Baboyi kotosa makebisi mpe bameki Nzambe
“Atako bamonaki mai ekomeli bango kino na mabolongo ya matambe, nzokande balingaki kokima te.”—El Pais, Colombie.
TITRE oyo ebimaki na zulunalo moko ya Colombie emonisaki moko na bantina oyo likama ya Armero, ebomaki bato mingi na novembre 1985. Lokola amonaki putulu ya moto mpe mai ebakamaki na ebale, Dora Elisa Rada Esguerra, mosali na central téléphonique, azwaki ekateli ya kokima. Bongo ayebisaki epai na baninga na ye ya mosala ete likama yango etikali moke ekwea. Nsima na yango alimbolaki boye: “Bazalaki komona mai, . . . ezalaki koleka makasi, makasi mpenza, kasi baninganaki te.” Dora akimaki engumba oyo ezalaki na likama.
Basali mosusu ya central bakufaki elongo na bato 21 000 na ndenge potopoto ya moto ya nse ya mabelé oyo esanganaki na glace mpe na mabanga ekitaki longwa na ngomba ya volcan Nevado del Ruiz. Kati na bato bakufaki ezalaki na mokonzi na engumba mpe bapolisi mingi, yango ezali elembo ete mingi batalelaki likebisi yango te kino likama eyaki.
Mpo na nini bakimaki te?
Liboso ya likama, bilembo bizalaki mpe makebisi mapesamaki. Mpo na nini bafandi mingi ya Armero batalelaki yango te? Ya liboso, makebisi ya Leta makomaki nsima mpenza, wana likama ebandaki kokwea na engumba. Liboso, elobamaki ete bafandi bazala kimya, mai malingaki koya na mboka, kasi ekozala mpenza likambo monene te. Nzokande, engumba elimwaki libela na carte ya mokili, ekombamaki na liboke ya potopoto oyo eutaki na mongala Lagunilla.
Bamoko, balingaki kotika bandako na bango te mpe biloko na bango te, mpo bayebaki ete miyibi bakoumela te mpo na koya koyiba. Bamikosaki te. Mwa miyibi babetamaki masasi epai na basoda. Nsima na likama, babiki mosusu bazongelaki bandako na bango oyo etondaki na mai, bamonaki ete fungola epumbusamaki na masasi, mpe biloko ya motuya eyibamaki. Kasi mingi kati na bafandi bazongaki epai na bango te. Mpe mpo na bato mingi, ntina te ya koluka ndako mpo bokokaki komona yango lisusu te.
Bamosusu bakanisaki ete Nzambe mpe Ngondo Maria bakosalisa bango. Nzokande, tokoki mpenza komizela ete lelo oyo Nzambe asalisa bamoko na ntango ya makama ya biloko ya mokili? Na makambo motindo boye, mpo na nini bamoko basengeli kobatelama na Nzambe mpe bamosusu bakufa?
Ezali na miboko makasi oyo ekopesa nzela ete tofanda na kimya, kozelaka ete libateli ya sipesiale elongwa na Nzambe? Na ndakisa, motambwisi motuka akoki kozala na elikya epai na “anzelu mobateli” na ye to na “mosantu” na ye alingaka mingi? Bakatolike mingi ya sembo bakufaki na nzela oyo balataki bamedaye ya “santu” Christophe mpo ete babika. To lisusu, moklisto asengeli kokanisa ete azali na libateli ya sipesiale ya Nzambe na ntango azali na mobembo na mpepo, to ntango azali kosala lisano moko ya likama? Ezali malamu komeka Nzambe na ndenge yango?
Loboko na Jéhovah ezali mokuse te
Makomami Mosantu mazali kosalisa biso na komona ete, na makambo mosusu, ekoki kozala ete Jéhovah azali kosalisa basaleli na ye, ntango mosala ya kosakola Bokonzi etalelami to ntango lisangá ekomi na mpasi. Mosakoli Yisaya apesi biso elikya oyo: “Tala loboko na Jéhovah ezali mokuse te ete ezanga kobikisa; litoi na ye ezali na bozito te ete ezanga koyoka.”—Yisaya 59:1.
Biblia esololi makambo mamonisi polele ete Jéhovah apesaki loboko na ye mpo na kobatela bantoma. Mpo ete azala na lokumu malamu epai na Bayuda, mokonzi Hérode atyaki ntoma Petelo na boloko. Kasi lisangá ya Yelusaleme ebondelaki makasi. Litomba nini emonanaki? Anzelu ya Jéhovah ayaki kobimisa ntoma na boloko. Ata Petelo akamwaki na makambo oyo azalaki komona. Bongo na nsima ayaki kokanga ntina ya makambo nyonso mazalaki koleka mpe alobaki: “Sikawa nayebi solo ete Nkolo atindi mwanze na ye kobikisa ngai na maboko na Elode.”—Misala 12:1-11.
Bobele na lisolo yango eyebisami lisusu ete Hérode abomisaki ntoma Yakobo, ndeko mobali ya Yoane. Jéhovah apesaki nzela ete abomama. Na yango, ezali polele ete, soki Jéhovah azali na nguya ya kobatela biso mpe kobikisa biso, ekomaka ata bongo ete apesaka nzela mpo makambo masalema ndenge masengeli kotambola, kotikaka bongo bamoko kati na basaleli na ye ya sembo ete bamonisa bosembo na bango kino liwa soki yango esengeli. Maloba oyo ya Yakobo, ndeko na Yesu, mazali solo: “Boyebi makambo na lobi te. Bomoi na bino ezali nini? Bozali bobele londende, komonana mwa ntango moke na nsima kolimwa. Kasi ekoki na bino koloba ete, Soko ezali mokano na Jéhovah, tokozala na bomoi, mpe tokosala boye na bongo.”—Yakobo 4:14, 15; tala Yobo 2:3-5.
Likambo moko ezali solo ete ntango makama na biloko na mokili mpe aksida esalemaka, liloba oyo ya Biblia ezali kokokisama mpo na bato nyonso: “Ntango mpe makambo makanami te ekokwela bango nyonso.” (Mosakoli 9:11) Atako ezali malamu na kobondela mpo na kozwa lisalisi mpe kobatelama na ntango ya monyokoli, esengeli koyeba ete “bango nyonso bazali na mposa na ezaleli na kosambela kati na Klisto Yesu bakonyokolama.”—2 Timote 3:12.
Makanisi mabongi
Ezali solo ete na kala Jéhovah abatelaki libota na ye, na ndakisa ntango abikisaki Yisraele na Ezipito mpe na mampinga na Faraon. Kasi ezali komitombola na kokanisa ete Nzambe asengeli kobatela baklisto na makama oyo mazali kobima na “makambo makanami te” to mpo na makama makobima mpo na bopotu. Mokanda ya Paulo epai na baklisto ya Loma, oyo bamoko kati na bango babomamaki kati na arene, elobeli mpe ntina na kozala na makanisi mabongi: “Nazali koloba na moko na moko kati na bino ete boleka te komikanisa bino mpenza na motindo mobongi te. Kasi bomitanga na makanisi na sembo, moto na moto pelamoko na likabo na kondima oyo Nzambe apesi ye.” (Baloma 12:3) Nouveau Testament ya Kuen elobi: “Bomitombola koleka makoki na bino te.”
Na eleko na biso, ‘toli oyo epesami awa ezali ntango nyonso na ntina, atako epesamaki mpo na likambo mosusu. Soko moklisto moko azali kokanisa ete akoki kokumba motuka na bopotu nyonso to wana esili ye kolangwa mpe kozanga kozwa likama mpamba te Nzambe azali kobatela ye, azali na “makanisi mabongi”? To ‘azali nde komitombola koleka makoki na ye’? Mpe lisusu, soko atye na likama bomoi ya bato mosusu, tokoki koloba ete ‘alingi solo bazalani na ye lokola ye moko’?—Matai 22:39.
Tokoloba boni sikawa mpo na bingumba bitongami na bisika oyo biyebani ete likama ekoki kokwea wana, lokola koningana na mabelé to esika ezali pembeni na ngomba ebimisaka moto (volcan), likama oyo ata ebimi sikawa te kasi ekobima ata ndele? Yango ezali likanisi ebongi? Volcan ya Colombie Nevado del Ruiz ezali mpenza ndakisa ebongi mpo na motuna yango. Engebene zulunalo El Pais, na 1982 boyekoli moko ya architecte César Zárate emonisaki ete Lagunilla ezindisaki Armero na kala mpe ete engumba yango ezali ntango nyonso na libateli te. Bayebaki lisusu ete uta 1570 ngomba ya moto Nevado del Ruiz etombokaki mbala motoba. Lisolo elobi ete, volcan yango etombokaka mbala na mbala nsima na mibu 140 na sanza libwa to nsima na mibu 110 na sanza mibale.
Mwa baposo liboso na likama ya mboka Armero, zulunalo oyo ebimaki mokolo na lomingo El Tiempo ezwaki liyebisi oyo ezalaki koloba ete: “Ngomba ekobimisa lisusu móto na katikati ya sanza ya novembre ya mbula oyo. Tosili komona bilembo ya sikisiki: milinga ezali kobima na libulu ya ‘Arenas’; mbula ya putulu mpe gaz ezali kopanzana na mopepe; mai mpe milona ebebi; nsolo mabe; . . . makelele ebimaki na kati na ngomba na moto le 11 septembre; glace oyo ezalaki na moto ya ngomba ezalaki kolemba mokemoke . . . Na yango, ezali sikawa ntango ya kokima.”
Lisolo etikalaki ata kobima te. Mbala mosusu bakanisaki ete bakobangisa bato mpambampamba. Nsima na yango, bakonzi ya zulunalo El Tiempo balobaki ete ekateli oyo bazwaki ezalaki mpo “bazangaki koyeba makambo makoya, mpe bandimaki kozanga ntina ete likambo moko ekosalema te”.
Kasi, bobele ndenge eyebisamaki, ngomba ya moto Nevado del Ruiz epumbusaki nsonge na yango, le 13 novembre 1985. Bato koleka 20 000 bakufaki na Armero, bankoto mosusu na Chinchiná mpe na bingumba ya zongazonga. Kati na bawei ezalaki na ba Témoins de Jéhovah 41 mpe bato bazalaki koyekola Biblia elongo na bango. Bamoko bazwaki likanisi mabe ya kokima na Salle du Royaume, oyo etongami na esika moko ya nse. Bamemamaki mpe bakundamaki na Salle elongo. Na esengo, Batemwe mosusu bakendaki kobombama na bisika ya likolo mpe babikaki.
Ya solo, zoba liboso, mayele nsima. Kasi tokoki kozwa mateya na likama oyo.
Na kala
Biblia epesi bandakisa ya bato oyo bamonaki mpamba makebisi oyo mapesamaki na ntango ekoki to baoyo bakanisaki ete ‘likambo yango ekokaki kokoma na eleko na bango te’ to na mboka na bango te. Ezali bongo mpo na likambo ekomelaki Lota. Ntango balobaki na ye ete asala noki mpo alongwa na Sodome mpe Gomore, ayebisaki ba bokilo na ye ete: “Bolongwa, bobima na esika oyo mpo ete Jéhovah alingi kobebisa mboka.” Ndenge nini bango bayambaki maloba oyo? Lota amonanaki epai na “babokilo na ye lokola moto azalaki kosala liseki”. Kasi “liseki” yango eumelaki te. Jéhovah asopaki sufulu mpe moto likolo na bingumba yango ya mabe mingi oyo esengelaki kobebisama. Babokilo ya Lota bakufaki elongo na bafandi na bingumba yango oyo bazalaki na bizaleli mabe. Mpo na mwasi na Lota, azalaki kokakatana ntango akimaki Sodome. “Atalaki nsima (nsima na Lota), mpe abongwanaki likonzi na mungwa”.—Genese 19:12-26.
Ekoki sikawa mibu koleka 1 900, Yesu asakolaki libebi monene mpo na Yelusaleme ya kala. Alobaki makambo ya sikisiki mpo na ndenge makambo makosalema liboso na libebi ya mboka: “Soko bokomona Yelusaleme kozingama na bibele na basoda, bayeba na ntango yango ete libebisi na yango esili kobelema.” Bongo apesaki likebisi oyo: “Na ntango yango bango na kati na Yuda bakima kuna na ngomba, mpe bango na kati na mboka balongwa wana, mpe bango na bilanga bakota na mboka te.”—Luka 21:20-24.
Ntango mampinga ya Baloma ezingaki Yelusaleme na mobu 66 ya ntango na biso, baklisto oyo bazalaki na kati na mboka bayebaki ete yango ezalaki elembo oyo Yesu apesaki. Na nsima, wana emonanaki polele ete azalaki na bolongi, général Cestius Gallus elongo na basoda na ye batikaki kozinga engumba, kozanga ntina mpenza. Ezalaki wana ntango oyo baklisto bazalaki kozela: bakimaki na ngambo mosusu ya Yordani. Na mobu 70 ya ntango na biso, Baloma bazongaki, batambwisamaki na général Titus, mpe babebisaki Yelusaleme. Bankoto na Bayuda oyo batikalaki na engumba bakufaki ntango mboka ezingamaki mpe na kati ya bitumba.
Ya solo, na makambo oyo mibale Nzambe apesaki makebisi. Kasi esalamaki boye ete bobele bato moke bandimaki kosala ndenge likebisi elobaki, mpo na yango babikisamaki. Mingi balandaki yango te. Balingaki koyokela likebisi ya Nzambe te.
Ndenge nini tokoki komeka Nzambe?
Ata makama na biloko ya mokili ezalaki mingimingi na bilembo -lisolo ya mboka, bilembo bizali komonana to makambo mamonisami na bato na sianse -nyonso emonisaki bonene ya likama na boumeli ya mwa ntango. Mbala mosusu mai masili kotonda na régio moko. Moto na mayele asengeli kotalela makambo mabimi mpo na kozwa ekateli soko asengeli kolongwa wana mpe soko akoki kosala yango. Ya solo, ezali mpasi mpo na komiyebela lisoso eleko mpe esika likama ekokwea. Nzokande, tokoki kotalela makambo oyo mamonisi ete likama ekoki kobima mpe libateli oyo tokoki kozala na yango soko likama ebimi. Kasi ezali likambo na mayele te na komizela na libateli ya sipesiale ekolongwa na Nzambe. Wana ekozala komeka ye na lolenge moko epesameli nzela te mpe ebongi te.
Nzokande, na makambo mosusu, Jéhovah asengi biso ete tomeka ye. Na ntango ya mosakoli Malaki, Yisraele bazalaki komeka Nzambe na ndenge mabe na kopesaka ye likolo na etumbelo mabonza ya mabe. Na kopesaka mampa masili kobeba mpe banyama ya tengu, Bayisraele bazalaki komonisa ete bazangaki limemya mpo na mesa ya Jéhovah. Na nzela na Malaki, Jéhovah asengaki bango ete babongwana mpe babongisa ezaleli na bango. “Boyeisa likabo mobimba na zomi kati na ndako na ebombelo ete bilei bizala na ndako na ngai. Jéhovah na bibele alobi ete, Meka ngai sasaipi na yango, soko nakozipwela bino maninisa na lola te kosopela bino lipamboli kino esika ekozanga mpo na yango.”—Malaki 3:10.
Ee, mpo na oyo etali mapamboli na elimo, tokoki ‘komeka’, Jéhovah. Soko tozali koluka liboso Bokonzi na ye mpe boyengebene na ye, na bongo, lokola Yesu alobaki yango, ’biloko nyonso mosusu ya ntina ekopesamela biso’. Yesu alobaki lisusu: “Bolombaka mpe bakopesa bino, bolukaka mpe bokozwa; bobetaka mpe bakozipwela bino.” Soko bato bazangi kokoka bazali kopesa makabo malamu epai na bana na bango, “Tata na bino na likolo ekoleka te kopesa biloko malamu na bango bakolombaka ye (na boyokani na mokano na ye)”?—Matai 6:33; 7:7-11; 1 Yoane 5:14.
Sikawa, likebisi epesami epai na mabota: etikali moke Jéhovah abanda kopesa etumbu epai na basangani nyonso ya biloko mabe ya ntango oyo ya Satana. (Emoniseli 16:14, 16; 18:20) Bamilio na bato oyo bazali na bokengi bazali kolanda likebisi oyo esakolami na ba Témoins de Jéhovah mpe bazali komikabola na mokili mpo na komitya na ngambo ya Bokonzi ya Nzambe. Bazali komilongola na makambo na politike mpe na mangomba ya lokuta, liboso ete nsuka eya. (Emoniseli 18:4) Na yango, bazali komibongisa mpo na kofanda libela, na nse na boyangeli na Klisto, kati na Paradis ya boyengebene oyo ekozalisama awa na mabelé. Ozali koyoka likebisi oyo?—2 Petelo 3:13; Tito 1:2.
[Elilingi na lokasa 21]
Diplome oyo ezwamaki kati na biloko bibebaki na mboka Armero. Suvenire mabe ya kufa ya bibele ya bato oyo baboyaki koyoka likebisi
[Elilingi na lokasa 22]
Ndenge otambwisaka motuka emonisaka ete ozali na makanisi malamu lokola moklisto?
[Bililingi na lokasa 23]
Eloko moko etikali na mboka Armero te. Bato koleka 20 000 bakufaki wana
Kobeba ya motuka oyo emonisi kobeba ezalaki na mboka mobimba ya Armero