Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • g20 No. 2 nk. 14-15
  • 5. Bampasi ekosila mokolo mosusu?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • 5. Bampasi ekosila mokolo mosusu?
  • Lamuká!—2020
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Ntina ya koyeba yango
  • Kanisá naino
  • Oyo Biblia elobi
  • Biblia elobi nini?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya bato nyonso)—2017
  • Bampasi
    Lamuká!—2015
  • Motuna 3: Mpo na nini Nzambe atiki ete nanyokwama?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2012
  • Ezali likambo ya mokili mobimba, ebongi esila mpe na mokili mobimba
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2009
Makambo mosusu
Lamuká!—2020
g20 No. 2 nk. 14-15
Bato ya libota moko bazali kozwa mopɛpɛ pembeni ya ebale. Bazali kosolola mpe kosɛka.

5. Bampasi ekosila mokolo mosusu?

Ntina ya koyeba yango

Soki elikya ezali ete bampasi ekosila, yango ekobongola ndenge na biso ya kotalela bomoi mpe ya kotalela Nzambe.

Kanisá naino

Bato mingi balukaka kosilisa bampasi kasi bakokaka te. Talá mwa bandakisa:

Atako mayele ya minganga ezali se kobakisama . . .

  • Maladi ya motema ezali kaka koboma bato mingi.

  • Kansɛr ezali koboma bamilio ya bato mbula na mbula.

  • Na zulunalo moko (Frontiers in Immunology) Doktɛrɛ David Bloom akomaki ete “atako mayele ya minganga ezali kobakisama mingi lelo oyo, minganga bazali kokoka te kosilisa bamaladi mingi. Kutu, bamaladi mosusu ezali kobakisama mpe oyo elimwaki ezongi.”

Atako bamboka mosusu ezali na bozwi . . .

  • Mbula na mbula bamilio ya bana bakufaka, mingimingi na bisika oyo babola bazali.

  • Bamiliare ya bato bazalaka na batwalɛti ya malamu te.

  • Bato ebele mpenza bamɛlaka mai ya malamu te.

Atako bato bayebi malamu ndenge basengeli kosalela basusu makambo . . .

  • Lapolo moko ya ONU elobi ete na bamboka mpe mikili mingi batɛkaka bato mpe bato oyo basalaka yango bakangaka bango te mpo bakonzi bayebi te makambo oyo ezali kosalema to mpe bazali na nguya te ya kokanga bato yango.

    MPO NA KOYEBA MAKAMBO MOSUSU

    Talá video Bokonzi ya Nzambe ezali nini? ezali na jw.org.

Oyo Biblia elobi

Nzambe akipaka biso.

Asepelaka te ntango tozali komona mpasi mpe tozali na mawa.

“[Nzambe] atyoli te mpe ayoki mpii te mpo na mpasi ya moto ya mpasi; mpe abombeli ye elongi na ye te, mpe ntango alelelaki ye mpo na kosɛnga lisalisi ayokaki.” ​—NZEMBO 22:24.

‘Bóbwakela ye mitungisi na bino nyonso, mpo atyelaka bino likebi.’​—1 PETRO 5:7.

Bampasi ekosila.

Biblia elobi ete Nzambe akosala makambo nyonso oyo alaki biso.

“Nzambe . . . akopangwisa mpisoli nyonso na miso na bango, mpe liwa ekozala lisusu te, ná lilaka ná koganga ná mpasi ekozala lisusu mpe te.”​—EMONISELI 21:3, 4. 

Nzambe akosilisa makambo nyonso oyo ebimiselaka bato mpasi.

Bokonzi to guvɛrnema ya Nzambe nde ekobongisa makambo.

“Nzambe ya likoló akotya bokonzi moko oyo ekobebisama te. Mpe bokonzi yango ekoleka na ekólo mosusu te. . . . Ekotikala seko.”​—DANYELE 2:44.

Bampasi ekosila mokolo mosusu?

Ɛɛ, kasi bato te nde bakosilisa yango. Baguvɛrnema ya bato ekoki kokitisa bampasi, kasi Nzambe akolongola makambo nyonso oyo ebimisaka bampasi. Akosala yango na nzela ya Bokonzi na ye.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto