Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • si nk. 226-228
  • Mokanda ya Biblia nimero 51—Bakolose

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Mokanda ya Biblia nimero 51—Bakolose
  • “Makomami nyonso mapemami na Nzambe mpe mazali na litomba”
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • MAKAMBO MAZALI KATI NA BAKOLOSE
  • LITOMBA NA YANGO
  • Yehova akoki kokembisa yo na nguya
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1994
  • Tósalisa basusu ete bátambola na ndenge oyo ebongi na Yehova
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2000
  • Tobatela kondima na biso kati na Nzambe mpe na Klisto
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1990
  • Epafala: “Mosáli ya sembo mpo na Klisto”
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1997
Makambo mosusu
“Makomami nyonso mapemami na Nzambe mpe mazali na litomba”
si nk. 226-228

Mokanda ya Biblia nimero 51—Bakolose

Mokomi: Paulo

Esika ya bokomi: Loma

Nsuka ya bokomi: soko 60-61 T.B.

1. Engumba ya Kolose ezalaki wapi?

KOPESÁKÁ Efese mokɔngɔ, mibali mibale basalaki mobembo epai na ɛ́sti kati na Asie Mineure, kolandáká Ebale ya Méandre (Mendérès). Ntango bakómi na mongálá oyo babéngi Lycus, na mboka Fulugia, balandi lobɔkɔ ya súdi-ɛ́sti mpo na konana mongálá yango, kolekáká na lobwaku na yango lozwami katikati na bangomba. Liboso na bango ezalaki na esika kitoko mpo na kotala: mabelé malamu ya lángi ya mai ya mpɔndu epai kuna bitongá minene ya mpate bizalaki. (Biloko bisalemi na nsuki to mikungé ya mpate bizalaki eutelo ya ntina ya bozwi ya etúká yango.a) Konanáká na lobwaku yango, basáli wana ya mobembo balekaki engumba moko ya bozwi mingi, Laodikia, oyo ezalaki na lobɔkɔ ya mobali; yango ezalaki mboka-moboko epai Baloma bazalaki koyangela etúká wana mobimba. Na lobɔkɔ na bango ya mwasi, na ngámbo mosusu ya ebale, bazalaki komona engumba Yelapoli, oyo eyebanaki mingi mpo na batempelo na yango mpe mpo na molungé makasi na yango na eleko ya prɛntá. Masangá ya boklisto mazalaki kati na bingumba nyonso mibale wana mpe lisusu na engumba moke ya Kolose, oyo ezalaki na ntáká ya kilomɛtɛlɛ soko 16 likoló mpenza ya lobwaku yango.

2. (a) Bato mibale oyo Paulo atindaki bango na Kolose ezalaki banani? (b) Makambo nini toyebi likoló na lisangá ya Kolose?

2 Kolose ezalaki esika oyo basáli na mobembo yango bazalaki kokende. Bango nyonso mibale bazalaki baklisto. Nzokande, moko na bango ayebaki etúká yango malamu, mpamba te azalaki moto ya Kolose. Nkombo na ye ezalaki Onesimo, mpe azalaki moombo oyo azali kozonga epai na nkolo na ye, oyo azalaki moko na basangani ya lisangá lizalaki kuna. Moninga ya Onesimo na mobembo ezalaki Tukiko, ye azalaki moombo te, mpe bango nyonso mibale batindamaki na ntoma Paulo, mpo na komema mokanda oyo atindaki epai na “Bakolose, bandeko na bulɛɛ mpe na kondima kati na Klisto.” Engebene oyo toyebi, Paulo akómaki ata mbala moko te na Kolose. Lisangá ya kuna, oyo mingi kati na basangani na yango bazalaki Bayuda te, libandisamaki mbala mosusu na Epafala, oyo azalaki kosala kati na bango mpe na nsima azalaki elongo na Paulo na Loma.​—Kol. 1:2, 7; 4:12.

3. Mokanda ya Bakolose yango moko emonisi nini na ntina na mokomi na yango, na ntina na ntango mpe esika ya bokomami na yango?

3 Lokola amonisi yango na maloba ya ebandeli mpe ya nsuka ya mokanda yango, ntoma Paulo azalaki mokomi ya mokanda ya Bakolose. (1:1; 4:18) Bosukisi na ye emonisi mpe ete akomaki yango ntango azalaki na bolɔ́kɔ. Ekoki kozala na boumeli ya bokangami na ye ya liboso na Loma, na mobu 59-61 T.B., ntango akomaki mwa mikanda mingi ya kopesa bilendiseli, kotindáká mokanda ya Bakolose esika moko na oyo ya Filemona. (Kols. 4:7-9; Flmo. 10, 23) Ekoki kozala ete yango ekomamaki na ntango mokanda ya Baefese mokomamaki, mpamba te makanisi mpe milɔngɔ́ ya maloba kati na yango ekokani.

4. Nini ezali komonisa polelepolele bosolo ya mokanda ya Bakolose?

4 Bantina ya kotya ntembe na bosolo ya mokanda ya Bakolose ezali te. Lokola yango ezwami esika moko na mikanda mosusu ya Paulo kati na papirise Chester Beatty No. 2 (P46) ya mobu soko 200 T.B., boye yango endimamaki na baklisto ya liboso ete ezalaki moko na mikanda ya Paulo. Bobele bato yango ya kala oyo bandimisi bosolo ya mikanda mosusu ya Paulo, bandimisi mpe bosolo ya mokanda ya Bakolose.

5. (a) Nini epusaki Paulo na kotindela Bakolose mokanda nokinoki? (b) Likambo nini lilobelami mingi na mokanda yango?

5 Nini epusaki Paulo na kotinda mokanda epai na Bakolose nokinoki? Ya liboso, Onesimo azalaki kozonga na Kolose. Kala mingi te, Epafala autaki koya epai na Paulo, mpe ntembe ezali te ete nsango oyo apesaki na ntina na bizalela ya makambo na Kolose ebakisaki ntina mosusu mpo na kokoma mokanda yango. (Kols. 1:7, 8; 4:12) Likámá moko lizalaki pene na kokwela lisangá wana. Mangomba ya mikolo yango mazalaki kopanzana, mpe mangomba ya sika mazalaki ntango nyonso kosalema uta na kosangisama ya bituluku ya mangomba ya liboso. Ezalaki na bafilozofi ya bapakano oyo esangisaki mateya ya kominyokola na nzoto, bikelákela, mpe biyambayamba ya losambo ya bikeko; makambo nyonso wana, bakisá mpe momeseno ya Bayuda oyo motali kokila bilei mpe kotalela mikolo, ekokaki mbala mosusu kosala bopusi likoló na bamoko kati na lisangá yango. Ezala mokakatano yango mozalaki nini, emonani ete yango ezalaki ntina ebongi mpo na Epafala ete asala mobembo molai kino Loma mpo na kokutana na Paulo. Nzokande, eloko oyo emonisi ete, na ntango wana, lisangá mobimba lizalaki naino na likámá te ezali bongo nsango ya kolendisa oyo Epafala apesi na ntina na bolingo mpe bokangami na bango ya makasi. Na koyokáká nsango yango, Paulo atɛlɛmaki na mpiko nyonso mpo na kokɔtela boyebi ya sikisiki mpe losambo ya pɛto na kotindeláká lisangá ya Kolose mokanda oyo. Yango ezali kolobela mingi etɛlɛmɛlo ya likoló oyo Nzambe apesi na Klisto, oyo eleki bafilozofi ya bapakano, losambo lopesami na baanzelu mpe mateya ya bonkɔ́kɔ ya Bayuda.

MAKAMBO MAZALI KATI NA BAKOLOSE

6. (a) Paulo asali libondeli nini mpo na bolamu ya Bakolose? (b) Paulo ayebisi nini na oyo etali etɛlɛmɛlo mpe mosala ya Yesu likoló na lisangá?

6 Bózala na kondima kati na Klisto, ye motó na lisangá (1:1–2:12). Nsima na mbote ya ebandeli oyo eutaki epai na Timoté mpe epai na ye moko, Paulo apesi matɔ́ndi mpo na kondima ya Bakolose kati na Klisto mpe mpo na bolingo na bango. Basilaki koyeba makambo ya ngɔlu ya Nzambe uta na kosakolama ya nsango malamu oyo Epafala asakolaki kati na bango. Uta ayokaki nsango na bango, Paulo atikaki te kobondela ete bátonda na “boyebi ya sikisiki ya mokano [ya Nzambe], na mayele nyonso mpe na bososoli na elimo, mpo na kotambola na motindo mobongi na Yehova” mpe “mpo na koyika mpiko makasi mpe kozala na motema molai mpe na esengo.” (1:9-11, NW) Tata abikisi bango kati na “bokonzi na Mwana na ye na bolingo,” ye azali elilingi ya Nzambe oyo akomonanaka te, mpe na nzela na ye mpe mpo na ye biloko binso bizalisamaki. Azali Motó na lisangá mpe mobotami ya liboso longwa na bakufi. Na nzela ya makila ya Yesu, Nzambe amonaki malamu ete asangisa lisusu biloko binso epai na ye moko, ɛɛ, bakisá mpe Bakolose oyo bazalaki liboso bato batangolami, ‘bobele, soki bakokóba kotɛlɛma ngwi kati na kondima.’—1:13, 23.

7. Paulo azali kosakola nini, mpe mpo na mokano nini?

7 Paulo asepeli ete azali kosangana na minyoko ya Klisto mpo na bolamu ya lisangá, oyo ye akómaki mosaleli na yango. Yango ezalaki mpo ete asakola na bozindo, mpe mpo na litomba na bango, liloba ya Nzambe oyo litali ‘libombami mosantu, oyo Nzambe asepeli sikawa koyebisa bozwi na yango na nkembo epai na babulami na ye.’ Paulo alobi ete ‘tokosakolaka Klisto, kokebisaka mpe kolakisaka na mayele nyonso, ete tótɛlɛmisa bato banso liboso lokola mikóló kati na Klisto.’—1:26-28.

8. Mpo na nini Paulo azali kokɔtela bandeko na ye?

8 Etumba oyo Paulo azali kobunda mpo na Bakolose, Balaodikia, mpe basusu ezali mpo ete bákoka kobɔndisama mpe bákangana na boyokani elongo kati na bolingo, mpo ete bázwa ‘boyebi ya sikisiki ya libombami mosantu ya Nzambe; elingi koloba Klisto, oyo kati na ye biloko na motuya nyonso ya mayele mpe ya boyebi bisili kobombama malamumalamu.’ Alingi te komona bango kozimbisama na maloba ya kolengola, kútu basengeli nde kolanda kotambola kati na Klisto, “kobimisáká misisa mpe kotongamáká likoló na ye lokola moboko mpe kotikaláká ngwi kati na kondima, NW.” Sikawa Paulo apesi likebisi. “Bókeba ete moto te apunza bino na maloba na ye na mayele, na bibanzabanza na ye na motindo na Klisto te kasi na motindo na bizaleli na bato mpe na makambo mikemike na mokili.”​—2:2, 3, 7, 8.

9. Paulo akebisi Bakolose na ntina na lolenge nini ya losambo, mpe mpo na nini basengeli te kotambwisama na Mibeko [ya Mose]?

9 Bózala bakufi na misala ya nzoto, kasi bato na bomoi na oyo etali Klisto (2:13–3:17). Atako bazalaki bakufi kati na bikweli na bango mpe na kozanga kokatama ngenga, Nzambe asili kozongisa bango na bomoi elongo na Klisto, kolongoláká mokanda ya Mibeko mokomami na mabɔkɔ, oyo motɛmɛlaki Bayuda. “Na bongo, tiká moto te ete asambisa” bango na ntina na Mibeko to na kotosama na yango, oyo ezali bobele elilingi ya oyo na solosolo, elingi koloba Klisto. Lisusu, soki basilaki kokufa esika moko na Klisto mpo na makambo mikemike ya mokili, mpo na nini bazali kotosa mibeko oyo milobi ete “Simbá te! Lɛtá te! Mamá te!,” engebene mitindá mpe mateya mauti na bato? Lolenge ya losambo oyo moto amityeli ye moko mpo na komimonisa, komikitisa ya lokuta, kominyokola nzoto mpamba—nyonso wana ezali na ntina te mpo na kobundisa bamposa ya nzoto.​—2:16, 21.

10. Lolenge nini moto akoki kolanda koluka biloko ya likoló mpe komilatisa bomoto ya sika?

10 Nzokande, Paulo apesi toli ete: “Bólukaka makambo na Likoló, kuna efandi Klisto na lobɔkɔ na Nzambe na mobali. Bóbanzaka makambo na Likoló, bóbanzaka makambo na mokili te.” Yango ekoki kosalema na kobwakáká bomoto ya kala mpe kolatáká bomoto ya sika, oyo na nzela na boyebi ya sikisiki, ezali te koponapona na mosuni kati na Moyuda mpe Mogreke, mpamba te “Klisto azali nyonso kati na nyonso.” Yango elingi koloba komilatisa motema na mawa, boboto, elimo ya komikitisa, bopɔlɔ mpe motema molai “lokola Baponami na Nzambe.” Ntoma alobi ete: “Bólimbisanaka. Pelamoko [Yehova, NW] alimbisi bino, bino mpe bobele bongo. Nde likoló na oyo nyonso, bómilatisa bolingo oyo ezali ekanganeli ekoki mpenza.” Na maloba mpe na misala, nyonso esengeli kosalema “na nkombo na Nkolo Yesu, kopesáká Nzambe Tata matɔ́ndi mpo na ye.”​—3:1, 2, 11-14, 17.

11. (a) Toli nini epesami mpo na libota mpe mpo na boyokani mosusu? (b) Mbote nini epesami na nsuka?

11 Boyokani elongo na basusu (3:18–4:18). Mpo na boyokani kati na libota, tiká ete basi bátosa mibali na bango mpe mibali bálinga basi na bango, bana bátosa baboti mpe batata bayokisa bana na bango nkanda te. Baombo basengeli kotosa bankolo na bango mpo na bobángi Yehova, mpe bankolo basengeli kosalela baombo na bango makambo na bosembo nyonso. Tiká ete banso bálendendela kati na mabondeli mpe bálanda kotambola na mayele liboso na bato na libándá. Tukiko mpe Onesimo bakoyebisa bango na monɔkɔ mpenza makambo oyo matali Paulo mpe basalani na ye mpo na Bokonzi ya Nzambe. Batindi mbote na bango na Kolose, Paulo mpe atindeli bandeko ya Laodikia mbote mpe asɛngi ete básɔmbitinya mikanda oyo azali kotinda. Paulo akomi mbote ya bosukisi na lobɔkɔ na ye moko ete: “Bóbosanaka ngai kati na kokangama na ngai te. Ngɔlu ezala na bino.”​—4:18.

LITOMBA NA YANGO

12. Mokanda ya Paulo epai na Bakolose epesi basolo nini ya kobɔndisa, mpe ezali na litomba nini mpo na lisangá?

12 Tokoki mpenza komona kati na makanisi na biso lolenge nsango ya boyei ya bandeko yango mibale epalanganaki nokinoki epai na bandeko na Kolose. Na mposa makasi mpenza bayanganaki, mbala mosusu na ndako ya Filemona, mpo na koyoka botángi ya mokanda ya Paulo. (Flmo. 2) Oyo nde basolo ya kobɔndisa mokanda yango epesaki likoló na bosikisiki ya etɛlɛmɛlo ya Klisto mpe ntina ya kozwa boyebi ya sikisiki! Bafilozofi ya bato mpe mateya ya bonkɔ́kɔ ya Bayuda ekitisamaki mpenza na esika na yango, mpe kimya mpe liloba ya Klisto etombolamaki! Uta na mokanda yango, elimo mpe motema ya baoyo nyonso bazalaki na lisangá eleisamaki—bakɛngɛli, mibali, basi, batata, bana, bankolo, baombo. Na ntembe te, Filemona mpe Onesimo bazwaki toli malamu ntango bazongaki lisusu kati na ekanganeli na bango ya nkolo mpe moombo. Oyo nde litambwisi malamu bakɛngɛli bazwaki mpo na kozongisa etongá na mateya ya sembo! Maloba ya Paulo makólisaki motuya oyo Bakolose bazalaki kopesa na libaku malamu na bango ya kosalela Yehova na molimo na bango mobimba! Mpe toli ya kolendisa oyo epesamelaki Bakolose ete bálongwa na boombo ya makanisi mpe ya misala ya mokili ezali ntango nyonso nsango ya nguya mpo na lisangá na mikolo ya lelo.​—Kols. 1:9-11, 17, 18; 2:8; 3:15, 16, 18-25; 4:1.

13. Paulo apesi toli nini na ntina na maloba na ngɔlu, libondeli, mpe bosangani elongo kati na boklisto?

13 Toli ya malamu mpenza mpo na ministre moklisto epesami kati na Bakolose 4:6 ete: “Tiká ete maloba na bino mázala na ngɔlu, na elɛngi na mongwa ntango nyonso ete bóyeba soko ekoki na bino kozongisela bato nyonso maloba nini.” Maloba ya solo, oyo matondi na ngɔlu, makopesa na bato ya mitema sembo mposa ya koyoka mpe makosala mosala mpo na litomba na bango ya ntango nyonso. Mpe lisusu, libondeli ya bokɛngi ya moklisto, oyo lisalemi uta na motema ya botɔ́ndi, likomema mapamboli mingi uta na Yehova: “Bóyika mpiko kati na kobondela; bókɛngɛla na yango na matɔ́ndi.” Mpe oyo nde esengo mpe kobɔndisama monene ezali kozwama na bosangani elongo kati na boklisto! Paulo alobi ete ‘Bólakisana na mayele nyonso mpe bópesana toli. Bóyembela Yehova nzembo kati na mitema na bino.’ (4:2; 3:16) Wana ozali kolukaluka kati na mokanda ya Bakolose, okokuta batoli mingi mosusu ya malamu mpe oyo ebongi.

14. (a) Solo nini emonisami polele kati na Bakolose? (b) Na lolenge nini elikya ya Bokonzi elobelami polele?

14 Na oyo etali botosi ya Mibeko, mokanda yango elobi ete: “Makambo yango mazali bobele elilingi na makambo makoya, nde eloko na solo ezali Klisto.” (2:17) Eloko yango ya solo, oyo ezali Klisto, emonisami polele kati na Bakolose. Mokanda yango mozali mbala mingi kolobela elikya ya nkembo oyo ebombami na makoló mpo na baoyo bazali na bomoko elongo na Klisto. (1:5, 27; 3:4) Baoyo wana basengeli kozala na botɔ́ndi mingi ete Tata asili kosikola bango na nkanga na molili mpe akɔtisi bango “na bokonzi na Mwana na ye na bolingo.” Na yango, basili kokóma bayangelami na Ye oyo azali “elilingi na Nzambe, oyo akomonanaka te, Mobotami na liboso na biloko nyonso bizalisami. Mpo kati na ye, biloko nyonso bizalisamaki, na biloko na Likoló mpe biloko na nsé, biloko bikomonanaka mpe biloko bizangi komonana, na kiti na makonzi, na bonkolo, na mikóló, na mikonzi.” Ye abongi mpenza koyangela na boyengebene nyonso kati na Bokonzi ya Nzambe. Bongo, Paulo apesi baklisto bapakolami elendiseli oyo: “Soko bosili kosekwa na Klisto esika moko, bólukaka makambo na Likoló, kuna efandi Klisto na lobɔkɔ na Nzambe na mobali.”​—1:12-16; 3:1.

[Maloba na nse ya lokasa]

a The New Westminster Dictionary of the Bible, 1970, lokasa 181.

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto