Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w00 15/12 nk. 14-19
  • Tósalisa basusu ete bátambola na ndenge oyo ebongi na Yehova

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Tósalisa basusu ete bátambola na ndenge oyo ebongi na Yehova
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2000
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Lisalisi oyo ebongi mpo na Bakolose
  • Lobá polele na kati ya libondeli
  • Tólendisaka basusu
  • Epafala: “Mosáli ya sembo mpo na Klisto”
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1997
  • Bózala bato oyo bakoki mpenza mpe bazali na kondima makasi
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2000
  • Mokanda ya Biblia nimero 51—Bakolose
    “Makomami nyonso mapemami na Nzambe mpe mazali na litomba”
  • Yehova akoki kokembisa yo na nguya
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1994
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2000
w00 15/12 nk. 14-19

Tósalisa basusu ete bátambola na ndenge oyo ebongi na Yehova

“Totiki kobondela mpo na bino te. Tokolɔmbaka ete . . . bótambola na [ndenge oyo ebongi na Yehova, NW] mpe bósepelisa ye na makambo nyonso. Bóbota mbuma na misala nyonso malamu.”—BAKOLOSE 1:9, 10.

1, 2. Likambo nini ekoki mpenza kopesa moto esengo mpe bolamu?

MOBALI moko na mwasi na ye oyo bazali babongisi-nzela na Afrika ya Sudi balobaki boye: “Tofandaka na wagɔ moko oyo ezali na kati ya ferme moko. Lokola tolukaka bomoi ya mindɔndɔ te, tozalaka na ntango mingi mpo na koteya bato nsango malamu. Tozwi libaku malamu ya kosalisa bato ebele bámipesa na Yehova.”

2 Yo mpe okanisaka ete kosalisa bato mosusu epesaka esengo? Bato mosusu bamekaka mbala na mbala kosalisa bato ya maladi to bato oyo bakelelá to bato oyo bazali bango moko, mpe mosala yango epesaka bango esengo. Baklisto ya solo bayebi ete koteya bato mosusu báyeba Yehova Nzambe na Yesu Klisto, ezali lisalisi eleki malamu oyo bakoki kopesa bango. Ezali kaka na ndenge yango nde bakoki kondima mbeka ya Yesu, kokóma baninga ya Nzambe mpe kokóma bato oyo babongi kozwa bomoi ya seko.​—Misala 3:19-21; 13:48.

3. Lisalisi nini oyo ebongi tótyela yango mpenza likebi?

3 Kasi, ndenge nini tokoki kosalisa baoyo bazali sikoyo kosalela Nzambe, baoyo bazali kolanda “Nzela”? (Misala 19:9) Na ntembe te ozali komibanzabanza mingi lisusu mpo na bango, kasi mbala mosusu ozali komona te ndenge mosusu oyo okoki kosala to ndenge oyo okoki kolanda kosalisa bango. To okoki kokanisa ete ezali mpenza na likambo moko te oyo okoki kosala mpo na kosalisa bango, yango mpe ekoki kozangisa yo esengo mosusu oyo okokaki kozwa. (Misala 20:35) Na makambo yango mibale, tokoki kozwa liteya na mokanda ya Bakolose.

4. (a) Paulo azalaki wapi ntango akomelaki Bakolose mokanda? (b) Mosala nini Epafala asalaki?

4 Ntango ntoma Paulo akomelaki baklisto ya Kolose mokanda, azalaki mokangami na Loma, kasi azalaki na bolɔkɔ te; azalaki kofanda na ndako na ye mpe azalaki koyamba bato oyo bazalaki kokende kotala ye. Ndenge okoki kokanisa yango, Paulo asalelaki mwa bonsomi wana mpo na kosakola Bokonzi ya Nzambe. (Misala 28:16-31) Baklisto mosusu bazalaki kokende kotala Paulo; bamosusu kutu bazalaki mpe bakangami esika moko na ye na bantango mosusu. (Bakolose 1:7, 8; 4:10) Moko na baklisto yango ezalaki Epafala, mosakoli moko ya molende oyo autaki na mboka Kolose, na etúká ya Fulugia oyo ezali na bangomba mike na ɛsti ya Efese na Asie Mineure (lelo oyo ekólo Turquie). Epafala asungaki mingi mpo lisangá ya Kolose esalema, mpe asalaki mosala monene na lisangá ya Laodikia mpe na lisangá ya Yelapoli, bamboka oyo ezalaki mosika te na Kolose. (Bakolose 4:12, 13) Ntina nini Epafala asalaki mobembo tii na Loma mpo na kokutana na Paulo, mpe likambo oyo Paulo asalaki na nsima ekoki koteya biso nini?

Lisalisi oyo ebongi mpo na Bakolose

5. Mpo na nini Paulo akomelaki Bakolose makambo oyo ezali na mokanda yango?

5 Epafala asalaki mobembo moko ya mpasi tii na Loma mpo na kotuna Paulo toli na makambo oyo ezalaki koleka na lisangá ya Kolose. Amemelaki ye nsango ete baklisto yango bazali na kondima, bazali na bolingo mpe bazali kosala milende mpo na kopalanganisa nsango malamu. (Bakolose 1:4-8) Kasi, ayebisaki ye mpe makambo mosusu oyo ezalaki kotungisa ye mpe ezalaki lokola likama mpo na elimo ya Bakolose. Yango wana, Paulo atindelaki bango mokanda oyo epemamaki na elimo santu mpe na kati ya mokanda yango, akweisaki makanisi mosusu oyo balakisi ya lokuta bazalaki koteya. Alobelaki mingimingi esika monene oyo Yesu Klisto asengeli kozala na yango.a Mpo na kosalisa bango, asukaki kaka na komonisa mateya minene ya Biblia? Ndenge nini mosusu akokaki kosalisa Bakolose, mpe yango ekoki koteya biso nini na likambo etali kosalisa basusu?

6. Likambo nini Paulo alobelaki mingi na mokanda oyo akomelaki Bakolose?

6 Na ebandeli ya mokanda na ye, Paulo amonisi ndenge moko ya kosalisa basusu oyo, soki totii mpenza likebi te, tokomona yango te. Ezalaki lolenge oyo ebongaki mpenza mpo na kosalisa bato oyo bazali mosika, lokola mpe Paulo na Epafala bazalaki mosika na Kolose. Paulo alobaki boye: “Ntango nyonso tozali kotɔnda Nzambe, Tata ya Nkolo na biso Yesu Klisto, awa ezali biso kobondela [maloba na nse ya lokasa na NW, “kobondela ntango nyonso”] mpo na bino.” Maloba yango emonisi ete bazalaki kobondela mpenzampenza mpo na baklisto ya Kolose. Paulo alobaki lisusu boye: “Yango wana, longwa na mokolo moyoki biso mpo na bolingo yango, totiki kobondela mpo na bino te. Tokolɔmbaka ete bótonda na boyebi ya mokano na ye, na mayele nyonso mpe na bososoli ya elimo.”—Bakolose 1:3, 9.

7, 8. Makambo nini tolobelaka mbala mingi na mabondeli na biso moko mpe oyo esalemaka na kati ya lisangá?

7 Toyebi ete Yehova ‘ayokaka mabondeli,’ yango wana tokoki kozala na elikya ete akoyoka mabondeli na biso soki eyokani na mokano na ye. (Nzembo 65:2; 86:6; Masese 15:8, 29; 1 Yoane 5:14) Kasi, ntango tozali kobondela mpo na basusu, tosalaka yango ndenge nini?

8 Mbala na mbala tokanisaka ‘lisangani mobimba ya bandeko na biso na mokili mobimba’ mpe tobondelaka mpo na bango. (1 Petelo 5:9, NW ) To mpe tobondelaka Yehova mpo na baklisto mpe bato mosusu oyo bafandi na mboka moko epai bazwi likama. Ntango bayekoli ya ekeke ya liboso oyo bazalaki na bamboka mosusu bayokaki ete nzala ekɔti na Yudea, na ntembe te bazalaki kobondela mingi mpo na bandeko na bango liboso kutu bátindela bango biloko mpo na kosunga bango. (Misala 11:27-30) Lelo oyo, na makita ya lisangá, epai bato mingi basengeli kokanga ntina ya maloba ya libondeli mpo báloba “Amen,” mbala mingi toyokaka mabondeli mpo na bandeko na mokili mobimba to mpo na bandeko oyo bazali na mboka moko boye.—1 Bakolinti 14:16.

Lobá polele na kati ya libondeli

9, 10. (a) Bandakisa nini ezali komonisa ete ezali mabe te kotánga nkombo ya bato na kati ya mabondeli na biso? (b) Ndenge nini bandeko mosusu bazalaki kobondela mpenza mpo na Paulo?

9 Nzokande, na kati ya Biblia tozali kokuta mabondeli oyo esalemaki mpo na bato mosusu mpe batángaki mpenzampenza bankombo na bango. Tókanisa maloba ya Yesu na Luka 22:31, 32. Azalaki elongo na bantoma na ye ya sembo 11. Bango nyonso bazalaki na mposa ete Nzambe asunga bango na bantango ya mpasi oyo ezalaki liboso na bango; mpe Yesu abondelaki mpo na bango. (Yoane 17:9-14) Kasi, Yesu atángaki nkombo ya Petelo, asɛngaki likambo moko mpenzampenza mpo na moyekoli yango. Talá bandakisa mosusu: Elisa abondelaki Nzambe mpo na moto moko, mosaleli na ye. (2 Mikonzi 6:15-17) Ntoma Yoane abondelaki ete Gayo azala ntango nyonso nzoto kolɔngɔnɔ mpe azala makasi na elimo. (3 Yoane 1, 2) Ezali mpe na mabondeli mosusu oyo esalemaki mpo na mwa bato moke.—Yobo 42:7, 8; Luka 6:28; Misala 7:60; 1 Timote 2:1, 2.

10 Mikanda ya Paulo emonisi mpenza likambo ya kobondela mpo na moto mpe kotánga nkombo na ye. Paulo asɛngaki ete bábondela mpo na ye to mpo na ye na baninga na ye. Na Bakolose 4:2, 3, tozali kotánga boye: “Bóyika mpiko kati na kobondela; bókɛngɛla na yango na matɔndi. Bóbondela mpo na biso mpe ete Nzambe azipwela biso ekuke mpo na Liloba, mpe mpo na kosakola libombami na Klisto, oyo ngai nazali mokangami mpo na yango.” Tótalela mpe bandakisa mosusu oyo: Baloma 15:30; 1 Batesaloniki 5:25; 2 Batesaloniki 3:1; Baebele 13:18.

11. Epafala azalaki kobondela mpo na banani ntango azalaki na Loma?

11 Bandeko oyo bazalaki elongo na Paulo na Loma bazalaki mpe kobondela mpo na basusu. “Epafala, oyo autaki epai na bino, . . . atindeli bino mbote; azali ntango nyonso kobunda mpo na bino na kati ya mabondeli na ye.” (Bakolose 4:12, NW ) Liloba oyo ebongolami na “kobunda” ezali na likanisi ya “koboma nzoto,” lokola moto ya masano na ntango ya kala. Epafala azalaki kaka kobondela makasi mpo na bandimi nyonso na mokili mobimba to mpe mpo na basaleli ya solo ya Nzambe na Asie Mineure? Paulo amonisaki ete Epafala azalaki kobondela mpenzampenza mpo na baoyo bazalaki na Kolose. Epafala ayebaki makambo oyo bazalaki kokutana na yango. Biso toyebi bankombo na bango nyonso te, toyebi mpe te mikakatano oyo bazalaki na yango, kasi tómeka naino kokanisa makambo oyo, mbala mosusu, bazalaki kokutana na yango. Mbala mosusu elenge Lini azalaki kobunda makasi mpo alanda te mateya ya filozofi oyo epalanganaki mingi, mpe ekoki kozala ete Lufu asengelaki kozala na molende mpo alonga mposa ya kozongela makambo oyo azalaki kosala ntango azalaki na Lingomba ya Bayuda. Lokola mobali na ye azalaki mondimi te, mbala mosusu Pelesisi asengelaki na mpiko mpe na mayele mpo na kobɔkɔla bana na ye kati na Nkolo, mpe mbala mosusu Asunkilito, oyo azalaki na maladi oyo akokaki kobika na yango te, azalaki na mposa ya kobɔndisama mingi? Ya solo, Epafala ayebaki bato ya lisangá na ye mpe azalaki kobondela makasi mpo na bango mpamba te ye na Paulo balingaki ete bato yango oyo bamipesaki na Nzambe bátambola na ndenge ebongi na Yehova.

12. Ndenge nini tokoki koloba polele na mabondeli na biso moko?

12 Omoni liteya oyo biso tokoki kozwa, ndenge oyo biso mpe tokoki kosalisa basusu? Lokola tolobaki yango liboso, mabondeli oyo esalemaka na makita ya lisangá, esalemaka na nkombo ya bato ebele oyo bazali na makambo ndenge na ndenge, yango wana elobelaka likambo mokomoko na bozindo te. Kasi, ntango tozali kobondela biso moko to na libota tokoki mpenza kotánga bankombo ya bato oyo tolingi kobondela mpo na bango. Ntango mosusu tokoki kosɛnga na Nzambe asunga bakɛngɛli-batamboli nyonso to babateli ya mpate ya elimo mpe apambola bango, kasi ntango mosusu tokoki mpenza kotánga bankombo. Na ndakisa, tokoki kotánga nkombo ya mokɛngɛli ya zongazonga oyo atalaka lisangá na biso to motambwisi ya Boyekoli ya Mokanda na biso. Bafilipi 2:25-28 na 1 Timote 5:23 emonisi ndenge oyo Paulo azalaki komibanzabanza mpo na bokolɔngɔnɔ ya nzoto ya Timote na ya Epafalodito. Biso mpe tokoki komibanzabanza ndenge yango mpo na bato ya maladi oyo toyebi bankombo na bango.

13. Makambo nini ebongi tólobelaka yango na kati ya mabondeli na biso moko?

13 Ya solo, tokokeba ete tókɔtaka na makambo ya bato te, kasi ezali mabe te tómonisa, na nzela ya mabondeli na biso, ete tozali komibanzabanza mpo na bato oyo toyebi mpe tozali kosalisa. (1 Timote 5:13; 1 Petelo 4:15) Ekoki kozala na ndeko moko oyo alongwe na mosala; biso mpe tozali na mosala ya kopesa ye te. Kasi, tokoki kotánga nkombo na ye mpe kolobela mokakatano na ye na mabondeli na biso. (Nzembo 37:25; Masese 10:3) Toyebi ndeko mwasi moko oyo apusani na mbula kasi azali na mobali te mpe azali na bana te mpo azali na ekateli ya kobala kaka “kati na Nkolo”? (1 Bakolinti 7:39) Na mabondeli na yo moko, okoki kosɛnga Yehova apambola ye mpe asalisa ye azala ntango nyonso sembo na mosala na ye. Ndakisa mosusu, ekoki mpe kozala ete bankulutu mibale bapesaki ndeko moko toli mpo asalaki libunga. Ekozala malamu soki mokomoko na bango akotánga mbala na mbala nkombo ya ndeko yango na mabondeli na ye moko.

14. Ndenge nini kotánga nkombo ya bandeko mosusu na kati ya mabondeli na biso ezali mpe kosalisa bango?

14 Makambo ezali mingi oyo okoki kotánga nkombo ya bato na kati ya mabondeli na yo oyo oyebi ete bazali na mposa ya lisungi, ya libɔndisi, ya mayele mpe ya elimo santu ya Yehova, to mbuma na yango. Mpo ozali mosika to mpo na makambo mosusu, okoki komona ete okoki kosala eloko te mpo na kosalisa bango. Kasi, kobosanaka te kobondela mpo na bandeko na yo. Oyebi ete balingaka kotambola na ndenge oyo ebongi na Yehova, kasi ntango mosusu bazali na mposa ya lisalisi mpo bálɛmba te kosala yango. Okoki mpenza kosalisa bango soki okobondela mpo na bango.—Nzembo 18:2; 20:1, 2; 34:15; 46:1; 121:1-3.

Tólendisaka basusu

15. Mpo na nini tosengeli kotalela malamu maloba ya nsuka ya mokanda ya Bakolose?

15 Kasi, kosalisa bato mosusu, mingimingi baoyo olingaka mingi, esuki kaka te na kobondela na etingya mpe kotánga nkombo na bango na mabondeli na yo. Mokanda ya Bakolose emonisi likambo yango polele. Balimboli mingi ya Biblia balobaka ete nsima ya komonisa bango mateya mpe kopesa toli oyo esengeli, Paulo abakisaki kaka bambote epai ya bato. (Bakolose 4:7-18) Nzokande, tomonaki ete eteni oyo ya nsuka ya mokanda ezali na toli malamu mpe ezali na liteya monene.

16, 17. Tokoki koloba nini mpo na bandeko oyo batángi bankombo na bango na Bakolose 4:10, 11?

16 Paulo akomaki boye: “Alisitalaka oyo akangami na ngai esika moko atindeli bino mbote mpe Malako, ndeko ya Balanaba. Bosili kozwa monɔkɔ mpo na ye, soko akokóma epai na bino, [bóyamba] ye. Yesu, oyo abyangami Yusutu, atindeli bino mbote lokola. Bobele bato yango bakatami ngenga kati na basalani na ngai mpo na Bokonzi ya Nzambe. [Mpe bango nde bakómi lisungi oyo ezali kolendisa ngai, NW ].”—Bakolose 4:10, 11.

17 Na bavɛrsɛ yango, Paulo atángi bandeko mosusu oyo ebongaki mpenza kolobela makambo malamu na bango. Alobaki ete bazalaki kati baoyo bakatami ngɛnga, to bazalaki Bayuda. Bayuda, bato oyo bakatami ngenga, bazalaki mingi na Loma mpe bamosusu bakómaki baklisto. Kasi, Paulo atángaki bankombo ya baoyo basungaki ye. Ekoki mpenza kozala ete bakakatanaki te kosangana na baklisto oyo bazalaki bato ya bikólo mosusu, mpe ekoki kozala ete basalaki na Paulo mpo na kosakola epai ya bato ya bikólo mosusu.—Baloma 11:13; Bagalatia 1:16; 2:11-14.

18. Ndenge nini Paulo akumisaki bato mosusu oyo bazalaki na ye?

18 Talá maloba ya Paulo oyo: “Bango nde bakómi lisungi oyo ezali kolendisa ngai.” Liloba ya Greke oyo Paulo asalelaki ezali na esika mosusu te na kati ya Biblia. Babongoli mingi ya Biblia babongolaka yango na “libɔndisi.” Nzokande, ezali na liloba mosusu ya Greke (parakaléô) oyo ebongolamaka mingi na “libɔndisi.” Paulo asalelaki liloba yango na bisika mosusu na mokanda yango, kasi na Bakolose 4:11 asalelaki yango te.—Matai 5:4; Misala 4:36; 9:31; 2 Bakolinti 1:4; Bakolose 2:2; 4:8.

19, 20. (a) Maloba oyo Paulo asalelaki mpo na kolobela bandeko oyo bazalaki kosalisa ye na Loma elimboli nini? (b) Bandeko yango bazalaki mbala mosusu kosalisa ye na makambo nini?

19 Bato oyo Paulo atángaki bankombo na bango babɔndisaki ye kaka na maloba te. Liloba ya Greke oyo ebongolami na “lisungi oyo ezali kolendisa” na Bakolose 4:11 ezalaki ntango mosusu kosalelama na mikanda ya mokili mpo na kolobela nkisi oyo ekitisaka mpasi. Libongoli moko (New Life Version) elobi boye: “Bazalaki mpenza lisalisi mpo na ngai!” Libongoli mosusu (Today’s English Version) esaleli maloba oyo: “Bazalaki mpenza lisalisi monene mpo na ngai.” Bandeko baklisto yango oyo bazalaki na Paulo bazalaki mpenza kosalela ye nini?

20 Paulo akokaki koyamba bapaya, kasi ezalaki na makambo mingi oyo akokaki kosala te, lokola kosomba biloko oyo asengelaki na yango: biloko ya kolya mpe bilamba ya kolata na eleko ya malili. Ndenge nini akokaki kozwa barulo mpo na koyekola to kosomba biloko ya kokoma na yango mikanda? (2 Timote 4:13) Omoni te ete ekoki mpenza kozala ete bandeko yango nde bazalaki kosalisa Paulo na bamposa na ye, lokola kosombela ye biloko ya kolya na biloko mosusu? Akokaki kozala na mposa ya koyeba ndenge makambo ezali kotambola na lisangá moko mpe kolendisa yango. Kasi lokola azalaki mokangami, akokaki kosala yango te; yango wana, ekoki mpenza kozala ete Paulo azalaki kotinda bandeko wana, bazalaki komema bansango na ye, mpe bazalaki koyela ye lapolo. Ya solo, bazalaki mpenza kolendisa!

21, 22. (a) Mpo na nini maloba ya Bakolose 4:11 esengeli kobenda likebi na biso? (b) Yebisá makambo mosusu oyo tokoki kosala mpo na kolanda ndakisa ya bandeko oyo bazalaki na Paulo?

21 Makambo oyo Paulo akomaki mpo na “lisungi oyo ezali kolendisa” emonisi biso ndenge oyo tokoki kosalisa basusu. Ekoki kozala ete bazali kotambola na ndenge oyo ebongi na Yehova na oyo etali bizaleli malamu, koyangana na makita, mpe kosakola nsango malamu. Ebongi mpenza tópesaka bango longonya mpo na makambo yango. Kasi, tokoki mpe kosala makambo mosusu, kozala mpenza ‘lisungi oyo ezali kolendisa’ lokola bandeko oyo bazalaki na Paulo.

22 Soki oyebi ndeko mwasi moko oyo alandaki toli oyo ezali na 1 Bakolinti 7:37, kasi sikoyo azali na bandeko te pembeni na ye, okoki kokanisa ye mpo asangana na libota na bino na makambo mosusu, na ndakisa kobengisa ye na ndako mpo bókabola na ye mwa eloko ya kolya to kokende na ye na mwa bokutani elongo na baninga to bandeko. Okoki kosɛnga ye ete bózwa ye ntango libota na bino ezali kokende na liyangani moko to na konje. To mpe kosɛnga ye bóbima moke mpo na kosomba biloko ya kolya. Tokoki mpe kosala yango mpo na basi oyo bakufelá mibali to mibali oyo bakufelá basi, to mpe baoyo bazali lisusu na likoki ya kotambwisa motuka te. Okozwa mpenza matomba mpamba te okoyoka masolo na bango to okoyekola makambo mingi ya mikemike epai na bango lokola koyeba kopona mbuma ya malamu to kopona bilamba ya bana. (Levitike 19:32; Masese 16:31) Yango ekoki mpe kosala ete bókóma mpenza baninga. Na ndenge yango bakokakatana te mpo na kosɛnga yo lisalisi soki bazali na mposa ya kosomba mwa nkisi na farmasi to eloko mosusu. Na ntembe te bandeko oyo bazalaki na Paulo na Loma bazalaki mpe kosalisa ye to kolendisa ye, yo mpe okoki kosala yango. Likambo mosusu, oyo esalemaki na ntango wana mpe ezali kosalema lelo ezali ete bolingo ekoya makasi mpe mposa ya kosalela Yehova elongo mpe na bosembo ekobakisama.

23. Ekozala malamu soki mokomoko na biso azali kopesa ntango na kosala nini?

23 Mokomoko na biso akoki kokanisa makambo oyo tolobeli na lisolo oyo. Yango ezali kaka bandakisa, kasi ekoki kosalisa biso tókanisa makambo oyo tokoki mpenza kosala mpo na kozala mpenza “lisungi oyo ezali kolendisa” bandeko na biso. Tolingi koloba te ete tosengeli kokóma lokola bato oyo basungaka babola. Ezali yango te mokano oyo bandeko oyo balobeli na Bakolose 4:10, 11 bazalaki na yango. Bango bazalaki ‘basalani mpo na Bokonzi ya Nzambe.’ Kolendisa etalelaki libosoliboso mosala yango. Tiká ete ezala mpe ndenge yango mpo na biso.

24. Wapi ntina mpenza oyo tosengeli kobondela mpo na basusu mpe kolendisa bango?

24 Totángaka bankombo ya bandeko mosusu na mabondeli na biso mpe tosalaka milende ya kolendisa bango mpo na ntina oyo: Tondimaka ete bandeko na biso balingi ‘kotambola na ndenge oyo ebongi na Yehova mpo básepelisa ye na makambo nyonso.’ (Bakolose 1:10) Likambo yango eyokani na likambo mosusu oyo Paulo alobelaki ntango akomaki makambo oyo Epafala azalaki kosɛnga na mabondeli na ye mpo na Bakolose, ete bázala “bato oyo bakoki mpenza mpe bazali na kondima makasi na mokano mobimba ya Nzambe.” (Bakolose 4:12, NW ) Ndenge nini mokomoko na biso akoki kosala yango? Tótalela yango.

[Maloba na nse ya lokasa]

a Talá buku Étude perspicace des Écritures, Volimi 1, nkasa 501-502, mpe buku “Makomami nyonso mapemami na Nzambe mpe mazali na litomba,” nkasa 226-228, ebimisami na Batatoli ya Yehova.

Osimbi makambo oyo?

• Ndenge nini tokoki kosalisa basusu na nzela ya mabondeli na biso?

• Na ndimbola nini baklisto mosusu bazalaki ‘lisungi oyo ezali kolendisa’ epai ya Paulo?

• Na makambo nini tokoki kozala ‘lisungi oyo ezali kolendisa’?

• Tosengeli kozala na mokano nini ntango tozali kobondela mpe koluka kolendisa bandeko na biso?

[Elilingi na lokasa 18]

Ntango bozali kobima na libota, bokoki komema ndeko mosusu?

[Eutelo ya bafɔtɔ]

Na ndingisa ya Green Chimney’s Farm

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto