Mituna oyo bilenge batunaka
Esika nini ebongi na ngai?
“Nazali na mbula 21. Awa, bato ya mbula na ngai bazali mingi te. Sikoyo nasengeli kolekisa ntango elongo na bana oyo bazali naino kokende kelasi to na bato oyo babalá. Bana-kelasi, makanisi na bango kaka na baekzame, mpe baoyo babalá, makanisi na bango kaka na mabota mpe bandako na bango. Makambo ya ndenge wana ekoki kozangisa ngai mpɔngi te. Mposa na ngai ezali nazwa mwa bato oyo bazali lokola ngai!”—Carmen.a
PENE na moto nyonso, ata ya mbula nini, alingaka basusu bándima ye. Na ntembe te, ezali mpe bongo mpo na yo. Yango wana, esalaka mpasi soki batye yo pembeni mpe babosani yo, lokola moto bazali komona ye te—kozala “kaka elili mpamba,” ndenge Michaela, oyo azali na mbula 15, alobaki mpo na ye moko.
Ya solo, soki ozali mokristo, ozali na esika na kati ya “lisangá mobimba ya bandeko.” (1 Petro 2:17) Atako bongo, na bantango mosusu okoki komona ete ozali na esika te. Helena, oyo azali na mbula 20 alobi boye: “Ntango tozalaki kozonga ndako nsima ya makita, nazalaki kofanda na kiti ya nsima na motuka mpe nazalaki kolela. Ntango nyonso oyo nazalaki koluka esika oyo ebongi na ngai, nazalaki kaka kolɛmba nzoto.”
Okoki kosala nini soki omoni ete ozali na esika te na kati ya baninga? Mpo tóyanola na motuya yango, tóyeba naino (1) bato oyo omonaka ete ezali mpasi ozwa esika kati na bango mpe (2) ndenge osalaka mbala mingi ntango ozali elongo na bango.
Tyá ✔ pembeni ya bato oyo omonaka ete babongi na yo te.
1. Mbula
□ mbula na yo □ koleka yo □ mikóló
2. Makoki
Bato bayebi
□ masano □ misala □ batángá mingi
3. Bomoto
Bato oyo
□ bamikumisaka □ bayebani □ baponaponaka
Sikoyo tyá ✔ pembeni ya maloba oyo emonisi ndenge osalaka mbala mingi ntango ozali elongo na bato yango.
□ Nakosaka ete ngai mpe nazali ndenge wana.
□ Nakipaka makambo na bango te, kasi nalobaka oyo ya ngai moko.
□ Nafandaka nyɛɛ mpe nalukaka ndenge ya kolongwa wana.
Sikoyo lokola oyebi bato oyo omonaka ete babongi na yo te mpe ndenge oyo osalaka ntango ozali elongo na bango, tokoki sikoyo kotalela ndenge okoki oyeba esika oyo ebongi na yo. Kasi, tólobela naino makambo mibale oyo ekoki kopekisa yo ozwa baninga mpe ndenge ya kolonga yango.
LIKAMBO 1: Komitangola
Mokakatano. Ntango ozali elongo na bato oyo balingaka mpe basalaka makambo oyo ekeseni na oyo ya yo, ezalaka mpasi te oyoka ete ozali ndenge mosusu—mingimingi soki ozalaka nsɔninsɔni. Anita, oyo azali na mbula 18, alobi boye: “Nayinaka kobanda lisolo na basusu. Nabangaka noki naloba likambo ya bozoba.”
Oyo Biblia elobi. “Ye oyo azali komitangola na bamosusu akoluka mposa na ye ya lokoso; akotombokela makambo nyonso ya bwanya.” (Masese 18:1) Ezali polele ete kokima basusu ekobebisa kaka makambo. Kutu, ntango ozali komitangola, ozali kobaluka kaka esika moko: komiyoka ete ozali kaka yo moko, ekotinda yo omona ete ozali na esika te, yango ekotinda yo okima basusu, yango ekosala ete okóma komiyoka ete ozali kaka yo moko, mpe okomona ete ozali na esika te. Mpe okobaluka kaka wana, tii ekosɛnga osala mwa eloko mpo na yango!
“Bato bayebaka te oyo ezali na motema ya basusu. Soki oyebisi te eloko nini olingi, okozwa yango te. Soki ofandi kaka yo moko, okozwa baninga te. Osengeli kosala mwa milende. Ezali malamu te kokanisa ete etali nde basusu. Boninga esɛngaka bato mibale básala milende.”—Melinda, mbula 19.
LIKAMBO 2: Kozwa baninga ata ya ndenge nini
Mokakatano. Bato mosusu balukaka kozwa baninga tii bakómaka na baninga ya mabe—bamonaka ete malamu kozala ata na moninga ya ndenge nini na esika ya kozanga moninga. René, oyo azali na mbula 15 alobi boye: “Na eteyelo, nazalaki mawamawa mpo nazalaki te na molɔngɔ ya bana oyo bayebanaki mingi, mpe nalingaki ata kosala makambo ya mabe kaka mpo bándima ngai.”
Oyo Biblia elobi. “Ye oyo azalaka na boyokani na bazoba akosuka mabe”—to, ndenge Biblia haut fleuve ebongoli yango, “motamboli elɔngɔ na bazoba akobukana.” (Masese 13:20) Komikosa te: “bazoba” oyo balobeli na vɛrsɛ yango ezali mpenzampenza te bato oyo bayebi eloko te. Kutu, ekoki nde kozala bana-kelasi ya mayele mingi. Kasi, soki batosaka mibeko ya Biblia te, bazali bazoba na miso ya Nzambe. Mpe okosuka mabe soki okómi kobongwana lokola mongingima (cameléon), mpo okokana na bango.—1 Bakorinti 15:33.
“Moto nyonso te nde abongi kozala moninga. Esɛngi te ozala na baninga oyo ntango ozali elongo na bango, ekosɛnga ozala moto mosusu. Malamu kozala na baninga oyo balingaka yo mpenza mpe oyo bakozala pene na yo ntango ozali na mposa na bango.”—Paula, mbula 21.
Kokanga mabɔkɔ te
Kozela te ete basusu báya epai na yo mpe bákɔtisa yo na etuluku na bango. Gene, oyo azali na mbula 21, alobi boye: “Tokoki komizela ntango nyonso te ete basusu báya epai na biso. Tosengeli kokende epai na bango.” Makanisi mibale oyo elandi ekosalisa yo na likambo yango:
Kosuka kaka na bato ya mbula na yo te. Emonani ete Yonatane alekaki Davidi na mbula 30; nzokande mibali yango mibale oyo Biblia elobeli bakómaki “baninga ya motema.”b (1 Samwele 18:1, Biblia Contemporary English Version) Eteyi biso nini? Tokoki kosala boninga ná mikóló! Kanisá naino: Mpo na nini koluka baninga kaka kati na bato ya mbula moko boye mpe na nsima komilela ete ozali kozwa bango te? Kosala bongo ekozala lokola kokufa nzala na esobe, nzokande zingazinga na yo, ezali na mai oyo etondi na mbisi! Mpo na koloba solo, zingazinga na yo, ezali na bato ya malamu oyo okoki kokóma moninga na bango. Mpe mpo ozwa bango, osengeli kosuka kaka te na koluka kati ya bato ya mbula na yo.
“Mama alendisaki ngai nasololaka na mikóló na lisangá. Alobaki ete nakokamwa komona ete nakokani na bango na makambo mingi. Alobaki solo, mpe lelo oyo, nazali na baninga mingi!”—Helena, mbula 20.
Yekolá kosolola na bato. Kosolola na bato esɛngaka milende, mingimingi soki ozalaka nsɔninsɔni. Kasi okoki kosala yango. Mpo na yango, osengeli (1) koyoka, (2) kotuna mituna, mpe (3) kotyela bato yango likebi.
“Na esika ya koloba mingi, nasalaka makasi nayoka. Mpe ntango nazali koloba, nalingaka kolobela kaka ngai moko to mabe ya basusu te.”—Serena, mbula 18.
“Soki moto alingi tólobela likambo moko oyo nayebi mpenza te, nasɛngaka ye alimbola likambo yango, na elikya ete ekotinda ye asolola na ngai mingi koleka.”—Jared, mbula 21.
Mbala mosusu, olobaka mingi te; mpe yango ezali mabe te. Esɛngi te okóma moto ya kolobaloba! Kasi, soki omoni ete ozali kozwa esika oyo ebongi na yo te, meká kosalela makanisi ya lisolo oyo. Mbala mosusu okoyoka lokola Leah, oyo alobi boye: “Nazalaka nsɔninsɔni, mpe esɛngaka nasala makasi mpenza mpo nasolola na basusu. Kasi mpo na kozwa baninga, esɛngaka kosolisa basusu. Na yango, nakómá kosolola na bato.”
Okokuta masolo mosusu ya “Mituna oyo bilenge batunaka” na Internet, na esika oyo: www.pr2711.com
[Maloba na nse ya lokasa]
a Oyo ezali bankombo topesi bango kopesa na lisolo oyo.
b Ekoki kozala ete Davidi akokisaki naino mbula 20 te ntango akómaki moninga ya Yonatane.
[Etanda/Bililingi na lokasa 17]
OYO BILENGE MOSUSU BALOBI
“Na makita, nalukaka kosolola ata na moto moko oyo nakanaki te kosolola na ye. Namoni ete boninga ekoki kobanda ata na mbote ya mpamba!”
“Ezalaki mpasi te nakanga mabɔkɔ mpe naloba ete bato balingaka ngai te mpe ete nakokoka te kozwa moninga oyo abongi na ngai. Kasi, likambo ya mpasi ezalaki nde ya kosala mwa milende mpo na yango. Nsukansuka, komeka kosala milende efutaka, esalisaka moto abongisa bizaleli na ye.”
“Namesanaki mokemoke kokɔta na masolo ya mikóló. Na ebandeli, ezalaki mpasi. Kasi, nsukansuka esalisaki ngai, mpo atako nazali elenge, nazwá baninga ya malamu oyo bazalaka ntango nyonso pene na ngai.”
[Bililingi]
Lauren
Reyon
Carissa
[Etanda na lokasa 18]
MPO NA NINI TE KOTUNA BABOTI NA YO?
Ntango bozalaki na bambula lokola ngai, bino mpe bozalaki na mokakatano ya kozwa baninga? Bato ya ndenge nini ezalaki mpasi bókóma baninga na bango? Bosalaki nini mpo na yango?
․․․․․
[Etanda na lokasa 18]
(Mpo na komona yango, talá mokanda)
OKOBALUKA KAKA ESIKA MOKO
Nazali NGAI MOKO, na yango nayoki ete . . .
. . . nazali na ESIKA TE, na yango . . .
. . NAKIMI BATO, na yango nayoki ete . . .