosolo. Nsuka na yango, toumelaki te na kozwa mwa mosolo mingi oyo ekokisaki bamposa na biso ya solo, mpe totalelaki lisusu likambo yango, mpe biso nyonso toyokanaki ete nazongela mosala na ngai ya ministre ya ntango nyonso to pionnier.
Na 1947, lokola nazalaki na carte ya abonema na nzela ya rayi, nazwaki engbunduka (train) kino cap mpo na kokutana na ndeko Phillips. Na likambo oyo nazalaki komizela te, nazwaki mokumba ya kofungola dépôt moko ya mikanda ya la Société Watch Tower na Bulawayo. Nsima, na 1948, Nathan Knorr, président ya misato ya la Société, ayaki na Bulawayo. Azwaki bibongiseli ete dépôt ekoma biro ya filiale ya sika na le ler Septembre na mbula bobele wana, mpe Eric cooke aponamaki mpo azala mokengeli ya filiale ya Rhodésie du Sud. Na boumeli ya mbula 14 oyo elandaki, nazwaki libaku malamu ya kosala na filiale wana ezali ngai kofanda na ndako na ngai, ya solo, elongo na libota oyo ezalaki bobele kokola. Nasengeli kotonda mingi carmen mpe bankulutu na biso baoyo basalisaki libota na mosuni mpo na kopesa ngai nzela ya kolandela mosala na ngai na filiale.
Mokumba mosusu mpo na mosala ya kosakola
Na 1962, carmen na ngai tolukaki kokenda mosika mpe kosalisa epai kuna mposa ezalaki mingi. Na bongo totɛkaki ndako na biso mpe tokendaki na mokili Seychelles elongo na bana na biso mibale ya mike, ezali bongo Lindsay mpe Jeremy, mpamba te mitano mosusu bakomaki mikolo mpe bazalaki kofunda na biso lisusu te.
Ya liboso, tosalaki mobembo na biso na vuatire, na nzela ya mabelé mbala mingi. Nsima ya kosala 2900 kilometres, tokomaki na Kenya, na Mombasa. Totikaki vuatire na biso epai na ndeko moko mpe tokotaki na masua mpo na kokenda na Seychelles. Kuna, moto moko oyo azalaki kosepela na solo amonisaki biso epai na bafandi mosusu ya Seychelles mpe, nsima na mwa ntango moke, tosukaki makita, penepene na ndako ya episkopo. Tozalaki kosala makita mosusu na esanga moko oyo ezalaki kotalana na biso, na mama ya moto moko oyo ezipamaki kaka likoló, katikati na bambila milai, penepene ya mbonge oyo ezalaki kokoma kino libongo.
Mosala na biso na Seychelles eyebanaki noki, mpe bakonzi bapesaki biso etinda ya kotika kosakola, likambo oyo tokokaki ata moke te kondima yango. (Misala 4:19, 20) Mpo na yango babenganaki biso, kasi tolongwaki mpamba te mpo ete tosilaki kobatisa bato mitano. Na mikolo oyo ya sanza mitano tolekisaki na Seychelles, carmen azuaki zemi ya Andrew, mwana na biso ya nsuka. Ntango tozongaki na Rodhésie du Sud, mwana na biso ya mwasi Pauline abiangaki biso mpo tokende kofanda epai na ye elongo na mobali na ye mpo na kozela kobotama ya Andrew.
Mapamboli mpe bosepeli
Nazali na esengo mingi ya koloba ete bana na biso mwambe, kotia mpe Lyall na Donovan, basalaki mosala ya pionnier na eleko moko to mosusu ya bomoi na bango. Minei kati na bana na biso ya mibali to babokilo bazali bankulutu, mpe mibale bazali basaleli ya misala. Eloko ezali kosepelisa biso lisusu, ezali ete mingi na bankɔkɔ na biso mpe bana ya bankɔkɔ na biso bazali kosakola nsango malamu elongo na baboti na bango kati na mikili minei, mpe kati na libota ya Mcluckie basangani koleka zomi bazali kosalela mpe Jéhovah. Nandimi solo ete mbuma nyonso wana ezuamaki mpo na kolendendela na biso na koyanganaka na makita elongo na libota mpe kosakola ntango nyonso.
Lelo, nazali na mibu 89. Nazali kofanda na mboka Afrika ya Sudi, mpe nazali ntango nyonso na esengo ya kozala nkulutu kati na lisangá moko a mboka Pietermaritzburg. Nazali na bosepeli ya solo ntango nazali kobwaka miso nsima likolo na bambula koleka 60 oyo nalekisaki kati na mosala ya Jéhovah. Mpe na azali koyoka ete ezali mapamboli mpo na ngai na komona mabota mitano ya libota na ngai, na kotangaka baboti na ngai, mazali kokumisa Jéhovah, Nzambe Monene ya molongo mobimba.