Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • g 10/09 nk. 10-13
  • Nabongolaki mikanda na kobombama mbula ntuku misato

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Nabongolaki mikanda na kobombama mbula ntuku misato
  • Lamuká!—2009
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Nayekoli mateya ya solo
  • Ndenge boyebi na ngai ekolaki
  • Nabandi kobongola mikanda na kobombama
  • Nazongeli kobongola mikanda
  • Mbongwana ebandi kokɔta
  • Nasalelaki Nzambe atako nakutanaki na mikakatano
    Lamuká!—2005
  • Nayekolaki kotyela Nzambe motema
    Lamuká!—2006
  • Eleki mbula ntuku libwa uta nabandá ‘kokanisa Mozalisi na ngai monene’
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2009
  • Nazali kokokisa elaka na ngai ya kosalela Nzambe
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1999
Makambo mosusu
Lamuká!—2009
g 10/09 nk. 10-13

Nabongolaki mikanda na kobombama mbula ntuku misato

Lisolo ya Ona Mockutė

Na sanza ya Ɔkɔtɔbɛ 1961, batyaki ngai na bolɔkɔ mpo nazalaki komipesa na makambo ya losambo, oyo ezalaki mbeba monene na ekólo URSS. Na sanza ya Aprili 1962, nasambaki mpo na likambo yango na tribinale ya engumba Klaipeda, na Lituanie. Tiká nayebisa bino sikoyo likambo oyo esalaki ete bákanga ngai mpe bátya ngai na bolɔkɔ mpo nazalaki kobongola mikanda ya Batatoli ya Yehova na kobombama.

NABOTAMAKI na 1930 na wɛsti ya Lituanie, pene na mbu ya Baltique. Liboso abota ngai, mama abondelaki Nzambe ete alingi mwana na ye akóma mamelo. Kasi, mokolo moko alobaki na ngai boye: “Ata ndenge nini nakoki te kofukama liboso ya ekeko ya Santu Petro to bikeko mosusu.” Mpo na yango nazalaki koboya kofukama na ndako-nzambe, atako nazalaki kosala yango liboso ya ekulusu ya Yesu ntango nazali kouta eteyelo mpo na kozonga ndako.

Na nsima, na ntango ya Etumba ya Mibale ya mokili mobimba​—kobanda 1939 tii na 1945—​namonaki makambo ya nsɔmɔ oyo ebulunganisaki mpenza makanisi na ngai. Ntango mboka na biso ezalaki na mabɔkɔ ya basoda ya Allemagne, mokolo moko, ngai ná mama leki tozalaki kobuka mbuma na zamba. Na mbala moko, tomonaki mabulu mibale ya minene oyo ezalaki na makila. Lokola toyebaki ete bautaki koboma ebele ya Bayuda, ata mpe Tese ná Sara, baninga na ngai mibale ya eteyelo, tolobaki mbala moko ete ezali na mabulu wana nde bakundaki bango nyonso. Nayokaki nsɔmɔ makasi mpe nagangaki ete: “Nzambe, ozali malamu mingi! Kasi, mpo na nini ozali kotika makambo ya nsɔmɔ boye esalema?”

Na 1949, nasilisaki kelasi ya ntei na Klaipeda, pene na esika oyo tozalaki kofanda, mpe nakɔtaki na eteyelo ya miziki. Na 1950, nakɔtaki na lisangá moko ya nkuku ya bilenge oyo bazalaki koluka mbongwana na makambo ya politiki, kasi eumelaki te bafundaki ngai mpe bakangaki ngai elongo na baninga mosusu 12. Batyaki ngai na bolɔkɔ ya Klaipeda, mpe ntango nazalaki kuna, mpo na mbala ya liboso, nakutanaki na Motatoli ya Yehova moko.

Nayekoli mateya ya solo

Batyaki mwasi moko ya mbula soki ntuku mitano na bolɔkɔ, na esika oyo biso tozalaki. Asɛkisaki biso nyonso bilenge basi nsambo oyo akutaki wana. Natunaki ye boye: “Mama, soki batye moto na bolɔkɔ azalaka nde na mawa, yo ozali nde kosɛka! Okoki koyebisa ngai ntina oyo okɔti bolɔkɔ?”

Ayanolaki ngai boye: “Mpo na solo.”

Natunaki ye lisusu: “Solo yango nde nini?”

Nkombo ya mwasi yango ezalaki Lydia Peldszus. Azalaki moto ya Allemagne mpe bakangaki ye mpo azalaki Motatoli ya Yehova. Tosololaki na ye masolo mingi ya Biblia. Mateya kitoko oyo Lydia ateyaki biso ebongolaki bomoi na ngai ná ya baninga mosusu misato oyo tozalaki na bango esika moko.

Ndenge boyebi na ngai ekolaki

Mpo na politiki oyo nazalaki kosala na nkuku mpo na kotɛmɛla guvɛrnema ya URSS, bakatelaki ngai mbula 25 ya bolɔkɔ mpe nasengelaki kosala mbula mitano mosusu na mboka mopaya. Batatoli oyo nakutanaki na bango na bolɔkɔ mpe na bakaa ya bakangami na Sibérie, basalisaki ngai nayeba Nzambe mpe mikano na ye malamu lisusu koleka. Ndenge moko na Lydia, Batatoli yango bakɔtaki bolɔkɔ mpo na kondima na bango.

Na boumeli ya bambula yango, boyebi na ngai ya Biblia ekolaki mpenza mpe nazalaki koyebisa basusu bindimeli na ngai. Atako nazwaki naino te libaku ya kozwa batisimo mpo na komonisa ete namipesi na Nzambe, baninga ya bolɔkɔ mpe bakonzi, bazalaki kotalela ngai lokola Motatoli ya Yehova. Na 1958, nsima ya kolekisa mbula mwambe na bolɔkɔ, babimisaki ngai. Nazongaki na Lituanie; atako nazalaki ya kokɔnda na nzoto, na elimo nazalaki makasi.

Nabandi kobongola mikanda na kobombama

Na ntango wana, na Lituanie, Batatoli batikalaki moke. Bamosusu bazalaki na bolɔkɔ mpe bamosusu batindamaki na Sibérie. Na 1959, Batatoli mibale oyo bautaki na Sibérie, basɛngaki ngai nabanda kobongola na monɔkɔ ya Lituanien, mikanda oyo elimbolaka Biblia. Atako ezalaki mokumba moko ya mpasi, namonaki ete ezali libaku malamu mpe nandimaki yango na esengo nyonso.

Na Marsi 1960, nabandaki kobongola, mpe na Yuli, nazwaki batisimo na kobombama na Ebale Dubysa. Lokola bato ya KGB (sirete ya URSS) bazalaki kotɛmɛla biso makasi, nakokaki kozwa mosala te mpo na kobikela, yango wana nakendaki kofanda epai ya baboti na ngai, mpo bango bazalaki kotɛmɛla kondima na ngai te. Nazalaki kobatela bangɔmbɛ ya tata mpe ya bato mosusu ya kartye. Ntango nazalaki kobatela bangɔmbɛ, nazalaki mpe kobongola mikanda. Nazalaki kofanda likoló ya eteni moko ya nzete na matiti, natye mikanda na mabɔlɔngɔ mpe nazali kokoma.

Kasi, namonaki ete kobongola mikanda na libándá ndenge wana ezalaki likama, mpo bato ya KGB to bato mosusu oyo bayebisaka bango makambo bakokaki komona ngai. Yango wana, ntango bisika oyo nakoki kobombama mpo na kosala mosala yango emonanaki, nalongwaki na ndako ya tata na ngai. Na bantango mosusu nazalaki kobongola mikanda na ndako ya banyama, mwa lopango moko ekabolaki ngai na banyama, mpe nazalaki kobɛta masini kozanga kopema.

Lokola kura ezalaki te, nazalaki kosala kaka na moi. Mpo na kobomba makɛlɛlɛ ya masini, batyaki pakapaka moko oyo ezalaki kobaluka na mopɛpɛ pene na esika oyo nazalaki kosala. Soki molili ekɔti, nazalaki kokɔta na ndako mpo na kolya. Na nsima, nazalaki kozonga na ndako ya banyama mpe kolala likoló ya matiti oyo ekauká.

Na Ɔkɔtɔbɛ 1961, ntango bayebaki ete nazali kopesa mabɔkɔ na makambo ya losambo, bakangaki ngai elongo na Batatoli mosusu mibale. Yango nde esalaki ete nasamba na 1962, ndenge nalobaki na ebandeli ya lisolo. Babengaki bato ebele báya koyoka biso ntango tozali kosamba, mpe tosepelaki mpo tozwaki libaku ya kopesa litatoli epai ya bato mingi oyo bayaki. (Marko 13:9) Bakatelaki ngai bolɔkɔ ya mbula misato mpe batindaki ngai na bolɔkɔ ya engumba Tallinn, na Estonie. Nakoki koloba ete kuna, nazalaki kaka ngai moko moto oyo bakangaki mpo na makambo ya losambo. Bakonzi ya engumba yango bayaki kotala ngai, mpe napesaki bango litatoli.

Nazongeli kobongola mikanda

Ntango kaka babimisaki ngai na bolɔkɔ na 1964 na Estonie, nazongaki na Lituanie. Kuna, nakobaki kobongola mikanda; mbala mingi nazalaki kozwa yango na monɔkɔ ya Russe mpe kobongola yango na monɔkɔ ya Lituanien. Nazalaki na mosala monene mpenza. Atako bandeko mosusu bazalaki kopesa ngai mabɔkɔ, nazalaki kaka ngai moko mobongoli ya monɔkɔ ya Lituanien. Mbala mingi nazalaki kosala mikolo nyonso nsambo, banda ntɔngɔ tii mpokwa. Soki ezalaki mpo na lisalisi ya Yehova te, nalingaki kozwa makasi ya kosala bongo te.

Lokola nayebaki motuya ya mosala yango, nazalaki ntango nyonso na bokɛngi. Bandeko bazalaki mbala mingi kotya bomoi na bango mpe ya mabota na bango na likama mpo na kobomba ngai, mpe kosunga ngai na mwa eloko ya kobikela. Kosala elongo ndenge wana esalisaki biso tólingana lisusu makasi. Soki libota moko eyambi ngai epai na bango, ntango nazali kosala, bango bazalaki kokɛngɛla mpo moto moko te amona mpe afunda ngai. Mpo na koyebisa ngai ete moto mabe azali koya, bazalaki kobɛta ebende mbala mibale na batiyo ya masini oyo epesaka mɔtɔ na ntango ya malili. Soki kaka nayoki bongo, nazalaki mbala moko kobomba eloko nyonso oyo ekokaki kosalisa moto ayeba mosala oyo nazali kosala.

Soki tomoni ete bato bakómi kokɛngɛla ndako oyo nazali, nazalaki kolongwa wana noki mpe kokende esika mosusu. Lokola kozala na masini ya kokoma mikanda ezalaki mbeba monene soki Leta apesi yo ndingisa te, ndeko mosusu nde azalaki komemela ngai masini yango tii na esika oyo nakokende. Na nsima, mingimingi na butu, ngai moko nazalaki kokende tii na esika yango.

Yehova abatelaki ngai mpenza. Atako bazalaki na elembeteli moko te, bakonzi bayebaki malamu ete nazalaki kobongola mikanda. Na ndakisa, na 1973 ntango basambisaki Batatoli ya Yehova mwambe, zuzi abengaki ngai mpo na kotuna ngai mituna. Atunaki ngai mbala moko ete: “Mockutė, mikanda boni obimisi na boumeli ya bambula nyonso oyo?”

Nalobaki na ye ete nakoki koyanola na motuya wana te. Na nsima atunaki ngai boye: “Bongo okoki koyanola na motuna nini?”

Nayanolaki boye: “Motuna nyonso oyo etali mosala wana te.”

Mbongwana ebandi kokɔta

Pene na nsuka ya bambula ya 1980, makambo ebandaki kobongwana na Lituanie. Ezalaki lisusu na ntina te tóbombamaka mpo na kokima bakonzi ya Leta. Yango wana, na 1990 bandeko mosusu babandaki mpe kobongola mikanda. Na 1992, mwa biro moko ya kobongola mikanda efungwamaki na Klaipeda, epai nakómaki kofanda.

Nasali mosala yango na boumeli ya mbula 30, na bisika 16. Na boumeli ya ntango wana nyonso nazalaki na ndako te. Kasi, nazali na esengo ya komona mbuma oyo mosala na biso ebimisi! Lelo oyo, Batatoli ya Yehova bakómi soki 3 000 na Lituanie. Lisusu, mosala ya kobongola oyo nazalaki kala kosala na kobombama na kati ya bandako ya bibwele mpe na bisika mosusu, ekómá lelo oyo kosalema na bandako kitoko ya Betele ya Lituanie, oyo ezali pene na engumba Kaunas.

Nabosanaka te mokolo oyo nakutanaki na ndeko Lydia na kati ya bolɔkɔ wana ya malili, eleki sikoyo mbula soki 60. Yango ebongolá bomoi na ngai! Nakozala ntango nyonso na botɔndi epai ya Yehova mpo na ndenge asalisaki ngai nayeba ye mpe nayeba mokano na ye, mpe namipesa mpo na kosala mokano na ye.

[Likanisi ya paragrafe na lokasa 11]

Mateya kitoko oyo Lydia ateyaki biso minei ntango tozalaki na bolɔkɔ ebongolá bomoi na biso

[Elilingi na lokasa 10]

Lisolo ya kosamba na ngai ebimaki na zulunalo moko ya URSS na 1962

[Elilingi na lokasa 12]

Mikanda mosusu oyo nabongolaki atako nayebaki ete bakoki kokanga ngai

[Elilingi na lokasa 13]

Lydia ateyaki ngai Biblia na bolɔkɔ

[Elilingi na lokasa 13]

Na 1956, ntango nazalaki na bolɔkɔ na Khabarovsk, na Russie, Batatoli mibale (na lobɔkɔ ya mwasi) basalisaki ngai nayeba makambo mingi lisusu ya Nzambe

[Elilingi na lokasa 13]

Masini oyo nazalaki kosalela ntango nazalaki kobongola mikanda na kobombama

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto