Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w09 1/2 lok. 18
  • Elembo eleki monene ya bolingo ya Nzambe

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Elembo eleki monene ya bolingo ya Nzambe
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2009
  • Masolo mosusu
  • Kondima na ye emekamaki
    Zwá mateya na masolo ya Biblia
  • Nzambe ameki Abrahama
    Mokanda mpo na masolo ya Biblia
  • Abrahama azalaki nani?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2012
  • Yehova abengaki ye “moninga na ngai”
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2016
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2009
w09 1/2 lok. 18

Pusaná penepene na Nzambe

Elembo eleki monene ya bolingo ya Nzambe

Genese 22:1-18

ABALAYAMA azalaki kolinga Nzambe. Azalaki mpe kolinga mwana na ye Yisaka, oyo abotaki na bobange. Kasi, ntango Yisaka akómaki na mbula soki 25, Abalayama akutanaki na komekama moko ya makasi. Nzambe asɛngaki ye apesa mwana na ye Yisaka lokola mbeka, likambo oyo ezali mpasi mpo na moboti. Kasi nsukansuka, Yisaka akufaki te. Ntango kaka Abalayama alingaki koboma mwana na ye, anzelu ya Nzambe apekisaki ye. Lisolo yango, oyo ezali na Genese 22:1-18, emonisi mwa moke bolingo monene oyo Nzambe azali na yango mpo na biso.

Vɛrsɛ 1 elobi boye: “Nzambe amekaki Abalayama.” Abalayama azalaki na kondima makasi, kasi na mbala oyo kondima na ye elingaki komekama na ndenge oyo emekamaki naino te. Nzambe ayebisaki ye boye: “Kamatá mwana na yo, mwana na yo ya likinda, Yisaka, . . . mpe kabá ye [lokola] mbeka ya kotumba kuna na likoló ya ngomba ekolobela ngai yo.” (Vɛrsɛ 2) Tóbosana te ete Nzambe atikaka te ete basaleli na ye bámekama koleka ndelo. Na yango, lokola amekaki Abalayama na likambo yango, emonani ete azalaki kotyela ye motema.​—1 Bakolinti 10:13.

Abalayama atosaki. Totángaka boye: “Abalayama abimaki na ntɔngɔntɔngɔ mpe akangaki biloko na mpunda na ye mpe akamataki bilenge babali na ye mibale mpe mwana na ye Yisaka elongo. Ye akataki nkoni mpo na mbeka ya kotumba mpe alongwaki mpe akendaki.” (Vɛrsɛ 3) Emonani ete Abalayama ayebisaki moto moko te likambo yango.

Mobembo ya mikolo misato oyo basalaki epesaki ye ntango ya kokanisa malamu. Kasi, Abalayama abongolaki makanisi te. Maloba oyo alobaki emonisi kondima na ye. Ntango amonaki ngomba na mosika, ayebisaki basaleli na ye ete: “Bótikala awa . . . Biso na mwana tokokenda kuna mpo na kosambela, mpe tokozonga lisusu epai na bino.” Ntango Yisaka atunaki soki mpate oyo bakopesa mbeka ezali wapi, Abalayama alobaki boye: “Nzambe ye moko akopesa biso mwana ya mpate.” (Vɛrsɛ 5, 8) Abalayama azalaki na elikya ete akozonga ná mwana na ye. Mpo na nini? Mpo ayebaki ete Nzambe “azalaki na likoki ya kolamwisa ye [Yisaka] ata na bakufi.”​—Baebele 11:19.

Na likoló ya ngomba, ntango Abalayama azwaki “mbeli mpo na koboma mwana na ye,” anzelu akangaki lobɔkɔ na ye. Na nsima, Nzambe apesaki Abalayama mpate-mobali, oyo ekangamaki na nzubɛ, mpo apesa ye mbeka “na esika ya mwana na ye.” (Vɛrsɛ 10-13) Na miso ya Nzambe, Yisaka asilaki kopesama lokola mbeka. (Baebele 11:17) Molimboli moko ya maloba ya Biblia amonisi ete “na miso ya Nzambe, lokola Abalayama andimaki kokaba mwana na ye mbeka, yango ezalaki kaka lokola asili kokaba ye.”

Yehova amikosaki te na ndenge atyelaki Abalayama motema. Mpe kondima ya Abalayama ememelaki ye matomba, mpo Nzambe azongelaki lisusu kondimana oyo asalaki na ye mpe amonisaki ete mabota nyonso ekopambolama na nzela na ye.​—Vɛrsɛ 15-18.

Ya solo, Nzambe apekisaki Abalayama akaba Yisaka, nzokande ye moko amipekisaki te kopesa mwana na ye lokola mbeka. Ndenge Abalayama andimaki kokaba mwana na ye mbeka, yango ezalaki elilingi ya ndenge Nzambe andimaki kokaba Mwana na ye mobotami-se-moko, mpo na masumu na biso. (Yoane 3:16) Mbeka ya Klisto ezali elembo eleki monene ya bolingo ya Yehova mpo na biso. Lokola Nzambe andimaki kopesa mbeka ya ndenge wana mpo na biso, tosengeli komituna boye: ‘Mbeka nini ngai nakondima kopesa mpo na kosepelisa Nzambe?’

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto