Mituna ya batángi
Bato mosusu balobaka ete masuwa oyo ememaki Paulo ezindaki na esanga mosusu, kasi te na esanga Malta, na sudi ya Sisilia. Masuwa yango ezindaki mpenza wapi?
Motuna wana euti na likanisi oyo bato mosusu babimisi mikolo oyo ete masuwa oyo ememaki ntoma Paulo ezindaki na esanga Malta te, kasi nde na Céphalonie (to Kefallinía), pene na Corfou na Mbu ya Ionie, na bokula ya wɛsti ya ekólo Grèce. Biblia eyebisi biso ete Paulo akɔtaki na masuwa banda na Kaisalia elongo na basoda mosusu mpe baninga na ye; lokola azalaki mokangami, bapesaki ye na mabɔkɔ ya Yuliusi, mokonzi ya basoda ya Loma. Ndenge karte ezali komonisa yango, masuwa ememaki bango na Sidoni mpe na nsima, na Mila. Ntango bakɔtaki na masuwa moko monene oyo ememaka blé oyo eutaki na Alezandria, na Ezipito, bakobaki mobembo na wɛsti tii na Kinide. Bakokaki te kolanda nzela oyo esengelaki koleka, elingi koloba kokatisa Mbu ya Égée, koleka na sudi ya Grèce mpe kokende mbala moko na Loma. Mipɛpɛ ya makasi ememaki bango na sudi tii na esanga Krɛti mpe balekaki nsimansima na yango. Basɛmaki na esanga yango na esika oyo ebengami Mabongo Kitoko. Ntango bakamataki “nzela ya mbu uta na Krɛti,” masuwa “ebɛtamaki na makasi” na “mopɛpɛ moko ya makasi oyo ebengami Elakilo.” Masuwa monene wana oyo ememaki blé “ezalaki komemama epai na epai likoló ya mbu” tii na butu ya zomi na minei. Nsukansuka, masuwa yango oyo ememaki bato 276 ezindaki na esanga moko oyo Makomami ya Grɛki ya boklisto ebengi Mélitê.—Misala 27:1–28:1.
Bato bapesá makanisi ndenge na ndenge na ntina na esanga Mélitê yango. Bamosusu bakanisaki ete ezali esanga Melite Illyrica, oyo babengaka lelo Mljet, na Mbu ya Adriatique, na bokula ya ekólo Croatie. Kasi emonani ete ekoki kozala bongo te, mpamba te lokola esanga Mljet ezali na nɔrdi mpenza, yango eyokani te na bisika oyo Paulo alekaki na nsima, elingi koloba Silakuse, Sisili, mpe na nsima, wɛsti ya bokula ya Italie.—Misala 28:11-13.
Babongoli mingi ya Biblia bamonaki ete Mélitê wana esengeli nde kozala esanga Melite Africanus, oyo ebengamaka lelo Malta. Esika ya nsuka oyo masuwa oyo ememaki Paulo esɛmaki ezali Mabongo Kitoko, na Krɛti. Na nsima mopɛpɛ moko ya makasi ememaki masuwa yango na wɛsti, na ngámbo ya Koda. Mopɛpɛ ememaki masuwa yango na boumeli ya mikolo mingi. Tokoki mpenza kokanisa ete mopɛpɛ makasi ememaki masuwa yango mosika na wɛsti tii na Malta.
Soki totali epai oyo mopɛpɛ ezalaki kouta mpe “ngámbo oyo masuwa etalaki mpe mosika oyo yango ekendeki,” Conybeare mpe Howson balobi boye, na buku na bango Bomoi mpe mikanda ya Santu Paulo (na Lingelesi): “Ntaka oyo ekaboli Koda mpe Malta ezali pene na kilomɛtrɛ 770. Ndenge makambo nyonso ezali komonana, ezali mwa mpasi kondima ete mboka oyo bato ya masuwa [bapusanaki pene na yango] na butu ya 14 ezali Malta te. Nyonso ezali komonisa ete ezalaki kaka Malta.”
Atako bato bakoki koloba ete masuwa yango ezindaki na esika mosusu, emonani mpenza ete kozinda ya masuwa na esanga Malta, ndenge karte ezali komonisa yango, eyokani mpenza na lisolo ya Biblia.
[Karte/Elilingi na lokasa 31]
(Mpo na komona yango, talá mokanda)
Yelusaleme
Kaisalia
Sidoni
Mila
Kinide
KRƐTI
KODA
MALTA
SICILE
Silakuse
Loma
MLJET
GRÈCE
CÉPHALONIE