Eleki mbula ntuku libwa uta nabandá ‘kokanisa Mozalisi na ngai monene’
Lisolo ya Edwin Ridgwell
NA MOKOLO ya 11 Novɛmbɛ 1918, mokolo oyo bikólo eyokanaki mpo na kosukisa Etumba ya Liboso ya mokili mobimba, basangisaki bana ya eteyelo na biso na mbalakaka mpo na kosepela nsuka ya etumba yango, oyo bazalaki kobenga kala Etumba Monene. Nazalaki kaka na mbula mitano, mpe nayebaki mpenza te ntina oyo bazalaki kosepela. Kasi, na kolanda makambo oyo baboti na ngai bateyaki ngai mpo na Nzambe, nayebaki ete nasengeli te kosangana na molulu yango. Nabondelaki Nzambe, kasi na nsima nakokaki lisusu te mpe nabandaki kolela. Atako bongo, nasanganaki na molulu yango te. Wana ezali ndenge nabandaki ‘kokanisa Mozalisi na ngai monene.’—Mos. 12:1.
Mwa basanza liboso ya likambo yango, libota na biso ekendaki kofanda na etúká ya Glasgow, na Écosse. Na ntango wana, Tata alandaki lisukulu oyo ezalaki na motó ya likambo, “Bamilio ya bato oyo bazali sikoyo na bomoi bakokufa te.” Lisukulu yango ebongolaki mpenza bomoi na ye. Tata ná mama babandaki koyekola Biblia, mpe mbala mingi bazalaki kolobela Bokonzi ya Nzambe mpe mapamboli oyo yango ekomema. Natɔndaka Nzambe na ndenge baboti na ngai bateyaki ngai banda na ntango wana nalinga Nzambe mpe natyelaka ye motema.—Mas. 22:6.
Nabandi mosala ya ntango nyonso
Ntango nakómaki na mbula 15, nasilisaki kelasi ya ntei mpe nasengelaki kokɔta na iniversite, kasi nazalaki mpenza na mposa ya kosala mosala ya ntango nyonso. Tata amonaki ete nazali naino mwana moke, yango wana nakómaki kosala na kompanyi moko. Kasi, lokola nazalaki na mposa makasi ya kosalela Yehova na mosala ya ntango nyonso, mokolo moko nakomelaki Ndeko Rutherford, oyo na ntango wana azalaki kokamba misala ya Batatoli ya Yehova na mokili mobimba. Natunaki ye soki akanisi nini mpo na mokano na ngai ya kosala mosala ya ntango nyonso. Ndeko Rutherford ayanolaki ngai boye: “Soki okómi na mbula ya kosala mosala na kompanyi, okoki mpe kosala mosala ya Nkolo. . . . Nazali na elikya ete Nkolo akopambola yo soki osali molende mpo na komipesa mobimba na mosala na ye.” Mokanda yango, oyo akomaki na mwa 10 Marsi 1928, elendisaki mpenza libota na biso. Eumelaki te, ngai, Tata, Mama mpe yaya na ngai ya mwasi tokómaki babongisi-nzela.
Na 1931, na liyangani moko oyo esalemaki na Londres, Ndeko Rutherford alendisaki bandeko bákende kosakola nsango malamu na mboka mopaya. Nandimaki kokende, mpe batindaki ngai ná Andrew Jack na Kaunas, mboka-mokonzi ya Lituanie. Nazalaki na mbula 18.
Kosakola nsango ya bokonzi na mboka mopaya
Na ntango wana, bato ya Lituanie bazalaki mpenza kosala bilanga te, mpe kosakola na bamboka ezalaki pɛtɛɛ te. Ezalaki mpasi kozwa esika ya kofanda, mpe tobosanaka te bisika mosusu oyo tolalaki. Na ndakisa, na butu moko ngai ná Andrew tolamukaki mpo tokokaki kolala te. Ntango topelisaki mwinda na biso ya petrole, tomonaki mbeto etondi na binsekwa. Balyaki biso nzoto mobimba, banda na motó tii na makolo! Ntɔngɔ nyonso, nazalaki komizindisa tii na nkingo, na mai ya malili na ebale oyo ezalaki penepene na biso, mpo nayoka mwa malamu. Atako bongo, tozalaki na ekateli makasi ya kokoba na mosala na biso. Mwa moke na nsima, mokakatano ya kozwa esika ya kolala esilaki, ntango tokutanaki na mobali moko ná mwasi na ye oyo bandimaki solo. Bazwaki biso na ndako na bango, oyo ezalaki pɛto atako ezalaki moke. Tozalaki mpenza na esengo atako tozalaki kolala na nse!
Lituanie ezalaki ekólo oyo lingomba ya Katolike mpe ya Ɔrtɔdɔkse ezalaki makasi. Kaka bazwi nde bazalaki na likoki ya kosomba Biblia. Mokano na biso ya libosoliboso ezalaki ya kopesa litatoli na teritware na biso mobimba mpe kotikela bato oyo bakosepela mikanda mingi oyo elimbolaka Biblia. Tozalaki naino koluka esika ya kofanda na engumba moko. Na nsima, tozalaki kokende kosakola na bamboka ya mosika na ndenge ya mayele, mpe na nsima tozalaki kosakola nokinoki na engumba. Na ndenge yango, tozalaki mbala mingi kosilisa teritware mobimba liboso kutu basango bábimisela biso mobulu.
Nsango na biso etamboli na ndenge ya malamu
Na 1934, babengaki Andrew akende kosala na biro ya filiale ya Kaunas, mpe John Sempey akómaki moninga na ngai ya mosala. Tokutanaki na mwa makambo oyo tobosanaka te. Mokolo moko, nakɔtaki na biro ya avoka moko na mwa engumba moko. Mobali yango asilikaki makasi, azwaki mondoki na ye na tirware mpe alobaki na ngai nabima. Nabondelaki na nse ya motema mpe nakanisaki toli oyo ya Biblia: “Eyano, ntango ezali ya boboto, elongolaka nkɛlɛ.” (Mas. 15:1, NW) Na yango, nalobaki na ye boye: “Nayei na ndenge ya mabe te, namemelaki yo nde nsango malamu, mpe natɔndi yo mpo na ndenge obɛti ngai masasi te.” Moto yango akitisaki mondoki na ye, mpe na bokɛngi nyonso nazongaki nsimansima mpe nabimaki na biro na ye.
Ntango nakutanaki na John, ayebisaki ngai ete ye mpe akutanaki na likambo moko ya ndenge wana. Bamemaki ye na biro ya bapolisi mpo bakoselaki ye makambo ete ayibi mwasi moko mbongo ebele. Kuna na biro ya bapolisi, balongolaki ye bilamba nyonso mpo na koluka mbongo yango. Kasi, bamonaki eloko te. Na nsima, bakangaki moto oyo ayibaki mbongo yango.
Makambo mibale wana eningisaki mpenza engumba yango ya kimya, mpe etindaki bato mingi báluka koyeba nsango malamu!
Kolekisa mikanda na ndenge ya kobombama
Mokumba moko oyo etyaki bomoi na biso na likama ezalaki ya kokɔtisa mikanda oyo elimbolaka Biblia na Lettonie, epai mosala ya kosakola epekisamaki. Mbala soki moko na sanza, tozalaki kosala mobembo na Lettonie na engbunduka na butu. Ntango mosusu soki totiki mikanda, tozalaki kokende tii na Estonie kozwa mikanda mosusu mpe kotika yango na Lettonie ntango tozali kozonga.
Mokolo moko, mokonzi moko ya dwanɛ oyo bafundaki biso epai na ye asɛngaki biso tókita na engbunduka mpe tómema mikanda oyo tozalaki na yango epai ya mokonzi na ye. Ngai ná John tobondelaki Yehova asalisa biso. Likambo ya kokamwa, moto yango ayebisaki mokonzi na ye te soki tozalaki na nini; kasi ayebisaki ye kaka, “Bato oyo balingi koyebisa biloko oyo bazali na yango.” Nalobaki na ye ete biloko oyo tozali na yango ezali mikanda oyo ekosalisa bana-kelasi báyeba ntina ya makambo oyo ezali kosalema na mokili. Moto yango atikaki biso tóleka mpe tomemaki mikanda na biso kozanga likama tii na esika oyo tozalaki kokende na yango.
Ntango mobulu ekɔtaki na bamboka ya Baltes, bato bazalaki lisusu kolinga Batatoli te, mpe mosala ya kosakola epekisamaki na Lituanie. Andrew ná John bamemamaki na makasi na mokili mosusu, mpe lokola Etumba ya Mibale ya mokili mobimba elingaki kobanda, basɛngaki moto nyonso oyo azali mwana-mboka ya Angleterre alongwa na Lituanie. Na mawa nyonso, ngai mpe natikaki Lituanie.
Mikumba ya sika mpe mapamboli na Irlande du Nord
Na ntango wana, baboti na ngai bakendaki kofanda na Irlande du Nord, mpe na 1937, nalandaki bango kuna. Kuna mpe, lokola bato bakómaki kobanga etumba, bapekisaki mikanda na biso, kasi tokobaki kosakola na ntango wana nyonso ya etumba. Nsima ya Etumba ya Mibale ya mokili mobimba, tozwaki lisusu bonsomi ya kosakola. Harold King, mobongisi-nzela moko oyo aumelaki na mosala yango mpe na nsima akómaki misionɛrɛ na Chine, abandaki kolendisa bandeko básalaka masukulu na libándá. Alobaki na ngai boye: “Na mokolo ya pɔsɔ oyo, nakosala lisukulu ya liboso na libándá.” Atalaki ngai mpe abakisaki boye: “Yo okosala na pɔsɔ oyo ekolanda.” Elɛngisaki ngai.
Nabosanaka te lisukulu ya liboso oyo nasalaki. Bankama ya bato bazalaki wana. Natɛlɛmaki likoló ya kɛsi moko mpe nazalaki ata na mikro te. Ntango nasilisaki koloba, mobali moko ayaki pene na ngai, apesaki ngai mbote mpe alobaki ete nkombo na ye Bill Smith. Ayebisaki ngai ete azalaki koleka, kasi ntango amonaki ebele ya bato, atɛlɛmaki mpo na koyeba likambo oyo bazali kosala. Nayaki koyeba ete tata na ngai apesaki Bill litatoli mpo na mbala ya liboso, kasi babunganaki ntango tata ná mwasi na ye bakendaki kofanda na Dublin, mpo na kosakola kuna. Nabandaki koyekola na ye Biblia. Na nsima, bato libwa ya libota ya Bill bakómaki Batatoli ya Yehova.
Na nsima, nakendaki kosakola na kartye moko ya bandako minene pene na engumba Belfast, epai nakutanaki na mwasi moko ya Russie, oyo afandaki mpe na Lituanie. Ntango nalakisaki ye mikanda, alakisaki ngai buku moko mpe alobaki boye: “Nazali na buku oyo. Noko na ngai oyo atángisaka na iniversite ya Kaunas nde apesaki ngai yango.” Alakisaki ngai buku Création, na monɔkɔ ya Polonais. Buku yango etondaki na makambo oyo babakisaki na biki. Mwasi yango akamwaki mpenza ntango nayebisaki ye ete ngai nde napesaki noko na ye buku yango, ntango nazalaki na Kaunas!—Mos. 11:1.
Ntango John Sempey ayokaki ete nazali kokende na Irlande du Nord, asɛngaki ngai natalaka leki na ye ya mwasi, Nellie, oyo azalaki kosepela na mateya ya Biblia. Ngai ná ndeko na ngai ya mwasi, Connie, toyekolaki na ye Biblia. Nellie akolaki nokinoki na elimo mpe apesaki bomoi na ye epai ya Yehova. Na nsima, tolinganaki mpe tobalanaki.
Ngai ná Nellie tosalelaki Yehova elongo na boumeli ya mbula 56 mpe tosalisaki bato koleka 100 báyeba solo. Tozalaki na elikya ete Armagedona ekokuta biso nyonso mibale na bomoi mpe tokokɔta na mokili ya sika oyo Yehova alaki, kasi na 1998, mwasi na ngai akufaki. Likambo yango esalaki ngai mpasi mingi; ezalaki komekama ya monene mpenza na bomoi na ngai.
Nazongi na bamboka ya Baltes
Mbula soki moko nsima ya liwa ya Nellie, nazwaki lipamboli moko ya kitoko mpenza. Babengaki ngai nakende kotala biro ya filiale ya Tallinn, na Estonie. Mokanda oyo bandeko ya Estonie batindelaki ngai elobaki boye: “Na bandeko zomi oyo batindaki na bamboka ya Baltes na nsuka ya bambula ya 1920 mpe na ebandeli ya bambula ya 1930, kaka yo moko nde otikali na bomoi.” Babakisaki ete biro ya filiale ezali kobongisa lisolo ya mosala ya kosakola na Estonie, Lettonie mpe Lituanie, mpe batunaki boye: “Okoki koya?”
Nazwaki mpenza libaku malamu ya koyebisa makambo oyo ngai ná baninga na ngai tokutanaki na yango na bambula wana! Na Lettonie, nalakisaki bandeko ndako ya libosoliboso oyo esalelamaki lokola biro ya filiale mpe esika tozalaki kobomba mikanda na plafɔ, epai bapolisi batikalaki komona yango te. Na Lituanie, bamemaki ngai na mwa engumba moko na nkombo Šiauliai, epai nasalaki kala lokola mobongisi-nzela. Na likita moko, ndeko moko alobaki na ngai boye: “Eleki mbula ebele, ngai ná mama tosombaki ndako na engumba moko. Ntango tozalaki kolongola bosoto na likoló ya plafɔ, namonaki babuku Le divin Plan des Âges ná La Harpe de Dieu. Ntango natángaki yango, namonaki ete yango ezali solo. Ekoki kozala ete yo nde otikaki babuku yango bambula mingi liboso!”
Nakendaki mpe na liyangani ya zongazonga na engumba moko, epai nazalaki kala mobongisi-nzela. Mbula 65 elekaki banda nakendaki na liyangani moko kuna. Na ntango wana, tozalaki kaka bato 35 na liyangani. Kasi, mbala oyo nazalaki mpenza na esengo ya komona bato 1 500 na liyangani yango! Yehova apamboli mpenza mosala na biso!
‘Yehova atikaki ngai te’
Eleki mwa mikolo, nazwaki lipamboli moko oyo nandimaki te ete nakoki kozwa; ndeko mwasi moko kitoko na nkombo Bee andimaki kobala ngai. Tobalanaki na Novɛmbɛ 2006.
Nazali koyebisa elenge nyonso oyo azali koluka nini akoki kosala na bomoi na ye ete ezali mpenza bwanya kolanda toli ya Biblia: “Kanisá Mozalisi na yo Monene na mikolo ya bolenge na yo.” Na esengo nyonso, nakoki koloba lokola mokomi ya nzembo ete: “Nzambe, olakisi ngai longwa na bolenge na ngai; kino [sikoyo] nazali kosakola misala na yo ya kokamwa. Boye, kino ntango ya konuna na ngai na nsuki mpɛmbɛ, e Nzambe, tiká ngai te. Kino nakosakola nguya na yo epai na nyonso na libota ezali koya nsima.”—Nz. 71:17, 18.
[Karte na lokasa 25]
(Mpo na komona yango, talá mokanda)
Mokumba oyo etyaki bomoi na biso na likama ezalaki ya kokɔtisa na Lettonie mikanda oyo elimbolaka Biblia
ESTONIE
TALLINN
Golfe de Riga
LETTONIE
RIGA
LITUANIE
VILNIUS
Kaunas
[Elilingi na lokasa 26]
Nakómaki mobongisi-nzela na Écosse ntango nazalaki na mbula 15
[Elilingi na lokasa 26]
Ngai ná Nellie na mokolo ya libala na biso, na 1942