“Yehova, salisá ngai nasalela yo”
Lisolo ya Danielle Hall
Ntango nazalaki mwana moke, nazalaki kolinga mingi kokende kotala nkɔkɔ ya mwasi; azalaki kofanda mosika te na biso. Mikolo nyonso nsima ya midi, azalaki kolala mwa moke. Soki nakuti ye alali bongo, nazalaki kolamusa ye; tozalaki kofanda na mbeto mpe azalaki kotángela ngai masolo ya Biblia. Mbala mingi, azalaki koyebisa ngai boye: “Kobosana ata mokolo moko te ete Yehova alingi yo. Soki yo mpe olingi ye, akobatela yo ntango nyonso.” Maloba yango esimbá mpenza motema mpe makanisi na ngai.
NKƆKƆ ya mwasi akufaki na 1977, wana nazalaki na mbula minei. Azalaki Motatoli ya Yehova lokola bato mosusu nyonso ya libota ya tata na biso na Moe, engumba na biso oyo ezwami na ekólo Australie. Tata ná mama bazalaki Batatoli te, kasi tata azalaki kotɛmɛla bango te. Na nsima, libota na biso tokendaki kofanda na Tintenbar, mwa engumba moke oyo ezali pembeni ya mai, na etúká ya Nouvelle-Galles du Sud. Kuna, ngai, yaya na ngai ya mobali Jamie elongo na tata tozalaki koyangana mbala mosusu na makita ya Batatoli.
Baboti na ngai bakabwanaki ntango nazalaki na mbula mwambe. Tata azongaki na engumba Moe, ngai ná Jamie totikalaki na mama. Mama azalaki kosepela na makambo ya Biblia te mpe alingaki te tókendaka na makita ya Batatoli. Ezalaki kopesa ngai mawa mingi. Nazalaki kokanisa ntango nyonso maloba ya nkɔkɔ ya mwasi oyo efandaki na motema na ngai. Nayebaki ete nalingi Yehova mingi mpe nazalaki na mposa ya kosalela ye. Yango wana, nabondelaki Yehova mpe nayebisaki ye ete ngai mpe nazali Motatoli na ye. Jamie azalaki mpe na likanisi wana.
Komekama na eteyelo
Mwa moke na nsima, molakisi na biso asɛngaki bana-kelasi nyonso báloba nkombo ya lingomba na bango na mongongo makasi mpo akoma yango na buku oyo ezali na nkombo ya bana-kelasi. Ntango atunaki Jamie, Jamie alobaki na mongongo makasi mpe polele ete: “Motatoli ya Yehova.” Molakisi afandaki naino nyɛɛ mpe ayebisaki ye azongela eyano na ye; ye mpe azongelaki yango. Molakisi ayebisaki ye boye: “Nandimi te, kasi nakozongela yo nsima.” Ntango atunaki ngai, ngai mpe nalobaki na mongongo makasi ete: “Motatoli ya Yehova.” Lokola molakisi asepelaki te, abengisaki mokambi ya eteyelo.
Mokambi yango ayebisaki biso polele ete: “Awa, nazali na mikanda oyo ekomamaki ntango baboti na bino bakomisaki bino na eteyelo oyo; bayebisaki biso te ete bozali Batatoli ya Yehova.” Na limemya mpenza, toyanolaki ete: “Atako bongo, wana nde lingomba epai tosambelaka.” Ezala mokambi to molakisi, batuná biso likambo yango lisusu te.
Na eteyelo, nazalaki kosala makasi nayebisaka baninga na ngai ya kelasi mwa makambo moke ya Biblia oyo nayebaki. Nazalaki komema buku Mokanda mpo na masolo ya Biblia, mpe mbala mosusu nazalaki kotángela mwana moko ya mwasi oyo azalaki kondimela Nzambe masolo yango.a Kasi, lokola nazalaki kosala makasi natosa mitinda ya boklisto, bana mingi bazalaki kosepela na ngai te; yango wana, mbala mosusu nazalaki koyoka mawa mpo nazalaki na moninga te.
Lokola nazalaki kobondela Yehova mbala na mbala mpe na motema na ngai mobimba, akómaki moninga na ngai ya motema. Mikolo nyonso, soki nauti na kelasi, nazalaki kofanda na mbeto mpe nazalaki koyebisa Yehova likambo mokomoko oyo nakutanaki na yango na mokolo. Mbala mingi, nazalaki kolela. Wana mai ya miso ezali kokita na matama, nazalaki kobondela ye boye: “Yehova, salisá ngai nasalela yo elongo na basaleli na yo.” Mbala nyonso, nazalaki komiyoka malamu nsima ya kobondela.
Mokanda oyo elendisaki ngai
Ntango nakómaki na mbula zomi, Jamie azongaki na engumba Moe kofanda na tata. Nazalaki lisusu te na moto oyo akokaki kolendisa ngai na elimo. Kasi, mokolo moko, ntango nazalaki epai ya moto moko oyo azalaki kofanda pene na biso, namonaki bazulunalo ya Batatoli ya Yehova. Na esengo nyonso, nakangaki na motó adrɛsi ya biro na bango oyo ezwami na ekólo na biso mpe nazongaki nokinoki na ndako mpo nakoma yango. Nakomelaki bango mokanda, namonisaki bango polele ndenge bomoi na ngai ezali mpe nasɛngaki bango básalisa ngai na elimo. Ntango nazwaki mokanda oyo batindelaki ngai, oyo etondaki nkasa mibale, mai etondaki ngai na miso, mpamba te esimbaki mpenza motema na ngai. Yango endimisaki ngai ete nazali mpenza na motuya na miso ya Yehova!
Na mokanda yango, balendisaki ngai namekola kondima ya mwana mwasi ya Yisalaele oyo akómaki mwana ya mosala ya Namana, mokonzi moko ya basoda ya Sulia na ntango ya kala. Atako mwana yango azalaki na boombo mpe azalaki kofanda mosika na mboka ya baboti na ye, azalaki ntango nyonso penepene na Yehova, Nzambe na ye. Lisusu, amonisaki ete azali Motatoli ya solosolo na ndenge alobelaki kondima na ye na mpiko.—2 Mikonzi 5:1-4.
Na mokanda yango, babakisaki boye: “Lokola ozali elenge mwasi, okomonisa ete ozali kosalela Yehova soki ozali kotosa baboti na yo mpe ozali mwana-kelasi ya molende. Longola yango, osengeli kobondelaka mpe koyekolaka makambo ya Yehova mpo ozala ntango nyonso penepene na ye.” Na nsuka ya mokanda yango, bakomaki boye: “Danielle, kobosana te ete ata tozali wapi, Yehova azali ntango nyonso penepene na biso. Toyebi ete yo mpe ondimaka likambo yango.” (Baloma 8:35-39) Lelo oyo, mokanda yango ekómi ya kala mpe enzuluki, kasi natyá yango na ebandeli ya Biblia na ngai. Na boumeli ya bambula, nazalaki kotánga mokanda yango mbala na mbala mpe mbala nyonso, nazalaki kolela.
Mwa moke na nsima, nazwaki mokanda mosusu. Na mokanda yango, bayebisaki ngai ete tata na ngai asalaki oyo esengeli mpo bátindelaka ngai na posita zulunalo Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli mpe Lamuká! Nayokaki esengo makasi! Nakómaki sikoyo kozwa bilei ya elimo mbala na mbala. Soki nazwi zulunalo ya sika, nazalaki kotánga yango mobimba. Tii lelo, nabatelaka bazulunalo kitoko oyo batindelaki ngai mpo na mbala ya liboso. Ekoki kozala kaka na eleko wana nde nkulutu moko ya lisangá ya Batatoli ya Yehova ya mboka oyo nazalaki kofanda akómaki koya kotala ngai. Atako azalaki koumela te, azalaki kolendisa ngai mingi.
Mbongwana oyo esalisaki ngai nakola na elimo
Atako nakómaki malamu na elimo, nazalaki kaka na mposa makasi ya kosambela Yehova elongo na bandeko ya lisangá. Yango wana, ntango nakokisaki mbula 13, nasɛngaki mama apesa ngai nzela nakende kofanda na tata. Nazalaki kolinga mama mingi, ye mpe azalaki kolinga ngai mingi; kasi, nazalaki na mokano ya kosalela Nzambe. Mama andimaki, nazongaki na engumba Moe mpe nabandaki koyekola Biblia elongo na lisangá ya engumba yango. Ngai ná yaya na ngai Jamie tozalaki mpe kokende na makita nyonso, mpamba te tata apesaki biso ndingisa. Batatoli ya engumba yango babomaki nzoto mpo na kosalisa biso. Ngai ná Jamie tokolaki nokinoki na elimo; moko azwaki naino batisimo mpe nsima ya mwa basanza, mosusu mpe azwaki. Libondeli na ngai ya bomwana ekokisamaki. Nakómaki kosalela Yehova elongo na basaleli na ye!
Nakómaki mpe kokangama mingi na tata mwasi Lorraine ná mobali na ye Philip Taylor; bango mpe bazalaki na lisangá ya Moe. Bazalaki kozwa ngai lokola mwana na bango. Ntango bakendaki kofanda na esanga Bougainville, na ekólo Papouasie-Nouvelle-Guinée, mpo basakoli ya Bokonzi ya Nzambe bazalaki mingi te na esanga yango, nandimaki mbala moko kokende na bango. Atako nazalaki na mbula 15 mpamba, tata ná mama bandimaki nakende.
Na Bougainville, nakobaki kotánga kelasi mpe bazalaki kotindela ngai mateya yango na nzela ya posita. Longola makambo ya kelasi, namipesaki mingi na kosakola nsango malamu. Nazalaki koyoka esengo mingi kosakola elongo na bamisionɛrɛ mpe babongisi-nzela! Namoná naino te bato ya komikitisa koleka bato ya esanga wana, mpe mingi na bango bazalaki na mposa makasi ya koyekola Biblia.
Nsima, na mbula wana kaka, bato ya politiki babimisaki matata na esanga yango mpe esɛngaki nalongwa wana, mpamba te bomoi na ngai ekómaki mpenza na likama. Nayokaki mpasi makasi na motema kotika mwa esanga wana ná bafandi na yango, oyo bazalaki bato malamu mpenza. Ntango mwa mpɛpɔ oyo nakɔtaki ebandaki komata likoló, namonaki mobali ya tata mwasi na nse azali kopɛpa ngai lobɔkɔ. Nalelaki mingi, kasi nabondelaki mpe Yehova na motema ete asalisa ngai mokolo mosusu nazala misionɛrɛ na mboka-mopaya.
Yehova ayanoli mabondeli na ngai mosusu
Ntango nazongaki na ekólo Australie, nakobaki kotánga na eteyelo ya ntei. Ntango nasilisaki, nabandaki koyekola kosala na biro moko ya baavoka. Tata abalaki mwasi mosusu mpe akómaki kobɔkɔla bana ebele ya mwasi wana. Jamie azalaki kofanda na mama. Momeseno ya kozala lelo epai ya mama, lobi epai ya tata eumelaki mwa ntango. Nakómaki komona ete bomoi na ngai ekómi mindɔndɔ. Esɛngaki nakómisa yango pɛpɛlɛ mpe nalanda nde mikano ya elimo. Yango wana, na mobu 1994, nabandaki mosala ya mobongisi-nzela ya sanza na sanza na engumba Moe.
Nakómaki lisusu na esengo. Baninga na ngai ezalaki bilenge ya lisangá oyo bazalaki kolinga makambo ya elimo mingi. Bango nde bakómaki kosunga ngai mingi. Kutu, na mobu 1996, moko na bango na nkombo Will abalaki ngai. Azalaki moto ya komikitisa, moto ya boboto mpe azalaki koloba malɛmbɛ. Mpo na ngai, azalaki mpenza lipamboli ya Yehova.
Tofandaki malamu na libala na biso mpe emonanaki ete makambo nyonso ezali kotambola malamu mpenza. Mokolo moko, Will asakolaki elongo na mokɛngɛli-motamboli oyo ayaki kolendisa bandeko ya masangá ya mboka na biso. Ntango Will azongaki na ndako, afandisaki ngai mpe atunaki ngai boye: “Okondima tókende kofanda epai mosusu mpo na kosalisa bandeko ya lisangá mosusu?” Na kati ya motema, nandimaki mbala moko. Kasi, na ndenge ya lisɛki, natunaki ye boye: “Wapi? Na esanga ya Vanuatu to na oyo ya Fidji?” Will ayanolaki ete: “Na Morwell.” Nayebisaki ye na mbala moko ete: “Kasi, wana ezali kaka pene na biso awa!” Tosɛkaki mpe toyokanaki mbala moko ete ekozala esengo mpenza kokende kosala mosala na biso ya babongisi-nzela na lisangá ya mboka wana, oyo ezalaki pene na biso.
Na boumeli ya mbula misato oyo tosalaki na Morwell, toyokaki esengo mpe mosala na biso ebotaki mpenza mbuma. Na nsima, tozwaki nsango mosusu ya kokamwa. Biro ya Batatoli ya Yehova na Australie esɛngaki biso tósala mosala ya babongisi-nzela monene. Mboka nini batindaki biso? Timor oriental, ekólo moko ya moke oyo ezali na ɛsti mpenza ya bisanga ya Indonésie. Mai etondaki ngai na miso. Napesaki Yehova matɔndi na ndenge ayanolaki mabondeli na ngai nyonso. Andimaki ngai nazala mosaleli na ye mpe apesi lisusu ngai ná mobali na ngai libaku ya kosalela ye na mboka-mopaya.
Mosala ya kosakola na mboka-mopaya
Na sanza ya Yuli 2003, tokómaki na Dili, mboka-mokonzi ya ekólo yango. Lisangá ya Dili, oyo ezalaki lisangá bobele moko na ekólo yango mobimba, ezalaki na babongisi-nzela monene 13 oyo bautaki na Australie mpe mwa ndambo ya bana-mboka oyo bazalaki Batatoli. Bandeko na biso, oyo bazalaki bana-mboka, bazalaki mpenza babola. Mingi kati na bango babungisaki biloko na bango mpe bandeko na bango na bitumba ya bana-mboka oyo eumelaki mbula 24 mpe esilaki na 1999. Mingi kati na bango bakutanaki na botɛmɛli makasi na mabota na bango mpo na bindimeli na bango ya sika. Atako Batatoli yango bazalaki konyokwama mpe bazalaki babola, bazalaki bato ya bomɛngo na elimo mpe bazalaki na esengo.—Emoniseli 2:8, 9.
Tomonaki ete bato mingi ya ekólo yango bazalaki kobanga Nzambe mpe komemya Biblia. Eumelaki te, tokómaki na bayekoli ya Biblia ebele mpenza mpe likoki ya koyekola na bango nyonso ezalaki te! Nsima ya mwa ntango, bato mosusu oyo tobandaki koyekola na bango liboso bazwaki batisimo mpe bakómaki kosalela Yehova elongo na biso. Toyokaki esengo mingi komona ndenge bazali kokola na elimo.
Na nsima, na mobu 2006, mobulu makasi ezongaki lisusu na Dili. Matata kati na bana-mboka oyo bazalaki koloba minɔkɔ ekeseni esukaki na bitumba. Bayibaki biloko na bandako mingi mpe bazikisaki ebele ya bandako. Bana-mboka oyo bazalaki Batatoli bakendaki komibomba na bandako ya babongisi-nzela monene. Na boumeli ya mikolo, lopango na biso ekómaki lokola kaa ya bato oyo bakimá mboka. Mikolo mosusu, bato soki 100 bakómaki kofanda na biso! Lokola esika oyo tozalaki kotɛlɛmisa motuka na biso ezalaki monene, tokómisaki yango kuku, esika ya kolyela mpe ekómaki Ndako ya Bokonzi na boumeli ya mikolo wana.
Atako mindoki ezalaki kobɛta mpe bagrenade ezalaki kopanzana mosika te na biso, ndako na biso ezalaki esika moko ya kimya mpo na komibomba. Biso nyonso tomonaki ete Yehova azali kobatela biso. Mikolo nyonso, na ntɔngɔ, biso nyonso tozalaki kotalela vɛrsɛ moko ya Biblia elongo. Makita ezalaki kosalema lokola na momeseno. Tozalaki mpe koyekola Biblia na bato oyo bazalaki kosepela koyekola.
Nsima ya bapɔsɔ, emonanaki polele ete soki bandeko na biso oyo babotamá na ɛsti ya ekólo yango batikali na Dili, bomoi na bango ekozala na likama. Yango wana, bandeko oyo bazalaki kokamba biso bamonaki malamu bátya etuluku moko ya sika na Baucau, engumba ya mibale na ekólo yango. Engumba yango ezali na ɛsti ya Dili mpe longwa na Dili tii kuna, esɛngaka ngonga misato ya mobembo. Yango wana, bayebisaki Will ná ngai tókende kuna.
Na sanza ya Yuli 2006, tokómaki na Baucau, mbula soki misato banda tokómaki na ekólo Timor oriental. Na etuluku na biso ya sika, tozalaki biso minei babongisi-nzela monene mpe Batatoli mosusu motoba oyo bazalaki bana-mboka. Atako Batatoli yango batikaki biloko na bango nyonso na Dili, babungisaki te momeseno na bango ya kosɛka mingi. Tozalaki mpe kosepela mingi na bosembo na bango mpe na elimo na bango ya komipesa!
Ngai ná Will tozali kokoba na mosala na biso na Baucau. Tolingaka mosala yango mingi mpe tomonaka yango ete ezali lipamboli mosusu ya Yehova. Soki nazongisi makanisi nsima, namonaka ete nkɔkɔ ya mwasi alobaki solo. Bambula oyo nyonso, Yehova abateli ngai mpenza. Napesaka ye ntango nyonso matɔndi mpo na libaku malamu apesi ngai ya kosalela ye elongo na basaleli na ye. Nazali mpe kozela na mposa makasi komona lisusu nkɔkɔ ya mwasi ntango akosekwa. Na ntango wana, nakopesa ye matɔndi na ndenge alakisaki ngai sɛkɛlɛ ya bomoi ya esengo mpenza mpe oyo etondi na bolamu.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Ebimisami na Batatoli ya Yehova.
[Elilingi na lokasa 24]
Ngai ná nkɔkɔ ya mwasi
[Elilingi na lokasa 27]
Elongo na mobali na ngai Will