Bakomi oyo bamonaki bantoma mosusu—Balandaki mpenza mateya ya bantoma?
NA EBANDELI ya ekeke ya mibale ya ntango na biso (T.B.), mateya ya lokuta ebandaki mokemoke kobebisa lingomba ya boklisto. Ndenge kaka esakolamaki, nsima ya liwa ya bantoma, baklisto mosusu batikaki mateya ya solo mpe bakómaki kolanda “masapo ya lokuta.” (2 Timote 4:3, 4) Na mobu soki 98 T.B., Yoane, ntoma ya nsuka oyo azalaki naino na bomoi, apesaki likebisi na ntina etali mateya ya lokuta mpe “baoyo [bazalaki] koluka kobungisa [baklisto ya sembo] nzela.”—1 Yoane 2:26; 4:1, 6.
Eumelaki te, bato mosusu bakómaki kokoma mikanda mpo na koteya makanisi na bango. Ndenge nini bazalaki kotalela mateya ya lokuta? Balandaki toli oyo ntoma Yoane apesaki?
Bazalaki banani?
Bato yango bazali bakomi ya makambo ya Nzambe, bamonaki bantoma mosusu ya Yesu to mpe bateyamaki na bato oyo bantoma bateyaki; na Lifalanse babengaka bango “Pères apostoliques.” Bato yango mingi bazalaki na bomoi na nsuka ya ekeke ya liboso T.B. tii na katikati ya ekeke ya mibale.a Kati na bango tokoki kotánga, Clément de Rome, Ignace d’Antioche, Papias de Hiérapolis mpe Polycarpe de Smyrne. Bato mosusu oyo bankombo na bango eyebani te bakomaki mpe mikanda na eleko yango, na ndakisa Didachè, Épître de Barnabé, Martyre de Polycarpe, mpe mokanda ya mibale ya Clément.
Lelo oyo, ezali mpasi koyeba ndenge mateya ya bakomi yango eyokanaki mpenza na mateya ya Yesu. Na ntembe te, mokano na bango ezalaki ya kobatela to mpe kolendisa lolenge moko boye ya boklisto. Bazalaki kopekisa losambo ya bikeko mpe etamboli ya mbindo. Bazalaki kondima ete Yesu azali Mwana ya Nzambe mpe ete asekwaki. Atako bongo, bakokaki te kopekisa lipɛngwi oyo ezalaki se kokola. Kutu, bamosusu kati na bango bateyaki mpe mateya ya lokuta.
Mbongwana ya mikemike?
Makambo oyo baklisto mosusu bakómaki koteya na ekeke ya liboso ekesanaki mpenza na mateya ya Klisto mpe ya bantoma na ye. Na ndakisa, na esika bálanda ndenge oyo Yesu abandisaki Bolei ya Mpokwa ya Nkolo, oyo ebengamaka mpe Elambo ya Nkolo, mokomi ya Didachè alobaki ete esengeli kolekisaka vinyo liboso ya limpa. (Matai 26:26, 27) Mokomi yango alobaki mpe ete mpo na kopesa moto batisimo, soki mai ezali te mpo na kozindisa ye, bakoki kaka kosopela ye mwa mai na motó. (Malako 1:9, 10; Misala 8:36, 38) Mokanda yango elobaki mpe ete baklisto basengeli kokilaka bilei mbala mibale na pɔsɔ mpe basengeli kozongelaka libondeli ya Tata wa biso mbala misato na mokolo.—Matai 6:5-13; Luka 18:12.
Ignace ateyaki ete lisangá ya boklisto esengeli kotambwisama na ndenge ya sika, esengeli kozala kaka na episkɔpɔ moko oyo akokamba “na esika ya Nzambe.” Episkɔpɔ yango akozala mokonzi ya banganga-nzambe mingi. Makanisi wana efungolaki nzela na mateya mingi mosusu oyo eutaki na Biblia te.—Matai 23:8, 9.
Kolekisa ndelo, kokufa liwa ya martiru mpe kosambela bikeko
Kolekisa ndelo na makambo mosusu epɛngwisaki bakomi yango mosusu. Papias azalaki na mposa makasi ya koyeba solo mpe azalaki kosalela Makomami ya Grɛki ya boklisto. Kasi, azalaki mpe kondima ete na Boyangeli ya Mbula Nkóto ya Klisto oyo esakolamaki, banzete ya vinyo ekobota bitape 10 000, etape mokomoko ekobota bitape ya mike 10 000, etape mokomoko ya moke ekobota bitape ya mikemike mpenza 10 000, etape mokomoko ya moke mpenza ekobota bikango 10 000, ekango mokomoko ekobimisa mbuma 10 000 mpe mbuma mokomoko ekobimisa litre 1 000 ya vinyo.
Polycarpe andimaki kokufa liwa ya martiru na esika ya kowangana kondima na ye ya boklisto. Balobaka ete ateyamaki na bantoma mpe bato mosusu oyo bamonaki Yesu. Azalaki koloba makambo oyo euti na Biblia, mpe emonani ete asalaki makasi ya kolanda mitinda ya boklisto na bomoi na ye.
Nzokande, limemya makasi oyo bato mosusu bazalaki na yango mpo na Polycarpe, etindaki bango bákóma kosambela ye. Buku moko (Martyre de Polycarpe) elobi ete nsima ya liwa na ye, “bandimi” bazalaki na mposa ya kozwa biteni ya nzoto na ye. Bazalaki komona ete mikuwa na ye ezali “motuya koleka babiju ya ntalo makasi, mpe pɛto koleka wolo.” Emonani polele ete mateya ya lokuta ezalaki se kopalangana.
Mikanda oyo balukaki kobakisa na Biblia
Bato yango mosusu bandimaki mikanda oyo ekomamaki na elimo santu ya Nzambe te. Na ndakisa, Clément de Rome atángaki maloba euti na mokanda ya Bwanya mpe mokanda ya Yudite. Mokomi ya Épître de Polycarpe atángaki maloba ya mokanda ya Tobia mpo na kondimisa ete kopesa mabonza ekoki kobikisa bomoi ya moto oyo apesi yango.
Na ekeke ya mibale T.B., baevanzile ya lokuta epanzaki masolo ya lokuta mpo na bomoi ya Yesu, mpe mbala mingi bakomi yango bazalaki kondima baevanzile yango. Na ndakisa, Ignace atángaki maloba euti na evanzile moko ya lokuta babengi Évangile selon les Hébreux. Buku moko elobi mpo na Clément de Rome ete: “Emonani ete Clément ayebaki Klisto na nzela ya Baevanzile te, kasi na nzela ya mikanda oyo ekomamaki na lisalisi ya elimo ya Nzambe te.”
Mabunga ekómi ebele
Lokola bakomi yango bazalaki kosalela masapo, makanisi ya molili mpe filozofi mpo na kolimbola mateya ya boklisto, bapesaki nzela na ebele ya mabunga. Na ndakisa, Clément alobelaki lisapo ya ndɛkɛ oyo babengi phénix mpo na komonisa ete lisekwa ezali solo. Lisapo yango elobaka ete ndɛkɛ yango ezalaki kobima na putulu na yango mpe masapo ya bato ya Ezipito emonisaka ete bazalaki kosalela ndɛkɛ yango na losambo ya nzambe-moi.
Moto mosusu oyo akitisaki motuya ya mateya ya Makomami ezali mokomi ya Épître de Barnabé. Alimbolaki Mibeko ya Moize lokola nde ezalaki kaka bililingi ya makambo mosusu. Mpo na ye, banyama ya pɛto—oyo enyamutaka mpe ezali na basabo ekabwaná—ezali elilingi ya bato oyo bamanyolaka Liloba ya Nzambe. Mokomi yango alobaki ete sabo oyo ekabwaná ezali elilingi oyo emonisi ete moto ya sembo “azali na bomoi na mokili oyo” kasi azali na elikya ya kozala na bomoi na likoló. Bandimbola wana eyokani na Makomami te.—Levitike 11:1-3.
Litatoli ya ntoma Yoane
Na ekeke ya liboso, ntoma Yoane apesaki likebisi oyo: “Balingami, bóndimaka te liloba nyonso oyo epemami, kasi bómekaka maloba mapemami mpo na komona soki yango euti na Nzambe, mpamba te basakoli mingi ya lokuta babimi na kati ya mokili.” (1 Yoane 4:1) Maloba yango ebongaki mpenza!
Na nsuka ya ekeke ya liboso, bato mingi oyo bazalaki komibenga baklisto batikaki mateya ya Yesu mpe bantoma na ye. Na esika bátɛmɛla lipɛngwi, bakomi oyo tozali kolobela bayeisaki yango nde makasi. Babebisaki mateya ya solo. Ntoma Yoane alobaki mpo na bato ya ndenge wana ete: “Moto nyonso oyo azali koleka liboso mpe azali kotikala te na kati ya liteya ya Klisto azali na Nzambe te.” (2 Yoane 9) Mpo na bato nyonso ya sembo oyo balukaka solo ya Makomami, maloba wana oyo euti na Nzambe ezalaki polele mpe ezali bongo tii lelo oyo.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Bakomi, bato ya teoloji mpe bato ya filozofi oyo babengamaka Batata ya Eklezia (Pères de l’Église) bazalaki na bomoi kobanda na ekeke ya mibale tii na ekeke ya mitano T.B.
[Likanisi ya paragrafe na lokasa 29]
Bakomi oyo bamonaki bantoma, na ndakisa Clément, bakɔtisaki masapo, makanisi ya molili mpe filozofi na mikanda na bango
[Elilingi na lokasa 28]
Polycarpe andimaki kokufa liwa ya martiru
[Eutelo ya bafɔtɔ]
The Granger Collection, New York