Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • g 10/09 nk. 25-27
  • Makambo oyo ebimisaki etumba ya mokili mobimba

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Makambo oyo ebimisaki etumba ya mokili mobimba
  • Lamuká!—2009
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Masasi mibale oyo ebongolaki mokili
  • Bamibongisi mpo na etumba
  • Mobulu ebandi
  • “Bikólo ebebani”
  • Etumba oyo ebongolaki mokili
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2014
  • Kowelana ya bakonzi yango mibale na ekeke ya 20
    Tyá likebi na esakweli ya Danyele!
  • 1914—Mbula oyo ebulunganisaki mokili
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1992
  • Moto oyo abimisaka bitumba mpe bampasi
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2014
Lamuká!—2009
g 10/09 nk. 25-27

Makambo oyo ebimisaki etumba ya mokili mobimba

Etumba ya misato ya mokili mobimba ekoki kobima kaka yango moko? Kozanga kokanisa malamu, bakonzi ya bikólo mpe bapesi-toli na bango bakoki nde kobimisa likambo moko oyo ekoboma bamilio ya bato?

TOYEBI te, kasi toyebi ete likambo moko ya ndenge wana esalemaki. Ekeke moko liboso, bakonzi ya Mpoto batindaki bato ya bikólo na bango na Etumba Monene, oyo na nsima ekómaki kobengama Etumba ya Liboso ya mokili mobimba, kozanga kotalela makambo ya nsɔmɔ oyo yango ekokaki kobimisa. David Lloyd George, oyo azalaki ministre-mokonzi ya Angleterre kobanda 1916-1922, alobi boye: “Tomikɔtisaki na etumba.” Tótalela mwa makambo ya minene oyo etindaki bato bábomana na ndenge wana ya nsɔmɔ.

Taylor, moto moko ya mayele na masolo ya kala alobi ete: “Mokonzi moko te alingaki etumba yango ekóma monene ndenge wana, kasi bazalaki kaka koluka kobangisa bikólo mosusu mpe koluka kolonga yango.” Mpo na mokonzi ya Russie, esengelaki kosala nyonso mpo na kobatela kimya. Aboyaki komema ngambo mpo na liwa ya ebele ya bato na ndenge wana ya nsɔmɔ. Kasi, makambo ebebaki kaka mpo na masasi mibale oyo ebɛtamaki na mokolo ya 28 Yuni 1914, soki na ngonga ya 11h15.

Masasi mibale oyo ebongolaki mokili

Na 1914, kowelana ya kala oyo ezalaki kati na bikólo ya Mpoto ekómaki makasi, mpe mpo na yango bikólo yango ekabwanaki na ngámbo mibale: Autriche-Hongrie, Italie mpe Allemagne na ngámbo moko (oyo ebengamaki Triple-Alliance). Mpe Angleterre, France mpe Russie, na ngámbo mosusu (oyo ebengamaki Triple-Entente). Bikólo yango ezalaki mpe na boyokani na makambo ya politiki mpe ya nkita ná bikólo mosusu, ata mpe mikili ya Balkans.

Na ntango wana, mikili ya Balkans ezalaki makasi te na makambo ya politiki mpe ezalaki na nse ya bokonzi ya bikólo oyo ezalaki na nguya mingi; ezalaki mpe na masangá mingi ya nkuku oyo ezalaki koluka lipanda. Kuna, mwa etuluku moko ya bilenge bayokanaki mpo na koboma mokonzi ya Autriche, Francis Ferdinand, ntango akendaki na Sarajevo, mboka-mokonzi ya Bosnie, na mokolo ya 28 Yuni.a Lokola bapolisi bazalaki mingi te, ezalaki mpasi te mpo bákokisa mokano na bango. Kasi, bilenge yango bamibongisaki malamu te. Elenge moko abwakaki mwa bɔmbi, kasi ezwaki mokonzi te; bamosusu mpe bamekaki, kasi balongaki te. Kasi, Gavrilo Princip, elenge oyo abomaki ye, alongaki kaka na mbalakaka. Ndenge nini?

Ntango Princip amonaki ete bɔmbi oyo babwakaki esali mokonzi eloko te, alukaki kokɔta na motuka, kasi alongaki te. Alɛmbaki nzoto, akatisaki balabala mpe akendaki na restora. Na ntango yango, mokonzi asilikaki mpo na likambo oyo elingaki kosalema, mpe azwaki ekateli ya kozwa nzela mosusu. Kasi, kozanga koyeba likama oyo ezalaki liboso, sofɛlɛ na ye abalolaki motuka. Na ntango yango, Princip abimaki na restora mpe amonaki motuka ya mokonzi etɛlɛmi na ntaka ya mɛtrɛ 3 mpe porte ya motuka ezalaki polele. Princip apusanaki pene ya motuka mpe abɛtaki masasi mibale, oyo ebomaki mokonzi ná mwasi na ye.b Moto yango ya Serbie ayebaki te bonene ya likambo oyo autaki kosala. Kasi, kaka ye moko te nde azalaki na foti mpo na makambo ya nsɔmɔ oyo ebimaki na nsima.

Bamibongisi mpo na etumba

Liboso ya 1914, bato mingi ya Mpoto bazalaki kosepela na etumba. Atako bazalaki komibenga bakristo, bazalaki komona ete etumba ekomemela bango matomba mpe lokumu. Kutu, bakonzi mosusu bazalaki kokanisa ete etumba ekosala ete bato ya ekólo na bango bázala na bomoko mpe bákemba! Lisusu, bakonzi mosusu ya basoda bayebisaki bakonzi ya bikólo na bango ete bakoki kolonga banguna na bango nokinoki. Mokonzi moko ya basoda na Allemagne atutaki ntolo boye: “Tokolonga France na pɔsɔ mibale mpamba.” Moto moko te akokaki kokanisa ete bamilio ya bato bakokufa na bitumba na boumeli ya ebele ya bambula.

Lisusu, buku moko (Cooperation Under Anarchy) emonisaki ete mwa bambula liboso ya etumba, “bato mingi ya Mpoto bakómaki kolinga bikólo na bango makasi. Biteyelo, ba iniversite, bapanzi-nsango, mpe bato ya politiki batikalaki nsima te; bango mpe bakómaki kolendisa ezaleli yango.”

Bakonzi ya mangomba basalaki eloko te mpo na kopekisa likambo yango. Paul Johnson, moto moko ya mayele na masolo ya kala alobi boye: “Baprotesta ya Allemagne, Bakatolike ya Autriche, bato ya Lingomba ya Ɔrtɔdɔkse ya Bulgarie mpe Bamizilma ya Turquie, basanganaki ngámbo moko. Mpe na ngámbo mosusu Baprotesta ya Angleterre, Bakatolike ya France mpe ya Italie, mpe bato ya Lingomba ya Ɔrtɔdɔkse ya Russie basanganaki.” Abakisi ete bakonzi mingi ya mangomba bazalaki “kosangisa bokristo ná bolingo ya ekólo. Bazalaki kolendisa basoda bakristo bábomana na nkombo ya Mobikisi na bango.” Ata basango ná bamamelo bamikɔtisaki na likambo yango, mpe bamilio na bango babomamaki na nsima.

Boyokani oyo bikólo ya Mpoto esalaki mpo na komibatela na ntango ya etumba elendisaki nde etumba yango. Na ndenge nini? Zulunalo moko (Cooperation Under Anarchy) elobi ete “Kimya ya ekólo mokomoko ya Mpoto esimbamaki na oyo ya bikólo mosusu. Ekólo mokomoko ezalaki komona ete ekoki kozala na kimya te soki baninga na ye bazali na kimya te, mpe bazalaki kosala nyonso mpo na kokɔtela baninga na bango, ata soki baninga yango nde batumoli bikólo mosusu.”

Likambo mosusu ya mabe ezalaki mayele ya etumba oyo babengaki plan Schlieffen, oyo esalemaki na Allemagne; ebengamaki na nkombo ya mokonzi moko ya basoda ya Allemagne, Alfred von Schlieffen. Mayele yango oyo ezalaki ya kokwela banguna mbala moko, esalemaki na likanisi ete Allemagne ekobundisa France mpe Russie. Mokano na bango ezalaki ya kolonga France nokinoki, wana Russie ezali komibongisa malɛmbɛmalɛmbɛ, mpe na nsima kobundisa Russie. Buku moko (World Book Encyclopedia) elobi ete “ntango mayele yango [Schlieffen] ebongisamaki, basoda ya bikólo na bango bamibongisaki mpo na etumba na Mpoto.”

Mobulu ebandi

Atako likambo moko te emonisaki ete guvɛrnema ya Serbie nde ebomaki mokonzi ya Autriche, bato ya Autriche bazwaki ekateli ya kosilisa mobulu ya bato ya Slave mbala moko. Roberts, moto moko ya mayele na makambo ya kala amonisi ete Autriche ezalaki na mposa ya “kopesa Serbie liteya.”

Na milende na ye ya koluka kosilisa mobulu, Nicholas Hartwig, ambasadɛrɛ ya Russie na mboka-mokonzi ya Serbie, asalaki nyonso oyo akokaki kosala mpo na kotya kimya. Kasi, akufaki na maladi ya motema ntango azalaki kosolola na bato oyo bautaki na Autriche. Nsukansuka, na mokolo ya 23 Yuli, Autriche etindelaki Serbie liste ya makambo oyo basengelaki kokokisa kozanga koumela. Lokola Serbie eboyaki kokokisa makambo nyonso oyo Autriche esɛngaki, Autriche ekataki mbala moko boyokani na ekólo yango. Na ntango wana ya yikiyiki, boyokani na bango ekatanaki.

Kasi, bamekaki kosala mwa makambo mpo etumba ebima te. Na ndakisa, Royaume-Uni esɛngaki bikólo ekutana mpo na likita, mpe mokonzi ya Allemagne asɛngaki mokonzi ya Russie asala eloko te. Kasi, makambo ebebaki. Buku moko, (The Enterprise of War) elobi ete “bakonzi ya basoda mpe bato nyonso ya bikólo bakokaki lisusu kopekisa te makambo oyo esengelaki kosalema.”

Mokonzi ya Autriche, oyo azalaki kotya motema na lisungi ya Allemagne, asɛngaki Serbie etumba na mokolo ya 28 Yuli. Mpo na kosunga Serbie, Russie alakaki ete akotya basoda soki milio moko na ndelo ya Autriche. Lokola yango elingaki kosala ete ndelo ya Russie ná Allemagne etikala mpamba, mokonzi ya Russie asɛngaki ekólo mobimba bámibongisa.

Mpo na kokitisa mokonzi ya Allemagne motema, mokonzi ya Russie ayebisaki ye ete akobundisa ye te. Nzokande, lokola mokonzi ya Russie asɛngaki bato ya ekólo na ye bámibongisa, Allemagne asalelaki noki mayele na ye [Schlieffen] na mokolo ya 31 Yuli; Allemagne esɛngaki Russie etumba na mokolo ya 1 Augusto mpe mikolo mibale na nsima, esɛngaki France etumba. Lokola mayele ya Allemagne esɛngaki báleka na Belgique, Angleterre ekebisaki Allemagne ete soki babundisi Belgique, bango bakokɔta na etumba yango. Basoda ya Allemagne balekaki na Belgique na mokolo ya 4 Augusto. Makambo ebebaki kobeba.

“Bikólo ebebani”

Norman Davies, moto moko ya mayele na masolo ya kala alobi ete “ntango Angleterre esɛngaki etumba, makambo ebebaki mpenza kobeba.” Edmond Taylor, moto mosusu ya mayele na masolo ya kala, akomaki ete nsima wana Autriche esɛngaki etumba na mokolo ya 28 Yuli, “mobulu makasi ekɔtaki mpe yango esalaki ete [etumba] ekóma makasi. Makambo mingi ezalaki kosalema nokinoki mpe na bisika ebele. . . . Ata bato ya mayele bandimaki te ete makambo ya ndenge wana ezali kokómela bango.”

Bato soki milio 13, basoda mpe bato mosusu bakufaki mpo na “mobulu” yango. Bilikya nyonso oyo bato bazalaki na yango ekweaki na mai, bato ya bikólo yango oyo babimisaki ebele ya bibundeli ya makasi mpe ya sika, babomanaki na ndenge oyo esalemaki naino liboso te. Mokili ebongwanaki mpenza.​—Talá etanda “Etumba ya mokili mobimba​—Elembo ya ntango?”

[Maloba na nse ya lokasa]

a Lelo oyo, Bosnie ezali na kati ya Bosnie-Herzégovine.

b Princip abomaki mpe mwasi ya mokonzi kozanga kokana. Mposa na ye ezalaki aboma guvɛrnɛrɛ ya Bosnie, Generale Potiorek, oyo azalaki na motuka elongo na mokonzi mpe mwasi na ye, kasi alongaki te.

[Etanda/​Elilingi na lokasa 26]

ETUMBA YA MOKILI MOBIMBA​—ELEMBO YA NTANGO?

Biblia esakolaki ete bitumba ekozala na kati ya elembo oyo ekomonisa ete tokómi na mikolo ya nsuka ya mokili oyo mabe. (Matai 24:3, 7; Emoniseli 6:4) Ndenge elembo yango ezali kokokisama lelo oyo emonisi ete etikali moke Bokonzi ya Nzambe ebanda koyangela mabele.​—Danyele 2:44; Matai 6:9, 10.

Lisusu, Bokonzi ya Nzambe ekolongola banguya oyo emonanaka te, oyo ezali kotambwisa mokili​—bilimo mabe oyo Satana Zabolo azali kokamba. Mokanda ya 1 Yoane 5:19, elobi ete “mokili mobimba ezali kolala na nguya ya moto mabe.” Elimo ya Satana ebimisi makambo mingi ya mabe na mokili, na ntembe te ezali mpe elimo yango nde ebimisaki makambo mabe oyo ebimisaki Etumba ya Liboso ya mokili mobimba.​—Emoniseli 12:9-12.c

[Maloba na nse ya lokasa]

c Mpo na koyeba makambo mosusu mpo na mikolo ya nsuka mpe bilimo mabe, okoki kotala buku Biblia eteyaka mpenza nini? ebimisami na Batatoli ya Yehova.

[Eutelo ya bafɔtɔ]

Fɔtɔ ya U.S. National Archives

[Elilingi na lokasa 25]

Kobomama ya mokonzi Ferdinand

[Elilingi na lokasa 25]

© Fɔtɔ ya Mary Evans Library

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto