Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • rs lok. 169-lok. 173
  • Ekulusu

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Ekulusu
  • Ndenge ya kosolola na bato na Makomami
  • Masolo mosusu
  • Yesu akufaki mpenza likoló ya ekulusu?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2011
  • Ekulusu ezali mpo na baklisto?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1988
  • Oyo elimboli bolingo na Nzambe
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1989
  • Ntina oyo baklisto ya solo basalelaka ekulusu te na losambo
    Biblia eteyaka mpenza nini?
Makambo mosusu
Ndenge ya kosolola na bato na Makomami
rs lok. 169-lok. 173

Ekulusu

Ndimbola: Mangomba mingi ya bokristo ya nkombo mpamba eteyaka ete babomaki Yesu Kristo na ekulusu. Liloba yango euti na liloba ya Latin crux.

Mpo na nini na mikanda ya Batatoli ya Yehova bamonisaka Yesu abakami na nzete, mabɔkɔ likoló ya motó kasi na ekulusu te, ndenge eyebani?

Na Babiblia mingi ya lelo, liloba ya Grɛki oyo ebongolami na “ekulusu” (“nzete ya mpasi” na NW) ezali stauros. Na Grɛki ya kala, liloba yango elimbolaki kaka nzete oyo epikami to likonzí. Na nsima bakómaki mpe kosalela liloba yango mpo na komonisa nzete oyo nzete mosusu ekatisi yango, oyo bazalaki kosalela mpo na koboma bato mabe. Buku moko (The Imperial Bible-Dictionary) endimi likambo yango mpe elobi boye: “Liloba ya Grɛki [stauros], oyo ebongolami na ekulusu, elimbolaki mpenza nzete, nzete oyo epikami, eteni ya nzete, oyo bakoki kokakisa eloko nyonso likoló na yango, to oyo bakoki kosala na yango lopango. . . . Kutu, emonani ete epai ya Baroma, liloba crux (epai liloba ekulusu eutá) na ebandeli elimbolaki kaka nzete moko ya semba.”​—Ekomami na P. Fairbairn (Londres, 1874), Vol. I, lok. 376.

Mwana ya Nzambe abomamaki mpenza na nini? Simbá ete Biblia esaleli mpe liloba xylon mpo na kolobela eloko oyo babomaki na yango Yesu. Buku moko (A Greek-English Lexicon), oyo ekomamaki na Liddell mpe Scott, elimboli liloba yango boye: “Nzete oyo bakati mpe balingi kosalela, lokoni, nzete mpo na kotonga, mpe bongo na bongo . . . likonzí, lingenda, fimbo . . . ngondo, motongo . . . nzete oyo bazalaki kokakisa bato mabe . . . libaya, nzete.” Elobeli lisusu “ekulusu na Kondimana ya Sika,” mpe etángi Misala 5:30 ná Misala 10:39 mpo na kondimisa likambo yango. (Oxford, 1968, nk. 1191, 1192) Kasi, na bavɛrsɛ yango, hf, KJ, KSN, JB, ná Dy ebongoli liloba xylon na “nzete.” (Talá mpe ndenge Bagalatia 3:13; Kolimbola Mibeko 21:22, 23 ebongoli yango.)

Buku moko (The Non-Christian Cross, ya J. D. Parsons, Londres, 1896), elobi ete: “Kati na makomi ebele ya Kondimana ya Sika ya Grɛki ya ebandeli, esika ata moko te epesi elembeteli ata ya moke ete stauros (nzete) oyo babomaki na yango Yesu, ekeseni na banzete mosusu; eloko moko te emonisi ete ezalaki nzete mibale oyo ekangisami na bansɛtɛ lokola ekulusu. . . . Ezali likambo moke te ndenge balakisi na biso bakosaki biso ntango bazali kobongola liloba stauros na ‘ekulusu’ mpe ntango bazali kobongola mikanda ya Grɛki ya Eklezia na monɔkɔ na biso mpe koluka kondimisa likambo yango ntango bazali kotya liloba ekulusu na badiksionɛrɛ na biso mpo na kolimbola stauros, kozanga komonisa malamu ete yango ezalaki te ndimbola na yango na ntango ya bantoma, mpe ete ezali nsima nde ezwaki ndimbola wana mosusu mpe ekómaki bongo mbala mosusu mpo na kozanga bilembeteli; bakanisaki mpo na ntina moko boye ete stauros, nzete oyo babomaki na yango Yesu ezalaki ya lolenge mosusu.”​—Nk. 23, 24; talá mpe The Companion Bible (Thetford, Angleterre, 1974), Apɛndisi No. 162.

Na yango, bilembeteli mingi emonisi ete Yesu akufaki na nzete ya semba kasi na ekulusu te ndenge eyebani.

Ekulusu oyo bakristo ya nkombo mpamba basalelaka eutá wapi?

“Na mikili mingi ya kala, bakundolá na mabele biloko ebele oyo ezali na bilembo ya ekulusu ndenge na ndenge, biloko yango ezali kutu ya kala mpenza, liboso ya ntango ya bokristo. Na Inde, Siri, Perse mpe na Ezipito bamonaki biloko mingi ya ndenge wana . . . Bipai nyonso oyo bazalaki kosalela ekulusu lokola elembo ya lingomba liboso na ntango ya bokristo mpe na mikili ya bapakano, mbala mingi likambo yango ezalaki mpo na losambo moko boye ya biloko oyo Nzambe akelá.”​—Encyclopædia Britannica (1946), Vol. 6, lok. 753.

“Elembo ya [ekulusu oyo esalemi na mabaya mibale] eutá na Kaladea ya kala mpe bazalaki kosalela yango lokola elembo ya nzambe Tamuze (to Tau elembo ya libombami, lɛtrɛ ya liboso ya nkombo na ye) na mokili yango mpe bamboka oyo ezalaki zingazinga na yango, bakisa mpe Ezipito. Na katikati ya siɛklɛ ya misato ya ntango na biso, ekoki kozala ete mangomba etikaki mateya ya bokristo ya solo to ebebisaki yango. Mpo na kobakisa lokumu ya bakonzi ya mangomba oyo bapɛngwaki, bandimaki bapakano na kati ya mangomba atako babongwanaki te, mpe batikaki bango bákoba kosalela bilembo mpe bililingi na bango ya bopakano. Na yango, bakitisaki mwa moke nzete ya elembo Tau to T, oyo bazalaki kosalela mingi, mpe bakómaki kosalela elembo yango mpo na komonisa ekulusu ya Kristo.”​—An Expository Dictionary of New Testament Words (Londres, 1962), W. E. Vine, lok. 256.

“Likambo ya kokamwa kasi ya solo mpenza ezali ete, kala mpenza liboso ya kobotama ya Kristo, mpe banda wana, na mikili oyo mateya ya lingomba ekómi naino te, bato bazali kosalela ekulusu lokola elembo mosantu. . . . Bato oyo bazalaki kosambela Bacchus na Grɛsi, Tamuze na Tire, Bel na Kaladea, mpe Odin na Norvège, bango nyonso bazalaki kosalela elembo ya ekulusu mpo na komonisa banzambe na bango.”​—The Cross in Ritual, Architecture, and Art (Londres, 1900), G. S. Tyack, lok. 1.

“Banganga-nzambe na Ezipito ná Baepiskɔpɔ oyo bazalaki bakonzi bazalaki komema na mabɔkɔ ekulusu oyo ezalaki na elilingi ya ‘Crux Ansata’ . . . yango ezalaki elembo ya bokonzi na bango lokola banganga-nzambe ya nzambe Moi mpe ekulusu yango ebengamaki ‘Elembo ya Bomoi.’”​—The Worship of the Dead (Londres, 1904), Colonel J. Garnier, lok. 226.

“Bakembisá bamonima mpe malita ya Ezipito na bikulusu ya ndenge na ndenge mpe bato mingi ya mayele bazali komona ete yango ezali elembo ya enama ya mobali to elembo ya kosangisa nzoto. . . . Na malita ya Ezipito, crux ansata [ekulusu oyo ezali na elembo ya sɛrklɛ na likoló] etyami pembeni ya elembo ya enama ya mobali.”​—A Short History of Sex-Worship (Londres, 1940), H. Cutner, nk. 16, 17; talá mpe The Non-Christian Cross, lok. 183.

“Na Babilone bazalaki kosalela bikulusu yango lokola elembo ya nzambe-moi, [Talá buku], mpe emonanaki mbala ya liboso na mbongo ya bibende ya Jules César, (100-44 L.T.B.) mpe na mbongo ya bibende oyo esalemaki na mokitani na ye (Auguste), na mobu 20 L.T.B. Na ntango ya Constantin, mbala mingi mbongo ya bibende ezalaki na elembo ya [Talá buku]; kasi elembo yango ezalaki na sɛrklɛ te zingazinga na yango, mpe ezali na nzete minei oyo mibale etɛlɛmi, mibale elali mpe bazalaki kosambela elembo yango lokola ‘Yiká ya Moi.’ Esengeli koyeba ete Constantin azalaki kosambela nzambe-moi mpe akɔtaki na ‘Eklezia’ kaka mbula 25 nsima ya komona ekulusu moko na likoló, ndenge lisapo elobaka.”​—The Companion Bible, Apɛndisi No. 162; talá mpe The Non-Christian Cross, nk. 133-141.

Biblia endimi kosambela ekulusu?

1 Ko. 10:14: “Bandeko na ngai ya bolingo, bókima losambo ya bikeko.” (Ekeko ezali elilingi to elembo ya eloko oyo bazali kokumisa mingi to kosambela.)

Kob. 20:4, 5, LNz: “Osala ekeko ata yoko te, kosala mpe elili te ya binso bizali o likoló, awa o nse mpe o bozindo bwa mai. Okokumbamela byango te, osalela byango mpe te.” (Simbá ete Nzambe apesaki mitindo ete bato na ye basengeli kosala ata ekeko te mpe kokumbamela yango te.)

Buku moko (New Catholic Encyclopedia) epesi likanisi moko ya malamu mpenza, elobi ete: “Elilingi oyo emonisaka liwa ya Kristo na Golgota mpo na kosikola bato ezali komonana te na makambo ya ntɔki ya bakristo ya basiɛklɛ ya liboso. Lokola bakristo ya liboso bazalaki kolanda mobeko ya Kondimana ya Kala oyo epekisi kosala bikeko, baboyaki kosala elembo ya eloko oyo banyokolaki na yango Nkolo.”​—(1967), Vol. IV, lok. 486.

Mpo na bakristo ya siɛklɛ ya liboso, buku moko (History of the Christian Church) elobi boye: “Bazalaki kosalela ekulusu te to eloko moko te mpo na komonisa yango.”​—(New York, 1897), J. F. Hurst, Vol. I, lok. 366.

Mabe ezali wapi soki moto asepelaka kaka na ekulusu kasi asambelaka yango te?

Okoyoka ndenge nini soki moninga na yo ya motema abomamaki mpo na bifundeli ya lokuta? Okosala elilingi ya eloko oyo babomaki ye na yango? Okosepela na eloko yango, to okoyina yango?

Kala na Yisraele, Bayuda oyo bazalaki sembo te balelaki liwa ya Tamuze, nzambe ya lokuta. Yehova alobaki ete likambo oyo bazalaki kosala ezali ‘likambo . . . oyo eyinamá.’ (Ezk. 8:13, 14) Istware ezali komonisa ete Tamuze azalaki nzambe ya Babilone, mpe ekulusu ezalaki elembo na ye. Uta na ebandeli na ntango ya Nimerode, Babilone ezalaki kotɛmɛla Yehova mpe ezalaki koyina losambo ya solo. (Eba. 10:8-10; Yir. 50:29) Na yango, soki moto azali kosepela na ekulusu, azali nde kokumisa elembo ya losambo oyo ezali kotɛmɛla Nzambe ya solo.

Ndenge Ezekiele 8:17 emonisi yango, Bayuda oyo bapɛngwaki bazalaki ‘kosembola mwa etape na zolo ya Yehova.’ Na miso na ye, ezalaki ‘likambo oyo eyinamá’ mpe oyo ezalaki ‘kosilikisa’ ye. Mpo na nini? Bato mosusu ya mayele balobaka ete “mwa etape” yango ezalaki elilingi ya enama ya mobali, oyo bazalaki kosalela na milulu ya losambo ya kobota. Na yango, ndenge nini Yehova akotalela moto oyo azali kosalela ekulusu, oyo ndenge touti komona, ezalaki elembo oyo bazalaki kosalela na losambo ya kobota na ntango ya kala?

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto