LITEYA 29
Kobongisa mongongo
BATO babongolaka bomoi na bango na kotalela kaka makambo oyo tolobaka te, kasi mpe ndenge oyo tolobaka yango. Soki moto azali koloba na yo na mongongo moko ya kitoko, ya esengo, ya boboto mpe ya malamu, okolanda ye na esengo mingi koleka soki azalaki na mongongo moko oyo ezali kolalisa maloba to ya nkanda, boye te?
Mpo na kokóma na mongongo moko ya malamu oyo ezali kosepelisa bato, yango etali kaka lolenge nzoto na biso ezali te. Ekoki mpe kotalela bomoto na biso. Ntango moto azali kokola na boyebi ya solo ya Biblia mpe azali kosalela yango, mbongwana oyo azali kosala ekomonana mpe na elobeli na ye. Mongongo na ye ekomonisa ete azali na bizaleli ya moto ya Nzambe lokola bolingo, esengo, mpe boboto. (Gal. 5:22, 23) Ntango azali komibanzabanza mpo na basusu, mongongo na ye ekomonisa yango. Soki kala azalaki na elimo ya koimaima mpe na nsima abongwani, akómi na botɔndi, yango ekomonana ezala na maloba na ye mpe na mongongo na ye. (Bil. 3:39-42; 1 Tim. 1:12; Yuda 16) Ata soki oyebi monɔkɔ oyo bazali koloba te, ekozala mpasi te ete omona bokeseni kati na moto oyo azali na lolendo, oyo aboyaka koyoka makanisi ya bato mosusu, atɔngaka bato, azali na makambo makasi mpe moto mosusu oyo azali na komikitisa, na motema pɛtɛɛ, na boboto, mpe na bolingo.
Bato mosusu bazalaka na mongongo mabe mpamba te babɛlaki maladi moko oyo ebebisá mongongo na bango, to babotami na mbeba yango. Mbala mosusu, mpasi yango to mbeba yango ezali makasi mpenza mpe ekobonga kaka na mokili ya sika. Nzokande mbala mingi, soki toyekoli kosalela malamu biteni ya nzoto na biso oyo tosalelaka mpo na koloba, yango ekoki kosala ete tóbongisa mongongo na biso.
Libosoliboso, ezali na ntina mingi tóyeba ete moto na moto azalaka na mongongo na ye. Mokano na yo esengeli te kozala ya kokóma na mongongo lokola oyo ya moto mosusu. Kasi luká nde kobongisa mongongo na yo moko mpe makambo kitoko oyo ezali na mongongo yango. Nini ekosalisa yo mpo na yango? Ezali na makambo mibale ya ntina.
Koyeba kopema malamu. Mpo osalela mongongo na yo malamu mpenza, osengeli kopema mopɛpɛ mingi mpe koyeba kosalela mopɛpɛ oyo opemi. Soki osali yango te, bato bakoyoka ete mongongo na yo elɛmbi mpe okobanda kokatakata maloba.
Mimpululu (poumons) na biso ezalaka monene na eteni ya likoló ya ntolo na biso te; eteni wana ya likoló ya ntolo na biso emonanaka monene mpamba te ezalaka na mikuwa ya mapeka na biso. Kasi, mimpululu na biso ezalaka monene nde na eteni oyo ezali likoló ya diafragme. Diaframe ezali loposo moko oyo ekangami na mipanzi ya nsuka mpe ezali kokabola ntolo na libumu.
Ntango ozali kopema, soki otondisi mopɛpɛ kaka na eteni ya likoló ya mimpululu na yo, okoumela te kosila mpema. Mongongo na yo ekozala makasi te mpe okolɛmba noki. Mpo na kopema malamu, osengeli kofanda to kotɛlɛma alima mpe kozongisa mapeka na yo mwa moke na nsima. Ntango ozali kobenda mopɛpɛ liboso obanda koloba, salá makasi mpenza ete otondisa mopɛpɛ kaka na eteni ya likoló ya ntolo na yo te. Tondisá naino liboso eteni ya nse ya mimpululu na yo. Ntango eteni wana etondi na mopɛpɛ, okomona ete ntolo na yo efungwami mwa moke na nse. Na ntango yango, diafragme ekokita moke, ekopusa mwa moke likundu (estomac) mpe misɔpɔ; yango ekosala ete oyoka ndenge mokaba mpe bilamba na yo ekangi yo na libumu mpo esali lokola evimbi. Kasi mimpululu ezali na libumu te, ezali nde na kati ya ntolo na yo. Mpo na koyeba yango, tyá mabɔkɔ na yo na esika mipanzi na yo esuki na nse. Sikoyo pemá makasi. Soki ozali kopema malamu, libumu na yo ekokɔta te mpe mapeka na yo ekotombwama te. Kasi okoyoka ndenge mipanzi na yo ezali kofungwama mpe kozonga.
Na nsima, salá makasi oyeba ndenge ya kobimisa mopɛpɛ oyo opemi. Kobimisa yango nyonso mbala moko mbangumbangu te. Bimisá yango malɛmbɛmalɛmbɛ. Kofina mpe mongongo na yo te mpo na kokanga mopɛpɛ wana. Soki osali bongo, mongongo na yo ekobima malamu te mpe ekozala lokola ekauki. Ntango misisa na yo ya libumu mpe ya mipanzi ezali kozonga na esika na yango, ebandi kobengana mopɛpɛ oyo opemaki, na ntango yango, diafragme ekosala ete mopɛpɛ ebima mbangumbangu to malɛmbɛmalɛmbɛ.
Moto oyo apotaka mbangu asalaka ngalasisi mpo na kopota malamu, ndenge moko mpe, molobi asengeli kosala ngalasisi mpo na koyeba kobatela mpema na ye. Tɛlɛmá alima, zongisá mapeka na yo na nsima, bendá mopɛpɛ mpo na kotondisa eteni ya nse ya mimpululu na yo mpe bandá kobimisa mopɛpɛ yango mokemoke; kaka na mopɛpɛ wana obendaki, bandá kotánga moko, mibale, misato . . . tii esika okosuka. Na nsima, meká kotánga na mongongo makasi mpe ntango ozali kosala bongo, pemáká ndenge tolobeli awa.
Nyolisá misisa na yo. Likambo mosusu ya ntina mpo na kozala na mongongo malamu ezali konyolisa misisa ya nzoto. Soki oyekoli konyolisa misisa na yo ntango ozali koloba, okokamwa yo moko ntango okomona ete ezali kobongisa mongongo na yo. Osengeli konyolisa kaka nzoto na yo te, kasi osengeli mpe kokitisa motema na yo, mpamba te soki ozali kobanga to komitungisa yango etɛlɛmisaka misisa.
Mpo na kokitisa motema, yebá ndenge oyo osengeli kotalela bato oyo bazali koyoka yo. Soki ezali bato oyo ozali kokutana na bango na mosala ya kosakola, kobosana te ete ata outi koyekola Biblia esili koleka kaka mwa basanza, oyebi makambo mingi etali mokano ya Yehova oyo okoki koyebisa bango. Ozali kokende kotala bango mpamba te bazali na mposa ya lisalisi, ezala bayebi yango to te. Kasi soki ozali kosala lisolo na yo na Ndako ya Bokonzi, mingi kati na bato oyo bazali koyoka yo bazali basaleli ya Yehova. Bazali baninga na yo mpe balingi ete osala lisolo na yo malamu. Biso tokutanaka na bato oyo bazali koyoka biso na boboto ndenge wana, kasi balobi ya mokili oyo bazwaka mpenza libaku wana te.
Mpo na konyolisa misisa ya nkingo na yo, tyá likebi mpe salá makasi ete olɛmbisa yango. Kobosana te ete misisa ya mongongo na yo eninganaka ntango mopɛpɛ ezali koleka pembeni na yango. Mongongo emataka to ekitaka soki misisa ya nkingo etɛlɛmi to eminyolisi; ezali lokola nsinga ya gidare to ya violon oyo elelaka makasi to malɛmbɛ ntango ofini nsinga to otiki yango. Ntango onyolisi misisa ya mongongo, mongongo na yo ekokita. Yango esalisaka mpe mpo madusu ya zolo efungwama, mpe ekosala ete mongongo na yo eyokana malamu mpenza.
Nyolisá mpe nzoto na yo mobimba, elingi koloba, mabɔlɔngɔ, mabɔkɔ, mapeka mpe nkingo. Yango ekosala ete mongongo na yo eyokana polele mpe mosika mpenza. Mongongo na yo ekozala polele ntango nzoto na yo mobimba ezali kosala lokola mbonda moko oyo ezali kobimisa lokito; kasi soki ozali kobanga, nzoto na yo ekobimisa mongongo malamu te. Enama babengi larynx nde esalaka ete mongongo emata to ekita; mongongo yango ekendaka kotutanatutana kaka na nzela ya zolo te, kasi mpe na mikuwa ya ntolo, na mino, na edádá mpe na madusu ya mikuwa ya zolo. Binama wana nyonso nde ekosala mpo mongongo ebima malamu to te. Soki otii eloko moko ya kilo likoló ya mombonda ya gidare na yo, gidare ekolela makasi te; mombonda yango esengeli kozala na eloko likoló te mpo lokito ekende kotutanatutana kuna mpe eyokana malamu. Ezali ndenge moko mpe na mikuwa ya nzoto na biso, oyo ekangami makasi na misuni mpe misisa. Ntango nzoto na yo mobimba ezali kosala ete mongongo na yo ebima polele, okoki kobongisa yango malamu mpo emonisa mayoki na yo. Ata bato oyo bazali koyoka yo bazali mingi, bakoyoka mongongo na yo polele, kozanga ete obimisa misisa na yo nyonso.