Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • rs lok. 44-lok. 50
  • Bafɛti

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Bafɛti
  • Ndenge ya kosolola na bato na Makomami
  • Masolo mosusu
  • Tosengeli mpe kosalaka bafɛti oyo bato mingi basalaka?
    Biblia eteyaka mpenza nini?
  • Bafɛti oyo esepelisaka Nzambe te
    “Bótikala na kati ya bolingo ya Nzambe”
  • Bafɛti nyonso esepelisaka Nzambe?
    Ndenge ya kotikala na kati ya bolingo ya Nzambe
  • Eyenga ya Mbótama: Ezali mpenza ya boklisto?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1994
Makambo mosusu
Ndenge ya kosolola na bato na Makomami
rs lok. 44-lok. 50

Bafɛti

Ndimbola: Mikolo oyo bato bakendaka misala te, mpe bana-kelasi batángaka te, mpo na kokanisa likambo moko oyo esalemaki. Mbala mingi, na mikolo yango, mabota to bato nyonso ya mboka basalaka fɛti. Baoyo basalaka bafɛti yango bakoki komona yango ete ezali fɛti ya lingomba, fɛti ya mosala to libaku ya kozala esika moko na baninga.

Fɛti ya Noele endimami na Biblia?

Dati oyo basalaka fɛti yango

Buku moko (Cyclopædia, New York, 1871, Vol. II, lok. 276 ya M’Clintock ná Strong) elobi boye: “Ezali Nzambe te nde asɛngá bato básalaka fɛti ya Noele, fɛti yango euti mpe na K[ondimana] ya S[ika] te. Esika moko te na K[ondimana] ya S[ika] to na mokanda mosusu elobeli na bosikisiki mpenza mokolo oyo Kristo abotamaki.”

Luka 2:8-11 emonisi ete babateli ya mpate bazalaki na esobe na butu oyo Yesu abotamaki. Buku moko (Daily Life in the Time of Jesus, New York, 1962, ya Henri Daniel-Rops, lok. 228) elobi boye: “Na eleko ya mpiɔ . . . bibwɛlɛ ezalaki kotikala libándá te; likambo yango ekoki mpo na komonisa ete dati oyo bato baponá mpo na Noele na eleko ya mpiɔ ezali solo te, mpo Evanzile elobi ete babateli ya mpate bazalaki na esobe.”

Buku mosusu (The Encyclopedia Americana, 1977, Vol. 6, lok. 666) elobi boye: “Ntina oyo basalaka fɛti ya Noele mokolo ya 25 Desɛmbɛ eyebani mpenza te, kasi bato mingi balobaka ete mokolo yango eponamaki mpo eyokana na mokolo oyo bapakano bazalaki kosala bafɛti na bango na ntango oyo moi ebandaka kokóma molai koleka butu (solstice d’hiver), mpo na kosepela ‘kobotama lisusu ya moi.’ . . . Fɛti ya Saturnales oyo Baroma bazalaki kosala (mpo na kokumisa Saturne, nzambe ya mosala ya bilanga, mpe mpo na kokumisa nguya ya sika ya moi), ezalaki mpe kosalema na ntango wana, mpe bato bakanisaka ete makambo mosusu ya fɛti ya Noele euti na fɛti wana ya kala ya bapakano.”

Buku mosusu (New Catholic Encyclopedia, 1967, Vol. III, lok. 656) endimi ete: “Dati ya mbotama ya Kristo eyebani te. Baevanzile emonisi mokolo to sanza te . . . Soki totaleli makanisi oyo H. Usener apesaki . . . mpe oyo bato mingi ya mayele bandimaka lelo, baponaki mokolo ya mbotama ya Kristo ezala na solstice d’hiver (25 Desɛmbɛ na kolanda manaka ya Jules César, 6 Yanuali na kolanda manaka ya Baezipito), mpo na mokolo yango, moi ezalaki kozonga na mapata oyo ezali na nɔrdi, mpe na ntango yango bapakano oyo bazalaki kosambela Mithra bazalaki kosepela mbotama ya moi oyo bakoki kolonga te (dies natalis Solis Invicti). Na mokolo ya 25 Desɛmbɛ 274, Aurélien asakolaki ete nzambe-moi akómi mobateli ya libosoliboso ya ampire mpe atongelaki ye tempelo na Campus Martius. Fɛti ya Noele ebandaki na ntango oyo losambo ya moi ekómaki mpenza makasi na Roma.”

Bato ya bwanya, to banganga-minzoto, balandi monzoto

Bato ya bwanya oyo bautaki na Ɛsti bazalaki mpenza banganga-minzoto. (Mat. 2:1, 2, NW; LNz) Atako bato mingi basepelaka kotalela minzoto mpo na koyeba makambo ekoya, Biblia eboyi mpenza likambo yango. (Talá nkasa 339, 340, na motó ya likambo “Makambo nyonso etángamá.”) Nzambe akokaki nde kotambwisa bato wana oyo bazalaki kosala misala oyo Ye aboyi tii na esika oyo Yesu azalaki?

Matai 2:1-16 emonisi ete monzoto wana ememaki banganga-minzoto libosoliboso epai ya Mokonzi Erode, na nsima ememaki bango epai ya Yesu mpe nsima Erode alukaki koboma Yesu. Biblia emonisi esika moko te ete moto mosusu amonaki “monzoto” yango longola banganga-minzoto wana. Ntango bazongaki, anzelu ya Yehova ayebisaki Yozefe akima na Ezipito mpo na kobatela mwana. Na yango, nani mpenza abimisaki “monzoto” wana, ezali Nzambe to moto mosusu oyo azalaki koluka koboma Mwana ya Nzambe?

Simbá ete, Biblia elobi te ete banganga-minzoto wana bakutaki Yesu na kati ya elyelo ya bibwɛlɛ, ndenge balakisaka na bililingi ya Noele. Ntango banganga-minzoto yango bakómaki, bakutaki Yesu ná baboti na ye na ndako esika bazalaki kofanda. Mpo na koyeba mbula oyo Yesu azalaki na yango ntango wana, kobosana te ete, lokola Erode alandaki makambo oyo ayokaki epai ya banganga-minzoto, apesaki mitindo báboma bana mibali nyonso ya mike na etúká ya Beteleme, kobanda na mbula mibale kitá na nse.​—Mat. 2:1, 11, 16.

Kopesana makabo na Noele; masolo ya Santu Nicolas, ya Tata Noele, . . .

Momeseno ya kopesana makabo na eleko ya Noele euti te na likambo oyo Banganga-minzoto basalaki. Ndenge tosili komonisa yango, banganga-minzoto yango bakómaki te mokolo oyo Yesu abotamaki. Lisusu, bapesanaki makabo te, kasi bapesaki yango nde Yesu, mpo na ntango wana, bato bazalaki na momeseno ya kopesa bato ya lokumu makabo soki bakei kotala bato yango ya lokumu.

Buku moko (The Encyclopedia Americana, 1977, Vol. 24, lok. 299) elobi boye: “Na Saturnales . . . bato bazalaki kosala fɛti mpe kopesana makabo.” Likambo yango eyokani na oyo esalemaka na eleko ya Noele, elingi koloba kopesana makabo. Likanisi oyo etindaka bato bápesana makabo na eleko wana, ememelaka bango esengo ya solosolo te, mpamba te, likambo yango ezali kobuka mitinda ya Biblia oyo ezali na Matai 6:3, 4 mpe 2 Bakorinti 9:7. Na yango, mokristo akoki komonisela basusu bolingo mpe kopesa bango makabo ntango nyonso oyo alingi na boumeli ya mbula.

Buku moko (The World Book Encyclopedia, ya 1984, Vol. 3, lok. 414) elobi ete: Na kotalela esika na esika, bayebisaka bana ete Santu Claus, Santu Nicolas, Father Christmas, Tata Noele to Père Noël, Knecht Ruprecht, banganga-minzoto, Jultomten (to Julenissen), to nganga-nkisi moko na nkombo La Befana, akopesa bango makabo. Nzokande, masolo yango nyonso ezali lokuta. Kobɛtɛla bana masolo ya boye ekoki mpenza kosalisa bango bámemyaka solo? Masolo yango ezali nde kokumisa Yesu Kristo, oyo ateyaki ete esengeli kosambela Nzambe na solo?​—Yoa. 4:23, 24.

Ezali mabe kosangana na bafɛti ya bopakano ata soki ezali kaka mpo na komisepelisa?

Ef. 5:10, 11: “Bókoba koluka koyeba malamu mpenza eloko oyo ekoki kondimama na Nkolo; mpe bótika kosangana na bango na misala oyo ezangi kobota mbuma, oyo ezali ya molili, kasi bópamelaka nde kopamela.”

2 Ko. 6:14-18: “Boninga nini ezali na kati ya boyengebene mpe kobuka mibeko? To pole ná molili esanganaka na nini? Lisusu, boyokani nini ezali kati na Kristo mpe Beliale? To eloko nini moto ya sembo azali na yango elongo na moto oyo azali mondimi te? Mpe boyokani nini ezali kati na tempelo ya Nzambe mpe bikeko? . . . ‘“Yango wana bóbima na kati na bango, mpe bókabwana,” Yehova alobi bongo, “mpe bótika kosimba eloko ya mbindo”’; ‘“mpe ngai nakoyamba bino, . . . mpe bino bokozala bana na ngai ya mibali mpe bana na ngai ya basi,” Yehova Mozwi-ya-Nguya-Nyonso alobi bongo.’” (Soki moto alingi Yehova mpenza mpe azali na mposa makasi ya kosepelisa ye, akotika mimeseno ya bopakano oyo azalaki kosepela na yango liboso. Moto oyo ayebi mpenza Yehova mpe alingi ye, ayokaka te ete azangi esengo mpo atiki misala oyo ekumisaka banzambe ya lokuta to mpo atiki makambo ya lokuta. Bolingo ya solosolo ekotinda ye asepela na solo kasi na makambo ya kozanga boyengebene te. Talá 1 Bakorinti 13:6.)

Talá Kobima 32:4-10. Simbá ete Bayisraele balandaki momeseno moko ya losambo ya Ezipito mpe bapesaki yango nkombo ya sika, “fɛti mpo na Yehova.” Kasi Yehova apesaki bango etumbu makasi mpo na likambo yango. Lelo oyo biso tomonaka kaka mimeseno oyo esalemaka na bafɛti. Mimeseno mosusu ekoki komonana lokola nde ezali na likama te. Kasi Yehova amonaki banda kala ndenge mimeseno ya losambo ya bapakano ebandaki mpe ndenge ebimisaki bafɛti yango. Ekozala malamu tólanda likanisi ya Nzambe na likambo yango, boye te?

Ndakisa: Kanisá ete bato bayei na ndako ya moto moko mpe bayebisi ye ete bayei kosala fɛti ya mbotama na ye. Kasi moto yango asepelaka na bafɛti ya mbotama te. Asepelaka te komona bato bazali kolya na lokoso, kolangwa masanga to komipesa na pite. Kasi bato mingi oyo bayei kotala ye bazali komipesa na makambo yango, mpe bazali kopesana makabo, kasi bapimeli ye! Likambo ya mabe koleka, dati oyo baponi mpo na kosala fɛti wana ezali nde dati ya mbotama ya moko ya banguna na ye. Moto wana akoyoka ndenge nini? Okolinga kozala na fɛti yango? Yango nde likambo oyo esalemaka mpenza na fɛti ya Noele.

Fɛti ya Pasika mpe makambo oyo basalaka na fɛti yango eutá wapi?

Buku moko (The Encyclopædia Britannica, 1910, Vol. VIII, lok. 828) elobi ete: “Kondimana ya Sika to makomi ya bakristo oyo balandaki bantoma elobi ata esika moko te ete bazalaki kosala fɛti ya Pasika. Bakristo ya liboso bazalaki komona te ete mikolo mosusu ezali mosantu.”

Buku mosusu (The Catholic Encyclopedia, 1913, Vol. V, lok. 227) elobi ete: “Milulu mingi oyo bapakano bazalaki kosala mpo na kosepela kozonga ya prɛnta ezalaki na boyokani na fɛti ya Pasika. Liki ezali elembo oyo emonisaka ete bomoi ebandaka na ebandeli ya prɛnta. . . . Simbiliki ezali elembo ya bapakano mpe mbala mingi ezalaki elembo ya kobota mingi.”

Buku moko (Les Deux Babilones, New York, 1943, nk. 103, 107, 108, oyo Alexander Hislop akomaki), elobi boye: “Liloba Pasika yango moko elimboli nini? Nkombo yango ezali ya bokristo te. Eutá na Bakaladea. Pasika (na Lingelesi, Easter) ezali nde Astarté, moko ya batitre ya Beltis, mokonzi-mwasi ya likoló oyo nkombo na ye . . . ezali Ishtar, ndenge Layard akutaki yango ekomami na bamonima ya Asiri. . . . Talá ndenge Pasika [Easter] ebandaki. Makambo oyo bato mingi basalaka mokolo yango ezali mpenza kondimisa ete makambo yango eutá na Babilone na kolanda istware. Kaka ndenge bato basalaka lelo, Bakaladea bazalaki kosalela bagalɛti ya mɔtɔ ya Mokolo ya mitano mosantu, oyo basalá lokola kuruze, mpe maki ya langilangi ya Pasika.”​—Talá Yirimia 7:18.

Ezali mabe ete bakristo básala fɛti ya Bonane?

Buku moko (The World Book Encyclopedia, 1984, Vol. 14, lok. 237) elobi ete: “Baroma bakómisaki mokolo yango [1 Yanuali] mokolo ya Janus, nzambe ya baporte mpe ebandeli ya makambo nyonso. Nkombo ya sanza ya Yanuali euti nde na nkombo ya Janus, nzambe oyo azalaki na bilongi mibale​—moko etali liboso mpe mosusu nsima.”

Dati ya fɛti yango mpe makambo oyo esalemaka mokolo yango etalelaka mboka na mboka. Na bisika mingi, na mokolo ya fɛti yango, bato balyaka na lokoso mpe balangwaka. Nzokande, Baroma 13:13 epesi toli oyo: “Lokola na moi, tótambola na bizaleli ya malamu: na bafɛti ya lokoso te mpe na milangwa te, na misala mabe ya kosangisa nzoto te mpe na etamboli ya nsɔni te, na koswana te mpe na zuwa te.” (Talá mpe 1 Petro 4:3, 4; Bagalatia 5:19-21.)

Bafɛti ya kokanisa “bilimo ya bawa” eutá wapi?

Buku moko (The Encyclopædia Britannica, Vol. I, lok. 709, ebimeli ya 1910) elobi boye: “Mokolo ya bawa . . . ezali mokolo oyo Lingomba ya Katolike eponá mpo na kokanisa bandimi oyo bakufá sembo. Molulu wana eutá na liteya oyo elobi ete milimo ya bato ya sembo oyo bakufá kasi masumu na bango ya mikemike epɛtolamá naino te, to masumu na bango ya kala elimbisamá naino te, bakoki komona Bisengo ya lola te; yango wana, esengeli kosalisa bango na mabondeli mpe na misa. . . . Milulu mosusu oyo bato mingi basalaka na Mokolo ya bawa eutá na bapakano mpe ebandá kala mpenza. Yango wana, na mikili mingi oyo Lingomba ya Katolike efandá mpenza, bato bakanisaka ete bakufi bazongaka na bandako na bango na butu ya Mokolo ya bawa mpe balyaka elongo na bato ya bomoi.”

Buku mosusu (The Encyclopedia Americana, 1977, Vol. 13, lok. 725) elobi ete: “Makambo mosusu ya milulu oyo ezali na boyokani na Halloween (mokolo oyo ezali liboso ya eyenga ya basantu banso) euti na molulu oyo Ba-Druide (banganga-nzambe ya Lingomba ya Ba-Celte na ntango ya kala) bazalaki kosala kala, liboso Yesu abotama. Ba-Celte bazalaki kosala bafɛti mpo na banzambe mibale ya minene​—nzambe-moi mpe nzambe ya bawa (oyo bazalaki kobenga Samhain), oyo bazalaki kosalela ye fɛti mokolo ya 1 Novɛmbɛ, na ebandeli ya mbula ya sika ya Ba-Celte. Mokemoke, fɛti ya bawa ebandaki kokɔta na milulu ya bokristo.”

Buku mosusu (The Worship of the Dead, Londres, 1904, Colonel J. Garnier, lok. 4) elobeli ndenge bafɛti yango ebandá: “Masapo ya bikólo nyonso ya kala ezalaka na boyokani na makambo oyo elekaki na Mpela . . . Eloko oyo endimisi mpenza likanisi yango, ezali ete soki fɛti moko ya monene esalemi mpo na kokanisa bawa, esalemaka te kaka kati na bikólo ya mosika to ya pene, kasi mpe kati na bikólo ya mosika mpenza, oyo mai ekabolá yango ná bikólo mosusu to oyo bato na yango bazali bato ya ntango moko te. Lisusu, bikólo yango esalaka fɛti yango na dati moko, ntango mosusu esalemaka mwa moke liboso to mwa moke nsima ya dati oyo Mpela ebandaki, na kolanda lisolo ya Moize, elingi koloba, na mokolo ya zomi na nsambo ya sanza ya mibale​—mokolo oyo ekoki kokokana na sanza ya Novɛmbɛ na manaka na biso.” Na yango, milulu yango ekumisaka libosoliboso nde bato oyo Nzambe abomaki na mikolo ya Noa mpo na mabe na bango.​—Eba. 6:5-7; 7:11.

Bafɛti ya ndenge wana oyo ekumisaka “bilimo ya bawa” lokola nde bazali na bomoi esika mosusu, ekeseni mpenza na oyo Biblia elobi ete, moto oyo akufi ayebaka ata eloko moko te.​—Mos. 9:5, 10; Nz. 146:4.

Mpo na koyeba esika liteya oyo elobaka ete molimo ya moto ekufaka te eutá, talá nkasa 316, na motó ya likambo “Liwa,” mpe nkasa 394, 395, na motó ya likambo “Molimo.”

Fɛti ya Santu Valentin eutá wapi?

Buku moko (The World Book Encyclopedia, 1973, Vol. 20, lok. 204) elobi ete: “Fɛti ya Santu Valentin ezalaka na mokolo ya fɛti ya bamartiru mibale na nkombo Valentin. Kasi, ekoki kozala ete mimeseno oyo esalemaka mokolo yango . . . eutá na fɛti moko ya kala na nkombo Lupercalia oyo bato ya Roma bazalaki kosala mokolo ya 15 Febwali. Na fɛti yango, bazalaki kokumisa Junon, nzambe-mwasi Moroma, nzambe ya basi mpe ya libala, mpe Pan, nzambe ya biloko oyo ekelamá.”

Fɛti ya kokumisa bamama eutá wapi?

Buku moko (Encyclopædia Britannica, 1959, Vol. 15, lok. 849) elobi ete: “Fɛti yango eutá na momeseno ya kosambela mama na Grɛsi ya kala. Losambo ya mama, ná milulu ya kokumisa Cybèle, to Rhéa, Mama-Monene ya Banzambe, ezalaki kosalema mokolo ya 15 Marsi na Azia Moke mobimba.”

Mitinda nini ya Biblia ekosalisa bakristo báyeba soki bakoki kosangana to te na milulu ya politiki mpo na kokanisa makambo minene oyo elekaki na ekólo na bango?

Yoa. 18:36: “Yesu ayanolaki [guvɛrnɛrɛ Moroma] ete: ‘Bokonzi na ngai ezali ya mokili oyo te.’”

Yoa. 15:19: “Soki [bino bayekoli ya Yesu] bozalaki bato ya mokili, mbɛlɛ mokili ezali kolinga eloko na yango. Lokola bozali bato ya mokili te, kasi naponi bino na mokili, yango wana mokili ezali koyina bino.”

1 Yoa. 5:19: “Mokili mobimba ezali kolala na nguya ya moto mabe.” (Talá Yoane 14:30; Emoniseli 13:1, 2; Danyele 2:44.)

Bafɛti mosusu ya mboka to ya ekólo

Bafɛti yango ezali ebele. Tokoki kolobela yango nyonso awa te. Kasi makambo eleká oyo tolobeli na lisolo oyo emonisi oyo tosengeli koluka koyeba mpo na fɛti mokomoko, mpe mitinda ya Biblia oyo totaleli emonisi polele makambo oyo ekoki kosalisa bato oyo mposa na bango ya libosoliboso ezali ya kosepelisa Yehova Nzambe.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto