Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • g 4/14 lok. 3
  • Makambo oyo ezali koleka na mokili

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Makambo oyo ezali koleka na mokili
  • Lamuká!—2014
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • États-Unis
  • Mokili
  • Esanga Midway
  • Afrika ya Sudi
  • Nini esalaka ete ndɛkɛ babengi albatros hurleur ebimisa makasi mingi te ntango ezali kopumbwa?
    Lamuká!—2013
  • Bana bazali na mpasi
    Lamuká!—1993
  • Makambo mazali koleka na mokili
    Lamuká!—1996
  • Likama moko monene mpenza
    Lamuká!—2003
Makambo mosusu
Lamuká!—2014
g 4/14 lok. 3

MAKAMBO OYO EZALI KOLEKA NA MOKILI

États-Unis

Na balabala mobimba ya engumba, basali ete miinda oyo esalisaka bato bátosa mibeko ya nzela esalaka nzela moko

Na engumba Los Angeles, na etúká ya Californie, basali ete miinda pene na 4 500 oyo esalisaka bato bátosa mibeko ya nzela na ntaka ya bakilomɛtrɛ-kare soki 1 215, esalaka nzela moko. Zulunalo moko (The New York Times) elobi ete Los Angeles ezali “engumba ya liboso ya monene oyo esali likambo ya ndenge wana na mokili mobimba.”

Mokili

Ankɛtɛ moko oyo esalemaki na mokili mobimba emonisi ete, kobanda 1990 tii 2010, motángo ya bato oyo bakómi minene mingi emati mpenza (tii na 82%). Motángo ya bato oyo bazali kokufa mpo bakómi minene mingi eleki mbala misato motángo ya bato oyo bazali kokufa mpo bazali kolya malamu te, atako na mikili mingi kozwa biloko ya kolya ezali naino mokakatano. Majid Ezzati, moko ya bato oyo basalaki ankɛtɛ yango, alobi boye: “Na mbula 20 oyo euti koleka, biloko ya kolya ezalaki mingi te na mokili; sikoyo biloko ya kolya ekómi mingi, kasi ezali kopesa bato bamaladi ndenge na ndenge, ata na mikili ya bobola.”

Esanga Midway

Albatros de Laysan

Ndɛkɛ babengi albatros de Laysan, oyo balobaka ete ezali “ndɛkɛ oyo eumeli mingi koleka bandɛkɛ mosusu nyonso,” euti kobota mwana mosusu. Ndɛkɛ yango eumeli mbula boni? Ntango batyaki ndɛkɛ yango elembo na 1956, ezalaki na mbula soki mitano mpamba, elingi koloba sikoyo ezali na mbula koleka 60. Soki basangisi mibembo nyonso oyo ndɛkɛ yango esalá na bomoi na yango mobimba, ekoki kokóma kilomɛtrɛ soki milio 3 to 4. Na maloba mosusu, ezali lokola kosala mobembo longwa mabele tii na sanza mbala minei to motoba.

Afrika ya Sudi

Mwasi moko na Afrika ya Sudi azali kopakola mafuta oyo etelisaka na elongi

Ankɛtɛ moko emonisi ete na Afrika ya Sudi, na basi misato, moko na bango (1/3) apakolaka sabuni to mafuta oyo etelisaka loposo. Kopakola biloko ya kotelisa loposo ndenge wana ezali likama mpe epekisami na bikólo mingi. Makama yango ekoki kozala kansɛr ya mitindo ndenge na ndenge, maladi oyo ebebisaka bangei, konyokwama na makanisi, maladi ya mitungisi, makwanza to bilembo ya moindo na nzoto.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto