Liteya 13
Ndenge nini okoki kobongisa mongongo na yo mpe kosalela mikro
1-3. Bolembu nini ezalaka na mingongo ya bato mosusu, mpe nini ekoki kosalisa biso na koyeba bolembu ya mongongo na biso?
1 Kolobaka epai na Moïse, Jéhovah Nzambe Mozalisi atunaki ye motuna oyo: “Nani asalaki monoko na moto?” (Ex. 4:10, 11) Tokoki kobakisa: Nani apesaki moto makoki nyonso na nzoto mpo na koyeba koloba? Atako azalaki “moto na maloba polele te”, Moïse ayaki koyeba na nsima ete Nzambe akokaki kosalisa ye mpo na kobongisa mongongo na ye, mpe asalaki yango. Mosakoli Moïse azwaki likoki ya koloba na bokonzi nyonso epai na libota na Yisraele.
2 Lelo oyo, basaleli mingi ya Nzambe bayebi ete bazali na mongongo malamu te mpe na maloba na polele te. Bamoko bazali na mongongo moke mingi, bamosusu mongongo eleki likoló mingi, to mpe eleki monene mingi to lisusu ezali ya kozika. Tokoyokaka elengi te soki moto azali koloba na mongongo ezali kolenga to eleki makasi, to mpe na mongongo oyo ezali kobimela na zolo. Soki mongongo ya oratere elali, uta ebandeli kino nsuka, bayoki bakolendisama te. Soki mongongo na yo ezali na moko na bolembu oyo, olemba nzoto te. Likoki ezali mpo ete okoka kobongisa yango.
3 Ya solo, soki olingi kokola, osengeli naino koyeba bolembu na yo mpenza. Eteyelo ya mosala ya Nzambe mpe batoli ya kolendisa oyo mokengeli na eteyelo azali kopesa ekoki kosalisa yo ete oyeba bolembu nini ozali na yango kati na mongongo na yo. Ezali mpe litomba na kokotisa mongongo na yo na bande-kasete mpe koyoka yango. Soki osala naino yango te, sala yango mpe okokamwa. Mpamba te, ntango ozali koloba ozali koyoka ndenge mikwa ya motó na yo ezali koningana, yango nde ezali kobimisa sons graves, nzokande bande-kasete ezali koyokisa yo mongongo na yo ndenge bato mosusu bayokelaka yango. Liboso ya kokende mosika na likambo etali kobongisa mongongo, totala naino motindo nini mongongo ebimaka.
4-6. Okoki kolimbola ndenge mongongo ebimaka?
4 Ndenge mongongo ebimaka. Mpo na koloba, eloko ya liboso esengeli ezali mopepe oyo ekoutaka na bapumo na biso. Mopepe yango ezali koleka na nzela babengi na Lifalanse trachée-artère, mpe ezali kokota na eloko mosusu babengaka larynx oyo ezali na katikati ya mongongo na biso. Kuna na kati ya larynx ezali na biloko mosusu mibale babengi cordes vocales. Kuna nde esika eutaka basons ya mongongo na biso. Biloko wana cordes vocales ekoninganaka. Mosala na yango mpenza ezali kofungwama mpo na kolekisa mopepe to kokangama mpo na kokangisa nzela na mopepe; ekopekisaka mpe ete biloko mabe ekota na kati na bapumo te. Mpema oyo ezali kouta na bapumo na yo ezali koningisa biloko wana cordes vocales. Ntango mopepe ezali koleka na kati wana, ekoninganaka mpe ekobimisaka son. Tomonisa yango na ndakisa moko: Tondisa mopepe kati na eloko ya mpema; na nsima, bimisa yango na kosimbaka monoko ya eloko ya mpema; okomona ete ezali koningana mpe ezali kobimisa son. Bobele bongo, ntango ozali koloba, biloko wana cordes vocales ezali kopusana penepene. Nzela na lolenge ya V oyo ekaboli yango ezali kokangama. Soki efungwami makasi, ekoningana noki mpe ekobimisa ba sons ya mongongo likoló. Soki nde efungwami mingi te, ekobimisa ba sons ya mongongo ya nse.
5 Elongwe yango na eloko babengi larynx, mopepe ekokoma na likoló ya mongongo na biso na eloko mosusu babengaka pharynx. Na nsima, ekokoma na monoko na yo mpe na zolo na yo. Kuna, ba sons mosusu ekobongola mpe ekobakisa monene na oyo euti na bapumo, mpe ekopesa yango lolenge esengeli. Monoko, lolemo, mino, mbanga mpe mbebo, nyonso wana ezali kosala elongo mpo na kokabola maloba makangami naino na mopepe mpe kobongola yango mpo ete ebimisa mileli to vwayele mpe milelisi to konsone, mpo ete ba sons ebima na motindo na maloba oyo bato bakoki koyoka yango.
6 Ya solo, mongongo na moto ezali ekamwiseli oyo makoki na yango mingi eleki na mosika bibeteli nyonso ya miziki oyo moto asali. Mongongo ekoki kobimisa mayoki ya bolingo mingi mpe ya boboto kasi ekoki mpe kobimisa mayoki ya koyina makasi mpe nkele. Atako tozali na kokoka te, nzokande mongongo ya moto, soki ebongisami malamu ezali na likoki ya koyemba na lolenge kitoko mpe koloba maloba oyo mazali kosimba motema. Lokola tokomona yango, tosengeli kotalela makambo mibale ya ntina mingi mpo na kobongisa mongongo.
7-10. Ndenge nini tokoki kobatela mpema na biso, mpe mpo na nini yango ezali na ntina?
7 Batela mpema na yo malamu. Mpo na kozwa matomba malamu, molobi to oratere asengeli kozala na mopepe ekoki kati na bapumo na ye mpe koyeba kopema malamu. Mingi bayebi te ndenge ya kobimisa mopepe mpe ndenge ya komela mopepe ntango bazali koloba. Bazali kopema bobebe likoló ya bapumo na bango, ntina wana bazali koloba mbangumbangu mpe mpema ezali kokatana. Mingi bakanisaka ete bapumo na biso eleki minene awa na likoló na ntolo; soki emonanaka bongo ezali mpo na lolenge ya mapeka na biso. Bapumo na biso eleki nde minene na nse; kuna eteni babengi diaphragme ekosalisaka yango mpo na kobenda mopepe malamu mpe kobimisa libanda mopepe ya mabe. Eteni wana diaphragme ekaboli ntolo na libumu, mpe ezali kosala mosala monene mpo na oyo etali kopema. Soki etombwami, ezali kobimisa mopepe na bapumo na biso; soki ekiti, ezali kokotisa mopepe kati na bapumo.
8 Mpo na kobongisa mongongo na yo, eloko ya liboso osengeli kosala ezali boye ete obatela mopepe ekoki kati na bapumo na yo. Ntango ozali kobenda mpema mpo na koloba, sala makasi ete otondisa mopepe mingi te na likoló ya ntolo na yo. Tondisa nde mingi na nse ya bapumo. Na nsima bimisaka yango malembemalembe na motindo boye ete ebima nyonso pwasa te. Soki oratere to molobi ayebi kopema malamu te, mpema na ye ekosila noki, mpe mongongo na ye ekobanda kokatana mpe kokangama.
9 Balobi mingi balukaka kokangisa mongongo na bango mpo ete mpema na bango esila te, kasi kosalaka bongo mongongo na bango ekozipama mpe ekolemba. Tika mongongo na yo libre.
10 Lokola mopoti-mbangu akosalaka entraînement to komekameka, bobele bongo molobi to oratere asengeli kosalaka ekzersise mpo na komesena kopema malamu. Akoki kotelema alima, kobenda mpema na mozindo mpe kobimisa mpema yango mokemoke wana ezali ye koloba malembe mpe kozanga kotelema, ntalo monene ya baletre ya alfabe, to lisusu atanga kobanda na moko kino mosika kozanga kopema. Akoki mpe kosala ekzersise yango na kotangaka na mongongo makasi.
11-15. Mpo na nini mingongo mosusu ebimaka likoló mingi, na zolo to mpe na nse mingi?
11 Tika misisa nyonso libre. Fungola nzoto! Toli oyo ezali mpe na ntina mingi mpo na kosilisa bolembu mingi ya mongongo. Soki moto ayebi kofungola nzoto na ye te, ezali mpasi mpo na kosalisa ye ete abongisa mongongo na ye. Nzokande, okokamwa solo na komona mabongwani kitoko kati na mongongo na yo soki oyebi kotika nzoto na yo libre wana ezali yo koloba. Fungola mpe elimo na yo, mpamba te soki elimo ezali na tansió, ekokangisa mpe nzoto. Tika elimo na yo libre, kozalaka na makanisi mabongi na ntina na bayoki na yo, baoyo, mingimingi bazali libota ya Jéhovah. Baninga na yo, bakokoma mbala moko banguna na yo bobele mpo ete bafandi na molongo liboso na yo? Te, ezali boye te. Tokokuta bayoki ya boboto, baninga oyo balingi biso mingi, epai mosusu te bobele kati na libota ya Jéhovah.
12 Na ebandeli, mbala mosusu okosengela kosala makasi mpenza mpo na kotika libre misisa nyonso ya nzoto na yo. Soki omoni ete liboso ya koloba, kopema na yo ekomi mbangumbangu mpe ebandi kokatana mpo ete ozali na motema likoló, sala nyonso mpo na kobongola kopema na yo, ezala malembe mpe kozanga kokatana, sala mpe makasi ete otika libre misisa nyonso ya mongongo na yo.
13 Lokola tosilaki komona yango, ntango tansió ebakisami kati na cordes vocales ezali kobimisa son ya likoló; soki obakisi tansió koleka, son ekobima lisusu likoló koleka. Kosalaka bongo mongongo ekozala likoló mingi mpe moke, bayoki bakosepela na yango te. Okoki kosala nini mpo na kolonga bolembu oyo? Omikundola ete biloko wana cordes vocales ekoninganaka ntango mopepe ezali koleka wana. Son oyo ezali kobima ezali ndenge na ndenge engebene kokangama ya misisa to kofungwama na yango, ndenge moko lokola ba sons ya gitare ebongwanaka engebene makasi ya nsinga na yango to bolembu ya nsinga na yango. Ntango olembisi nsinga ya mongongo na yo, ton ekobima na nse. Na yango, tika misisa ya mongongo na yo libre. Soki nde ozali na tansió, misisa ya nkingo ekoki kokangisa nsinga ya mongongo mpe mongongo ekobima malamu te. Nzokande, okozwa matomba malamu mpo na oyo etali kobongisa mongongo na yo soki oyebi kofungola nzoto na yo ete misisa nyonso mizala libre.
14 Mbala mosusu, ntango moto akangisi misisa ya nkingo mpe ya monoko, ekokangisaka mpe nzela ya zolo na ye, mopepe ekoleka lisusu malamu kati na yango te. Ntina wana toyokaka bato mosusu lokola ete bazali koloba na zolo. Nzokande, mbala mosusu ekozalaka bongo mpo ete zolo ekangami nde kokangama.
15 Mbanga esengeli mpe kozala libre. Soki ekangisami, monoko ekofungwama malamu te mpe ba sons ekozala na mikakatano mpo na koleka na kati na mino. Na yango, mongongo ekoyokana malamu te mpe bato bakoyeba mpenza te soki ozali koloba nini. Nzokande, olekisa ndelo te mpo na oyo etali kofungola mbanga na yo; zala na bokatikati mpo ete maloba mabima malamu.
16, 17. Nini ekoki kosalisa biso mpo ete mongongo na biso ebima malamu, mpe mpo na nini yango ezali na ntina mingi?
16 Misisa ya nzoto mobimba misengeli kozala libre mpo ete mongongo ebima malamu; kokangisa eteni moko to mosusu ekobebisa litomba yango. Ba sons oyo ezali kouta kuna na kati, na eloko babengi larynx ezali kokende kino na zolo, kino na mikwa ya ntolo, kino na mino, kino na mokwa ya likoló ya monoko (palais) mpe kino na mikwa ya elongi. Biteni wana nyonso ya nzoto ezali na mosala mpo na kobongisa mongongo. Soki otii libanga likoló ya mbonda, mongongo ya mbonda ekobima malamu te. Ezali bobele bongo mpo na mikwa ya nzoto na biso oyo esimbami makasi na misuni mpe na misisa. Soki nzoto na yo mobimba ezali libre, okokoka koloba malamu mpe okozala na mposa ya konganga te. Soki boye te, mongongo na yo ekoyokana te mpe okokoka te komonisa mayoki ndenge na ndenge.
17 Ekzersise mosusu ya kosalisa nzoto ezali ete omeka koyembaka na mongongo moke mpe kofungola nzoto mobimba. Bibebu bikoki bobele kotutana kasi okangisa yango te. Na motindo yango, ba sons ekokangisama te kati na misisa mpe ekobimisama pwasa te kati na zolo. Ekzersise mosusu ya litomba mingi ezali ete ozongelaka maloba mosusu mpe obenda mwa molai ba sons oyo elakisami na baletre oyo m, n, ny mpe l. Mpo na kobongisa mongongo na yo, okoki mpe koloba milelisi to vuayele na volime moke mpe kobenda yango, fungola mongongo ezala monene mpe kokangisa mbanga te.
18-22. Toli nini epesameli biso mpo toyeba kosalela malamu mikro?
18 Yeba kosalela malamu mikro. Soki esika ya likita eleki monene, bakosalelaka mikro mpo ete molobi ayoka mpasi te na konganga mpe bayangani bakoka koyoka ye malamu. Molobi akozala na mposa ya kobelela te, mpe bayangani bakozala na mposa te ya kobenda nkingo mpo na kobelemisa matoi penepene ete bayoka makambo azali koloba. Na masanga mosusu, bakosalelaka mikro, bobele na estrade te, kasi lisusu epai ya bayangani mpo ete biyano na bango biyokana malamu na bato nyonso. Ata kati na Salle du Royaume na bino bozalaka na mikro te, nzokande na assemblées minene ezangaka te. Yango wana ebongi ete toyeba kosalela yango.
19 Ntáká to distanse nini esengeli kozala kati na mikro mpe monoko na yo? Mingimingi 10 kino 15 santimetre. Libunga emonanaka mingi na bosaleli mikro ezali boye ete oratere atelemaka nsima mingi, atiki mikro kuna liboso mosika. Na yango tala malamu distanse oyo ekaboli yo na mikro. Eloko mosusu, talisa mpenza monoko na yo epai na mikro, soki te ndeko oyo azali kosala na amplifikatere akoyoka mpasi mpo na komatisa yango mpo ekoma epai ya bayoki. Ezali mabe kokosola penepene ya mikro soki mpe kobenda miyoyo to lisusu kosukola mongongo.
20 Ntango ozali kosalela mikro, yoka mongongo na yo ndenge ezali kobima na oparlere. Na yango, okoyeba kobongisa volime ya mongongo na yo mpe kotelema na yo soki esengeli. Ntango mosusu ekosengela ete opusana mwa moke liboso to kozonga mwa moke nsima. Mpo na balobi mosusu oyo balobaka makasi, ebongi ete bakitisa mongongo liboso ya mikro, soki te ekosala mpasi na matoi ya bayangani. Omitungisa te mpo na bobongwani nyonso oyo olingi kosala kati na mongongo, mpamba te mikro ekoki koyokisa ata mwa koimaima moke.
21 Ezali na biloko mosusu osengeli kokeba na yango, wana ezali yo koloba na mikro. Ndakisa letre “p” etyaka mwa mobulu, mingimingi soki oratere abelemi penepene na mikro. Ba “s” mpe soki eleki makasi ebimaka lokola siflé kati na oparlere; ebongi ete oloba yango mwa malembe. Soki olandi toli oyo touti kopesa, okoyoka mpasi mingi te mpo na kolonga mikakatano oyo.
22 Mongongo na biso ezali likabo kitoko oyo Mozalisi apesa biso. Ye mpe asala lotiliki to kurá mpe apesa bato mayele mpo na kosala eloko lokola amplifikatere mpe mikro. Mbala nyonso oyo ozali koloba, ata ampli ezali to ezali te, salela mongongo na yo mpo na kokumisa Mozalisi ya liloba.