LITEYA 26
Kobimisa makanisi na molɔngɔ
LIBOSO otya makambo oyo okoloba na molɔngɔ, osengeli komityela mokano moko. Mokano na yo ezali kaka ya koyebisa bato likambo moko boye, ezala likambo moko oyo bato bandimaka yango, likanisi moko, ezaleli moko, etamboli moko, to lolenge moko ya bomoi? Mposa na yo ezali ya komonisa ete likanisi boye to boye ezali solo to lokuta? Olingi kosalisa bato básepela na eloko moko to olingi kolendisa bango básala likambo boye to boye? Mpo osala lisolo na yo malamu, ezala liboso ya moto moko to bato ebele, osengeli kotalela makambo oyo bayebi na likambo okolobela mpe likanisi na bango mpo na yango. Nsima ya kosala bongo, salá plan ya lisolo na yo na ndenge oyo ekosalisa yo okokisa mokano oyo omityelaki.
Mpo na mosala ya Saulo (Paulo) na Damasi, Misala 9:22 elobi ete “azalaki kosukisa Bayuda oyo bazalaki kofanda na Damasi wana azalaki komonisa na malamu mpenza ete moto wana azali Klisto.” Esɛngaki nini mpo Paulo amonisa mpenza likambo yango malamu? Ndenge lisolo ya mosala ya Paulo na Antiokia mpe na Tesaloniki emonisi yango, Paulo atalelaki libosoliboso ete Bayuda bandimaka Makomami ya Liebele mpe bazalaki koloba ete bandimaka makambo nyonso oyo yango elobi mpo na Masiya. Na nsima, Paulo aponaki na Makomami yango bisika oyo ezalaki kolobela bomoi mpe mosala ya Masiya. Atángaki yango mpe akokanisaki yango na makambo oyo ekómelaki Yesu. Na nsuka, asukisaki na maloba ya polele ete Yesu yango, azali Klisto, to Masiya. (Mis. 13:16-41; 17:2, 3) Soki yo mpe omonisi polele solo ya Biblia mpe obimisi yango na molɔngɔ, ekoki mpenza kosimba mitema ya bato.
Kobongisa lisolo na yo. Ezali na ndenge mingi mpo na kobongisa lisolo ete elandana na molɔngɔ. Soki omoni malamu, okoki kosalela ndenge mwa mingi na mbala moko. Talá mwa ndenge yango ya kosala.
Kolanda ndenge motó ya likambo ezali: Yango esɛngi kokata lisolo na yo na biteni oyo mokomoko na yango ezali kosalisa yo okokisa mokano oyo omityeli. Biteni yango ekoki kozala makanisi ya ntina oyo ekosalisa bato bákanga ntina ya lisolo na yo. Ekoki mpe kozala makanisi ya sikisiki oyo ezali komonisa ete likambo boye ezali solo to lokuta. Na kotalela bato oyo bakoyoka yo to mokano oyo omityelaki, ezali na makanisi mosusu oyo, atako etaleli mpe lisolo na yo, okoki kobakisa to kolongola.
Tózwa ndakisa ya lolenge ya kobongisa lisolo na kolanda ndenge motó ya likambo ezali. Lisolo moko ya mokuse oyo ekolobela nkombo ya Nzambe ekoki kozala na biteni oyo: (1) ntina oyo tosengeli koyeba Nzambe na nkombo na ye, (2) nkombo ya Nzambe nani, mpe (3) ndenge oyo tokoki kokumisa nkombo yango.
Soki ozali kotánga mikanda oyo “moombo ya sembo mpe ya mayele” azali kobimisa mpo na koyekola Biblia na bato na bandako na bango, okoki koyekola makambo mingi etali lolenge ya kobongisa lisolo na kolanda motó ya likambo. (Mat. 24:45) Mbala mingi, mikanda yango ezalaka na mitó ya makambo ebele, oyo ekoki kosalisa bayekoli báyeba mateya ya ebandeli ya Biblia. Mikanda mosusu ya minene ezalaka na mitó ya likambo moke mpo na kokabola mokapo mokomoko na biteni. Motó ya likambo mokomoko ebongisaka moyekoli mpo na mateya oyo ekolanda mpe esalisaka ye azwa mwa likanisi ya mokanda yango nyonso.
Kotalela likambo moko mpe mbuma oyo yango ebimisi: Lolenge mosusu ya kobimisa makanisi na molɔngɔ ezali ya komonisa likambo moko mpe mbuma oyo likambo yango ebimisaka.
Lolenge oyo ya kobongisa lisolo ezali malamu soki ozali koloba na bato ebele to na moto moko oyo alingi koyeba malamu mpenza soki likambo oyo azali kosala to oyo azali kokana kosala ekobota mbuma nini. Mokanda ya Masese mokapo 7 emonisi yango malamu mpenza. Emonisi na maloba ya polele mpenza ndenge elenge mobali moko zoba, oyo “azangaki mayele” (likambo na ye yango wana) alandaki mwasi moko ya pite mpe azwi mikakatano mingi mpo na yango (mbuma oyo likambo yango ebimisi).—Mas. 7:7.
Mpo na konyata likambo yango, okoki komonisa ete bato oyo baboyaka kotambola na nzela ya Yehova bakutanaka na mpasi, nzokande baoyo bazali kotosa Yehova bazwaka matomba. Elimo ya Yehova etindaki Moize asala bongo ntango alobaki na libota ya Yisalaele liboso bákɔta na Mokili ya Ndaka.—Det., mok. 28.
Na bantango mosusu, ezali malamu mingi kobanda lisolo na yo na komonisa likambo moko oyo ekómeli moto (mbuma oyo likambo yango ebimisi) mpe na nsima, komonisa makambo to bizaleli oyo esalaki ete mbuma wana emonana (likambo oyo eboti mbuma wana). Mbala mingi, yango esɛngaka mpe komonisa mokakatano moko mpe ndenge ya kosilisa yango.
Komonisa mokakatano moko mpe ndenge ya kosilisa yango. Na mosala ya kosakola, ntango ozali komonisa mokakatano moko oyo etungisaka bato mpe ozali komonisa ete ezali na lolenge moko ya kosilisa mpenza mokakatano wana, yango ekoki kolendisa moto ete ayoka yo. Yo moko okoki kolobela mokakatano yango to moto yango ye moko akoki koyebisa yo mokakatano na ye.
Mokakatano yango ekoki kozala konuna mpe kokufa, koboma bato, to ndenge bosembo ezali kozanga na mokili mobimba. Ezali na ntina te ete oloba makambo ebele ebele mpo na komonisa ete mokakatano yango ezali, mpamba te moto nyonso azali komona yango. Bandá mbala moko kolobela mokakatano yango mpe na nsima, salelá Biblia mpo na komonisa ndenge ya kosilisa yango.
Na bisika mosusu, mokakatano yango ekoki kozala oyo etali moto ye moko, na ndakisa: mikakatano oyo moboti moko oyo abɔkɔlaka bana ye moko azali kokutana na yango, kolɛmba nzoto mpo na maladi moko ya makasi, to mpasi oyo moto azali kokutana na yango mpo moto mosusu azali konyokola ye. Mpo osalisa mpenza moto wana, osengeli libosoliboso koyoka ye malamu. Biblia epesi makanisi mingi ya ntina mpo na mikakatano wana nyonso. Kasi osengeli kozala na bososoli mpo na kosalela yango malamu. Soki olingi ete lisolo na yo esalisa mpenza moto yango, osengeli kotalela makambo ndenge ezali. Monisá ye polele soki makambo oyo ozali koyebisa ye ekosilisa mikakatano na ye mpo na libela to mpo na mwa ntango moke kaka, to soki ekosalisa ye kaka ayikela mikakatano yango mpiko mpo ete ekosila te na mokili oyo. Na maloba mosusu, luká koyeba soki bilembeteli ya Makomami oyo ozali kopesa ye ebongi mpenza mpo na kosimba likanisi oyo olingi komonisa ye. Soki bongo te, moto yango akomona ete makambo oyo ozali koyebisa ye asala mpo na kosilisa mikakatano na ye ebongi te mpe ezali na molɔngɔ te.
Kolanda ndenge makambo elandanaki. Masolo mosusu ebongaka kosala yango na kotalela ndenge makambo elandanaki. Na ndakisa, mokanda ya Exode elobeli Malɔzi Zomi na kotalela ndenge elandanaki. Na Baebele mokapo 11, ntango ntoma Paulo alobeli mibali mpe basi oyo bazalaki bandakisa mpo na kondima na bango, alobeli bango na ndenge bomoi na bango elandanaki.
Soki ozali kolobela makambo oyo esalemaki na ntango ya kala na kotalela ndenge yango elandanaki, ekoki kosalisa bato oyo bazali koyoka yo báyeba ndenge makambo mosusu ebandaki. Osengeli kosala bongo ezala mpo na masolo ya ntango na biso to mpo na makambo ya kala. Na bongo, okoki kolanda na lisolo na yo lolenge wana nyonso mibale: komonisa ndenge makambo elandanaki mpe komonisa likambo moko mpe mbuma oyo yango ebimisi. Soki olingi kolobela makambo oyo Biblia emonisi ete ekosalema na mikolo ezali koya, ekozala malamu omonisa yango na kotalela molɔngɔ oyo makambo yango ekolandana mpo yango ekosalisa bato oyo bazali koyoka yo bálanda yo malamu mpe bábosana makambo yango te.
Kosala lisolo na ndenge makambo ezali kolandana elimboli te ete osengeli kaka kobanda na makambo oyo esalemaki na ebandeli. Na bisika mosusu, ekoki kozala malamu ete obanda naino kolobela likambo monene oyo esalemaki na lisolo yango. Na ndakisa, ntango ozali kolobela bomoi ya moto moko, okoki kobanda naino kolobela ntango moko oyo kondima ya moto yango etyamaki na komekama. Yango ekolamusa mposa ya bato mpe na nsima, okoki kolobela sikoyo makambo mosusu oyo ememaki na komekama wana, na ndenge oyo yango elandanaki.
Salelá kaka makanisi oyo eyokani na lisolo na yo. Ata obongisi lisolo na yo ndenge nini, kebá! Salelá kaka makanisi oyo ezali mpenza na ntina mpo na lisolo na yo. Ntango ozali kopona makanisi oyo okosalela, taleláká motó ya likambo ya lisolo na yo. Talelá mpe soki banani bakoyoka lisolo na yo. Likambo moko ekoki kozala na ntina mpo na bato boye, nzokande epai ya bato mosusu, ekozala na ntina te. Osengeli mpe kosala ete makambo nyonso oyo okoloba esalisa yo okokisa mokano oyo omityelaki. Soki osali bongo te, masolo na yo ekosimba mitema ya bato te, atako ezali mbala mosusu na makanisi malamu.
Ntango ozali kolukaluka na mikanda, okoki komona ebele ya makanisi ya malamu oyo eyokani na lisolo na yo. Makanisi boni osengeli kozwa? Soki olobi makambo ebele ebele, mbala mosusu okokokisa mokano oyo omityelaki te. Bato bakokanga makanisi ya ntina soki ezali moke mpe emonisami malamu mpenza, na esika ya kopesa makanisi ebele ebele mpe mbangumbangu. Yango elimboli te ete osengeli ata moke te kozwa makanisi mosusu oyo etali mpe lisolo na yo. Kasi osengeli te kozwa makanisi ebele ebele oyo ekopekisa yo kokokisa mokano oyo omityelaki. Talá ndenge makambo mosusu ya mikemike elobelami na Biblia na masolo oyo ezali na Malako 7:3, 4 mpe Yoane 4:1-3, 7-9.
Ntango osilisi likanisi moko mpe olingi koleka na likanisi mosusu, kebá ete okata molɔngɔ ya makanisi na yo te mpamba te bato oyo bazali koyoka yo bakokoka te komona boyokani oyo ezali kati na makanisi na yo. Mpo makanisi na yo ezala mpenza na boyokani na kati na yango, osengeli kokangisa yango. Mpo na kokangisa makanisi yango, okoki kosalela mwa maloba to mpe fraze moko oyo ekomonisa boyokani oyo ezali na kati ya makanisi yango. Na minɔkɔ mingi, ezali na maloba oyo okoki kosalela mpo na komonisa boyokani oyo ezali kati na likanisi moko mpe likanisi oyo elandi yango.
Kosalela kaka makanisi oyo eyokani mpenza na lisolo na yo mpe kotya yango na molɔngɔ ekosalisa yo okokisa mokano oyo omityelaki.