Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • th liteya 10 lok. 13
  • Kobongola mongongo

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Kobongola mongongo
  • Bongisá ndenge na yo ya kotánga mpe ya koteya
  • Masolo mosusu
  • Kobongola mongongo
    Zwá matomba na mateya ya Eteyelo ya mosala ya Teokrasi
  • Konyata maloba ya ntina mpe kobongola mongongo
    Mokanda mpo na Eteyelo ya mosala ya Nzambe
  • Koloba na mongongo oyo ebongi
    Zwá matomba na mateya ya Eteyelo ya mosala ya Teokrasi
  • Koloba na esengo
    Bongisá ndenge na yo ya kotánga mpe ya koteya
Makambo mosusu
Bongisá ndenge na yo ya kotánga mpe ya koteya
th liteya 10 lok. 13

LITEYA 10

Kobongola mongongo

Vɛrsɛ

Masese 8:4, 7

NA MOKUSE: Bimisá makanisi polele mpe simbá mitema ya bato na ndenge ozali komatisa to kokitisa mongongo, koloba mwa makasi to na mwa nse, mwa mbangu to mwa malɛmbɛ.

NDENGE YA KOSALA YANGO:

  • Matisá to kitisá mongongo. Matisá mongongo mpo na konyata makanisi ya ntina mpe kopesa bato mposa ya kosalela makambo oyo ozali koteya. Salá mpe bongo ntango ozali kotánga bavɛrsɛ oyo ezali kolobela bitumbu. Kitisá mongongo mpo na kopesa bato mposa ya koyoka makambo oyo ekolanda to mpo na komonisa kobanga to kotungisama.

    Toli

    Esengeli te omatisaka mongongo mpambampamba, noki te bato bakomona lokola ozali kogangela bango. Kolekisa ndelo te na makambo oyo ozali kosala, noki te makanisi ya bato ekokende epai na yo, na esika bálanda mateya.

  • Lobá mwa makasi to na mwa nse. Soki bato bamonaka yango mabe te na monɔkɔ na bino, lobá mwa makasi mpo na kobimisa esengo to mpo na kolakisa bonene to bolai. Lobá na mongongo ya nse mpo na kobimisa mawa to kotungisama.

  • Lobá mwa mbangu to mwa malɛmbɛ. Lobá mwa mbangu mpo na komonisa nsai. Lobá mwa malɛmbɛ ntango olingi kobanda kolobela likambo moko ya ntina.

    Toli

    Mpo bato oyo bazali koyoka yo básutuka te, kobongola mongongo na mbalakaka te. Koloba mbangumbangu te, noki te maloba ekoyokana malamu te.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto