Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • lfb liteya 11 lok. 32-lok. 33 par. 2
  • Kondima na ye emekamaki

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Kondima na ye emekamaki
  • Zwá mateya na masolo ya Biblia
  • Masolo mosusu
  • Nzambe ameki Abrahama
    Mokanda mpo na masolo ya Biblia
  • Elembo eleki monene ya bolingo ya Nzambe
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2009
  • Yehova abengaki ye “moninga na ngai”
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2016
  • Abrahama azalaki nani?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2012
Makambo mosusu
Zwá mateya na masolo ya Biblia
lfb liteya 11 lok. 32-lok. 33 par. 2
Abrahama ná Yisaka bazali kokende na Moria

LITEYA 11

Kondima na ye emekamaki

Abrahama ateyaki mwana na ye Yisaka kolinga Yehova mpe kotyela bilaka na Ye nyonso motema. Kasi ntango Yisaka akómaki na mbula soki 25, Yehova asɛngaki Abrahama likambo moko ya mpasi mpenza. Likambo nini?

Nzambe ayebisaki Abrahama: ‘Nabondeli yo, zwá mwana na yo ya mobali kaka moko mpe pesá ye mbeka na ngomba moko na mokili ya Moria.’ Abrahama ayebaki te ntina oyo Yehova asɛngaki ye asala bongo. Kasi atosaki.

Na ntɔngɔntɔngɔ ya mokolo oyo elandaki, Abrahama azwaki Yisaka ná basaleli na ye mibale mpe bakendaki na Moria. Nsima ya mikolo misato, bamonaki bangomba ya mokili yango na mosika. Abrahama ayebisaki basaleli na ye bázela, mpo ye ná Yisaka bakei kopesa mbeka. Abrahama apesaki Yisaka nkoni amema, mpe ye moko asimbaki mbeli. Yisaka atunaki tata na ye: ‘Wapi nyama oyo tokopesa mbeka?’ Abrahama ayanolaki: ‘Mwana, Yehova akopesa yango.’

Ntango bakómaki na ngomba yango, batongaki etumbelo. Na nsima Abrahama akangaki Yisaka mabɔkɔ ná makolo na nsinga mpe alalisaki ye likoló ya etumbelo.

Abrahama akangi Yisaka nsinga mpe asimbi mbeli

Abrahama atombolaki mbeli. Na ntango yango, anzelu ya Yehova abelelaki na likoló: ‘Abrahama! Kosala mwana mabe te! Sikoyo nayebi ete ozali na kondima epai ya Nzambe mpo ondimi kopesa mwana na yo mbeka.’ Na nsima, Abrahama amonaki mpate-mobali moko oyo maseke na yango ekangamaki na mwa banzete. Afungolaki Yisaka nsinga nokinoki mpe na esika na ye, apesaki mpate-mobali wana mbeka.

Banda mokolo wana, Yehova akómaki kobenga Abrahama moninga na ye. Oyebi mpo na nini? Abrahama azalaki kosala eloko nyonso oyo Yehova azalaki kosɛnga ye, ata soki ayebi te ntina oyo Yehova asɛngi yango.

Abrahama afungoli Yisaka bansinga

Yehova azongelaki elaka na ye epai ya Abrahama: ‘Nakopambola yo, mpe nakokómisa bana na yo mingi.’ Yango elingi koloba ete Yehova akopambola bato nyonso ya malamu na nzela ya libota ya Abrahama.

“Nzambe alingaki mokili mingi mpenza yango wana apesaki Mwana na ye se moko oyo abotamaki, mpo moto nyonso oyo akomonisa kondima epai na ye abomama te kasi azwa bomoi ya seko.”​—Yoane 3:16

Mituna: Ndenge nini Abrahama amonisaki ete azalaki kotyela Yehova motema? Elaka nini Yehova apesaki Abrahama?

Ebandeli 22:1-18; Baebre 11:17-19; Yakobo 2:21-23

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto