Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • lfb liteya 82 lok. 192-lok. 193 par. 2
  • Yesu ateyi bayekoli na ye ndenge ya kobondela

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Yesu ateyi bayekoli na ye ndenge ya kobondela
  • Zwá mateya na masolo ya Biblia
  • Masolo mosusu
  • Na ntina na mabondeli oyo Nzambe ayokaka
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2009
  • Kobondela Nzambe ezali likambo ya lokumu monene
    Makambo oyo Biblia eteyaka
  • Tosengeli nde kobondela Yesu?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2015
  • Pusaná penepene na Nzambe na nzela ya libondeli
    Sepelá na bomoi libela na libela!—Boyekoli ya Biblia
Makambo mosusu
Zwá mateya na masolo ya Biblia
lfb liteya 82 lok. 192-lok. 193 par. 2
Mofarisai moko azali kobondela na esika ya bato nyonso mpe bato batɛlɛmi bazali kotala ye

LITEYA 82

Yesu ateyi bayekoli na ye ndenge ya kobondela

Bafarisai bazalaki kosala makambo nyonso kaka mpo na komilakisa. Soki basali likambo ya malamu, ezalaki kaka mpo bato bámona bango. Bazalaki kobondela na esika ya bato nyonso mpo bámona bango. Bafarisai bakangaki mabondeli ya milaimilai na motó mpe bazalaki kozongela yango na basinagoga mpe na bisika banzela ekutaná mpo bato báyoka bango. Na yango, bato bakamwaki ntango Yesu alobaki na bango ete: ‘Bóbondelaka te lokola Bafarisai. Bazali kokanisa ete bakokamwisa Nzambe na ebele ya maloba na bango, kasi ezali bongo te. Libondeli ezali likambo ya moto ná Yehova. Esengeli kozongela kaka te maloba moko wana mbala na mbala . Yehova alingi ete oyebisa ye makambo oyo ezali mpenza na kati ya motema na yo.’

Mwana moko afukami azali kobondela

Yesu ateyaki boye: ‘Talá ndenge bosengeli kobondela: “Tata na biso na likoló, nkombo na yo esantisama. Bokonzi na yo eya. Mokano na yo esalema, lokola na likoló, ndenge moko mpe na mabele.”’ Yesu alobaki mpe na bango ete basengeli kobondela mpo na bilei ya mokolo, mpo na bolimbisi ya masumu na bango, mpe mpo na makambo na bango moko.

Yesu alobaki boye: ‘Bótika kobondela te. Bókoba kosɛnga Tata na bino, Yehova, mpo apesa bino biloko ya malamu. Moboti nyonso alingaka kopesa mwana na ye biloko ya malamu. Soki mwana na yo asɛngi yo limpa, okopesa ye libanga? Soki asɛngi yo mbisi, okopesa ye nyoka?’

Na nsima, Yesu alimbolaki liteya yango: ‘Soki bino bopesaka bana na bino biloko ya malamu, bongo Tata na bino, Yehova, akopesa bino elimo santu koleka te? Bino bósɛnga ye kaka.’ Olandaka toli ya Yesu? Obondelaka mpo na makambo nini?

“Bókoba kosɛnga, mpe bakopesa bino; bókoba koluka, mpe bokomona; bókoba kobɛta kɔkɔkɔ, mpe bakofungolela bino.”​—Matai 7:7

Mituna: Yesu alobaki nini mpo na koteya bayekoli na ye ndenge ya kobondela? Obondelaka mpo na makambo oyo ezali na ntina mpo na yo?

Matai 6:2-18; 7:7-11; Luka 11:13

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto