Epafala: “Mosáli ya sembo mpo na Klisto”
NANI abandisaki lisangá ya boklisto na Kolinti, na Efese, mpe na Filipi? Mbala mosusu okoyanola kozanga kokakatana ete: ‘Paulo, “ntoma epai na bapakano.”’ (Baloma 11:13) Soki olobi boye, ozali na elónga.
Nzokande, nani asalaki lisangá na Kolose, na Yelapoli mpe na Laodikia? Atako tozali na kondimisama ya sikisiki te, ekoki kozala mobali moko na nkombo Epafala. Atako boni, mbala mosusu okosepela koyeba makambo mosusu na ntina na mopalanganisi wana ya nsango malamu, mpamba te abéngami “mosali ya sembo mpo na Klisto.”—Bakolose 1:7, NW.
Mosakoli na lobwaku ya Lycus
Nkombo Epafala ezali ebéngeli mokuse ya Epafaladito. Kasi tosengeli kokesenisa Epafala na Epafaladito moto ya engumba Filipi. Epafala azalaki moto ya Kolose, moko na bingumba misato ya lobwaku ya Ebale Lycus, na Asie Mineure epai ezalaki na masangá ya boklisto. Kolose ekabwanaki na Laodikia na ntáká ya kilomɛtɛlɛ 18 mpe kilomɛtɛlɛ 19 na Yelapoli, na etúká ya kala ya Fulugia.
Biblia eyebisi polele te lolenge oyo nsango malamu ekómaki na Fulugia. Nzokande, bato ya Fulugia bazalaki na Yelusaleme na mokolo ya Pentekote ya mobu 33 T.B., mbala mosusu bamoko kati na bango bautaki na Kolose. (Misala 2:1, 5, 10) Na boumeli ya mosala ya Paulo na Efese (pene na 52-55 T.B.), litatoli oyo lipesamaki na etúká wana lizalaki mpenza na nguya mpe na bolóngi na boye ete bato ya Efese mpe lisusu “bato nyonso bafandi na Azia bayoki liloba na Nkolo, na Bayuda na Baela lokola.” (Misala 19:10) Emonani lokola ete Paulo asakolaki nsango malamu na lobwaku ya Lycus te, mpamba te mingi na baoyo bakómaki baklisto na etúká yango bamonaki ye soko moke te.—Bakolose 2:1.
Engebene Paulo, moto oyo ateyaki Bakolose “ngɔlu na solo na Nzambe” ezalaki bongo Epafala. Na kotaleláká ete Paulo abéngi mosalani na ye wana ‘mosáli ya sembo mpo na Klisto na esika na biso’ emonisi ete Epafala azalaki mopalanganisi ya nsango malamu ya molende na etúká wana.—Bakolose 1:6, 7, NW.
Ntoma Paulo mpe Epafala, mopalanganisi ya nsango malamu bazalaki komibanzabanza mingi mpo na bolamu ya elimo ya baninga na bango bandimi oyo bazalaki na Lobwaku ya Lycus. Lokola “ntoma epai na bapakano,” na ntembe te Paulo asepelaki mingi na ntina na bokoli na bango. Ya solo ezalaki na nzela ya Epafala nde Paulo ayokaki nsango ya elimo malamu ya Bakolose.—Bakolose 1:4, 8.
Lapólo ya Epafala
Bakolose bazalaki na mikakatano makasi na boye ete esengelaki na Epafala kosala mobembo molai kino na Loma na mokano ya sikisiki ya kosolola makambo yango na Paulo. Na ntembe te lapólo oyo Epafala apesaki etindaki Paulo ete akoma mikanda mibale epai ya bandeko yango, oyo ayebaki te. Moko na mikanda yango ezalaki mpo na Bakolose. Mosusu, oyo emonani ete ebatelamaki te, etindamaki epai na bato ya Laodikia. (Bakolose 4:16) Tokoki mpenza kokanisa ete makambo oyo mazalaki na kati ya mikanda yango makomamaki na mokano ya kokokisa bamposa ya baklisto wana oyo esosolamaki na Epafala. Bamposa nini amonaki epai na bango? Mpe yango ezali kolakisa biso nini na ntina na bomoto na ye?
Emonani lokola ete mokanda epai na Bakolose ezali kopesa elembeteli ete Epafala azalaki komitungisa wana baklisto ya Kolose bazalaki na likámá na ntina na filozofi ya bapakano oyo esangisaki mateya lokola koboya bisengo nyonso ya bomoi (ascétisme), kosolola na bilimu mabe, mpe biyambayamba ya losambo ya bikeko. Lisusu, liteya ya Bayuda na ntina na kokila bilei mpe kokumisa mikolo mosusu ekoki kozala ete ezalaki na bopusi likoló na basangani mosusu ya lisangá.—Bakolose 2:4, 8, 16, 20-23.
Likambo oyo ete Paulo akomi na ntina na makambo yango emonisi ete Epafala azalaki kosɛnzɛla mpe kotya likebi na bamposa ya baninga na ye baklisto. Amonisaki komibanzabanza ya solosolo mpo na bolamu na bango ya elimo, koyebáká malamu makámá oyo bazalaki na yango. Epafala alukaki toli epai na Paulo, mpe yango emonisi ete azalaki na komikitisa. Ekoki kozala ete azalaki na mposa ya kozwa makanisi epai na moto oyo ayebaki makambo mingi koleka. Atako boni, Epafala asalaki na mayele.—Masese 15:22.
Moto oyo apesaki motuya na libondeli
Na mokanda na ye oyo atindelaki baklisto ya Kolose, Paulo asukisi boye: “Epafala, moko na bino, atindeli bino mbote. Ye moombo na Yesu Klisto; akobunaka na mabondeli mpo na bino ete bótɛlɛma ngwi na bokoki mpe ete bósosola makambo nyonso na mokano na Nzambe na bososoli mpenza. Zambi nakoki kotatwela ye ete azali na bwale mpenza mpo na bino mpe na bango na Laodikia mpe na bango na Yelapoli.”—Bakolose 4:12, 13.
Ɛɛ, ata ntango azalaki “mokangami esika moko” na Paulo na Loma, Epafala azalaki kokanisa bandeko na ye balingami ya Kolose, ya Laodikia, mpe ya Yelapoli mpe azalaki kobondela mpo na bango. (Filemona 23) Na kotaleláká ndimbola ya liloba yango mpenza, ‘abundaki’ mpo na bango kati na libondeli. Engebene nganga-mayele D. Edmond Hiebert, liloba ya Greke oyo esalelami awa ezali kopesa likanisi ya “mosala ya molende mpe oyo esɛngi komipesa makasi,” ekokani na “nsɔ́mɔ” oyo Yesu ayokaki wana azalaki kobondela na elanga ya Getesemane. (Luka 22:44) Epafala azalaki na mposa makasi ete bandeko na ye na elimo mibali mpe basi bákóma ngwi mpe bátela mpenza na elimo. Ndeko oyo azali komibanzabanza mingi na makambo ya elimo azalaki solo lipamboli mpo na masangá!
Lokola Epafala abéngamaki “mosalani na bolingo,” ntembe ezali te ete alingamaki mingi na bandeko baklisto. (Bakolose 1:7) Soki makambo mapesi nzela, basangani nyonso ya lisangá basengeli komipesa na mɔ́tɔ mpe na bolingo. Na ndakisa, bakoki kotya likebi na likambo litali kosunga babɛli, mibangé, to basusu oyo bazali na bamposa ya sikisiki. Mikumba ya kokokisa mikoki kozala mingi kati na lisangá, to mpe likoki ekoki kozala ya kopesa mabɔkɔ na mwango ya botongi bandako mpo na misala ya Teokrasi.
Kobondela mpo na basusu, lokola Epafala asalaki yango, ezali lolenge ya mosala ya bulɛɛ oyo biso banso tokoki kosala yango. Kati na mabondeli yango tokoki kolobela makambo mazali komonisa lobanzo na biso mpo na basambeli ya Yehova oyo basengeli kolónga makámá ndenge na ndenge to mikakatano ya elimo to ya mosuni. Na kosaláká molende na nguya nyonso mpo na likambo yango, tokoki kozala lokola Epafala. Mokomoko na biso akoki kozala na libaku malamu mpe esengo ya kozala “mosalani na bolingo” kati na libota ya basaleli ya sembo ya Yehova.